Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Bokumisa Yah mpo na bikateli na ye!
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
    • 1. Maloba nini Yoane ayoki “lokola mongongo makasi ya ebele monene kati na likolo”?

      BABILONE MONENE ezali lisusu te! Ya solo, oyo ezali nsango moko ya esengo mpenza! Ntina ya kokamwa ezali te soko Yoane akoyoka maloba na kosepela mpe na kokumisa kati na likoló. “Na nsima na makambo oyo nayokaki mongongo lokola mongongo na ebele monene na bato kati na likoló koloba ete, Aleluya!a Lobiko, na nkembo, na nguya na Nzambe na biso! Mpo ete bikateli na ye bizali solo mpe sembo. Mpo ete akweisi [ndumba] monene oyo abebisaki mokili na pite na ye; abukanisi ye mpo na makila na baombo na ye. Mbala na mibale balobi ete, Aleluya!b Molinga na mboka yango mokobutaka libela na libela.”​—Emoniseli 19:1-3.

  • Bokumisa Yah mpo na bikateli na ye!
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
    • 3. Mpo na nini ndumba monene abongi mpenza na ekateli oyo?

      3 Mpo na nini ndumba oyo monene abongi mpenza mpo na kozwa ekateli yango? Engebene mobeko oyo Jéhovah apesaki na Noé, na nzela na ye apesi yango epai na bato nyonso, kosopa makila na nko ebongi na etumbu ya liwa. Yango ezongelamaki lisusu kati na Mibeko oyo Nzambe apesaki na Yisraele. (Genese 9:6; Mituya 35:20, 21) Lisusu, kati na Mibeko na Moïse, ezala ekobo na mosuni to ekobo na elimo ezalaki kobenda etumbu ya liwa. (Levitike 20:10; Deteronome 13:1-5) Na boumeli ya bankoto na mibu, Babilone Monene asopaki makila; azali lisusu mosali monene na pite. Na ndakisa, mobeko ya Lingomba na katolike oyo ezali kopekisa basángo ete babala te ememaki basángo mingi na komipesa na pite, mpe lelo, mingi kati na bango basili kozwa SIDA. (1 Bakolinti 6:9, 10; 1 Timote 4:1-3) Mpo na oyo etali masumu na ye minene, oyo “ebuti kino na likoló,” ezali misala mabe ya pite na elimo, oyo asalaki na koteyaka lokuta mpe na kosanganaka na bato na politike na mbindo. (Emoniseli 18:5) Lokola na nsuka na yango etumbu ekweisami likoló na ye, bibele na bikelamu na likoló bazali sikawa kozongela aleluya ya mibale.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto