Mokapo 35
Babilone Monene abomami
1. Anzelu azali kolimbola nini na ntina na nyama na yauli na langi motane, mpe bwanya ya motindo nini ezali na ntina mpo na kokanga ndimbola na bilembo ya Emoniseli?
NA NTINA na nyama na yauli na langi motane oyo atangami kati na Emoniseli 17:3, anzelu alobi lisusu na Yoane ete: “Awa ebongi na makanisi na mayele. Mitó yango nsambo mizali ngomba nsambo, kuna efandi mwasi na likoló na yango. Mizali mpe bakonzi nsambo; mitano bakwei, moko azali, mosusu ayei naino te, mpe soko akoya ntango nini ekokoka na ye koumela mwa ntango moke.” (Emoniseli 17:9, 10) Awa anzelu azali koyebisa mayele na likoló, bobele yango nde ekoki kopesa bwanya mpo na kososola bilembo ya Emoniseli. (Yakobo 3:17) Mayele yango ezali kongengisa kelasi na Yoane mpe baninga na bango mpo na oyo etali ntina ya ntango oyo tozali kobika. Ezali kopusa bato na mitema malamu na kotya likebi monene na bikateli na Jéhovah, oyo bizali pene mpo na kokokisama, mpe ezali kopesa bobangi mpo na Nzambe. Lokola elobi yango Masese 9:10: “Kobanga Jéhovah ezali ebandeli na mayele, koyeba ye Oyo-Aleki-Likoló ezali bososoli.” Na bongo mayele na Nzambe eteyi biso nini na ntina na nyama na yauli?
2. Mitó nsambo ya nyama na yauli na langi motane milakisi nini, mpe maloba: “Mitano bakwei, moko azali” malimboli nini?
2 Mitó nsambo na nyama na yauli wana milakisi “ngomba” nsambo to “mikonzi” nsambo. Kati na Makomami, maloba mibale oyo masalelamaka mpo na kolobela bikonzi na politike. (Yilimia 51:24, 25; Danyele 2:34, 35, 44, 45) Biblia elobeli bikonzi motoba ya mokili mobimba oyo bizalaki na bopusi kati na lisolo ya libota na Nzambe: Ezipito, Asulia, Babilone, Bokonzi ya Medo-Perse, Grèce mpe Rome. Mitano basilaki koya mpe basiláká kolimwa na eleko oyo Yoane azwaki Emoniseli, Rome ezalaki naino nguya ya mokili mobimba. Yango ekokani mpenza na maloba oyo: “Mitano bakwei, moko azali.” Kasi nguya nini “mosusu” esengelaki koya?
3. (a) Ndenge nini Bokonzi na baromé esukaki na kokabwana? (b) Makambo nini mabimaki kati na Bokonzi na Ouest? (c) Ndenge nini ebongi kotalela Bokonzi Bosantu na Baromé?
3 Bokonzi na Rome eumelaki mpe elandaki bokoli na yango kino na bikeke oyo biyaki nsima na eleko na Yoane. Na 330 ya ntango na biso, mokonzi Constantin alongolaki kapitale na ye longwa na Rome kino na Byzance, engumba oyo apesaki yango nkombo ya sika: Constantinople. Na 395, Bokonzi na Baromé ekabwanaki na biteni mibale: Bokonzi na Est mpe Bokonzi na Ouest. Na 410, Rome ekweaki na maboko ya Alaric, mokonzi na ba Wisigoths (ekolo moko ya germanique oyo ebongwanaki na “boklisto” oyo eutaki na libota ya ba ariens). Bikolo ya germanique (oyo ya “boklisto” mpe) ebotolaki Espanye mpe eteni monene na bateritware ya Baromé na Afrike ya Nord. Ezalaki mpenza bikeke ya mobulungano, ya yikiyiki mpe ya mbongwana na Mpoto. Kati na Bokonzi ya Ouest bakonzi ya nguya babimaki, lokola Charlemagne, oyo asalaki boyokani elongo na pape Léon III na ekeke ya 9, mpe Fréderic II, oyo ayangelaki na ekeke ya 13. Kasi teritware na bango, atako ebengamaki Saint Empire Romain, epalanganaki mingi te lokola Bokonzi na Rome na ntango oyo yango ezalaki na nguya makasi. Ezalaki bobele kozongisama to kolandana ya nguya wana ya kala na esika ete ezala bokonzi ya sika.
4. Bolongi nini Bokonzi ya Est ezwaki, kasi nini ekomelaki eteni monene na bateritware ya kala ya Rome oyo ezalaki na Afrike ya Nord, na Espanye mpe na Sulia?
4 Bokonzi na Baromé ya Est, oyo kapitale na yango ezalaki Constantinople, ezalaki mpe kozwana matata na Bokonzi ya Ouest. Na ekeke ya 6, Justinien Ier, mokonzi na Est, alongaki mpo na kobotola eteni monene ya Afrike ya Nord; abotolaki mpe Espanye na Italie. Na ekeke ya 7, Justinien II azwaki lisusu bateritware ya bato na Macédoine oyo ebotolamaki na bokonzi ya bato na bikolo slaves. Kasi na ekeke ya 8, eteni monene ya bateritware ya Rome na Afrike ya Nord, na Espanye mpe na Sulia ekomaki na nse na bokonzi ya lingomba ya Islam oyo ebandaki kopalangana, kolongwaka bongo na nse na boyangeli ya Constantinople to ya Rome.
5. Atako engumba ya Rome ekweaki na 410 liboso ya ntango na biso, mpo na nini esengelaki bikeke mingi liboso ete bilembo nyonso na politike ya Bokonzi na baromé elimwa kati na mokili mobimba?
5 Constantinople yango moko eumelaki ntango molai. Elongaki na makaneli ndenge na ndenge ya ba Perse, ba Arabe, ba Bulgare mpe ba Russe kasi nsima na yango ekweaki na 1203, na maboko ya ba musulmans te, kasi ya babundi oyo babengami ba croisés oyo bautaki na ouest. Kasi na 1453, mboka ekomaki na maboko ya Mehmet II, mokonzi moko musulman oyo azalaki kati na molongo ya bakonzi ya Turc, mpe mosika te ekomaki kapitale ya Bokonzi na turc to Ottoman. Yango wana, atako Rome ekweaki na 410 ya ntango na biso, esengelaki bikeke mingi liboso ete bilembo nyonso ya politike na Bokonzi na Rome bilimwa kati na mokili. Mpe ata nsima na oyo, bokonzi yango ezalaki koyokisa ntango nyonso bopusi na yango na nsima ya bikonzi na mangomba, kosalelaka bongo ba pape ya Rome to Mangomba ya ortodokse ya Est.
6. Bikonzi nini ya sika mpenza bibotamaki, mpe wapi kati na yango ezwaki matomba malamu?
6 Nzokande, na ekeke ya 15, mikili misusu mizalaki kotonga bikonzi ya sika. Atako misusu kati na bikonzi yango ya sika bizalaki koyangela likoló na teritware oyo kala ezalaka kotambwisama na Rome, nzokande ezalaki boyangeli na Rome te nde ezalaki kolandana. Portugal, Espanye, France mpe Hollande emisalelaki bikonzi minene, kasi ezali Angleterre nde ezwaki matomba malamu; eyaki koyangela bokonzi moko monene oyo likoló na yango ‘moi ezalaki kolala te.’ Na bileko bikeseni ya lisolo na yango, bokonzi yango epalanganaki likoló na eteni monene ya Amerike ya Nord, ya Afrike, ya Inde mpe ya Asie du Sud-Est, mpe Pacifique Sud.
7. Ndenge nini lolenge na banguya mibale ya mokili mobimba ebotamaki, mpe, engebene maloba na Yoane, ntango boni ‘motó’ na nsambo, to nguya na mokili mobimba wana esengeli koumela?
7 Na ekeke ya 19, mikili misusu ya Amerike ya Likoló oyo mizalaki kotambwisama na Angleterre mikataki boyokani na yango elongo na Grande-Bretagne mpo na kosala ekolo moko ya bonsomi: Etats-Unis d’Amérique. Na eleko moko matata mabimaki kati na Etats-Unis mpe Grande-Bretagne. Atako bongo, Etumba ya Liboso ya mokili mobimba epusaki mikili wana mibale na koyeba matomba na bango mpe kosala kati na bango boyokani ya sipesiale. Ezali motindo boye nde nguya ya mokili mobimba na mitó mibale ebotamaki, nguya oyo esalemi na Etats-Unis d’Amérique, mokili oyo kobanda ntango wana ekomaki na bozwi mingi koleka awa na mabelé, mpe na Grande-Bretagne, na esika ya liboso na bokonzi eleki monene na mokili. Na bongo tala ‘motó’ ya nsambo, to nguya ya mokili mobimba, oyo koumela na yango ezali kopusana kino na bileko ya nsuka. Ezali kati na teritware ya nguya yango ya mokili mobimba nde ba Témoins de Jéhovah ya ntango na biso babandaki mosala na bango. Soko tokokisi yango na motó ya motoba, oyo boyangeli na yango eumelaki ntango molai, motó ya nsambo esengeli koumela bobele “mwa ntango moke,” elingi koloba kino ntango Bokonzi na Nzambe ekoboma biyangeli nyonso ya mokili.
Mokonzi na mwambe
8, 9. Ndenge nini anzelu azali kobenga nyama na yauli na elilingi oyo azali na langi motane, mpe na ndimbola nini nyama yango auti kati na mitó nsambo?
8 Anzelu apesi ndimbola oyo mosusu epai na Yoane: “Nyama na yauli oyo azalaki mpe azali te, ye azali mokonzi na mwambe, kasi abimi kati na baoyo nsambo, mpe akei na ye kino libebi.” (Emoniseli 17:11) Nyama na yauli ya langi motane “abimi” na mitó nsambo na boye ete abotami na mitó ya ‘nyama na yauli ya liboso oyo abimi na mai monene,’ nyama oyo ye azali elilingi na yango. Ndenge nini? Na 1919, Nguya Anglo-Amérike ezalaki motó oyo ezalaki koyangela mokili. Mitó motoba ya liboso misilaki kokwea, mpe etelemelo ya nguya na mokili mobimba ekomaki na maboko ya motó wana to nguya mibale esangani. Motó wana ya nsambo, momonisi na molongo na banguya ya mokili mobimba, esalaki mingi mpenza mpo ete Société des Nations esalama mpe ezali ntango nyonso mosalisi ya yambo mpe mopesi monene na mosolo na O.N.U. Na bongo, na elobeli ya elilingi, nyama na yauli na langi motane—mokonzi ya mwambe—“abimi” kati na mitó nsambo ya liboso. Soki totaleli yango na lolenge oyo, maloba oyo mazali koyebisa ete abimi kati na mitó nsambo ekokani malamu elongo emoniseli ya liboso engebene yango nyama na yauli oyo azali na maseke mibale lokola mwana na mpate (Nguya ya mokili mobimba Anglo-Amerike, motó ya nsambo ya nyama na yauli ya liboso) alobaki ete basala ekeko mpe apesaki yango bomoi.—Emoniseli 13:1, 11, 14, 15.
9 Lisusu, kati na basangani ya liboso ya la Société des Nations, longola Grande-Bretagne ezalaki na bikonzi oyo bizalaki koyangela likoló na teritware ya mitó misusu ya kala, lokola Grèce, Iran (Perse) mpe Italie (Rome). Nsima na mikolo, Mikili oyo mizalaki na bokonzi likoló na teritware ya banguya motoba ya liboso ya mokili mobimba misukaki na kopesa maboko epai na ekeko ya nyama na yauli mpe na kosangana na yango. Ezali nde na ndimbola oyo tokoki koloba lisusu ete nyama na yauli ya langi motane eutaki na nguya nsambo ya mokili mobimba.
10. (a) Na ndimbola nini tokoki koloba ete nyama na yauli na langi motane “azali ye moko mokonzi na mwambe”? (b) Ndenge nini mokonzi moko ya mikili oyo ezalaki kala Union soviétique amonisaki lisungi na ye na Nations unies?
10 Nyama na yauli ya langi motane “azali mokonzi na mwambe.” Ya solo, na mikolo na biso O.N.U. ebongisami na lolenge boye ete ekokana mpenza na guvernema moko. Lisangá yango esalaki mbala mosusu lokola ete ezali guvernema mpenza, na kotindaka mampinga na yango na esika mobulu ezali mpo na kosilisa matata kati na mikili, na ndakisa na Corée, kati na eteni ya mokili ebengami Sinaï, kati na mikili misusu ya Afrike mpe na Liban. Kasi ezali bobele ekeko to elilingi ya mokonzi. Lokola ekeko ya losambo, ezali mpenza na bopusi mosusu te to nguya ya solo te bobele oyo epesameli yango epai na baoyo basalaki yango mpe oyo bazali kosambela yango. Nyama na yauli wana ya elilingi azali komonana ete azali na nguya te kati na makambo mosusu; nzokande basangani na yango naino batiki ye mpenza te, kotika oyo ekweisaki Société des Nations kati na libulu mozindo. (Emoniseli 17:8) Na 1987, mokonzi moko ya mikili oyo ezalaki kala Union soviétique oyo ayebani mingi, oyo azali na makanisi makeseni mpenza na oyo ya ba pape na Rome, amekolaki ba pape yango mpo na kopesa lisungi na ye na O.N.U. Asengaki nkutu ete “balendisa ebongiseli moko ya kimya kati na mokili mobimba,” ebongiseli oyo ekotongama likoló na O.N.U. Mosika te lokola Yoane ayokaki yango, ntango ekoya oyo lisangá yango ekokoma na nguya mingi. Na nsima, na ngala na yango, lisangá yango mpe ‘ekobomama.’
Bakonzi zomi mpo na ngonga moko
11. Anzelu na Jéhovah alobi nini na ntina na maseke zomi ya nyama na yauli na langi motane?
11 Na mokapo na 16 na Emoniseli tomonaki anzelu na motoba mpe anzelu na nsambo bazali kosopa mbeki na nkanda na Nzambe. Na bongo tosili kokebisama ete mikonzi na mokili bazali koyanganisama mpo na etumba na Nzambe na Armagedon mpe ete ‘Babilone Monene akokundolama lisusu liboso na Nzambe.’ (Emoniseli 16:1, 14, 19) Sikawa ndimbola mingi ekopesamela biso likoló na motindo oyo bikateli na Nzambe bikokokisama likoló na bakonzi yango. Toyoka lisusu oyo anzelu na Jéhovah alobi na Yoane: “Maseke yango zomi mazali bakonzi zomi, baoyo naino bazwi bokonzi te, kasi bakozwa bokonzi lokola bakonzi elongo na nyama na yauli mpo na ngonga moko. Bango bazali na mokano moko, mpe bakopesa nyama na yauli nguya na bango. Bango bakobunda etumba na Mwana na Mpate, nde Mwana na Mpate akoleka bango mpo ete azali Nkolo na bankolo mpe Mokonzi na bakonzi, mpe elongo na ye babyangami, na baponami, na basembwi, bakolonga lokola.”—Emoniseli 17:12-14.
12. (a) Maseke zomi mazali komonisa nini? (b) Mpo na nini ekokaki kolobama ete maseke zomi ‘mazwaki naino bokonzi te’? (c) Na ndimbola nini maseke zomi na elilingi mazali sikawa na “bokonzi,” mpe bakobatela yango ntango boni?
12 Maseke zomi mazali komonisa banguya nyonso ya politike oyo ezali sikawa na bokonzi kati na mokili mobimba mpe ezali kosunga ekeko na nyama na yauli. Na mikili nyonso oyo mizali na ntango na biso, bobele moke eyebanaki na eleko na Yoane. Mpe oyo eyebanaki na eleko wana, lokola Ezipito mpe Perse (Iran), ezali lelo na ebongiseli ya politike ekeseni. Yango wana, na ekeke ya liboso, ‘maseke zomi mazwaki naino bokonzi te.’ Kasi sikawa, na mokolo na Nkolo, mazali na ‘bokonzi,’ nguya na politike. Lokola bikonzi minene oyo bizalaki koyangela mikili misusu bikweaki, mingimingi kobanda na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ntalo monene ya mikili na sika mibotamaki. Mikili yango, bakisa mpe banguya mosusu ya kalakala, basengeli koyangela elongo na nyama na yauli mpo na ntango moke, “ngonga moko” mpamba, liboso ete Jéhovah atya nsuka na bikonzi nyonso ya politike ya mokili na Armagedon.
13. Nini ezali ‘likanisi mpe lobanzo se moko’ na maseke zomi, mpe ezalela na bango ekozala mpenza nini liboso na Mwana na Mpate?
13 Na mikolo na biso, bolingo na ekolo ezali moko na makambo minene oyo mazali kopusa maseke yango zomi. Bazali na “mokano se moko”: kobatela bokonzi na bango na esika ete bandima Bokonzi na Nzambe. Yango nde mokano na bango ya liboso ntango basanganaki kati na Société des Nations mpe Organisation des Nations unies: kobatela kimya ya mokili mobimba mpe kobatela bikonzi na bango. Ezalela wana emonisi ete maseke makotemela Mwana na Mpate, “Nkolo na bankolo” mpe “Mokonzi na bakonzi,” mpamba te Jéhovah akanaki ete Bokonzi na ye, oyo apesi na Yesu Klisto, ekitana biyangeli nyonso ya bato.—Danyele 7: 13, 14; Matai 24:30; 25:31-33, 46.
14. Ekosalema ndenge nini ete bakonzi na mokili oyo bakobunda na Mwana na Mpate, mpe nsuka na etumba yango ekozala nini?
14 Ya solo, bakonzi ya mokili oyo bakoki kosala eloko moko te epai na Yesu, mpamba te ye afandi na likoló, mosika na bango mpenza. Nzokande, bandeko na Yesu, batikali ya libota na mwasi, bazali naino awa na mabelé mpe bakoki konyokwama. (Emoniseli 12:17) Mingi na maseke yango basili koyina bango makasi, kobundisaka bongo Mwana na Mpate. (Matai 25:40, 45) Kasi, mosika te, ngonga ekobeta mpo ete Bokonzi na Nzambe ‘enyata bikonzi nyonso wana mpe etya nsuka na yango.’ (Danyele 2:44) Na bongo bakonzi na mokili bakobunda etumba makasi kotemela Mwana na Mpate, lokola tokomona yango. (Emoniseli 19:11-21) Kasi, maloba na Yoane mazali koyebisa biso makambo mingi mpo na koyeba ete mabota bakolonga te. Atako bango nyonso bazali na “mokano se moko,” bango mpe O.N.U., bakokoka kolonga te ezala “Nkolo na bankolo mpe Mokonzi na bakonzi,” ata mpe “baoyo bazali na ye elongo baoyo babyangami, baponami, mpe basembwi,” kati na bango bazwami bayekoli na ye bapakolami oyo bazali naino na bomoi awa na mabelé. Bango mpe bakolonga soki batikali sembo liboso na bifundeli nyonso ya mabe mingi oyo Satana azali kofunda bango na yango.—Baloma 8:37-39; Emoniseli 12:10, 11.
Kobomama ya mwasi na pite
15. Anzelu alobi nini na ntina na mwasi na pite mpe na ezalela mpe na etamboli oyo maseke zomi mpe nyama na yauli bazali na yango liboso na ye?
15 Basaleli na Nzambe bazali bango moko te baoyo bakoyinama na maseke zomi. Sikawa anzelu abendi lisusu likebi na Yoane likoló na mwasi na pite: “Alobi na ngai mpe ete, ‘mai mamonaki yo, kuna efandi mwasi na pite, mazali bikólo, na bibele, na mabota, na minoko. Mpe maseke zomi mamonaki yo, bango mpe nyama na yauli bakoyina mwasi na pite, bakobebisa ye, mpe bakotika ye bolumbu, bakolya misuni na ye mpe bakotumba ye na mɔ́to.’”—Emoniseli 17:15, 16.
16. Mpo na nini Babilone Monene akokoka kotya motema te likoló na lisungi mpe libateli na mai na ye mingi na ntango biyangeli na politike bikobalukela ye?
16 Lokola Babilone ya kala ezalaki kotya motema na yango likoló na mai ya Efrata mpo na komibatela, motindo moko mpe na ntango na biso Babilone Monene azali kotya motema na lisungi ya ebele na basangani na yango, “bikólo, na bibele, na mabota mpe na minoko.” Anzelu abendi likebi na biso likoló na bibele yango liboso na koloba mpo na likambo moko ya nsomo: etumba makasi oyo bakonzi na politike bakobimisela Babilone Monene. Bongo ‘bikolo na bibele na mabota na minoko’ nyonso wana bakosala nini? Uta sikawa, basaleli na Nzambe bazali kokebisa Babilone Monene ete mai na Efrata makokauka. (Emoniseli 16:12) Ekosuka mpenza kino kokauka nyonso. Mai yango makokoka te kopesa lisungi ya nguya na mobange ndumba mabe oyo akozala mpenza na mposa na lisalisi na ntango wana.—Yisaya 44:27; Yilimia 50:38; 51:36, 37.
17. (a) Mpo na nini bozwi na Babilone Monene ekozala libateli te mpo na ye? (b) Na ndimbola nini nsuka ya Babilone Monene ekoyokisa ye nsoni mpenza? (c) Longola maseke zomi (mabota mokomoko), nani akosangana na kobomama ya nsomo ya Babilone Monene?
17 Ebele na bozwi ya mosuni ya Babilone Monene ekobatela ye soki moke te. Mbala mosusu ekoyeisa mbango kobomama na ye. Emonaneli emonisi solo ete ntango nyama na yauli mpe maseke zomi bakolakisa koyina na bango epai na mwasi na pite, bakolongola bilamba na ye ya bokonzi mpe ba biju na ye nyonso. Bakobebisa bozwi na ye nyonso. “Bakotika ye bolumbu.” Bakoyokisa ye nsoni na komonisaka bomoto na ye ya solosolo. Oyo nde libebi! Lisusu, nsuka na ye ekozala mpenza ya nsoni. Mabota bakoboma ye, “bakolya misuni na ye,” bakotika ye bobele mikuwa na mikuwa. Nsuka na yango, “bakotumba ye na mɔ́to.” Akotumbama lokola moto moko oyo abeli bokono ya mabe mpenza mpe akokundama ata na lokumu te. Ekozala te bobele mabota, oyo mamonisami na maseke zomi nde bakoboma ndumba monene oyo; te, “nyama na yauli,” oyo azali bongo O.N.U. ye moko akosangana mpe na bango kati na koboma wana monene. Akondima kobomama na mangomba na lokuta. Na nzela na vote na bango, mikili mingi kati na mikili koleka 190 oyo misangani kati na O.N.U. misili kobanda komonisa ete miyini mangomba, mingimingi mangomba na boklisto na mokili.
18. (a) Nini emonisi ete mabota bazali na makoki ya kobalukela mangomba mautaki na Babilone? (b) Mpo na ntina nini ya moboko mabota bakobundisa ndumba oyo monene na nkanda nyonso?
18 Nini emonisi ete mabota bakonyokola mpenzampenza makango na bango ya kala na lolenge moko ya mabe? Makambo masili kosalama na ntango na biso mamonisi ete bazali na makoki ya kobalukela mangomba oyo losambo na yango eutaki na Babilone. Leta, oyo azali komonisa polele ete ayini Babilone Monene, akitisi mpenza bopusi ya mangomba kati na mikili lokola oyo ezalaki kala Union soviétique mpe Chine. Na mikili oyo mizali kolanda lingomba ya protestá kuna na Mpoto, kozanga bosepeli mpe kobeta ntembe na ntina na makambo nyonso matali lingomba, epusi bato mingi na kotika kokenda na bandako-nzambe na boye ete mangomba makomi lokola masili kokufa. Mpo na oyo etali lingomba monene ya katolike, epaswani mpo na botomboki mpe bokabwani oyo bakonzi na yango bazali kolonga te kosilisa yango. Nzokande, tobosana te ete libebi ya nsuka oyo ekobimela Babilone Monene ekomonisa ete Nzambe asili kokatela ndumba oyo monene ekateli ya libela.
Bakokisi likanisi na Nzambe
19. (a) Na makambo nini ekateli oyo Jéhovah azwaki mpo na ndumba monene emonisami na elilingi na ekateli oyo akweisaki likoló na Yelusaleme ya kopengwa na 607 liboso na ntango na biso? (b) Mpasi oyo Yelusaleme ezwaki ntango ebomamaki mpe etikamaki mpamba kozanga bafandi nsima na mobu 607 liboso na ntango na biso ezali komonisa nini na eleko na biso?
19 Ndenge nini Jéhovah akokokisa ekateli yango? Tokoki kopesa ndakisa na kotalelaka motindo oyo apesaki etumbu epai na libota na ye oyo emonisaki botomboki na ntango na kala; alobaki mpo na bango ete: “Epai na basakoli na Yelusaleme mpe namoni likambo mabe mingi: bazali kosala ekobo mpe kotambola na bokosi, mpe bakembisi maboko na basali mabe kino moko akopengwa na mabe na ye te, bakomi nyonso liboso na ngai lokola Sodome, mpe bafandi na yango lokola Gomola.” (Yilimia 23:14) Na 607 liboso na ntango na biso, Jéhovah asalelaki Nebukadanezare mpo na ‘kolongola bilamba’ na engumba yango oyo ezalaki kosala pite na elimo, mpo na ‘kobotola biloko kitoko na yango mpe kotika yango bolumbu mpe mpamba.’ (Ezekiele 23:4, 26, 29) Yelusaleme ya eleko wana ezalaki elilingi na boklisto ya lokuta na lelo, mpe lokola Yoane amonaki yango liboso, Jéhovah akopesa etumbu ya motindo moko na boklisto ya lokuta, lokola mpe na mangomba nyonso ya lokuta. Yelusaleme ebebisamaki mpe etikalaki mpamba kozanga bafandi nsima na mobu 607 liboso na ntango na biso; boklisto ya lokuta ekozwa mpe mpasi ya motindo moko nsima wana bakobotola bozwi na ye mpe bakotika ye bolumbu, mpo na koyokisa ye nsoni mingi. Mpo na mangomba mosusu ya Babilone Monene oyo matikali, nsuka na bango ekozala mpe ya esengo te.
20. (a) Na maloba nini Yoane azali koyebisa ete Jéhovah akosalela lisusu bakonzi na bato mpo na kokokisa lisambisi na ye? (b) Nini ezali “likanisi mpe lobanzo” na Nzambe? (c) Na ndimbola nini mabota bakokokisa “likanisi mpe lobanzo na bango se moko,” kasi likanisi nini ekokokisama mpenzampenza?
20 Jéhovah akosalela lisusu bakonzi na bato mpo na kokokisa ekateli na ye. “Mpo ete Nzambe atyaki na mitema na bango ete basala mokano na ye, mpe ete bandimana na kopesa nyama na yauli bokonzi na bango kino ekokoka maloba na Nzambe.” (Emoniseli 17:17) “Likanisi” na Nzambe ezali nini? Kosala na boye ete babomi na Babilone Monene bayokana mpo na koboma ye libela. Ya solo, na kobundisa ye, bakonzi bakozala na mokano ya kokokisa “likanisi se moko mpe lobanzo se moko” na bango. Wana bakobalukela Babilone monene, bakokanisa ete bazali kosala mpo na matomba ya mikili na bango. Mbala mosusu bakomona ete ndenge mangomba mazali koumela na teritware na bango ezali likama mpo na bokonzi na bango. Nzokande, ezali Jéhovah nde akotambwisa makambo; bakokokisa likanisi na ye na kobomaka mbala moko monguna na ye ya kalakala mpe mosali na pite.—Tala Yilimia 7:8-11, 34.
21. Lokola nyama na yauli na langi motane akosalelama mpo na koboma Babilone Monene, mabota makosala nini, mpo na kokotela O.N.U.?
21 Ee, mabota bakosalela nyama na yauli na langi motane, O.N.U., mpo na koboma Babilone Monene. Likanisi ya kosala bongo ekouta epai na bango moko te, mpamba te Jéhovah akotya kati na mitema na bango ete “bakokisa likanisi na ye, ee, kokokisa lobanzo mpe likanisi na bango bobele moko na kopesaka bokonzi na bango epai na nyama na yauli.” Na elaka esili koponama, emonani lokola ete mabota bakomona ntina ya kolendisa O.N.U. Na ndimbola mosusu bakopesa mino epai na lisangá yango na kopesaka ye bokonzi nyonso mpe nguya oyo bazali na yango mpo ete akoka kobalukela mangomba ya lokuta mpe kobundisa yango na elonga nyonso “kino maloba nyonso na Nzambe makokokisama.” Ezali na boye nde ndumba na kalakala akolimwa libelalibela.
22. (a) Nini emonisami na ndenge anzelu asukisiki litatoli na ye kati na Emoniseli 17:18? (b) Ba Témoins de Jéhovah bazali kosala nini awa libombami emonisami?
22 Mpo na komonisa polele ete lisambisi na Jéhovah ekokokisama mpenzampenza likoló na lisangá ya mokili mobimba ya mangomba na lokuta, anzelu asukisi litatoli na ye na boye ete: “Mwasi oyo omonaki, azali mboka yango monene oyo azali na bokonzi likoló na bakonzi nyonso na mokili.” (Emoniseli 17:18) Lokola Bokonzi ya Babilone na ntango ya Belesasala, Babilone Monene ‘emekamaki na emekeli na bozito mpe ezwami na kozanga.’ (Danyele 5:27.) Kobomama na yango ekozala ya nokinoki mpe ya libela. Ba Témoins de Jéhovah bazali sikawa kosala nini lokola libombami na ndumba monene mpe na nyama na yauli engengisami? Na molende nyonso, bazali kosakola mokolo na kosambisa na Jéhovah mpe bazali koyanola na “esengo” nyonso na mituna na bato oyo bazali koluka solo na motema moko. (Bakolose 4:5, 6; Emoniseli 17:3, 7) Lokola mokapo oyo elandi ekomonisa yango, baoyo nyonso balingi kobika na ntango na kobomama na ndumba monene basengeli kozwa ekateli nokinoki!
[Bililingi na lokasa 252]
Kolandana na banguya nsambo ya mokili mobimba
EZIPITO
ASULIA
BABILONE
MEDO-PERSE
GRECE
ROME
ANGLO-AMERIKE
[Bililingi na lokasa 254]
‘Ye azali mokonzi na mwambe’
[Elilingi na lokasa 255]
Bapesi mwana na Mpate mokongo, ‘bapesi nguya mpe bokonzi na bango epai na nyama na yauli’
[Elilingi na lokasa 257]
Mangomba na lokuta ya mokili oyo, eteni ya liboso ya Babilone monene, ekosuka motindo moko na Yelusaleme ya kala: ekobomama mpo na libela