Mokapo 31
Misala na Jéhovah mizali minene mpe na kokamwa
Emonaneli 10—Emoniseli 15:1 kino 16:21
Teme: Jéhovah kati na temple na ye; mbeki nsambo ya nkanda na ye esopami na mabelé
Eleko na kokokana na yango: Kobanda 1919 kino Armagedon
1, 2. (a) Elembo na misato oyo eyebisami na Yoane ezali kotalela nini? (b) Lokola basaleli na Jéhovah bayebi yango uta kala, na likambo nini baanzelu bazali na mokumba monene na kokokisa?
MASI moko aboti mwana mobali. Dalagona moko monene alingi kolya mwana oyo abotami sika. Bilembo oyo mibale na likoló, oyo bimonisami na lolenge ya kokamwa na Emoniseli mokapo 12, bisalisi biso na kokanga ntina ete ntembe oyo eumeli bambula mingi kati na Libota na mwasi na Nzambe mpe Satana mpe libota na ye na bilimu mabe ekomi na nsuka na yango. Yoane abendi likebi na biso likoló na bilembo yango na kolobaka boye: “Elembo monene emonanaki kati na likoló . . . Elembo mosusu emonani na likoló.” (Emoniseli 12:1, 3, 7-12) Sikawa, ayebisi elembo na misato: “Namonaki elembo mosusu na likoló, elembo monene na kokamwa: baanzelu nsambo na malozi nsambo, na nsuka, mpamba te nkanda na Nzambe ekokisami kati na yango.” (Emoniseli 15:1) Elembo oyo na misato ezali mpe na ndimbola monene mpo na basaleli na Jéhovah.
2 Tomoni ete baanzelu bazali kosala lisusu mosala monene na kokokisama na mokano na Nzambe, ezali yango nde basaleli na Jéhovah bayebi mpenza uta kala. Yango wana, na kalakala, na kopemama na Nzambe mokomi na nzembo alendisaki mpe baanzelu na maloba oyo: “Bosanzola Jéhovah bino baanzelu na ye na likoló, bino boleki na nguya, bino bokotosaka ye, ekoyokaka bino mongongo na ye.” (Nzembo 103:20) Sikawa, na elakiseli oyo ya sika, baanzelu bazwi mosala ya kosopa malozi nsambo ya nsuka.
3. Malozi nsambo ezali nini, mpe kosopama na yango ezali kosakola nini?
3 Malozi yango ezali nini? Lokola kobetama na bakelelo nsambo, ezali bikateli na mpasi oyo bizali komonisa polele makanisi na Jéhovah mpo na biloko mabe ya lelo mpe ezali kosakola makambo oyo makobima mpo na kokokisa bikateli na ye. (Emoniseli 8:1 kino 9:21) Kosopama na malozi yango esakoli kokokisama ya bikateli wana, na ntango oyo Jéhovah akoboma baoyo bazali kopelisa nkanda na ye na mokolo na kongala na ye monene. (Yisaya 13:9-13; Emoniseli 6:16, 17) Na yango, na nzela na malozi oyo, “nkanda na Nzambe ezali kokokisama.” Kasi, liboso ya kolobela kosopama na malozi, Yoane alobeli biso mwa bato oyo babatelami. Bato oyo na sembo, baoyo baboyaki kozwa elembo na nyama na yauli, bazali koyemba makumisi epai na Jéhovah wana ezali bango kosakola mokolo na kobukanisa na ye.—Emoniseli 13:15-17.
Loyembo na Moïse mpe na Mwana na Mpate
4. Likambo nini na kokamwisa limonani sikawa na Yoane?
4 Likambo na kokamwisa limonani sikawa na Yoane: “Namonaki libeke lokola libeke na talatala esili kosangana na mɔ́to, mpe balongi na etumba na nyama mpe na ekeko na ye, mpe na motuya na nkombo na ye, batelemi penepene na libeke na talatala, mpe bazalaki na nzenze na Nzambe.”—Emoniseli 15:2.
5. “Libeke na talatala esili kosangana na mɔ́to” ezali elilingi na nini?
5 “Libeke na talatala” oyo elobelami awa ezali bobele oyo Yoane amonaki liboso na kiti na bokonzi na Nzambe. (Emoniseli 4:6) Ekokani na “esimbelo-na-mai enangwi,” saani monene na mai, oyo ezalaki na kati na temple ya Salomon mpe kati na yango banganga bakokaki kotoka mai mpo na komipetola. (1 Mikonzi 7:23) Ezali bongo elilingi na “kosukola na mai,” yango Liloba na Nzambe, na nzela na yango Yesu apetoli lisangá na bonganga na baklisto bapakolami. (Baefese 5:25, 26; Baebele 10:22) Libeke na talatala yango “esili kosangana na mɔ́to,” yango elimboli ete baklisto bapakolami bamekami mpe bapetolami wana ezali bango kokokisa mitinda mitombwami oyo mityami mpo na bango. Lisusu, likambo yango ekundoli biso ete Liloba na Nzambe ezali na bikateli makasi na Jéhovah likoló na banguna na ye. (Deteronome 9:3; Sofoni 3:8) Mosusu kati na bikateli yango makasi bimonisami polele kati na malozi nsambo ya nsuka oyo etikali moke ekosopama.
6. (a) Bayembi baoyo batelemi liboso na libeke na talatala na likoló bazali banani, mpe ndenge nini toyebi yango? (b) Na ndimbola nini ‘bazali balongi’?
6 Lokola esimbelo-na-mai na temple na Salomon ezalaki bobele mpo na banganga, likambo yango emonisi ete bayembi oyo batelemi liboso na libeke na talatala na likoló bazali kelasi na bonganga. Bazali na “nzenze na Nzambe”; na bongo tokokisi bango na mikóló 24 mpe na ba 144 000, mpamba te bituluku yango mpe bazali koyemba na kobetaka nzenze. (Emoniseli 5:8; 14:2) Bayembi baoyo Yoane amoni “balongi na etumba na nyama mpe na ekeko na ye, mpe na motuya na nkombo na ye.” Esengeli bongo kozala eteni na ba 144 000 baoyo bazali na bomoi na mabelé na boumeli na mikolo na nsuka. Lokola etuluku, bazali solo balongi. Uta 1919, elingi koloba esili koleka mbula pene na 90, baboyi kozwa elembo na nyama na yauli to baboyi kondima ete ekeko na yango nde ezali elikya bobele moko ya kimya mpo na bato. Mingi kati na bango basili koyika mpiko na bosembo kino liwa mpe, sikawa lokola bazali na likoló, ntembe ezali te ete bazali koyoka na esengo mingi loyembo na bandeko na bango baoyo bazali naino na mabelé.—Emoniseli 14:11-13.
7. Nzenze ezalaki na mosala nini na ntango ya kala na Bayisraele, mpe lokola nzenze na Nzambe elobelami na emononeli na Yoane, tosengeli kosala nini?
7 Balongi oyo na sembo bazali na nzenze na Nzambe. Na yango bakokani na Balevite na ntango ya kala baoyo, na temple, bazalaki kosambela Jéhovah na koyembaka mpe kobetaka nzenze. Bamosusu bazalaki kosakola mpe na kobetaka nzenze. (1 Ntango 15:16; 25:1-3) Miziki kitoko na nzenze ezalaki koyeisa banzembo elengi, ezalaki kobongisa mabondeli na nkembo mpe botondi oyo Bayisraele bazalaki kozongisa epai na Jéhovah. (1 Ntango 13:8; Nzembo 33:2; 43:4; 57:7, 8) Na ntango na mpasi to na boombo, mongongo na nzenze mozalaki koyokama te. (Nzembo 137:2) Komonana na nzenze na Nzambe na emononeli na Yoane esengeli kopesa biso nzela na kozela lisusu na motema mɔ́to loyembo na kosanzola mpe na matondi ya esengo mpe na bolongi oyo epesami epai na Nzambe na biso.a
8. Loyembo nini loyembami, mpe maloba na yango nini?
8 Tala oyo Yoane akomi sikawa: “Bayembi loyembo na Moïse, moombo na Nzambe, mpe loyembo na Mwana na Mpate, ete: ‘Misala na yo mizali minene mpe na kokamwa, e Jéhovah Nzambe, Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Banzela na yo ezali sembo mpe na solo, e Mokonzi na seko. Nani akozanga kobanga yo, Jéhovah? Nani akozanga kokumisa nkombo na yo? Yo moko ozali sembo mpe mabota nyonso bakoya kosambela liboso na yo, mpo ete bikateli na yo na sembo bisili komonisama.’”—Emoniseli 15:3, 4.
9. Mpo na nini loyembo yango ebyangami ete “loyembo na Moïse”?
9 Balongi oyo bazali koyemba “loyembo na Moïse,” elingi koloba loyembo ekokani na oyo Moïse ayembaki na mabaku motindo oyo. Nsima wana Bayisraele bamonaki malozi zomi likoló na Ezipito mpe kobomama na mampinga na Baezipito na mai Motane, Moïse akambaki bato na koyemba loyembo na makumisi mpe na bolongi, oyo esakolaki ete: “Jéhovah akozala mokonzi lobiko na lobiko.” (Exode 15:1-19) Yango ebongi mpenza ete, kati na emononeli na Yoane, bayembi baoyo bazali balongi na nyama na yauli mpe bazali kokokisa mokumba monene kati na mosala na kosakola malozi nsambo ya nsuka bayemba mpe mpo na lokumu na “Mokonzi na seko”!—1 Timoté 1:17.
10. Loyembo nini mosusu Moïse abongisaki, mpe na likambo nini verset ya nsuka na loyembo yango ezali kotalela ebele monene lelo?
10 Na loyembo mosusu oyo asalaki wana Bayisraele bazalaki komibongisa mpo na kokamata mokili na Kanana, Moïse, oyo akomaki mobangé, alobaki na libota na Yisraele ete: “Ngai nakosakola nkombo na Jéhovah. Bopesa Nzambe na biso lokumu!” Eteni ya nsuka na loyembo yango ezali mpe kopesa elendiseli epai na baoyo bazali Bayisraele te. Maloba oyo mapemamaki na Nzambe, oyo Moïse asakolaki mazali lelo kosimba mpenza mitema na basangani na ebele monene: “Bosepela bino mabota elongo na libota na ye.” Mpo na nini mabota masengeli kosepela? Ezali mpo ete sikawa Jéhovah “akobukanisa mpo na makila na basaleli na ye, mpe akobukanisa banguna na ye.” Kokokisama na ekateli oyo na sembo ekopesa esengo mingi epai na baoyo nyonso bazali kolikya epai na Jéhovah.—Deteronome 32:3, 43; Baloma 15:10-13; Emoniseli 7:9.
11. Na lolenge nini loyembo oyo Yoane ayokaki ezali ntango nyonso kokokisama?
11 Moïse mbele akokaki kosepela mingi na kozala na bomoi na boumeli na mokolo na Nkolo, mpo na koyemba elongo na bayembi na likoló ete: “Mabota nyonso bakoya kosambela liboso na yo.” Loyembo oyo na kokamwisa elandi kokokana na lolenge kitoko na mikolo na biso; ya solo tozali komona, bobele emononeli te, kasi kokokisama na yango mpenza, bamilio na bato longwa na “mabota” bazali kosopana na esengo nyonso na lisangá ya Jéhovah na mabelé.
12. Mpo na nini loyembo na balongi ebiangami lisusu ete “loyembo na Mwana na Mpate”?
12 Nzokande, loyembo yango ezali bobele oyo ya Moïse te, kasi mpe oyo ya “Mwana na Mpate.” Na ndimbola nini? Moïse azalaki mosakoli na Jéhovah mpo na Bayisraele, kasi asakolaki ye moko ete Jéhovah akotelemisa mosakoli ‘lokola ye.’ Emonanaki ete Mosakoli yango ezalaki nde Mwana na Mpate, Yesu Klisto. Moïse azalaki “moombo na Nzambe,” kasi Yesu azali nde Mwana na Nzambe, Moïse Monene mpenza. (Deteronome 18:15-19; Misala 3:22, 23; Baebele 3:5, 6) Na bongo bayembi bazali mpe koyemba “loyembo ya Mwana na Mpate.”
13. (a) Na ndimbola nini Yesu, atako aleki Moïse, azali mosakoli lokola ye? (b) Ndenge nini tokoki kosangana elongo na bayembi?
13 Lokola Moïse, Yesu akumisaki Jéhovah lokola na nzembo liboso na bato nyonso mpe asakolaki bolongi na Ye likoló na banguna na ye nyonso. (Matai 24:21, 22; 26:30; Luka 19:41-44) Yesu mpe azelaki na motema mɔ́to ntango oyo mabota bakosopana mpo na kokumisa Jéhovah, mpe, ye lokola “Mwana na Mpate na Nzambe” oyo amipesaki ye moko, apesaki bomoi na ye mpo ete likambo yango ekoka kosalama. (Yoane 1:29; Emoniseli 7:9; tala Yisaya 2:2-4; Zakari 8:23.) Lokola mpo na Moïse nkombo na Nzambe ezalaki na ntina mingi mpe akumisaki yango, Yesu mpe alakisaki nkombo yango. (Exode 6:2, 3; Nzembo 90:1, 17; Yoane 17:6) Lokola Jéhovah azali sembo, bilaka na ye na nkembo bikokokisama kozanga ntembe. Na yango, na kosanganaka elongo na bayembi oyo na sembo, Mwana na Mpate mpe Moïse, tondimi solo maloba oyo na loyembo yango: “Nani akozanga kobanga yo, Jéhovah? Nani akozanga kokumisa nkombo na yo?”
Baanzelu bazwi mbeki
14. Banani Yoane amoni babimi na esika eleki bulee, mpe nini epesameli bango?
14 Ebongi ete toyoka loyembo na balongi bapakolami na elimo. Na ntina nini? Mpamba te basakolaki na mabelé bikateli bizwami kati na mbeki yango etondaki na nkanda na Nzambe. Kasi kosopama na mbeki oyo ezali bobele kotalela bato te, mpo ete Yoane alandi lisolo na ye ete: “Na nsima na makambo oyo natalaki, mpe esika eleki bule na hema na litatoli kati na likoló ezipolami polele, mpe baanzelu yango nsambo, baoyo na malozi nsambo, babimi na esika eleki bulee na tempelo, balati bilamba peto na kongenga makasi, mpe bazingami na ntolo na nkamba na wolo. Moko na bikelamu na bomoi minei apesi na baanzelu yango nsambo mbeki na wolo nsambo etondi na nkanda na Nzambe oyo azali na bomoi libela na libela.”—Emoniseli 15:5-7.
15. Mpo na nini ezali likambo na kokamwa te ete baanzelu nsambo babimi na esika eleki bulee?
15 Na eleko na Bayisraele ntango tempelo ezalaki naino, oyo ezalaki na bililingi na makambo ya likoló, bobele nganga monene akokaki koingela kati na “Esika eleki bulee.” (Baebele 9:3, 7) Esika yango ezalaki elilingi na esika moko na likoló, oyo emonisi mpenza ete Jéhovah azali wana. Nzokande na likoló, ezali bobele Nganga Monene Yesu Klisto nde azali na libaku malamu ya kokota liboso na Jéhovah te, kasi baanzelu mpe bazali na libaku yango. (Matai 18:10; Baebele 9:24-26) Na yango ezali kokamwisa te na komona baanzelu nsambo kobima na esika eleki bulee kati na likoló. Jéhovah ye moko nde apesi bango mosala: oyo ya kosopa mbeki etondi na nkanda na Nzambe.—Emoniseli 16:1.
16. (a) Nini emonisi ete baanzelu nsambo bakokisi mpenza masengami mpo na kosala mosala na bango? (b) Nini emonisi ete bato mosusu bazali kosangana na mokumba monene oyo na kosopa mbeki na elilingi?
16 Baanzelu oyo bakokisi mpenza masengami mpo na kosala mosala yango. Balati bilamba na peto mpe na kongenga makasi, yango elimboli ete na elimo, bazali peto mpe basantu, bazali sembo na miso na Jéhovah. Mpe balati nkamba na wolo. Na kala bazalaki kolata nkamba na ntina na kokokisa mosala. (Levitike 8:7, 13; 1 Samwele 2:18; Luka 12:37; Yoane 13:4, 5) Na yango baanzelu balati nkamba na ntolo mpo na kokokisa mosala. Lisusu, nkamba na bango ezali na wolo. Kati na hema na kalakala, wolo ezalaki komonisa biloko na likoló mpe na bonzambe. (Baebele 9:4, 11, 12) Ekoki kolobama ete baanzelu yango bazali na mosala ya motuya, mosala na Nzambe, mpo na kokokisa yango. Basusu bazali mpe kosangana na mokumba oyo monene. Mpamba te, moko na bikelamu na bomoi minei apesi bango mbeki. Ntembe ezali te ete ezali wana ekelamu na bomoi ya liboso, oyo azali na lolenge na nkosi, oyo ezali elilingi na molende mpe na mpiko esengeli mpo na kosakola bikateli na Jéhovah.—Emoniseli 4:7.
Jéhovah kati na temple na ye
17. Yoane ayebisi biso nini mpo na temple, mpe yango ezali kokundola biso nini na kotalela esika eleki bulee na ntango na kala na Yisraele?
17 Na nsuka, mpo na kosilisa eteni oyo na emononeli, Yoane ayebisi biso ete: “Tempelo etondaki na milinga mpo na nkembo na Nzambe mpe na nguya na ye, moto te akokaki kokota na tempelo kino malozi yango nsambo, oyo na baanzelu yango nsambo, makosila.” (Emoniseli 15:8) Na mabaku mosusu na lisolo na Bayisraele, lipata ezipaki tempelo mpe komonana oyo na nkembo na Jéhovah epekisaki banganga kokota na esika ya bulee. (1 Mikonzi 8:10, 11; 2 Ntango 5:13, 14; tala Yisaya 6:4, 5.) Ezalaki na mikolo oyo Jéhovah azalaki kotalela mpenza makambo mazalaki koleka awa na mabelé.
18. Ntango nini baanzelu nsambo bakozonga liboso na Jéhovah mpo na kopesa ye rapport?
18 Lisusu Jéhovah azali kotalela penepene makambo oyo mazali kosalama lelo na mabelé. Alingi ete baanzelu nsambo bakokisa mosala na bango. Tozali kobika mpenza na eleko ya lisambisi ndenge ekomami na Nzembo 11:4-6 ete: “Jéhovah azali kati na temple na ye na bulee. Kiti na efandelo na Jéhovah ezali na makoló. Miso na ye makotalaka mpe ntoko na ye ekomekaka bana na bato. Jéhovah ye moko akomeka moyengebene mpe moto mabe; molimo na ye eyini ye oyo alingi mobulu. Akonokisa likoló na bato mabe mitambo, móto mpe sufulu mpe mopepe na kozikisa: eteni na kopo na bango.” Baanzelu nsambo bakozonga liboso na nkembo na Jéhovah te kino bakosilisa kosopa malozi nsambo likoló na bato mabe.
19. (a) Etinda nini epesami, mpe nani apesi yango? (b) Ntango nini kosopama na mbeki na elilingi ebandaki?
19 Etinda na nsomo epesami: “Nayokaki mongongo makasi kobima na tempelo koloba na baanzelu nsambo ete: ‘Bokenda na bino kosopa mbeki yango nsambo na nkanda na Nzambe na mokili.’” (Emoniseli 16:1) Nani apesi etinda yango? Esengeli kozala Jéhovah ye moko, mpamba te kotonda na nkembo na ye mpe na nguya na ye epekisi moto nyonso kokota na esika eleki bulee. Jéhovah akotaki na temple na ye na elimo na 1918 mpo na kobanda kosambisa. (Malaki 3:1-5) Esengeli bongo kozala mwa nsima moke na date yango nde apesaki etinda ya kosopa mbeki ya nkanda na Nzambe. Ya solo, bikateli oyo bizali na kati na mbeki na elilingi bibandaki kosakolama na makasi na 1922, mpe kosakolama na yango ezali lelo kosalama na nguya mingi lisusu.
Mbeki mpe kobetama na bakelelo
20. Mbeki na nkanda na Jéhovah ezali komonisa polele mpe kosakola makambo nini, mpe ndenge nini ezali kosopama?
20 Mbeki na nkanda na Nzambe ezali komonisa polele makambo oyo mazali koleka na mokili ndenge Jéhovah azali komonela yango, mpe ezali kosakola bikateli oyo akozwa. Baanzelu bazali kosopa mbeki na nzela na lisangá ya baklisto bapakolami baoyo bazali na mabelé, baoyo bazali koyemba loyembo na Moïse mpe loyembo na Mwana na Mpate. Na kosakóláká Bokonzi lokola nsango malamu, kelasi na Yoane bamonisaki na molende nyonso makambo mazali kati na mbeki na nkanda. (Matai 24:14; Emoniseli 14:6, 7) Nsango na bango ezali na lolenge mibale, ezali ya kimya mpo ete ezali kosakola bonsomi epai na bato, kasi mpe ezali ya etumba mpamba te ezali kosakola “mokolo na kobukanisa na Nzambe na biso.”—Yisaya 61:1, 2.
21. Na makambo nini mbeki minei na liboso na nkanda na Nzambe makokani na kobetama na bakelelo minei ya liboso, kasi ekeseni na makambo nini?
21 Bisika likoló na yango mbeki minei ya liboso na nkanda na Nzambe ezali kosopama ekokani na bisika na kobetama na bakelelo minei na liboso, ezali bongo, mokili, mai monene, bibale mpe mitó na mai, mpe myoto nyonso na likoló. (Emoniseli 8:1-12) Kasi kobetama na bakelelo esakolaki malozi oyo masengelaki kokwea likoló na “ndambo na misato,” nzokande kosopama ya mbeki na nkanda na Nzambe ezali kobeta yango nyonso. Na yango, wana boklisto na mokili oyo, “ndambo na misato,” ezalaki eteni ya liboso mpo na komona mpasi na malozi yango na boumeli na mokolo na Nkolo, nzokande eteni moko te na ebongiseli na Satana ebatelamaki na bikateli na Jéhovah oyo bizali koswa bango mpe kookisa bango bwale.
22. Nini esalaki ete kobetama na bakelelo misato na nsuka ezali na bokeseni, nzokande na makambo nini ezali na boyokani na mbeki misato na nsuka na nkanda na Jéhovah?
22 Kobetama na bakelelo misato ya nsuka ekesanaki, mpamba te ebyangamaki mawa. (Emoniseli 8:13; 9:12) Mawa mibale ya liboso ezalaki mingimingi na lolenge ya mayoyo mpe na mampinga na bampunda, kasi mawa ya misato esukaki na kobotama na Bokonzi na Jéhovah. (Emoniseli 9:1-21; 11:15-19) Lokola tokomona yango, mbeki misato ya nsuka ya nkanda na Nzambe ezali mpe na makambo mosusu makokani na oyo wana, kasi makeseni mwa moke na mawa misato yango. Totya sikawa likebi mingi na bimoniseli na ntina oyo bikobima ntango mbeki na nkanda na Nzambe ezali kosopama.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na 1921 kelasi na Yoane ebimisaki mokanda moko mpo na boyekoli na Biblia oyo ezalaki na titre La Harpe de Dieu. Mokanda yango ebimisamaki koleka motango ya milió mitano mpe na minoko koleka 20. Mosalisaki mpo na bokoli na motuya na bayembi bapakolami.