-
Tóbatela bomoto na biso ya boklistoLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2005 | 15 Sanza ya 2
-
-
4. Yesu alobaki nini oyo ezali komonisa ete ezali na ntina mingi tóbatela bomoto na biso ya boklisto?
4 Kasi, lokola tozali basaleli ya Yehova oyo bamipesi, toyebi ete ekozala likama mpo na mokomoko na biso, elenge to mokóló, soki abosani bomoto na ye ya boklisto. Kaka mitinda ya Yehova mpe makambo oyo azali kosɛnga biso nde emonisaka bomoto ya solo ya boklisto. Ebongi ezala bongo mpamba te Nzambe akelá biso na elilingi na ye. (Genese 1:26; Mika 6:8) Biblia ezali kokokanisa bomoto na biso ya boklisto na bilamba oyo, ntango tolati yango, bato nyonso bazali komona yango. Mpo na ntango na biso, Yesu alobaki boye: “Talá! Nazali koya lokola moyibi. Esengo na moto oyo azali ekɛngɛ mpe azali kobatela bilamba na ye ya likoló, mpo atambola bolumbu te mpe bátala nsɔni na ye te.”a (Emoniseli 16:15) Tótika te ete mokili ya Satana ebebisa bizaleli mpe etamboli na biso ya baklisto. Soki te, tokobungisa “bilamba” na biso. Likambo ya ndenge wana ekozala mawa mpe nsɔni mingi.
-
-
Tóbatela bomoto na biso ya boklistoLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2005 | 15 Sanza ya 2
-
-
a Maloba yango ezali kotinda biso tókanisa mosala ya kapita ya ngomba ya tempelo na Yelusaleme. Kapita yango azalaki kotambola na tempelo mpo na kotala soki Balevi oyo bazalaki kokɛngɛla na butu bazali mpenza kosala to nde balali mpɔngi. Soki akuti mokɛngɛli azali kolala, bazalaki kobɛta ye fimbo mpe bakokaki kolongola ye bilamba mpe kotumba yango mpo ayoka nsɔni.
-