Mokapo 33
Ekateli ezwami likoló na mwasi na pite mpe na mbindo makasi
Emonaneli 11—Emoniseli 17:1-18
Teme: Babilone Monene afandi likoló na nyama na yauli na langi motane oyo, na nsima abalukeli ye mpe abomi ye
Eleko na kokokana na yango: Uta 1919 kino bolozi monene
1. Eloko nini moko kati na baanzelu nsambo alakisi sikawa epai na Yoane?
ESENGELI ete nkanda na sembo ya Jéhovah esopama nyonso, elingi koloba mbeki nsambo ya nkanda ya Nzambe! Ntango anzelu ya motoba asopaki mbeki na ye na esika ezaláká kala mboka Babilone, yango elakisaki mpenza mpasi esopami likoló na Babilone Monene, wana makambo mazali kolandana nokinoki mpo na kosuka kino na etumba ya nsuka: Armagedon. (Emoniseli 16:1, 12, 16) Emonani lokola ete ezali se anzelu moko wana ayebisi sikawa mpo na nini mpe ndenge nini Jéhovah azali kokokisa bikateli na ye. Yoane akamwi na makambo oyo ayoki mpe amoni na nsima: “Moko na baanzelu yango nsambo, baoyo bazalaki na mbeki yango nsambo, ayei kosolola na ngai ete, Yaka, nakotalisa yo ekateli ekatameli mwasi monene na pite, oyo afandi na mai mingi, oyo bakonzi na mokili basali na ye pite, mpe bafandi na mokili balangwi vinyo na pite na ye.”—Emoniseli 17:1, 2.
2. Nini emonisi ete “mwasi monene na pite” (a) ezali Loma ya kala te? (b) ezali ebongiseli ya mombongo te? (c) ezali nde lisangá ya mangomba ya losambo?
2 “Mwasi monene na pite”! Mpo na nini liloba makasi boye? Mwasi yango nani? Bamosusu balobaki ete mwasi na pite wana na elilingi ezali Loma ya kala. Kasi Loma ezalaki bokonzi na politike. Nzokande mwasi oyo azali kosalaka pite elongo na bakonzi na mokili, na ntembe te bakonzi na Loma bazali mpe wana na kati. Lisusu, elobami ete nsima na kobomama na ye “bakonzi na mokili” bakolela ye. Ezali polele ete mwasi yango ezali bokonzi na politike te. (Emoniseli 18:9, 10) Bato na mombongo bakolela mpe ye; wana emonisi ete ezali elilingi na lisangá ya mombongo te. (Emoniseli 18:15, 16) Nzokande, totangi ete ‘na ndoki na ye bato na mabota nyonso bazimbisami.’ (Emoniseli 18:23) Likambo oyo emonisi polele ete mwasi monene na pite azali lisangá ya losambo na mokili mobimba.
3. (a) Mpo na nini mwasi monene na pite ezali bobele Lingomba ya katolike te mpe bobele boklisto ya mokili oyo te? (b) Mateya nini mautaki na Babilone mazali komonana na ebele na mangomba na Azia mpe na kati na mangomba na boklisto ya mokili oyo? (c) Cardinal Newman alobaki nini mpo na oyo etali eutelo na mateya mingi, na milulu mingi mpe na misala mingi na boklisto ya mokili oyo? (Tala note.)
3 Kasi losambo nini? Ezali lingomba ya katolike, lokola bamosusu balobaki yango? To mpe ezali nde mangomba nyonso ya boklisto ya mokili oyo? Te, ezali nde lisangá moko monene koleka wana, mpamba te ezali kozimbisa bato na mabota nyonso. Ezali bongo lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta oyo ebotamaki na makambo na nkuku na Babilone, lokola emonisami polele na likambo oyo ete mateya mingi mpe misala mingi eutaki na Babilone ezali komonana epai na mangomba ndenge na ndenge na mokili mobimba. Na ndakisa, mateya lokola oyo elobi ete molimo ya moto ekufaka te, minyoko kati na lifelo ya móto mpe la Trinité to Bosatu Bosantu, ezali komonana na mangomba nyonso epai na ebimelo na ntango mpe na kati na mangomba na boklisto ya mokili oyo. Losambo ya lokuta, ebotamaki esili koleka mibu 4 000 na engumba ya kala ya Babilone, ekolaki mingi; lelo oyo ebengami na nkombo Babilone Monene.a Kasi mpo na nini ebengami na nkombo na nsoni ete “mwasi monene na pite”?
4. (a) Motindo nini libota ya Yisraele basalaki pite? (b) Motindo nini emonani polele ete Babilone Monene azali mpe kosala pite?
4 Nguya ya Babilone (to Babel, oyo elimboli “mobulungano”) ekolaki mingi na bokonzi ya Nebukadanezare. Na mikolo yango Babilone ezalaki epai moko bokonzi ya politike epai mosusu bokonzi ya losambo; bandako-nzambe koleka nkoto moko ezalaki wana na Babilone mpe bakonzi na mangomba bazalaki na nguya mingi. Bokonzi ya Babilone lokola nguya ya mokili mobimba esila kolimwa uta kala, kasi Babilone Monene, lisangá ya losambo, ezali kino lelo, mpe kolandaka ndakisa na oyo ya kala, ezali kopusa mpe kotambwisa makambo na politike. Kasi Nzambe asepeli te na komona ete mangomba bamikotisi kati na politike. Kolobaka mpo na libota ya Yisraele, wana ezalaki bango kosangana na losambo ya lokuta mpe koluka lisungi epai na mabota mosusu, na esika ete batyela Jéhovah motema, Makomami na liebele malobi ete bazalaki kosala pite. (Yilimia 3:6, 8, 9; Ezekiele 16:28-30) Babilone Monene azali mpe kosalaka pite. Azali kosala nyonso oyo alingi mpo na kopusa mpe komatela bakonzi ya mokili.—1 Timote 4:1.
5. (a) Lokumu ya motindo nini bakonzi na mangomba balingaka? (b) Mpo na nini mposa ya koluka koyebana mingi kati na mokili ezali na boyokani te na maloba na Yesu Klisto?
5 Na mikolo na biso, tozali komona mbala mingi bakonzi na mangomba bazali koluka kozwa bisika kati na politike; na mikili misusu, bazali kati na guvernema mpe mbala mosusu nkutu bazali baministre. Na 1988, bapastere mibale ya protestá bayebani mingi bapesaki nkombo na bango ete baponama lokola président na Etats-Unis. Bakonzi na Babilone Monene balingaka kotikala nsima te; mbala mingi tokomonaka bafoto na bango kati na bazulunalo esika moko na bafoto ya bakonzi na politike bayebani mingi. Nzokande Yesu aboyaki kokota na makambo na politike mpe alobaki na bayekoli na ye ete: “Bazali bato na mokili te pelamoko ngai nazali moto na mokili te.”—Yoane 6:15; 17:16; Matai 4:8-10; tala Yakobo 4:4.
Bondumba na ye na mikolo na biso
6, 7. (a) Ndenge nini parti nazi ya Hitler ezwaki bokonzi? (b) Motindo nini boyokani (concordat) kati na Vatican mpe Alemanye nazi esalisaki Hitler ete akende liboso mpo na koluka koyangela mokili mobimba?
6 Lokola azali komikotisa kati na makambo na politike, ndumba oyo monene ayeisi mpasi mingi likoló na bato. Na ndakisa, totalela makambo mapesaki nzela na Hitler ete azwa bokonzi na Alemanye—makambo mabe mpenza, oyo bamosusu balingaka ete balongola yango na mikanda ya lisolo na bato. Na sanza ya Mai 1924, parti nazi ezalaki na bisika 32 na Parlemá ya Alemanye ebengami Reichtag. Na sanza ya Mai 1928, bazalaki se na bisika 12. Nsima na 1930, krize monene na makambo na nkita ekotelaki mokili mobimba. Kosalelaka libaku wana, banazi balamukaki na motindo ya kokamwa; bazwaki bisika 230 kati na bisika 608 na parlemá ya Alemanye, engebene maponami masalemaki na Juillet 1932. Mwa moke na nsima, Franz von Papen, chancelier (mokonzi) wa kala, mpe kapita na ndako ya pape, asungaki ba nazis. Engebene bakomi na lisolo ya bato, von Papen akanisaki kozongisa bokonzi bobengamaki kala ete Saint Empire romain. Lokola alongaki te na boyangeli na ye ya chancelier oyo eumelaki te, azalaki kolikya kozwa nguya na nsima na ba nazis. Na Janvier 1933, andimisaki bankolo ya bakompanyi minene ete basunga Hitler. Kosalelaka mayele mabe, alekisaki Hitler ete akoma chancelier (mokambi wa mbulamatari) na le 30 Janvier 1933. Ye moko aponamaki vice-chancelier (molandi na mokambi wa mbulamatari). Hitler asalelaki ye mpo na kozwa lisungi ya barégion ya bakatolike na Alemanye. Sanza mibale ekokaki naino te nsima na kozwa bokonzi, Hitler apanzaki Parlemá, atindaki bakonzi mingi oyo batemelaki ye na ba camps de concentration mpe abimisaki monyoko monene polele likoló na Bayuda.
7 Na le 20 Juillet 1933, bakonzi ya lingomba ya katolike kuna na Vatican emonisaki ete etyaki motema na bokonzi ya nazi ntango cardinal Pacelli (oyo nsima akomaki pape Pie XII), atiaki maboko na mboka Rome na mokanda ebengami concordat, elingi koloba ya boyokani kati na lingomba ya katolike kuna na Vatican mpe bakonzi ya nazi na Alemanye. Ezali von Papen, ye nde atiaki maboko na mokanda yango na nkombo ya Hitler, mpe Pacelli apesaki ye medayi ya lokumu na nkombo ya pape, ebengami la grand-croix de l’Ordre de Pie.b Kati na mokanda na ye (Satan in Top Hat), Tibor Koeves alobi likambo yango, boye ete: “Boyokani yango to concordat ezalaki elonga monene mpo na Hitler. Epesaki ye elendiseli ya liboso kati na bilendiseli oyo azwaki uta na bapaya, mpe elendiseli yango eutaki epai na moto moko ya lokumu mingi.” Boyokani wana esengaki ete Vatican etika kosunga parti catholique na Alemanye; kosalaka bongo, bapesaki nzela ete boyangeli ekoma oyo babengi “Etat totalitaire” etambwisama na parti se moko, parti ya Hitler.c Lisusu, article 14 ya boyokani yango (concordat) elobaki ete: “Koponama ya ba episkopo mpe ya basángó, liboso ete endimama mpenza, esengeli ete momonisi moko ya Reich (momonisi ya Hitler apesa nzela mpo na koyeba soki koponama yango ekobimisa mobulu te kati na makambo na politike na mboka.” Pene na nsuka na 1933 (oyo Pie XI abengaki yango ete “Mbula ya bosantu”) lisungi ya Vatican ekomaki mpo na Hitler likambo ya liboso kati na mposa na ye ya koluka koyangela mokili mobimba.
8, 9. (a) Ndenge nini Vatican, Lingomba ya katolike mpe bakonzi na lingomba yango bazalaki kotalela bokonzi mabe ya nazi? (b) Baepiskopo katolike ya Alemanye balobaki nini na ebandeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba? (c) Boyokani kati na politike mpe mangomba ebimisaki nini?
8 Atako mwa etuluku moke na basángó mpe na banyango batemelaki mabe oyo Hitler azalaki kosala—mpo na yango bazwaki mpasi mingi—Vatican elongo na Lingomba ya katolike mpe ebele na basángó na yango bapesaki maboko polele to na nkuku na bokonzi mabe na nazi, oyo bango bazalaki kotalela yango lokola mopekisi na Kominisme ete eleka na mokili mobimba te. Efandaki ye malamu na ebonga na ye kuna Na Vatican, pape Pie XII asalaki eloko moko te mpo na kopekisa kobomama na bakonzi ya nazi ndenge bazalaki kosilisa Bayuda na koboma mpe monyokoli mabe epai na ba Témoins de Jéhovah mpe bato mosusu. Ezalaki nsoni mpo na pape Jean Paul II, mpamba te ntango akendaki na Alemanye na Mai 1987, akumisaki sángó se moko mpamba oyo atemelaki mpenza bokonzi mabe ya nazi. Bibele na basángó mosusu na Alemanye bazalaki bongo kosala nini na boumeli ya bokonzi mabe ya Hitler oyo abomaki bato mingi? Mokanda moko mobimisamaki na basángó katolike ya Alemanye na Septembre 1939, wana ebimaki Etumba ya Mibale na mokili mobimba, epesi mwa engengiseli na ntina yango. Elobaki boye: “Na eleko oyo ya mpasi mingi, tozali kolendisa basoda na biso bakatolike ete bakokisa mokumba na bango ya botosi epai ya Führer (titre epesamaki na Hitler oyo elimboli Motambwisi) Guide mpe bandima ata kopesa bomoi na bango mpenza. Tozali kobondela Mosembwi ete asangana na mabondeli na biso mpo ete Nzambe apesa biso elonga ya kopambwama kati na etumba oyo.”
9 Ndenge Lingomba ya katolike emikotisaki na politike na mikolo wana ezali elakiseli ya polele ya pite oyo mangomba basali na boumeli ya mibu koleka 4 000 oyo mileki, kosalaka bondumba epai na mikonzi na politike mpo na kozwela yango nguya mpe matomba mosusu. Boyokani oyo kati na mangomba mpe politike ebimisi bitumba, minyoko mpe bobola mingi na mokili mobimba. Bato bakoki kosepela lokola etikali moke Jéhovah akokokisa ekateli na ye likoló na ndumba oyo monene. Tika ete aya noki!
Afandi likoló na mai mingi
10. “Mai mingi” oyo Babilone Monene azali kotia motema mpo na kobatelama ezali nini, kasi nini ezali kokomela mai yango?
10 Engumba ya kala ya Babilone efandaki likoló na mai mingi: ebale Efrate, mpe ebele na mingala mitimolamaki. Mai yango mazalaki libateli mpo na engumba mpe mazalaki kosunga mpo na kosala mombongo, kino mokolo makaukaki na butu se moko. (Yilimia 50:38; 51:9, 12, 13) Babilone Monene, ye mpe azali kotya motema na “mai mingi” mpo na komibatela mpe konduka bozwi mingi. Mai wana na elilingi elakisi “bikolo, na bibele, na mabota, na minoko,” elingi koloba bamiliare ya bato oyo ye atii na nse na bokonzi na ye mpe azwi lisungi na bango. Kasi mai wana mpe mazali kokauka; bakomi koboya kosunga ye.—Emoniseli 17:15; tala Nzembo 18:4; Yisaya 8:7.
11. (a) Ndenge nini Babilone ya kala ‘elangwisaki mokili mobimba’? (b) Ndenge nini Babilone Monene ‘elangwisi mokili mobimba’?
11 Lisusu, Babilone ya kala elakisamaki lokola ‘kopo ya wolo kati na loboko ya Jéhovah, oyo ezali kolangwisa mokili mobimba.’ (Yilimia 51:7) Babilone epusaki na makasi mabota zongazonga na ye na kozwa bitumbu na Jéhovah, na kosalelaka mampinga na ye, kolembisaka bango lokola bato balangwi. Kosalaka bongo, ezalaki lokola esaleli na maboko na Jéhovah. Bobele bongo, Babilone Monene mpe ekoli mingi kino ekomi lisangá moko ya mokili mobimba. Kasi ezali esaleli na Nzambe te. Babilone Monene asaleli nde “bokonzi na mokili” oyo ye asali na bango pite na makambo matali losambo. Alukaki nde kosepelisa bakonzi yango na koteyaka mateya ya lokuta mpe kosalelaka mitindo na mbindo mpo na kolanda konyata bibele na bato, “bafandi na mokili,” bakomi na bolembu lokola bato balangwi, ete balanda kotosa lokola baombo epai na batambwisi na bango.
12. (a) Ndenge nini eteni moko ya Babilone Monene, na Japon, ekumbaki ngambo ya makila mingi masopamaki na boumeli na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba? (b) Nini ekitisaki “mai” oyo mazalaki kosimba Babilone Monene na Japon, mpe litomba nini esili kozwama?
12 Tokoki kokamata lokola Ndakisa monene ezali mokili ya makambo malekaki na Japon epai kuna basambelaka na losambo na yango ya shintoïsme. Mpo na soda mojaponé oyo asili koteyama na losambo yango, kopesa bomoi na ye mpo na mokonzi to empereur, nzambe ya nsuka kati na shintoïsme, ezalaki lokumu. Na boumeli na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, basoda bajaponé soko 1 500 000 bakufaki kati na bitumba; mpo na bango, kotika bitumba to komipesa epai ya monguna, ezalaki nsoni. Kasi ntango Japon epolaki, empereur Hirohito akokaki lisusu kobengama nzambe te. Mpo na yango, “mai” mingi na eteni na shintoïste na Babilone Monene makitaki, kasi ezalaki se nsima wana shintoïsme elendisaki bitumba ya nsomo mingi na Pacifique, na boumeli na yango makila mingi masopamaki. Lokola shintoisme ezalaki lisusu na nguya te, lelo oyo Bajaponé koleka 200 000, oyo mingi na bango bazalaki kala basambeli ya Shinto to ya Buda, basili kokoma basaleli ya Nkolo Moyangeli monene Jéhovah nsima na komipesa epai na ye mpe kozwa batisimo.
Mwasi na pite afandi likoló na nyama
13. Yoane amoni nini kati na emonaneli ntango anzelu akumbi ye na nguya na elimo kati na esobe?
13 Esakweli elobi na biso lisusu nini na ntina na ndumba monene mpe nsuka na ye? Yoane ayebisi likambo mosusu ya kokamwa oyo amonaki: “[Anzelu] akambi ngai kati na elimo kuna na esobe. Namoni mwasi afandi likoló na nyama na yauli motane, oyo atondi na nkombo na kotuka, oyo mpe azalaki na mitó nsambo mpe na maseke zomi.”—Emoniseli 17:3.
14. Mpo na nini ebongi ete Yoane akumbama kati na esobe?
14 Mpo na nini Yoane akambami kati na esobe? Ekweli moko ya kala ekatamaki likoló na Babilone ya kala elakisamaki lokola litatoli mpo na “esobe epai na mai-na-monana.” (Yisaya 21:1, 9) Ezalaki likebisi mpenza mpo na komonisa ete atako ebele na mai na yango mazalaki lokola libateli, engumba ekobebisama nyonso mpe ata ekelamu moko na bomoi ekotikala wana te. Ebongaki ete Yoane akumbama kati na emonaneli kino na esobe mpo na komona motindo nini Babilone Monene akosuka. Ye mpe asengeli kobebisama nyee mpe kotikala mpamba. (Emoniseli 18:19, 22, 23) Nzokande Yoane akamwi mingi na makambo amoni. Ndumba monene azali ye moko te; afandi likoló na nyama na yauli mpe na nsomo!
15. Kokesena nini ezali kati na nyama na yauli oyo elobelami na Emoniseli 13:1 mpe nyama na yauli oyo ya Emoniseli 17:3?
15 Nyama yango azali na mitó nsambo mpe na maseke zomi. Ezali se nyama yango moko oyo Yoane amonaki liboso, oyo ezalaki mpe na mitó nsambo mpe na maseke zomi? (Emoniseli 13:1) Te, nyama yango ekeseni. Oyo elobami awa ezali motane, mpe na kokesena na oyo ya liboso, elobami te ete ezali na mitole te. Nkombo na kotuka ezali bobele na mitó na ye nsambo te; “atondi [nde] na nkombo na kotuka.” Nzokande, boyokani ezali kati na nyama na yauli oyo na sika mpe oyo emonanaki liboso; bakokani na makambo mingi.
16. Nyama na yauli na langi motane ezali nini, mpe nini elobamaki mpo na mokano na ye?
16 Nyama na yauli oyo na langi motane ezali bongo nini? Ezali elilingi ya nyama na yauli oyo esalemaki na kopusama na nyama na yauli mosusu Anglo-Amerike, nyama oyo ezali na maseke mibale lokola mwana na mpate. Nsima wana elilingi oyo na nyama esalemaki, nzela epesamaki na nyama na maseke mibale ete apesa mpema na bomoi na elilingi yango. (Emoniseli 13:14, 15) Yoane amoni sikawa elilingi wana ekomi na bomoi, ezali kopema. Yango elakisi la Société des Nations oyo nyama na yauli na maseke mibale azalisaki na 1920. M. Wilson , président des Etats-Unis, abengaki Société des Nations ete ezali “lisangá mpo na kopesa boyengebene epai na bato nyonso mpe mpo na kopekisa bitumba ete esalama lisusu te.” Ntango lisangá yango ebimaki lisusu nsima na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, na nkombo ya O.N.U. mokano na yango ezalaki mpo na “kosimba kimya mpe kobatelama na mokili mobimba.”
17. (a) Elimboli nini ete nyama na yauli na elilingi na langi motane atondi na nkombo na kotuka? (b) Nani afandi likoló na nyama na yauli na langi motane? (c) Ndenge nini mangomba ya Babilone basanganaki uta ebandeli na Société des Nations, mpe na lisangá oyo ekitanaki yango na nsima?
17 Elimboli nini ete nyama na yauli oyo na elilingi atondi na nkombo na kotuka? Na ntina boye ete bato basali ekeko yango oyo esangisi bikolo mingi, mpo ezwa esika ya Bokonzi ya Nzambe, mpo ete esala makambo oyo, engebene Nzambe, bobele Bokonzi na ye nde ekoki kosala yango. (Danyele 2:44; Matai 12:18, 21) Nzokande, likambo ya kokamwa mingi kati na emonaneli oyo Yoane amonaki, ezali ete Babilone Monene afandi likoló na nyama na yauli na langi motane. Na boyokani na esakweli, mangomba na Babilone, mpe mingimingi boklisto ya mokili oyo, basungaki Société des Nations, mpe lisangá oyo ekitanaki yango. Uta le 18 Décembre 1918, lisangá oyo eyebani lelo na nkombo Conseil national des Eglises du Christ en Amérique bazwaki likatami oyo ete “Lisangá motindo oyo ezali bobele lisangá na politike te; ezali nde Bokonzi na Nzambe na lolenge na politike awa na mabelé. . . . Eklesia ekoki kopesa elimo ya bolingo malamu, kozanga yango Société des Nations ata moko ekoki kotelema te. . . . Moboko na Société des Nations ezali kati na Evanzile. Lokola mpo na Evanzile, mokano na yango ezali ‘kimya na mabelé, bolingo malamu epai na bato.’”
18. Ndenge nini bakonzi ya mangomba ya boklisto ya mokili oyo bamonisaki lisungi na bango epai ya Société des Nations?
18 Na le 2 Janvier 1919, zulunalo San Francisco Chronicle ekomaki boye na lokasa ya liboso: “Pape asengi bato nyonso bandima Société des Nations oyo Wilson asali.” Na le 16 Octobre 1919, mokanda moko etyamaki maboko na bakonzi 14 450 ya mangomba minene, etindamaki na Sénat ya Amerike mpo na kosenga bango ete ‘bandima mikano na kimya oyo mizwamaki na mboka Paris epai bakanaki ete bakosala société des nations.’ Sénat endimaki mikano yango te, kasi bakonzi na mangomba na boklisto na mokili oyo balandaki kosala kampanye mpo na kolobela Société des Nations. Motindo nini lisanga yango efungwamaki? Nsango eutaki na Suisse na le 15 Novembre 1920 elobaki boye: “Kofungwama ya likita ya liboso ya Société des Nations esakolamaki lelo na ntongo na ngonga ya zomi na moko na nzela ya ngonga ya bandako-nzambe nyonso ya mboka Genève.”
19. Ezaleli na kelasi na Yoane ezalaki nini ntango nyama na yauli na langi motane ebimaki?
19 Kelasi na Yoane, etuluku bobele moko ya bato awa na mabelé oyo bandimaki nokinoki Bokonzi na Masiya, basanganaki elongo na boklisto ya mokili oyo te mpo na kokumisa nyama na yauli na langi motane. Na mokolo ya lomingo 7 Septembre 1919, programme ya likita ya basaleli ya Jéhovah ebongisamaki na mboka Cedar Point (Etats-Unis) elengelaki diskur piblike na motó ya likambo “Elikya mpo na mokili oyo ezali konyokwama.” Na mokolo elandaki, zulunalo Star-Journal ya mboka Sandusky ekomaki ete, liboso ya bayangani soko 7 000, Joseph Rutherford “alobaki ete Société des Nations ekoki kondimama ata moke te na miso na Nkolo . . . mpamba te bakonzi na mangomba—ya katolike mpe ya protestá—oyo balobi ete bazali bamonisi na Nzambe, basili kobwaka mokano na ye mpe bandimi Société des Nations, kotombolaka yango ete ezali Bokonzi na Klisto awa na mabelé na lolenge na politike.”
20. Mpo na nini ezalaki nde kotuka mpo na bakonzi na mangomba, wana ezalaki bango kokumisa Société des Nations lokola “Bokonzi na Nzambe awa na mabelé na motindo na politike”?
20 Kokwea ya Société des Nations mbele ekokaki komonisa epai na bakonzi na mangomba na mokili ete masangá motindo oyo masalami na bato mazali na boyokani moko te na Bokonzi na Nzambe. Koloba ete yango euti na Nzambe ezali mpenza kotuka. Wana mbele elingi koloba ete Nzambe azalaki moko na babandisi na lisangá yango oyo na nsima ekweaki na nsoni mingi. Nzokande, mpo na Jéhovah, elobami ete “mosala na ye ebongi.” Mpo na kotya kimya mpe kokokisa mokano na ye na mabelé lokola na likoló, akosalela lisangá ya bato ya politike te oyo bazangi boyokani kati na bango, mpe mingi na bango bandimaka Nzambe te, kasi akosalela nde Bokonzi na likoló oyo apesi na Klisto.—Deteronome 32:4; Matai 6:10.
21. Makambo nini mamonisi ete ndumba oyo monene azali kosunga mpe azali kokumisa O.N.U., lisangá oyo ekitanaki Société des Nations?
21 Tokoloba boni sikawa mpo na O.N.U. oyo ekitanaki Société des Nations? Na kobotama na yango, ndumba monene afandaki na mokongo na yango, kolakisaka polele ete asangani na lisangá yango mpe alukaki kotambwisa mikano na yango. Na ndakisa, na Juin 1965, mpo na kokumisa mibu ntuku mibale ya O.N.U., bamonisi ya Lingomba ya katolike, ya Lingomba ya ortodokse orientale mpe ya baprotestá, ya Bayuda, ya ba Hindous, ya ba Budiste mpe ya ba Musulmans—bamonisi ya bato soko miliare mibale—bayanganaki na mboka San Francisco mpo na kosunga lisangá yango mpe kokumisa yango. Ntango akendaki na O.N.U. na Octobre 1965, Pape Paul VI alobaki mpo na lisangá yango ete “ezali lisangá eleki monene kati na masangá nyonso ya mokili” mpe abakisaki: “Bato bazali kotala epai ya O.N.U. ete ezali elikya ya nsuka mpo na boyokani mpe kimya.” Pape mosusu, Jean Paul II, akendaki na O.N.U. na Octobre 1979, alobaki boye liboso ya likita yango: “Nazali kotombela ete O.N.U. etikala ntango nyonso elikya ya nsuka mpo na kimya mpe boyengebene.” Likambo ya kokamwa, kati na diskur ya pape, alobelaki Yesu Klisto mpe Bokonzi na Nzambe bobele mwa moke mpenza. Na mobembo na ye na Etats-Unis, na Septembre 1987; engebene zulunalo New York Times, “Jean Paul II alobaki na bolai nyonso mpo na mosala oyo O.N.U. azali kosala . . . mpo na ‘boyokani ya sika na mokili mobimba.’”
Nkombo na libombami
22. (a) Ndumba oyo monene abuti likoló na nyama ya motindo nini? (b) Yoane alobi nini mpo na mwasi na pite na elilingi, Babilone Monene?
22 Nokinoki Yoane amoni ete ndumba oyo monene afandi likoló na nyama moko mabe. Likebi na ye ebendami liboso epai na Babilone Monene ye moko. Alati biloko na motuya mingi, kasi azali na mbindo makasi! “Mwasi alati bilamba motane mwindo na motane mondo, akembisi nzoto na wolo, na mabanga na ntalo, na pauni; mpe azalaki na kopo na wolo na loboko na ye etondaki na bosoto mpe na mbindo na pite na ye. Na elongi na ye nkombo na libombami ekomami ete, Babilone Monene, mama na basi na pite mpe na bosoto na mokili. Namonaki mwasi yango alangwi na makila na babulami mpe na makila na batatoli na Yesu.”—Emoniseli 17:4-6a.
23. Tanga nkombo mobimba ya Babilone Monene, mpe ndimbola na yango ezali nini?
23 Lokola ezalaki motindo epai ya Baloma ya kala, ndumba oyo ayebani na nkombo oyo ekomami na elongi na ye.d Nkombo yango ezali molai mingi: “Babilone Monene, mama na basi na pite mpe na bosoto na mokili.” Ezali mpe “libombami.” Kasi na ntango oyo Nzambe asili kokana libombami esengeli kolimbolama polele. Mpamba te, anzelu ayebisaki epai na Yoane makambo mingi mpo na kopesa nzela lelo epai na basaleli na Jéhovah bayeba ndimbola nyonso ya nkombo oyo. Toyebi ete Babilone Monene ezali lisangá ya mangomba nyonso ya lokuta. Azali “mama na basi na pite,” mpamba te mangomba nyonso ya lokuta na mokili, bakisa ebele na Biklezia ya boklisto ya lokuta, bazali lokola bana na ye ya basi: bazali kosalaka pite na elimo lokola mama na bango. Azali mpe mama “na bosoto na mokili” na ntina boye ete abimisi makambo mingi ya mabe, ndakisa losambo ya bikeko, losambo ya bilimu mabe, koyebisa makambo makoya, kotala myoto mpo na kosakola, kotala maboko mpo na koyebisa mabombami, koboma bato mpo na mbeka, kosalela pite kati na losambo, bilambo na lokoso mpo na lokumu na banzambe ya lokuta mpe misala mosusu mingi ya nsoni.
24. Mpo na nini ekoki na Babilone Monene kolakisama ete alati bilamba “motane mwindo na motane mondo,” mpe “akembisi nzoto na wolo, na mabanga na ntalo mpe na pauni”?
24 Babilone Monene alati bilamba “motane mwindo na motane mondo,” nyonso langi ya bokonzi; mpe “akembisi nzoto na wolo, na mabanga ya ntalo mpe na pauni.” Yango ezali solo! Mpamba te kanisa bandako kitoko, bikeko, batablo mpe bililingi ya motuya mingi, biloko ndenge nyonso ya losambo, bozwi mpe mosolo oyo mangomba ya mokili basili konduka. Ezala na Vatican, na Etats-Unis epai na bapastère ya protestá oyo balobaka na nzela na télévizio to lisusu na bifandelo ya basángo mpe batempelo epai na ebimelo na ntango, Babilone Monene asili konduka—mpe mbala mosusu kobungisa—ebele na bozwi.
25. (a) “Kopo na wolo etondi na biloko na mbindo” ezali elilingi na nini? (b) Na ndimbola nini mwasi na pite na elilingi azali na molangwa?
25 Tala sikawa eloko mwasi na pite asimbi na loboko na ye. Yoane boye akangaki mpema mpo na kokoka kotala kopo yango: kopo ya wolo “etondaki na bosoto mpe na mbindo na pite na ye.” Kopo wana ezali na “vinyo na kongala na pite na ye,” vinyo oyo alangwisi na yango mabota nyonso. (Emoniseli 14:8; 17:4) Kopo yango emonani eloko na motuya na libanda, kasi na kati etondi na bosoto mpe na mbindo. (Tala Matai 23:25, 26.) Etondi na misala nyonso mpe na lokuta nyonso ya mbindo oyo ndumba monene asaleli mpo na kozimbisa mabota mpe komatela bango. Likambo ya mabe koleka, Yoane amoni ete ndumba yango alangwe, alangwe makila ya basaleli na Nzambe. Na nsima totangi ete “kati na ye makila na basakoli, na bapetwi mazwami, na makila na bato nyonso babomami na mokili.” (Emoniseli 18:24) Solo, bibele na bato basili kobomama!
26. Makambo nini mamonisi ete Babilone Monene asopaki makila mingi?
26 Na boumeli ya bikeke, lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba esopaki makila mingi. Na ndakisa, na Japon na kala, batemple na mboka Kyoto ekomaki bisika makasi kati na yango basángo-basoda, kobelelaka “nkombo bosantu ya Buda,” bazalaki kobunda bitumba ya nsomo bango na bango, kino balabala ekomaki motane mpo na makila masopami. Na ekeke ya 20, bakonzi na mangomba na boklisto ya lokuta bamityaki nsima na mampinga na basoda ya mikili na bango, basoda yango babomanaki mpe yango esalaki ete bato soko milió nkama bákufa. Na Octobre 1987, Richard Nixon, président wa kala wa Etats-Unis, alobaki: “Makila mingi masopami na ekeke na 20 koleka bikeke mosusu kati na Lisolo ya bato. Bitumba ya ekeke oyo ebomi bato mingi koleka bitumba nyonso oyo bizalaki liboso na ekeke oyo.” Mangomba ya mokili makweisami na Nzambe mpo ete bango mpe bapesaki maboko mpo ete makila wana masopama; Jéhovah ayini “maboko masopi makila na mosembwi.” (Masese 6:16, 17) Mwa moke liboso, Yoane ayokaki konganga oyo uta na etumbelo: “Kino ntango nini, e Nkolo mosantu mpe na solo? Okosambisa te mpo na kobukanisa bango bafandi na mokili na ntina na makila na biso?” (Emoniseli 6:10) Babilone Monene, mama na bandumba mpe na bosoto na mokili, akosambisama makasi wana ntango ekokoka mpo na koyanola na motuna oyo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Komonisaka ete mateya mingi, milulu mingi mpe misala mingi na mangomba na boklisto na mokili euti na lingomba ya boklisto te, cardinal Newman akomaki maloba malandi kati na mokanda na ye Essai sur le développement de la doctrine chrétienne: “Kosalela ba tempelo, oyo etongami na nkombo ya basantu mpe ebongisami na mandalala na mabaku mosusu; mpaka na malasi, miinda mpe buji; makabo mapesami nsima na kobikisama na maladi; mai mabenisami; lotomo ya kofanda na mboka mopaya; mikolo ya feti mpe bileko na feti, kosalela calendrier ya basantu, milulu, kopambola bilanga, bilamba ya bonganga; kokokola nsuki mwa moke, lopete ya libala, ezaleli ya kobaluka epai moi ebimelaka, bikeko,—na eleko moko eyaki nsima—mbala mosusu nzembo ya ndako-nzambe mpe nzembo babengi Kyrie eleison [“Nkolo, yokela biso mawa”], lokola nyonso wana euti na losambo na bapakano, epetolami na ndenge ekomi kosalelama kati na Eklezia.”
Na esika ya kopetola losambo na bikeko motindo oyo, “Jéhovah, Mozwi-Na-Nguya-Nyonso,” alendisi baklisto na maloba malandi: “Bobima kati na bango, mpe bokabwana na bango. . . . Bosimba eloko na mbindo te.”—2 Bakolinti 6:14-18.
b Kati na mokanda na ye elobeli Lisolo na bato, mpe ebengami Le troisième Reich—Des origines à la chute, William Shirer akomi ete von Papen “asalisaki Hitler mingi koleka Moalemá nyonso mpo ete akoma mokonzi.” Na Janvier 1933, mokonzi ya kala ya Alemanye von Schleicher alobaki na ntina na von Papen: “Azali motekisi monene koleka Yuda Iskariote.”
c Le 14 Mai 1929, kolobaka epai na bayekoli na université ya Mondragone, pape Pie XI alobaki ete akoyokana ata na Diable ye moko soki bolamu ya milimo esengi bongo.
d Tala maloba oyo Sénèque, mokomi Moloma alobaki epai na nganga-nzambe moko ya mwasi asalaki mabe: “Elenge mwasi, ofandaki na ndako na bato banso . . . Nkombo na yo ekomamaki na elongi na yo; ondimaki lifuti ya nsoni na yo.”—Controverses, I, 2.
[Etanda na lokasa 237]
Churchill amonisi polele misala mabe ya “mwasi na pite”
Na mokanda na ye L’orage approche, Winston Churchill alobi ete Hitler aponaki Franz von Papen lokola ntoma na Vienne mpo na “kobebisa nguya ya bato minene na politike ya Autriche, to kolonga bango mpo na kobundela Alemanye.” Churchill azongeli maloba ya ntoma na Amerike na Vienne, oyo alobaki: “Na maloba na lofundo mpe na lolendo nyonso, . . . Papen alobaki . . . ete azalaki na mokano ya komonisa ete azali mokatolike malamu mpo na kopusa ba Autrichiens mosusu lokola cardinal Innitzer.”
Nsima wana Autriche eboyaki bitumba mpe mampinga na Hitler makotaki na Vienne, cardinal Innitzer apesaki etinda ete bandako-nzambe nyonso ya Autriche etelemisa drapo ya nazi, ebeta ngonga mpe basambela mpo na Adolf Hitler mpo na kosepela mbotama na ye.
[Etanda/Elilingi na lokasa 238]
Na nse na motó na likambo oyo makambo malandi makokaki kotangama kati na ebimeli na liboso ya New York Times ya le 7 Décembre 1941:
“LOSAMBO MPO NA ETUMBA” ESALEMI MPO NA BOKONZI YA NAZI
“Baepiskopo ya katolike oyo bayangani na Fulda basengi lipamboli mpe bolongi. . . . Likita ya baepiskopo ya katolike na Alemanye oyo esalamaki na Fulda esengi ete basala ‘libondeli mpo na etumba,’ libondeli ya sipesiale oyo ekotangama na ebandeli mpe na nsuka ya messe nyonso. Libondeli yango ezali kosenga Nzambe ete apambola minduki ya Baalemá mpe apesa bango bolongi; abatela bomoi mpe kolongono ya basoda nyonso. Baepiskopo bapesaki mpe malako epai na basango mpo ete mbala moko na sanza, na lisolo ya sipesiale ya mokolo na Lomingo, bakanisa basoda Baalemá oyo bazali kobunda ‘na mabelé, na mai mpe na mpepo.’”
Na banimero ya zulunalo yango oyo enyatamaki nsima, babongolaki lisolo yango. Le 7 Décembre 1941, Japon, mokili oyo ezalaki nsima ya Alemanye nazi, ebebisaki masuwa na basoda ya Amerike na libongo ya Pearl Harbor.
[Etanda na lokasa 244]
‘Bankombo na kotuka’
Ntango nyama na yauli na maseke mibale alendisaki kosalema ya Lisangá ya Mabota (Société des Nations) nsima na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bamakango na ye basalaki nyonso mpo na kosimba lisangá yango. Yango wana lisangá ya sika oyo ezalaki koluka kimya “etondaki na bankombo ya kotuka.”
“Lingomba ya boklisto ekoki komemela Lisangá [ya mabota] bolingo malamu mpe nguya ekoki, mpe kokokisa maloba mazali kati na boyokani yango ete makoma esaleli ya bokonzi na Nzambe.”—The Christian Century, Etats-Unis, 19 Juin 1919, lokasa 15.
“Likanisi ya kosala Lisangá ya Mabota ezali se kokolisama ya likanisi ya Bokonzi na Nzambe mpo na boyokani kati na mokili mobimba lokola molongo kati na mokili ekangisami na bolingo malamu. . . . Ezali mpo na yango baklisto nyonso bazali kosambela ntango bakolobaka ete: ‘Tika bokonzi na yo eya.’”—The Christian Century, Etats-Unis, 25 Septembre 1919, lokasa 7.
“Ciment (simá) ya Lisangá na Mabota, ezali makila na Klisto.”—Frank Crane, pasteur ya misioni, Etats-Unis.
“Lisangá [ya Mangomba mabengami congrégationalistes] endimi Boyokani [Lisangá ya Mabota], emoni ete ezali esaleli bobele moko ya politike na nzela na yango Elimo na Yesu Klisto ekoki komonisama malamu koleka mpo na kobongisa makambo ya mabota.”—The Congregationalist and Advance, Etats-Unis, 6 Novembre 1919, lokasa 642.
“Likita esengi bato nyonso ya lingomba méthodiste ete bandima mpe batombola mingi koleka makanisi [ya Lisangá na Mabota] oyo mamonisami na likanisi na Nzambe Tata mpe na bana na Nzambe oyo bazali na mabelé.”—Eglise méthodiste, Grande-Bretagne.
“Soko totali bilikya, makoki mpe bikateli ya boyokani yango, tokomona ete ekangisi moboko na mateya na Yesu Klisto: Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na ye . . . Ezali yango mpenza.”—Lisolo epesamaki na archevêque ya Cantorbéry na bofungwami ya Assemblée ya Lisangá na Mabota na Genève, le 3 Décembre 1922.
“Kosangana ya Lisangá na Mabota na mboka oyo ezali na lotomo motindo moko na lisangá nyonso ekosalisaka bato, mpamba te ezali sikawa esaleli eleki makasi ya boyangeli na Klisto na mosala na ye ya Mokonzi na kimya kati na mabota.”—M. Garvie, pasteur ya lingomba congrégationaliste, Grande-Bretagne.
[Karte na lokasa 236]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Mateya ya lokuta oyo mandimami na mokili mobimba mautaki na Babilone
Babilone
Bosato to banzambe misatomisato
Molimo ekufaka te
Losambo ya bilimu mabe—Kosolola na bakufi
Kosalela bikeko kati na losambo
Koluka kobondela bilimu mabe
Eyangeli na banganga na nguya
[Elilingi na lokasa 239]
Babilone ya kala efandaki likoló na mai mingi
[Elilingi na lokasa 239]
Mwasi na pite, ye mpe, afandi lelo likoló na “mai mingi”
[Elilingi na lokasa 241]
Babilone Monene afandi likoló na nyama na yauli na nsomo
[Bililingi na lokasa 242]
Mwasi na pite, Mangomba na lokuta, basili kosala pite elongo na bakonzi na mokili
[Bililingi na lokasa 245]
Mwasi na pite “alangwe makila na basantu”