-
Ndenge oyo mangomba ya lokuta ekoselaka Nzambe makamboSepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
-
-
2. Ndenge nini mangomba ya lokuta ekoselaka Nzambe makambo na misala na yango?
Mangomba ya lokuta esalelaka bato makambo te ndenge Yehova alingaka. Kutu Biblia elobi ete “masumu [ya mangomba ya lokuta] etondi tii na likoló.” (Emoniseli 18:5) Banda kala, mangomba ya lokuta ekɔtaka na makambo ya politiki, epesaka mabɔkɔ na bitumba, ebomaka mpe ebomisaka bato mingi. Bakonzi mosusu ya mangomba balingá bozwi, yango wana basɛngaka bandimi na bango mbongo. Makambo oyo bakonzi yango ya mangomba basalaka emonisi ete bayebi Nzambe ata moke te mpe babongi te kobengama basaleli ya Nzambe.—Tángá 1 Yoane 4:8.
-
-
Tikalá sembo epai ya YehovaSepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
-
-
Tángá Luka 4:8 mpe Emoniseli 18:4, 5, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:
Nkombo na ngai ezalaka tii lelo oyo na molɔngɔ ya bandimi ya lingomba moko ya lokuta?
Nazali na kati ya ebongiseli moko oyo ezali na boyokani na mangomba ya lokuta?
Mosala oyo nasalaka epesaka mangomba ya lokuta mabɔkɔ?
Ezali na makambo mosusu ya bomoi na ngai oyo nasengeli kotika mpo nakabwana na mangomba ya lokuta?
Soki nayanoli ɛɛ ata na motuna moko, mbongwana nini nasengeli kosala?
Na makambo nyonso, zwá ekateli oyo ekosala ete ozala na lisosoli ya malamu mpe oyo ekomonisa ete ozali sembo epai ya Yehova.
Okosala nini soki ebongiseli ya lingomba moko oyo esalisaka bato ya mpasi esɛngi yo otya likabo?
SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Osengeli koyeba makambo oyo bapɛngwi balobaka mpo na Batatoli ya Yehova mpo okɔtela solo.”
-