MOKAPO 11
Baanzelu ya Nzambe basalisaka biso
BATO mosusu balobaka ete bandimaka kaka makambo oyo bakoki komona. Kasi, makanisi wana ezali malamu te. Ezali na biloko mingi oyo tomoná yango naino na miso te. Okoki kotánga moko na yango?—
Tózwa ndakisa ya mopɛpɛ. Okoki koyoka yango?— Tombolá naino lobɔkɔ na yo, mpe fulá yango. Oyoki eloko moko na lobɔkɔ?— Ɛɛ, oyoki mpenza eloko moko, kasi okoki komona mopɛpɛ?—
Tosili kolobela bilimo mpe tomonaki ete tokoki komona yango te. Toyekolaki ete bilimo mosusu ezali malamu, mosusu ezali mabe. Tángá naino mwa bankombo ya bilimo ya malamu oyo oyebi.— Malamu, tokoki kotánga na ndakisa Yehova Nzambe, Yesu, mpe baanzelu ya malamu. Ezali mpe na baanzelu ya mabe?— Biblia elobi ete bazali. Yebisá ngai naino makambo oyo oyebi mpo na bango.—
Likambo ya liboso oyo toyebi ezali ete baanzelu nyonso, ezala oyo ya malamu to oyo ya mabe, bazali na makasi koleka biso. Moteyi Monene ayebaki makambo ebele oyo etali baanzelu. Ayebaki yango mpo azalaki anzelu liboso abotama lokola mwana awa na mabelé. Azalaki esika moko na baanzelu mosusu na likoló. Ayebaki bamilio ya baanzelu. Baanzelu nyonso wana bazali na bankombo?—
Toyekolaki ete Nzambe apesaki minzoto bankombo. Yango wana tokoki kondima ete baanzelu nyonso bazali mpe na bankombo. Toyebi mpe ete bakoki kosolola bango na bango mpamba te Biblia elobeli ‘monɔkɔ ya baanzelu.’ (1 Bakolinti 13:1) Na makanisi na yo, baanzelu basololaka makambo nini? Balobelaka makambo na biso bato ya mabelé?—
Toyebi ete baanzelu ya Satana, to bademo, balukaka kotinda biso tótosa Yehova te. Boye, basololaka kati nabango ndenge oyo bakoki kosala yango. Balukaka tózala lokola bango mpo Yehova alinga biso lisusu te. Bongo baanzelu oyo batosaka Nzambe? Okanisi ete bango mpe basololaka makambo na biso?— Ɛɛ, basololaka makambo na biso. Balingaka kosalisa biso. Yoká nayebisa ndenge oyo baanzelu mosusu ya Nzambe basalisaki bato oyo bazalaki kolinga Yehova mpe kosalela ye.
Na ndakisa, ezalaki na moto moko nkombo na ye Danyele; moto yango azalaki kofanda na Babilone. Kuna na Babilone, bato mingi bazalaki kolinga Yehova te. Kutu, babimisaki mobeko ete moto abondela Yehova Nzambe te mpe oyo akobondela ye, akozwa etumbu. Kasi, Danyele atikaki kobondela Yehova te. Oyebi likambo basalaki ye?—
Bato yango ya mitema mabe babwakaki Danyele na libulu ya bankɔsi. Na kati ya libulu yango, Danyele azalaki kaka ye moko ná bankɔsi oyo bazalaki na nzala. Oyebi likambo nini esalemaki na nsima?— Danyele alobaki ete: ‘Nzambe atindaki anzelu na ye mpe akangaki monɔkɔ ya bankɔsi.’ Bankɔsi basalaki ye mabe moko te! Baanzelu bakoki kosala makambo ya kokamwa mpo na kosalisa basaleli ya Yehova.—Danyele 6:18-22.
Tólobela sikoyo ntango Petelo akɔtaki bolɔkɔ. Oyebi ete Petelo azalaki moninga ya Yesu Klisto, Moteyi Monene. Bato mosusu basepelaki te ntango Petelo alobaki na bango ete Yesu azali Mwana ya Nzambe. Yango wana batyaki Petelo na bolɔkɔ. Basoda bazalaki kokɛngɛla Petelo mpo akima te. Nani akokaki kosalisa ye?—
Petelo alalaki mpɔngi na minyɔlɔlɔ na mabɔkɔ, soda moko epai mosusu epai. Kasi, Biblia elobi boye: ‘Talá! anzelu ya Yehova ayaki, mpe bolɔkɔ ekómaki kongɛnga makasi. Anzelu asimbaki Petelo na mopanzi, alamwisaki ye mpe alobaki: “Tɛlɛmá noki!”’
Mbala moko, minyɔlɔlɔ oyo bakangaki Petelo na mabɔkɔ ekwei! Mpe anzelu alobi na ye: ‘Latá elamba, latá basandale, mpe landá ngai.’ Basoda bakokaki kokanga bango te mpo anzelu nde azalaki kosalisa Petelo. Ntango bakómaki na porte ya bibende, likambo moko ya kokamwa esalemaki. Porte efungwamaki yango moko! Anzelu wana abimisaki Petelo na bolɔkɔ mpo akende kokoba kosakola.—Misala 12:3-11.
Baanzelu ya Nzambe bakoki mpe kosalisa biso?— Ɛɛ. Elingi koloba nde ete bakotika ata moke te ete tóyoka mpasi?— Te, baanzelu bapekisaka te ete tóyoka mpasi soki biso moko tozali komitya na likama. Kasi, ata soki tozali komitya na likama te, tokoki kaka koyoka mpasi. Nzambe atindaka baanzelu te mpo bábatela biso tóyoka mpasi te. Kasi, apesi bango nde mosala moko ya ntina mpenza.
Biblia elobeli anzelu moko oyo azali koyebisa bato nyonso básambela Nzambe. (Emoniseli 14:6, 7) Ndenge nini anzelu yango azali koyebisa bango likambo yango? Azali nde koganga na likoló esika azali mpo moto nyonso awa na nse ayoka?— Te, bayekoli ya Yesu nde bazali koyebisa bato mosusu makambo ya Nzambe, mpe baanzelu bazali kotambwisa bango na mosala yango. Baanzelu basalaka nyonso mpo bato oyo balingi mpenza koyeba Nzambe bákoka kozwa libaku ya koyoka mateya na ye. Tokoki kosala mosala yango ya kosakola, mpe baanzelu bakosalisa biso.
Kasi, baanzelu bakosala nini soki bato oyo balingaka Nzambe te batungisi biso? Soki bakɔtisi biso na bolɔkɔ, baanzelu bakobimisa biso?— Bakoki kobimisa biso. Kasi basalaka yango ntango nyonso te.
Na ntango moko boye, Paulo, moyekoli ya Yesu, azalaki mokangami. Bamemaki ye na masuwa, mpe mopɛpɛ ezalaki makasi. Kasi baanzelu babimisaki ye te na bolɔkɔ, mpamba te bato mosusu mpe basengelaki koyoka makambo ya Nzambe. Anzelu moko alobaki na ye: “Kobanga te, Paulo. Osengeli kotɛlɛma liboso ya Kaisala.” Ya solo, esengelaki bámema Paulo tii liboso ya Kaisala, mokonzi monene, mpo Paulo ayebisa ye nsango malamu. Baanzelu bazalaki ntango nyonso koyeba esika oyo Paulo azali, mpe bazalaki kosalisa ye. Bakosalisa biso mpe soki tozali mpenza kosalela Nzambe.—Misala 27:23-25.
Ezali na mosala mosusu ya monene oyo baanzelu bakosala, mpe etikali moke básala yango. Etikali moke Nzambe aboma bato mabe. Bato nyonso oyo bazali kosambela Nzambe ya solo te bakobomama. Bato oyo bandimaka te ete baanzelu bazali mpo bamonaka bango te bakokanga ntina ete bamikosaki.—2 Batesaloniki 1:6-8.
Bongo biso, nini ekokómela biso?— Soki tozali na ngámbo ya baanzelu ya Nzambe, bakosalisa biso. Kasi, tozali na ngámbo na bango?— Tokozala na ngámbo na bango soki tozali kosalela Yehova. Soki tozali kosalela Yehova, tokoyebisa bato mosusu ete bango mpe básalela ye.
Mpo na koyeba makambo mosusu oyo baanzelu basalelaka bato, tángá Nzembo 34:7; Matai 4:11; 18:10; Luka 22:43; mpe Misala 8:26-31.