Mokapo 6
Libombami mosantu elimbolami
1. Na kotalela makambo mayebisami na Emoniseli 1:10-17, mayoki na biso masengeli kozala ndenge nini?
YA SOLO, emonaneli na Yesu akembisami ezali ekamwiseli monene mingi! Soki tozalaki na esika moko na ntoma Yoane ntango amonaki yango, mbele biso mpe tokamwaki mingi na nkembo oyo makasi, mpe mbele tokweaki na nse lokola ntoma Yoane. (Emoniseli 1:10-17) Emonaneli oyo ya kokamwa epemamaki na Nzambe ebatelamaki mpo na kolendisa biso. Lokola Yoane tosengeli komikitisa mpe kozala na botondi mpo na nyonso elakisami na emonaneli yango. Tika ete tomonisa ntango nyonso limemya mozindo epai na Yesu oyo azali Mokonzi, Nganga Monene mpe Mosambisi!—Bafilipi 2:5-11.
“Moto na Liboso mpe Moto na Nsuka”
2. (a) Yesu amibimisi na titre nini? (b) Ndenge nini tosengeli kokanga ntina na maloba oyo ya Jéhovah: “Ngai nazali oyo na liboso mpe ngai nazali oyo na nsuka”? (c) Titre “Moto na Liboso mpe Moto na Nsuka” oyo epesami na Yesu ezali mpenzampenza mpo na likambo nini?
2 Kasi kobanga mpe limemya oyo tosengeli kooka, ekoki te ete ebongwana nsomo ya kufa. Yesu akitisaki motema na ntoma Yoane, lokola alobi yango ye moko: “Nde atieli ngai loboko na ye na mobali, mpe alobi ete, Banga te, ngai Moto na Liboso, mpe Moto na Nsuka, mpe moto na bomoi.” (Emoniseli 1:17b, 18a) Na Yisaya 44:6, Jéhovah amonisi etelemelo na ye ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-nyonso, Nzambe bobele moko, wana elobaki ye ete: “Ngai nazali oyo na liboso mpe ngai nazali oyo na nsuka, Nzambe mosusu azali te, bobele ngai.”a Awa Yesu amilakisi ete azali “Moto na Liboso mpe Moto na Nsuka,” elingi koloba te ete aluki kokokana na Jéhovah, Mozalisi monene. Azali nde kosalela titre oyo Nzambe ye moko apesaki ye. Na Yisaya, Jéhovah alakisi etelemelo na Ye ya Nzambe ya solo bobele moko. Azali Nzambe ya seko, mpe longola ye Nzambe mosusu mpenza azali te. (1 Timote 1:17) Kati na Emoniseli, Yesu asaleli titre oyo epesamelaki ye, komonisaka polele ete lisekwa na ye ekokani na oyo ya moto mosusu te.
3. (a) Elimboli nini ete Yesu azalaki “Moto na Liboso mpe Moto na Nsuka”? (b) Elimboli nini ete Yesu azali na “mafungola ya kufa mpe ya Hadès”?
3 Ya solo, Yesu azalaki “Moto na Liboso” asekwisamaki mpo na bomoi ya elimo bokoki kosuka te. (Bakolose 1:18) Mpe azali “Moto na Nsuka” asekwisami na Jéhovah ye moko. Na motindo yango, akomi “moto na bomoi, . . . oyo azali na bomoi libela na libela.” Akoki kokufa lisusu te. Na yango, akokani na Tata na ye oyo akoki kokufa te, mpe abengami ete “Nzambe na bomoi.” (Emoniseli 7:2; Nzembo 42:2) Mpo na bato nyonso mosusu, Yesu azali “lisekwa mpe bomoi.” (Yoane 11:25) Yango wana alobaki na Yoane: “Nakufaki, nde nazali na bomoi libela na libela. Nazali na mafungola na kufa mpe na Hadès.” (Emoniseli 1:18b) Jéhovah asili kopesa ye nguya ya kosekwisa bakufi. Yango wana Yesu akoki koloba ete azali na mafungola ya kofungola na yango bizibeli mpo na bato oyo kufa mpe Hadès (liyita) esimbi bango lokola baombo na bango.—Tala Matai 16:18.
4. Etinda nini Yesu azongeli yango lisusu, mpe mpo na litomba ya nani?
4 Na nsima Yesu apesi lisusu etinda ete emonaneli ekomama, wana elobaki ye na Yoane ete: “Na bongo, koma makambo mamoni yo, makambo mazali, mpe makambo makobima na nsima na oyo.” (Emoniseli 1:19) Bimonaneli mosusu nini Yoane akomonisa biso mpo na koteya biso?
Myoto mpe bitemelo na miinda
5. Engebene Yesu, “myoto nsambo” ezali nini, mpe “bitemelo na miinda nsambo” ezali nini?
5 Yoane amoni Yesu katikati na bitemelo na miinda nsambo ya wolo, mpe azali na myoto nsambo kati na loboko na ye ya mobali. (Emoniseli 1:12, 13, 16) Na nsima Yesu alimboli: “Mpo na libombami na myoto yango nsambo mimonaki yo na loboko na ngai ya mobali, mpe na bitemelo na miinda yango na wolo nsambo, ntina na yango oyo: myoto yango nsambo mizali baanzelu na masangá yango nsambo, mpe bitemelo na miinda yango nsambo bizali masanga nsambo.”—Emoniseli 1:20.
6. Myoto nsambo elakisi nini, mpe mpo na nini nsango etindami epai na bango?
6 “Myoto” ezali “baanzelu na masangá nsambo.” Kati na Emoniseli, myoto elakisaka mbala mosusu baanzelu mpenza, kasi awa tokoki koloba te ete Yesu asalelaki moto lokola sekretere mpo na kokomela bikelamu ya elimo bizangi komonana na miso na bato. Na yango, “myoto” ezali nde bakengeli to bankulutu kati na masangá, batalelami lokola bamemi na nsango na Yesu.b Nsango etindami na myoto, mpamba te bango bazwi mokumba ya kokengela etonga ya Jéhovah.—Misala 20:28.
7. (a) Lokola Yesu alobi na anzelu moko na lisangá mokomoko elimboli ete nkulutu azali bobele moko na lisangá nyonso? (b) Banani balakisami bongo na myoto nsambo kati na loboko mobali na Yesu?
7 Lokola Yesu azali koloba se na “anzelu” moko na lisangá mokomoko, elingi koloba ete nkulutu azali se moko na lisangá mokomoko? Te. Uta eleko ya Paulo, lisangá ya Efese ezalaki na bankulutu mingi. (Emoniseli 2:1; Misala 20:17) Na motindo yango, na mikolo na Yoane, wana nsango etindamaki na myoto nsambo mpo ekoka kotangama na masangá (bakisa oyo ya Efese), myoto mizalaki elilingi na maboke ya bankulutu kati na lisangá ya Jéhovah epakolami. Bobele bongo lelo, bankulutu na lisangá mokomoko batangelaka bandeko na bango mikanda oyo bazwaka uta na Collège central esalami na bakengeli bapakolami, oyo bazali kosalaka mosala na bango na nse na bokonzi na Yesu. Liboke nyonso ya bankulutu basengeli komindimisa ete toli ya Yesu ezali kosalelama kati na lisangá na bango. Solo, toli oyo ezali litomba mpo na basangani nyonso na lisangá, nde bobele na bankulutu te.—Tala Emoniseli 2:11a.
8. Likambo oyo ete bankulutu bazali kati na loboko mobali na Yesu elimboli nini?
8 Lokola Yesu azali Mokonzi ya lisangá, tokoki solo koloba ete bankulutu bazali kati na loboko na ye ya mobali, elingi koloba na nse na bokonzi na ye mpe batambwisami na ye. (Bakolose 1:18) Azali Mobateli-na-Mpate Mokonzi, mpe bankulutu bazali babateli-na-mpate-balandi.—1 Petelo 5:2-4.
9. (a) Bitemeli na miinda nsambo elakisi nini, mpe mpo na nini ezali wana elembo ebongi? (b) Emonaneli oyo boye ekundolaki nini epai na ntoma Yoane?
9 Bitemelo na miinda nsambo ezali masangá nsambo epai Yoane atindi mokanda ya Emoniseli: na Efese, na Sumuluna, na Pelegame, na Tiyatire, na Saladesi, na Filadelefi mpe na Laodikia. Mpo na nini masangá malakisami na bitemelo na miinda? Mpamba te baklisto, mokomoko to lisangá mobimba, basengeli ‘kongengisa pole na bango liboso na bato’ kati na mokili oyo ezali na molili. (Matai 5:14-16) Tokundoli mpe ete bitemelo na miinda bizalaki kati na temple ya Salomo. Ebengeli oyo ya bitemelo na miinda epesamaki na masangá ekokaki kokundola na Yoane ete, na elobeli ya elilingi, lisangá mokomoko ya baklisto bapakolami ezali “temple ya Nzambe,” epai elimo na Nzambe efandi. (1 Bakolinti 3:16) Epai mosusu, mpo na kokokisa elilingi ezalaki na temple ya Bayuda, lisangá ya bapakolami bazali “banganga na bokonzi” kati na temple monene ya Jéhovah na elimo, epai kuna Yesu azali Nganga Monene, mpe Jéhovah ye mpenza afandi wana kati na Esika-Eleki-Bosantu na likoló.—1 Petelo 2:4, 5, 9; Baebele 3:1; 6:20; 9:9-14, 24.
Lipengwi monene
10. Na mobu 70 ya ntango na biso, eloko nini ekomelaki ebongiseli ya Bayuda, mpe nini ekomelaki Bayuda bazangi kobongola motema oyo bazalaki kosimba ebongiseli yango?
10 Ntango Yoane akomaki Emoniseli, boklisto esilaki koumela koleka bambula 60. Na ebandeli, Bayuda batemelaki yango makasi bambula 40 kasi boklisto elongaki. Na nsima, libota ya Bayuda ebomamaki na mobu 70 ya ntango na biso, wana Bayuda bazangi kobongola motema bazalaki lisusu na ekolo te mpe na temple lisusu te kuna na Yelusaleme, temple oyo bazalaki kotalela yango lokola ekeko na bango mpo na kosambela.
11. Mpo na nini ntango ebongaki mpo na Mobateli-na-Mpate mokonzi ete akebisa masangá mpo na bizaleli mabe oyo bibandaki komonana?
11 Nzokande, ntoma Paulo asakolaki ete lipengwi ekozala kati na baklisto bapakolami, mpe nsango oyo Yesu atindaki emonisi ete na bobange ya Yoane lipengwi yango ebandaki komonana. Yoane azalaki moto ya nsuka kati na baoyo bazalaki lokola epekiseli mpo na Satana oyo azalaki koluka kobebisa libota ya mwasi. (2 Batesalonike 2:3-12; 2 Petelo 2:1-3; 2 Yoane 7-11) Ntango ekokaki bongo mpo na Mobateli-na-Mpate Mokonzi oyo Jéhovah aponaki, ete akomela bankulutu ya masangá, mpo na kokebisa bango na lipengwi oyo ezalaki kokola, mpe koyikisa mpiko na baklisto ya motema sembo ete batelema ngwi mpo na boyengebene.
12. (a) Ndenge nini lipengwi ekolaki na boumeli ya bikeke oyo bilandaki kufa na Yoane? (b) Ndenge nini boklisto ya mokili oyo ebimaki?
12 Toyebi te motindo nini masangá eyambaki nsango oyo Yesu atindelaki bango na mobu 96 ya ntango na biso. Kasi, toyebi ete lipengwi ekolaki noki nsima na kufa na Yoane. Baoyo bazalaki komibenga ete “baklisto” batikaki kosalela nkombo ya Jéhovah mpe bakomaki kosalela batitre “Nkolo” mpe “Nzambe” kati na Biblia. Na ekeke ya minei, liteya ya lokuta ya la Trinité ekotisamaki kati na masangá. Bobele na ntango yango, liteya ya molimo ekufaka te endimamaki. Mpo na kosukisa, mokonzi ya Loma Kostanté asalaki ete Leta andima lingomba ya “boklisto” mpe yango esalaki ete mangomba ya boklisto ekola mpe kati na yango Lingomba mpe Leta basangisaki makasi na bango mpo na koyangela na boumeli ya mbula nkoto. Ezalaki lisusu mpasi te ya kokoma “moklisto” na motindo wana ya sika. Bikolo mobimba bikotaki kati na Lingomba elongo na bindimeli na bango ya bopakano. Bakonzi mingi ya boklisto ya mokili oyo bakomaki bakonzi mabe ya politike, kondimisaka mateya na bango ya lokuta na mopanga.
13. Atako Yesu akebisaki masangá mpo na mikabwano to basekte, nzokande ezalela ya baklisto bapengwi ezalaki nini?
13 Maloba oyo Yesu atindaki epai na masangá nsambo matosamaki te epai na baklisto bapengwi. Yesu apesaki toli epai ya Baefese ete bazongela bolingo bozalaki na bango na ebandeli. (Emoniseli 2:4) Kasi basangani na boklisto ya mokili oyo, bazalaki lisusu na bomoko te na bolingo na Jéhovah, bayinanaki, babundaki mpe banyokolanaki na motindo ya nsomo. (1 Yoane 4:20) Yesu akebisaki lisangá ya Pelegame mpo na mikabwano. Nzokande, yango ebimaki uta ekeke ya mibale; lelo oyo boklisto ya mokili ekabwani mpe ezali na bankoto ya mangomba mikemike mpe mangomba minene oyo ezali na boyokani te kati na yango.—Emoniseli 2:15.
14. (a) Ezalela nini baklisto ya nkombo mpamba bakamataki atako Yesu akebisaki masangá ete ezali likama kozala mokufi na elimo? (b) Motindo nini baklisto ya nkombo mpamba bazangi kotosa likebisi ya Yesu na ntina na losambo ya bikeko mpe pite?
14 Yesu akebisaki lisangá ya Saladesi mpo na likama ya kozala mokufi na elimo. (Emoniseli 3:1) Lokola baoyo na Saladesi, baklisto ya nkombo mpamba batikaki noki misala ya boklisto, mpe mosika te batikelaki bobele bakonzi na mangomba oyo bazwaka lifuti, mosala ya kosakola, oyo ezali mosala ya ntina mingi. Yesu akebisaki lisangá ya Tiyatire mpo na losambo ya bikeko mpe pite. (Emoniseli 2:20) Nzokande, boklisto ya mokili oyo endimaki polele losambo ya bikeko mpe etikaki nzela mpo na bokoli ya nationalisme (bolingo makasi mpo na ekolo) mpe matérialisme (mposa makasi ya bozwi), mitindo misusu ya losambo na bikeko mizangi komonisama polele. Mpo na oyo etali pite, atako ntango mosusu bakweisaki yango, nzokande mingimingi bazalaka nde kotikela yango nzela mpenza.
15. Nsango oyo Yesu atindaki na masangá nsambo emonisi nini mpo na mangomba ya boklisto ya mokili oyo, mpe bakonzi na mangomba yango bazali komonisa nani?
15 Na yango, nsango ya Yesu epai na masangá nsambo emonisi kokwea mpenza ya mangomba nyonso ya boklisto ya mokili oyo; elongi ata moke te kokokisa masengami mpo na kozala libota ya Jéhovah mpenza. Solo, bakonzi ya mangomba ya boklisto ya mokili oyo bazali bato ya liboso kati na libota na Satana. Kokokisaka bango na “motioli na mibeko,” ntoma Paulo asakolaki ete koya na ye “ekozala mpo na mosala na Satana, mosala na nguya nyonso mpe na bilembo mpe na bikamwiseli na lokuta, mpe na bizimbiseli nyonso na mabe.”—2 Batesalonike 2:9, 10.
16. (a) Bakonzi na mangomba na boklisto ya mokili oyo bazali koyina nani mpenzampenza? (b) Makambo nini masalemaki na kati na boklisto ya mokili oyo na eleko ebengami Moyen Age? (c) Kobima ya ba Protestá ememaki libongwani na boklisto ya kopengwa?
16 Atako bamibengaki ete bazali babateli na mpate na etonga ya Nzambe, bakonzi kati na mikili ya boklisto ya mokili oyo, ezala bakonzi na mangomba soko mpe baoyo ya Leta, bayinaki makasi bato oyo bazalaki kolakisa bato Biblia to komonisa mateya ya lokuta oyo mazwami na Biblia te. Jean Hus mpe William Tyndale, oyo abongolaki Biblia, banyokwamaki mpe babomamaki. Na boumeli ya eleko ya molili na Moyen Age, lipengwi ekolaki makasi mpenza mpo ete bakatolike babandaki kosalela Inquisition (kosambisa mpe koboma bato oyo bandimaki mateya ya katolike te). Likambo oyo ekokaki kouta bobele na Diable. Moto nyonso oyo azalaki koboya mateya mpe bokonzi ya Lingomba ya katolike azalaki kozwa etumbu makasi na mawa te, mpe na motindo yango, bankoto na bankoto na bato oyo babengamaki mpamba ete bapengwi banyokwamaki makasi to batumbamaki na móto. Na motindo yango, Satana azalaki kosala nyonso mpo ete libota ya solo ya mwasi to lisangá ya Nzambe ebima te kasi enyatama nokinoki. Ntango Protestá ebimaki (kobanda na mobu 1517), Mangomba mingi ya misioni to protestá balandaki se ezaleli oyo ya konyokola mpe koboma bato oyo bandimaki mateya na bango te. Bango mpe bakumbaki nyongo ya makila mingi na kobomaka bato oyo balukaki kozala sembo epai na Nzambe mpe epai na Klisto. Solo, “makila na basantu” mingi masopamaki.—Emoniseli 16:6; Tala Matai 23:33-36.
“Libota” eyiki mpiko na mimekamo
17. (a) Lisese oyo Yesu apesaki na ntina na mbuma malamu mpe matiti mabe esakolaki nini? (b) Eloko nini esalemaki na 1918? Nani abwakamaki mpe nani atyamaki na mosala?
17 Kati na lisese na ye ya mbuma malamu mpe matiti mabe, Yesu asakolaki ete eleko ya molili ekoya, na boumeli na yango boklisto ya mokili oyo esalaki nyonso elingaki ye. Kasi na boumeli na bikeke ya lipengwi, baklisto mokomoko bakokani na mbuma malamu, bapakolami ya solo bazalaki. (Matai 13:24-29, 36-43) Na motindo yango, wana mokolo ya Nkolo ebandaki na Octobre 1914, baklisto ya solo bazalaki awa na mabelé. (Emoniseli 1:10) Emonanaka ete Jéhovah ayaki na temple na ye ya elimo na 1918, elingi koloba mbula misato na ndambo nsima na 1914, mpo na kosambisa baoyo bazalaki kosambela wana, mpe Yesu “ntoma na kondimana na ye,” ayaki na ye elongo. (Malaki 3:1; Matai 13:47-50) Ntango ekokaki mpo na Nkolo ete abwaka baklisto ya lokuta mpe atya ‘moombo na sembo mpe na mayele likoló na bozwi na ye nyonso.’—Matai 7:22, 23; 24:45-47.
18. “Ntango” nini ekokaki na 1914, mpe ebongaki na moombo kosala nini na ntango yango?
18 Lisusu ntango ekokaki mpo na moombo yango ete atya likebi mpenza likoló na nsango oyo Yesu atindelaki masangá nsambo, mpe yango moko nsango emonisi ete esengelaki kozala bongo. Na ndakisa, Yesu alobeli koya na ye mpo na kosambisa masangá, kosambisa oyo ebandaki na 1918. (Emoniseli 2:5, 16, 22, 23; 3:3) Alobaki ete akobatela lisangá ya Filadelefi na “ntango na komekama oyo elingi kobimela mokili mobimba.” (Emoniseli 3:10, 11) ‘Ntango na komekama’ wana eyaki na ebandeli na mokolo na Nkolo na 1914, nsima na yango baklisto bamekamaki mpo na oyo etali bosembo na bango na Bokonzi na Nzambe oyo eutaki kosalema.—Tala Matai 24:3, 9-13.
19. (a) Masangá nsambo mazali lelo elilingi ya nini? (b) Ebele nini eyei kobakama na baklisto bapakolami, mpe mpo na nini toli ya Yesu mpe makambo ayebisi etali mpe bango? (c) Ndenge nini tosengeli kotalela makambo oyo Yesu alobaki epai na masangá nsambo na ekeke ya liboso?
19 Yango wana nsango oyo Yesu atindaki na masangá ezwaki kokokisama na yango monene uta 1914. Masangá nsambo mazali elilingi na masangá nyonso na baklisto bapakolami na mokolo na Nkolo. Epai mosusu, na boumeli ya bambula koleka 50 oyo eleki, baklisto bapakolami, oyo Yoane azalaki momonisi na bango, bazali lisusu bango moko te; ebele monene ya bandimi eyei kobakama na bango, oyo elikya na bango ezali bomoi ya seko kati na Paradis na mabelé. Toli oyo ya Yesu Klisto akembisami mpe makambo akutaki kati na masangá nsambo ntango ayaki kotala yango, nyonso wana etali mpe bandimi yango, mpamba te masengami ya boyengebene mpe ya bosembo ezali ndenge moko mpo na basaleli nyonso ya Jéhovah. (Exode 12:49; Bakolose 3:11) Na yango, makambo oyo Yesu alobaki epai na masangá nsambo na Asie Mineure na ekeke ya liboso ezali bobele makambo maleka te. Elimboli bomoi to kufa mpo na mokomoko na biso. Na yango, totya likebi mpenza na maloba na Yesu.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na Hébreu ya kala, kati na Yisaya 44:6 article défini moko te ekangani na maloba “liboso” mpe “nsima”; nzokande article défini ezali kati na ndimbola oyo Yesu azali kopesa na ntina na ye na greke ya kala, na Emoniseli 1:17. Na bongo, soko tolandi grammaire, Emoniseli 1:17, ezali kolobela titre moko ya Yesu, nzokande Yisaya 44:6 ezali komonisa nde Bonzambe ya Jéhovah.
b Liloba na greke agʹgé·los (tanga boye: “anʹge·los”) elimboli “ntoma” (messager) mpe lisusu “anzelu.” Na Malaki 2:7, nganga nzambe moko Molevite abengami “ntoma” (messager) (hébreu mal·’akhʹ)—Tala Traduction du monde nouveau, ebimeli na Lingelisi oyo ezali na mitindami, maloba na nse na lokasa.
[Etanda na lokasa 32]
Ntango ya koyongolama mpe ya kosambisama
Yesu abatisamaki mpe apakolamaki mpo na kokoma Mokonzi, na ebale Yordani na Octobre ya mobu 29 ya ntango na biso. Mbula misato na ndambo na nsima, na mobu 33, ayaki na temple ya Yelusaleme mpe abenganaki baoyo bakomisaki yango ebombamelo na miyibi. Kokokana ezali kati na makambo yango mpe eleko ya mbula misato na ndambo oyo ebandaki na Octobre 1914, ntango Yesu akomaki mokonzi na makoló, mpe esukaki ntango ayaki mpo na kotala baoyo bazalaki komibenga baklisto, mpamba te kosambisama ebandaki na ndako na Nzambe. (Matai 21:12, 13; 1 Petelo 4:17) Na ebandeli na 1918, mosala ya Bokonzi oyo esalamaki na libota na Jéhovah ekutanaki na botemeli monene. Ezalaki ntango ya komekama kati na mokili mobimba, mpe baoyo bazalaki na bobangi bayongolamaki. Na Mai 1918, bakonzi na mangomba na boklisto na mokili basalaki mayele mabe mpo na kokangisa bamoko kati na bamonisi ya la Société Watch Tower, kasi sanza libwa na nsima, batikaki bango. Na nsima, balongolaki bifundeli ya lokuta nyonso oyo bafundaki bango na yango. Kobanda 1919, lisangá ya libota na Nzambe, oyo eyongolamaki mpe epetolamaki, ebandaki kosakola na molende nyonso Bokonzi na Jéhovah mpe na Klisto lokola elikya bobele moko mpo na mokili.—Malaki 3:1-3.
Ntango Yesu abandaki kotala na 1918, na ntembe te bakonzi na mokili basambisamaki mpe bakweisamaki. Bango nde babandisaki monyoko ya libota na Nzambe, kasi lisusu bamikotisaki na nyongo monene ya makila na kopesaka maboko na mikili oyo ebundaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. (Emoniseli 18:21, 24) Bakonzi yango ya mangomba batyaki elikya na bango na Lisangá ya Mabota, eloko oyo esalamaki na bato. Lokola lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili, boklisto ya mokili oyo ebwakamaki libela longwa na miso na Nzambe uta 1919.
[Karte na lokasa 28, 29]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
EFESE
SUMULUNA
PELEGAME
TIYATIRE
SALADESI
FILADELEFI
LAODIKIA
[Bililingi na lokasa 31]
Mangomba ya boklisto ya mokili bamikotisaki na nyongo monene ya makila na ndenge banyokolaki mpe babomaki baoyo bazalaki kobongola Biblia, kotanga yango to baoyo bazalaki na Biblia