Nzambe azali koumela te na elaka na ye
HABAKUKU, mosakoli Moebele na ekeke ya nsambo L.T.B. alobaki boye: “Ɛ [Yehova] kino ntango nini nakobyanga mpe okoyoka te?” Kasi, tozali komona lokola nde maloba yango ekokani na maloba oyo tomesani koyoka, boye te? Bato balingaka kozwa sika sikoyo to nokinoki biloko oyo bazali na yango mposa. Likambo yango ezali komonana mingi lisusu na mikolo na biso oyo moto nyonso alingi kaka azwa mbala moko biloko oyo azali na yango mposa.—Habakuku 1:2.
Na ekeke ya liboso, ezalaki na bato oyo mbala mosusu bazalaki komona ete Nzambe asengeli kokokisa bilaka na ye nokinoki. Bakómaki motema mɔ́tɔmɔ́tɔ na boye ete bamonaki ete Nzambe azali kosala makambo malɛmbɛ to azali koumela. Yango wana, ntoma Petelo asalisaki bango báyeba lisusu ete ndenge oyo Nzambe atalelaka ntango ekeseni na ndenge oyo biso bato totalelaka yango. Petelo akomi boye: “Balingami, likambo oyo moko likima bino te, ete epai na Nkolo, mokolo moko ezali lokola [mbula] nkóto mpe [mbula] nkóto lokola mokolo moko.”—2 Petelo 3:8.
Soki totaleli ntango na ndenge wana, tokomona ete moto oyo akokisi mbula 80, ezali lokola alekisi kaka ngonga mibale, mpe banda moto ya liboso asalemaki tii lelo, eleki se mikolo motoba. Soki totaleli makambo na ndenge yango, tokoki sikoyo kososola ndenge oyo Nzambe asalaka makambo epai na biso.
Kasi, Nzambe alandaka mpe ntango. Kutu, alandelaka yango malamu. (Misala 1:7) Yango wana, Petelo alobi lisusu boye: “Nkolo akoumela nsima na elaka na ye te, lokola bamosusu bazali kokanisa ete akoumela. Kasi azali na motema molai epai na bino, alingi te ete bamosusu bábeba kasi ete bato nyonso bákóma kobongwana na motema.” (2 Petelo 3:9) Nzambe azali lokola bato te, asalaka makambo nokinoki te lokola nde ntango ezali koleka. Lokola azali “Mokonzi ya seko,” amonaka malamu makambo nyonso mpe akoki koyeba ntango nini misala na ye ekopesa bolamu mingi mpo na nyonso oyo etalelami.—1 Timote 1:17.
Nsima ya kolimbola ntina oyo biso bato tomonaka lokola nde Nzambe azali koumela, Petelo akomaki boye mpo na kokebisa biso: “Mokolo na Nkolo ekoya lokola moyibi.” Elingi koloba ete mokolo oyo Nzambe akoya kokata makambo ekoya na ntango oyo bato bazali kokanisa te. Bongo na vɛrsɛ oyo elandi, Petelo amonisi bilikya malamu ya baoyo bazali na “bizaleli na bulɛɛ mpe na kosambela Nzambe,” alobi ete bakoki kobika mpe kokɔta na “likoló ya sika mpe nse ya sika” oyo Nzambe alaki.—2 Petelo 3:10-13.
Likambo yango esengeli kosepelisa biso na komona ete Nzambe asambisi naino mokili oyo te. Motema molai na ye epesi biso nzela ya koyeba mokano na ye mpe ya kobongola bizaleli na biso mpo tózwa mapamboli oyo alaki. Tomoni te ete Petelo alobi solo na maloba oyo ete “motema molai ya Nkolo na biso ezali lokola lobiko”? (2 Petelo 3:15) Kasi, motema molai ya Nzambe ezali mpe na likambo mosusu.
Esengeli naino lisumu etonda
Ntango tozali kotalela makambo oyo Nzambe azalaki kosala epai ya bato na ntango ya kala, tozali komona ete mbala mingi azalaki kowela kopesa etumbu te tii akomona mpenza ete elikya ezali lisusu te ete bato yango bábongwana. Na ndakisa, mpo na etumbu oyo apesaki Bakanana, Nzambe ayebisaki Abalayama lisumu na bango bambula mingi liboso. Kasi, ntango ya kopesa bango etumbu ekokaki naino te. Mpo na nini? Biblia elobi: “Zambi lisumu na Baamola [Bakanana] etondi naino te,” to ndenge libongoli ya Knox (na Lingelisi) elobi yango: “Mabe ya Baamola [ekómaki] naino na nsuka te.”—Genese 15:16.a
Kasi, nsima ya mbula soki 400, Nzambe apesaki etumbu, mpe bana ya Abalayama, elingi koloba Bayisalaele, bazwaki mokili yango. Mwa ndambo ya Bakanana, lokola Laaba na bato ya Gibona, babikaki mpo na elimo oyo bamonisaki mpe misala na bango, kasi bato mingi koleka bakómaki na etamboli ya bosɔtɔ eleki ndelo; biloko oyo bato ya arkeoloji bazali kobimisa na mabelé ezali kolakisa ete ezalaki mpenza bongo. Bazalaki kosambela enama ya mobali, bazalaki kosala pite na tempelo, mpe bazalaki kokaba bana na bango lokola mbeka. Buku moko (Halley’s Bible Handbook) elobi boye: “Bato ya arkeoloji oyo batimolaka na bisika oyo ezalaka bamboka ya Bakanana mpo na kobimisa biloko oyo batiká bamitunaka soki mpo na nini Nzambe abomaki bango noki te.” Na nsuka, ‘lisumu’ ya Bakanana ‘etondaki’; mabe na bango “ekómaki tii na nsuka na yango.” Moto moko te akokaki koloba ete Nzambe azalaki sembo te ntango atikaki ete mokili epɛtolama mpe abikisaki baoyo bazalaki na bizaleli malamu.
Tozali mpe komona yango na makambo oyo elekaki na mikolo ya Noa. Atako liboso Mpela eya bato bazalaki na bizaleli mabe, na mawa na ye Nzambe amonaki ete akotikela bango lisusu mbula 120. Bambula mingi na eleko wana, Noa asalaki lokola “mosakoli ya boyengebene.” (2 Petelo 2:5) Wana ntango ezalaki koleka, tomoni ete mabe na bango ekolaki mpenza. “Nzambe atalaki mokili mpe yango ezalaki mabe mpenza, mpo ete bato nyonso babebisaki nzela na bango na mokili.” (Genese 6:3, 12) ‘Lisumu na bango etondaki.’ Ntango nyonso oyo elekaki esalaki ete bákende tii na nsuka na mposa mabe na bango. Ntango Nzambe apesaki etumbu, moto moko te akokaki komona ye mabe. Bato mwambe mpamba nde bazalaki sembo na miso ya Nzambe, mpe abikisaki bango.
Tozali mpe komona ete asalaki se bongo na Bayisalaele. Atako bizaleli na bango ezalaki sembo te mpe bazalaki kosala makambo ya bosɔtɔ, Nzambe azalaki motema molai epai na bango bambula ebele. Lisolo elobi boye: “[Yehova] . . . atindaki lisusu mpe lisusu . . . bantoma na ye, zambi ayokelaki bato na ye . . . mawa. . . . Kasi bazalaki . . . kotyola maloba na ye mpe kotuka basakoli na ye; nkanda na [Yehova] epelisami liboso na bato na ye, kino akokaki kotika lisusu te.” (2 Ntango 36:15, 16) Etamboli ya bato ebebaki na ndenge oyo ekokaki lisusu kosembolama te. Kaka Yilimia na mwa bato mosusu nde bakokaki kobika. Na nsuka, ntango Nzambe apesaki bato nyonso oyo batika etumbu, moto moko te akokaki koloba ete Nzambe asali mabe.
Ntango ekoki mpo Nzambe apesa etumbu
Bandakisa oyo emonisi biso ete Nzambe azali naino kozela liboso aboma mokili oyo mabe mpo ete ntango na yango ekoka mpenza. Tozali komona likambo yango na maloba oyo Nzambe ayebisaki moto oyo akosalela mpo na kopesa etumbu yango ete: “Tindá likwangola na yo oyo epeli mingi, mpe buká mitó na mbuma na mowiti na mokili, mpo ete mbuma na yango eteli. Anzelu atindi likwangola na ye na mokili, mpe abuki mbuma na mowiti na mokili, mpe abuki mbuma na mowiti na mokili, mpe abwaki yango na ekamelo monene na kongala na Nzambe.” Omoni ete mabe ya bato “eteli,” elingi koloba, ekómi na esika oyo ekoki kosembolama lisusu te. Ntango Nzambe akopesa etumbu, moto moko te akoloba ete Nzambe asali mabe.—Emoniseli 14:18, 19.
Na kotalela makambo oyo touti kolobela, tozali komona polele ete etikali moke Nzambe apesa mokili oyo etumbu mpamba te mokili ekómi na makambo oyo esalaki ete Nzambe apesa bato etumbu na ntango ya kala. Bipai nyonso, mokili etondi na mobulu, se ndenge ezalaki liboso ya Mpela na mikolo ya Noa. Makanisi ya bato ezali se kokóma lokola oyo elobelami na Genese 6:5 ete: “Makanisi nyonso kati na mitema na [bato] izalaki bobele epai na mabe mikolo nyonso.” Ezala masumu minene oyo esalaki ete Nzambe apesa Bakanana etumbu ekómi komonana mingi lelo oyo.
Mingimingi banda Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bato bakómi na makambo ya nsɔmɔ. Mabelé etondi na makila ya bamilio ya bato. Bitumba, koboma bato ya etuluka moko mpo na kosilisa bango (génocide), koboma bato na mobulu, mpe kobuka mibeko, ezali makambo oyo ekómi mingi na mokili mobimba. Nzala, maladi, bakisa mpe misala mabe lokola pite mpe ekobo etondi na mokili. Makambo nyonso oyo tozali komona ezali kolakisa ete tozali na kati ya libota mabe oyo Yesu alobaki ete: “Libota oyo ekoleka te kino ekobima makambo oyo nyonso.” (Matai 24:34) Mokili ezali kotondisa ‘masumu’ na yango. “Mitó na mbuma na mowiti na mokili” ezali kotela mpo bábuka yango.
Ntango ya kosala mosala yango oyo
Bayebisaki ntoma Yoane ete, wana ntango ya kosambisa ekokóma pene, mbuma ekotela na ndenge mibale. Na ngámbo moko, “moto na misala mabe asala mabe naino, mpe moto na mbindo atikala na mbindo naino.” Na ngámbo mosusu, “moyengebene asala boyengebene naino, mpe mopɛtwi atikala pɛto naino.” (Emoniseli 22:10, 11) Likambo ya mibale oyo ezali kosalema wana Batatoli ya Yehova bazali kosala mosala monene ya koteya bato nsango ya Biblia na mokili mobimba. Ntina ya mosala yango ezali koteya bato báyeba makambo oyo Nzambe azali kosɛnga bango mpo atya bango na ngámbo ya bato oyo babongi kozwa bomoi ya seko. Mosala yango ezali sikoyo kosalema na masangá soki 87 000 na mikili 233.
Nzambe azali koumela te. Alakisi motema molai na ye, yango wana apesi bato ntango oyo ekoki mpo ‘bálata bomoto ya sika’ mpe bázala bato oyo babongi kozwa bolamu oyo alaki. (Baefese 4:24, NW) Lelo oyo, Nzambe azali naino kozela, atako makambo ezali se kobeba na mokili. Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bazali kosala nyonso oyo bakoki mpo báteya bazalani na bango boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. (Yoane 17:3, 17) Likambo ya esengo ezali ete mbula na mbula bato koleka 300 000 bazali kondima mateya na bango mpe bazali kozwa batisimo.
Lokola tozali na elikya ya bomoi ya seko, oyo ezali lisusu ntango ya kozela te, kasi ya kosala mosala. Etikali moke, elaka ya Yesu ekokokisama, elaka oyo elobi boye: “Moto na moto oyo azali na bomoi mpe andimi ngai, libela akokufa te.”—Yoane 11:26.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Biblia The Soncino Chumash, ezali na maloba na nse ya lokasa na vɛrsɛ oyo mpe maloba yango elobi boye: “Mpo bázala bato oyo ebongi bábengana bango, mpo Nzambe azelaka naino masumu ya ekólo moko etonda bongo akopesa yango etumbu.”
[Elilingi na lokasa 6]
Bayebisaki mokokisi ya bikateli ya Nzambe ete alekisa likwangola ntango mbuma ya miwiti ya mokili etelaki
[Elilingi na lokasa 7]
Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bazali kosalisa bato bámibongisa mpo bázwa mapamboli ya seko oyo Nzambe akopesa