Mokapo 38
Bokumisa Yah mpo na bikateli na ye!
1. Maloba nini Yoane ayoki “lokola mongongo makasi ya ebele monene kati na likolo”?
BABILONE MONENE ezali lisusu te! Ya solo, oyo ezali nsango moko ya esengo mpenza! Ntina ya kokamwa ezali te soko Yoane akoyoka maloba na kosepela mpe na kokumisa kati na likoló. “Na nsima na makambo oyo nayokaki mongongo lokola mongongo na ebele monene na bato kati na likoló koloba ete, Aleluya!a Lobiko, na nkembo, na nguya na Nzambe na biso! Mpo ete bikateli na ye bizali solo mpe sembo. Mpo ete akweisi [ndumba] monene oyo abebisaki mokili na pite na ye; abukanisi ye mpo na makila na baombo na ye. Mbala na mibale balobi ete, Aleluya!b Molinga na mboka yango mokobutaka libela na libela.”—Emoniseli 19:1-3.
2. (a) Liloba “Aleluya” elimboli nini, mpe yango emonisi nini lokola Yoane ayoki yango mbala mibale? (b) Nkembo mpo na kobomama ya Babilone Monene epesami epai na nani? Limbola.
2 Aleluya! Liloba oyo elimboli “Bokumisa Yah!,” “Yah” ezali ebengeli mokuse ya nkombo Jéhovah. Tala likambo oyo epesi biso nzela na kokanisa toli oyo ya mokomi moko na nzembo: “Tika ete nyonso na mpema basanzola Jéhovah.” (Nzembo 150:6) Na esika oyo ya Emoniseli Yoane ayoki bayembi na likoló, batondi na esengo, bazali koyemba mbala mibale “Aleluya!,” yango emonisi ete kosakolama na solo ya Nzambe elandani. Nzambe ya Makomami na greke na boklisto azali se Nzambe moko oyo ya Makomami na liebele, mpe nkombo na ye ezali Jéhovah. Nzambe oyo ayeisaki kokwea ya Babilone na kala, sikawa asambisi mpe abomi Babilone Monene. Tika ete nkembo mpe lokumu epesama na ye mpo na likambo monene oyo! Nguya oyo ememaki kokwea na Babilone ezali ya ye, kasi ezali te ya mikili oyo ye asalelaki mpo na komema libebi likoló na yango. Ezali bobele Jéhovah ye moko nde tosengeli kopesa lokumu.—Yisaya 12:2; Emoniseli 4:11; 7:10, 11.
3. Mpo na nini ndumba monene abongi mpenza na ekateli oyo?
3 Mpo na nini ndumba oyo monene abongi mpenza mpo na kozwa ekateli yango? Engebene mobeko oyo Jéhovah apesaki na Noé, na nzela na ye apesi yango epai na bato nyonso, kosopa makila na nko ebongi na etumbu ya liwa. Yango ezongelamaki lisusu kati na Mibeko oyo Nzambe apesaki na Yisraele. (Genese 9:6; Mituya 35:20, 21) Lisusu, kati na Mibeko na Moïse, ezala ekobo na mosuni to ekobo na elimo ezalaki kobenda etumbu ya liwa. (Levitike 20:10; Deteronome 13:1-5) Na boumeli ya bankoto na mibu, Babilone Monene asopaki makila; azali lisusu mosali monene na pite. Na ndakisa, mobeko ya Lingomba na katolike oyo ezali kopekisa basángo ete babala te ememaki basángo mingi na komipesa na pite, mpe lelo, mingi kati na bango basili kozwa SIDA. (1 Bakolinti 6:9, 10; 1 Timote 4:1-3) Mpo na oyo etali masumu na ye minene, oyo “ebuti kino na likoló,” ezali misala mabe ya pite na elimo, oyo asalaki na koteyaka lokuta mpe na kosanganaka na bato na politike na mbindo. (Emoniseli 18:5) Lokola na nsuka na yango etumbu ekweisami likoló na ye, bibele na bikelamu na likoló bazali sikawa kozongela aleluya ya mibale.
4. Likambo oyo ete molinga na Babilone Monene “ezali kobuta libela na libela” elimboli nini?
4 Lokola engumba oyo ebotolami, Babilone Monene etumbami mpe molinga na yango “ezali kobuta seko.” Ntango engumba moko ezikisami na móto na mampinga oyo bazwi elonga, molinga eumelaka naino ntango putulu ezali naino na móto. Moto nyonso oyo akomeka kotonga yango lisusu, wana ezali naino yango kobimisa milinga, akozikisama, mpamba te móto ezali naino kobombama kati na bitongeli oyo bisili kokweisama. Lokola molinga esengeli kobima “libela na libela” kati na Babilone Monene mpo na komonisa elilingi ya kosambisama na ye, moto moko te akokoka kotonga lisusu engumba yango. Losambo na lokuta ekolimwa mpo na libela. Ee, ezali mpenza Aleluya!—Tala Yisaya 34:5, 9, 10.
5. (a) Bankulutu 24 mpe bikelamu na bomoi minei bazali kosala nini mpe koloba nini? (b) Mpo na nini aleluya oyo ezali mpenza na melodi kitoko mingi koleka ebele na aleluya oyo eyembami kati na Mangomba ya boklisto na mokili?
5 Kati na Emoniseli oyo euti koleka, Yoane amonaki zongazonga na kiti na Bokonzi bikelamu na bomoi minei, elongo na mikóló 24 oyo bazali bongo elilingi na batuki na libula na Bokonzi kati na etelemelo na bango ya lokumu kuna na likoló (Emoniseli 4:8-11) Mpe sikawa, Yoane amoni bango lisusu wana ezali bango konganga aleluya ya misato mpo na kosakola kokwea ya Babilone Monene: “Mikóló yango ntuku mibale na minei, na bikelamu na bomoi yango minei bakwei, mpe basambeli Nzambe oyo afandi na kiti na bokonzi koloba ete: ‘Amen! Aleluya!’”c (Emoniseli 19:4) Ebele na ba aleluya kitoko oyo eyei bongo kobakama na “loyembo na sika” ya kosanzola oyo epesami epai na Mwana na Mpate. (Emoniseli 5:8, 9) Sikawa bayembi bazali kobanda refrain oyo ezali kokumisa bolongi monene na Jéhovah, Nkolo Moyangeli, kopesaka ye lokumu mpo na bolongi na ye monene likoló na Babilone Monene, mwasi mabe na pite. Ebele na aleluya wana ezali mpenza na melodi kitoko koleka ebele na aleluya oyo eyembami na Mangomba na boklisto ya lokuta, kuna Yah to Jéhovah akumisamaki te kasi atyolamaki. Mingongo wana na bokosi oyo mizali kobwaka nsoni likoló na nkombo na Jéhovah mikoyokama lisusu te.
6. “Mongongo” ya nani tozali koyoka, likambo nini azali kosenga epai baoyo na bazali koyoka yango, mpe nani azali koyanola na libyangi yango?
6 Ezalaki na 1918 nde Jéhovah abandaki kopesa mbano epai na ‘baoyo bazali kobanga nkombo na ye, bato mike mpe bato minene’; baoyo na liboso kati na bango ezali bongo baklisto bapakolami, baoyo bakufaki kati na bosembo, mpe asekwisaki bango, kopesaka bango esika na likoló kati na mikoló 24. (Emoniseli 11:18) Bamosusu basangani elongo na bango mpo na koyemba ebele na aleluya, mpamba te Yoane ayebisi: “Mpe mongongo ebimi na kiti na bokonzi ete: ‘Bosanzola Nzambe na biso, bino baombo na ye nyonso, bino baoyo bokobangaka ye, bato mike na bato minene!’” (Emoniseli 19:5) “Mongongo” wana mozali oyo na Molobeli na Jéhovah, Mwana na ye mpenza Yesu Klisto, oyo atelemi “katikati na kiti na bokonzi.” (Emoniseli 5:6) “Baombo na ye nyonso” bazali koyemba bobele na likoló te, kasi mpe na mabelé, epai oyo bakambami na bapakolami na kelasi na Yoane. Na esengo ya motindo nini bazali kotosa etinda oyo: “Bokumisa Nzambe na biso!”
7. Nsima na kobomama na Babilone Monene, nani akokumisa Jéhovah?
7 Ee, ebele monene bazali mpe kati na baombo yango. Kobanda na 1935, bazali kobima na Babilone Monene, mpe likoló na bango nde elaka oyo na Nzambe ezali kokokisama: “Akopambola baoyo bakobanga Jéhovah, bato mike mpe bato minene lokola.” (Nzembo 115:13) Nsima na kobomama ya mwasi na pite Babilone, bankoto kati na bango ‘bakokumisa Nzambe na biso,’ elongo na kelasi ya Yoane mpe na bibele ya bikelamu ya likoló. Na nsima, bato oyo bakosekwisama awa na mabelé, ezala ete bazalaki bato minene to te, na ntembe te bakobakisa ebele na aleluya mosusu wana ekoyoka bango ete Babilone Monene elimwá mpo na libela. (Emoniseli 20:12, 15) Tika ete Jéhovah akumisama mpo na elonga na ye monene likoló na mobange ndumba oyo!
8. Ebele na masanzoli oyo Yoane ayokaki esengeli kobenda biso na kosala nini sikawa, liboso na kobomama na Babilone Monene?
8 Oyo nde elendiseli mpo ete tomipesa mingi mpenza na mosala ya Nzambe na eleko na biso oyo! Tika ete basaleli nyonso na Yah bamipesa mobimba mpo na kosakola bikateli na Nzambe mpe elikya kitoko ya Bokonzi mpe yango uta sikawa, liboso ete Babilone Monene ekitisama mpe ebomama!—Yisaya 61:1-3; 1 Bakolinti 15:58.
‘Aleluya—Jéhovah azali Mokonzi!’
9. Mpo na nini aleluya ya nsuka eyokani makasi koleka?
9 Ezali na bantina mosusu oyo tosengeli kosepela mpo na yango, lokola eyebisami na Yoane oyo akobi na maloba oyo ete: “Nayokaki mongongo lokola mongongo na ebele monene, lokola mongongo na mai monene, lokola mongongo na nkake makasi, koloba ete: ‘Aleluya,d mpo ete Jéhovah Nzambe na biso, Mozwi-na-Nguya-Nyonso, asili kozwa bokonzi.’” (Emoniseli 19:6) Aleluya oyo ya nsuka ezali oyo ebakisami likoló na kosakolama, mpo na kopesa yango boyokani ya kokoka. Ezali bongo korale makasi ya likoló, oyo eleki bakorale nyonso ya bato awa na mokili, kitoko mingi koleka makelele ya bisika nyonso oyo mai na ebale mazali kokwea likoló na mabanga mpe makasi mingi koleka makelele ya nkake. Bankoto na bankoto na mingongo na likoló mizali kokumisa likambo yango: “Jéhovah Nzambe na biso, Mozwi-na-Nguya-Nyonso, asili kozwa bokonzi.”
10. Na ndimbola nini tokoki koloba ete Jéhovah asili kozwa bokonzi nsima na kobomama na Babilone Monene?
10 Kasi mpo na nini tozali koloba ete Jéhovah asili kozwa bokonzi? Mibu mingi miutaki koleka uta mokomi na nzembo alobaki ete: “Nzambe azali Mokonzi na ngai longwa kalakala.” (Nzembo 74:12) Lokola bokonzi na Jéhovah ezalaki ya kalakala ata na ntango wana, mpo na nini korale ya molongo mobimba ekoki koyemba ete: “Jéhovah . . . asili kozwa bokonzi”? Mpamba te nsima na kobomama na Babilone Monene, Jéhovah akozala lisusu na mbanda ya lolendo te mpo na kopengola bato na botosi oyo esengeli na ye Nkolo ya molongo mobimba. Mangomba ya lokuta ekobenda lisusu bakonzi na mokili te ete batombokela Jéhovah. Ntango Babilone ya kala ekweisamaki mpo na kolongwa na molongo na yango ya nguya na mokili mobimba, Siona eyokaki kosakolama oyo na bolongi: “Nzambe na yo akomi mokonzi!” (Yisaya 52:7) Nsima na kobotama ya Bokonzi na 1914, mikoló 24 basakolaki ete: “E Jéhovah Nzambe, Mozwi-na-Nguya-Nyonso, . . . totondi yo mpo ete okamati nguya na yo monene, mpe osili kokoma mokonzi.” (Emoniseli 11:17) Sikawa lokola Babilone Monene esili kobebisama, mongongo yango eyokani lisusu: “Jéhovah . . . asili kokoma mokonzi.” Nzambe moko te oyo asalami na moto akobika mpo na kotelemela bokonzi ya Nzambe na solo Jéhovah.
Libala ya Mwana na Mpate ebelemi!
11, 12. (a) Na maloba nini Yelusaleme na kala elobaki epai na Babilone ya kala, kopesaka elakiseli nini mpo na Yelusaleme na Sika mpe na Babilone Monene? (b) Nsima na bolongi likoló na Babilone Monene, likambo nini bibele na likoló bazali koyemba mpe kosakola?
11 “E moyini na ngai!” Tala na maloba nini Yelusaleme, epai kuna tempelo mpo na losambo na Jéhovah ezalaká, motindo nini elobaká mpo na Babilone mboka na losambo ya bikeko. (Mika 7:8) Motindo moko mpe, “engumba mosantu, Yelusaleme na Sika,” oyo esalami na basangani 144 000 baoyo lisangá na bango nyonso esali mwasi na Mwana na Mpate, ezali na ntina malamu na koloba na Babilone Monene lokola na moyini na ye. (Emoniseli 21:2) Na nsuka, ndumba monene akoyinama, akozwa mpasi mpe akobebisama. Misala na ye na ndoki mpe bato na ye oyo batangaka myoto mpo na koyeba makambo, bakozala na nguya te mpo na kobikisa ye. (Tala Yisaya 47:1, 11-13.) Oyo nde bolongi monene mpo na losambo ya solo!
12 Babilone Monene, mwasi mabe na pite, lokola alimwe libela, likebi na biso ekoki sikawa kotiama likoló na moseka ya peto oyo azali mwasi na Mwana na Mpate. Mpo na yango ebele na bikelamu na likoló bazali kokumisa Jéhovah na esengo na kolobaka ete: “Tosepela, tozala na esengo; tokokumisa ye mpo ete libala na Mwana na Mpate esili koya. Mwasi na ye asili komibongisa nzoto. Nzela epesami na ye ete alata bilamba petepete, na langilangi, na mpeto. Mpo ete bilamba yango petepete bizali boyengebene na basantu.”—Emoniseli 19:7, 8.
13. Na boumeli na bikeke, ndenge nini libala na Mwana na Mpate elengelamaki?
13 Na boumeli ya bikeke, Yesu alengelaki libala yango ya likoló na bolingo nyonso. (Matai 28:20; 2 Bakolinti 11:2) Apetolaki basangani 144 000 ya Yisraele na elimo, mpo ete “lingomba bamonana liboso na ye na nkembo, na kozanga libebi mpe liyuta mpe eloko nini mabe kasi ete bazala bulee mpe na mwa libebi moke te.” (Baefese 5:25-27) Mpo na kozwa libonza “na ebiangeli na Nzambe kuna na likoló,” moklisto mopakolami nyonso asengelaki kobwaka bomoto na ye na kala elongo na misala na yango, mpo na kolata bomoto na sika ya boklisto mpo na kosala misala na sembo na ‘molimo na ye mobimba, lokola mpo na Jéhovah.’—Bafilipi 3:8, 13, 14; Bakolose 3:9, 10, 23.
14. Ndenge nini Satana amekaki kobebisa bato oyo baponamaki mpo na kozala mwasi na Mwana na Mpate?
14 Kobanda na Pantekote ya mobu 33, Satana asalelaki Babilone Monene mpo na komeka kobebisa basangani ya mwasi na Mwana na Mpate. Penepene na nsuka na ekeke ya liboso alonaki milona ya lingomba na Babilone kati na lisangá. (1 Bakolinti 15:12; 2 Timote 2:18; Emoniseli 2:6, 14, 20) Ntoma Paulo amonisi bato oyo bazalaki kokweisa kondima na maloba oyo: “Mpo ete bato yango bazali bantoma na lokuta, basali na kozimbisa, baoyo bakomimonisaka lokola bantoma na Klisto. Bokamwa te, mpo ete ata Satana akomimonisaka lokola ntoma na moi.” (2 Bakolinti 11:13, 14) Na boumeli ya bikeke, boklisto na lipengwi, bakisa mpe mangomba mosusu ya Babilone Monene, emilatisaki bozwi mpe lokumu, “na bilamba motane mwindo na motane mondo . . . na wolo, na mabanga kitoko mpe na pauni.” (Emoniseli 17:4) Basangó na ye mpe bapape na ye basalaki boyokani elongo na bakonzi oyo bazalaki basopi na makila na ndakisa Constantin mpe Charlemagne. Amilatisaki soko moke te “misala na boyengebene ya basantu.” Lokola mwasi mokosi, azalaki mpenza kafumba na lokuta oyo Satana asalelaki. Nsuka na yango, akolimwa mpo na libela!
Mwasi na Mwana na Mpate amilengeli
15. Ndenge nini baklisto bapakolami batiami elembo, mpe likambo nini esengami epai na moko na moko na bango?
15 Na bongo, lokola penepene na mibu 2 000 misili koleka, basangani 144 000 ya kelasi na mwasi basili komilengela bango nyonso. Kasi na eleko nini tokoki koloba ete ‘mwasi na Mwana na Mpate asili komilengela’? Mokemoke, kobanda na Pantekote ya mobu 33, bandimi bapakolami “batiamaki elembo na elimo santu oyo elakami” mpo na “mokolo na lisiko.” Lokola ntoma Paulo ayebisaki yango, Nzambe “atii elembo na ye epai na biso mpe apesi elimo na mitema na biso lokola ndanga.” (Baefese 1:13; 4:30; 2 Bakolinti 1:22) Moklisto mopakolami nyonso azali ‘mobiangami mpe moponami,’ mpe amimonisaki ‘mosembwi.’—Emoniseli 17:14.
16. (a) Na eleko nini ntoma Paulo atiamaki elembo, mpe ndenge nini toyebi yango? (b) Ntango nini mwasi na Mwana na Mpate akosilisa na “komilengela” mobimba?
16 Nsima na mibu mingi ya kotiama na komekama, Paulo ye moko akokaki koloba boye: “Nasili kobunda etumba malamu, nasilisi nzela na kotambola, nasili kobatela kondima. Longwa na sasaipi motole na boyengebene ebombami mpo na ngai oyo Nkolo, Mosambisi na sembo, akopesa ngai na mokolo yango, nde bobele na ngai te kasi na bango nyonso oyo basili kolinga komonana na ye.” (2 Timote 4:7, 8) Emonani ete ntoma Paulo atyamaki elembo, atako azalaki naino na nzoto ya mosuni mpe na nsima abomamaki. Motindo moko mpe, ntango ekoya oyo baoyo nyonso bazwami kati na ba 144 000 oyo bazali naino na mabelé bakotiama elembo moto na moto lokola mwana na Nzambe. (2 Timote 2:19) Yango ekosalema ntango mwasi na Mwana na Mpate akosilisa komilengela mobimba, eteni monene na ba 144 000 basili kozwa mbano na bango na likoló, mpe baoyo bazali naino na mabelé bakosila kondimama libela mpe kotiama elembo na ntina na bosembo na bango.
17. Ntango nini libala na Mwana na Mpate ekokoka kosalema?
17 Na eleko wana ya manaka na Jéhovah, ntango ba 144 000 nyonso bakosila kotiama elembo, baanzelu bakotika mipepe minei ya bolozi monene. (Emoniseli 7:1-3) Ya liboso, mwasi na pite, Babilone Monene akobomama. Na nsima Klisto molongi akopota epai na Armagedon epai kuna akoboma ndambo mosusu na lisangá ya Satana na mabelé, mpe, na nsuka akobwaka Satana mpe badémo na ye na libulu mozindo. (Emoniseli 19:11 kino 20:3) Na ntembe te, bapakolami oyo ntango mosusu bakozala naino awa na mabelé, bakoumela te kozwa libula na bango na likoló nsima ya ntango Klisto akokomisa bolongi na ye na nsuka na yango mpe bakokende kokutana na bandeko na bango, basangani na kelasi na mwasi. Na nsima na yango, na ntango oyo Nzambe ye moko aponi nde libala ya Mwana na Mpate ekosalema.
18. Ndenge nini Nzembo 45 endimisi molongo ya makambo oyo matali libala na Mwana na Mpate?
18 Esakweli oyo ezali na Nzembo 45 elobeli ndenge makambo yango ekolandana. Ya liboso, Mokonzi oyo azwi kiti ya bokonzi azali kotambola likoló na mpunda mpo na kolonga banguna na ye (Versets 1 kino 7); na nsima ezali nde libala; miseka oyo balandi mwasi na libala mpo na kosalela ye, ezali nde elilingi na ebele monene awa na mabelé (versets 8 kino 15); mpe, na nsuka, libala eboti mbuma, bato basekwisami mpe bakomi na ezalela ya kokoka na nse na litambwisi ya “baprense na mabelé mobimba.” (Versets 16 mpe 17) Ya solo, libala na Mwana na Mpate ekomema mapamboli minene!
Esengo na baoyo babyangami na elambo ya libala
19. Esengo na minei na Emoniseli ezali nini, mpe banani bazwi mpenzampenza esengo yango?
19 Sikawa Yoane azali koyebisa esengo na minei kati na bisengo nsambo oyo ekomami na Emoniseli. [Anzelu oyo azali kotalisa bimoniseli yango] “Alobaki na ngai [Yoane]: ‘Koma ete: Esengo na bango basili kobyangama na elambo na libala na Mwana na Mpate, na elambo na ye ya mpokwa.’ Alobi na ngai mpe ete: ‘Maloba oyo mazali maloba na solo na Nzambe.’” (Emoniseli 19:9)e Babyangami na “elambo na libala na Mwana na Mpate, na elambo na ye ya mpokwa,” ezali basangani na kelasi ya mwasi. (Tala Matai 22:1-14.) Bapakolami nyonso oyo bazwami kati na molongo ya libala bazali na esengo mpo ete basilaki kozwa libyangami yango. Ntalo eleki monene na babyangami basili kokenda na makoló, epai kuna elambo ya libala ekosalama. Baoyo bazali naino awa na mabelé bazali na esengo mpo ete basilaki kozwa libyangami yango. Esika na bango na elambo na libala ebatelami malamu. (Yoane 14:1-3; 1 Petelo 1:3-9) Ntango bakosekwa kuna na likoló, na bongo mwasi oyo akomi mobimba mpe na bomoko akosangana elongo na Mwana na Mpate na libala oyo esengo na yango eleki esengo ya mabala nyonso.
20. (a) Ndimbola ya maloba oyo ezali nini: “Maloba oyo mazali maloba na solo na Nzambe”? (b) Ntoma Yoane alingaki kosala nini nsima na koyoka maloba na anzelu, kasi anzelu azongiselaki ye nini?
20 Anzelu abakisi: “Maloba oyo mazali maloba na solo na Nzambe.” Liloba “solo” ebongoli liloba na greke alêthinos oyo elimboli “ya solo” to “ebongi na kotiela motema.” Lokola maloba yango mauti mpenza epai na Jéhovah, mazali sembo mpe mabongi kondimama. (Tala 1 Yoane 4:1-3; Emoniseli 21:5; 22:6.) Lokola azalaki mobyangami na elambo ya libala, Yoane atondaki mpenza na esengo na koyokaka makambo yango mpe na kokanisaka na mapamboli oyo mazalaki kozela kelasi ya mwasi. Mpo na mayoki na ye mozindo, anzelu azwaki mokumba ya kopesa ye toli; Yoane alobi: “Nakwei na makolo na ye mpo na kosambela ye. Alobi na ngai ete: ‘Tika! Nazali moombo moninga na yo mpe na bandeko na yo baoyo bazali na matatoli na Yesu. Sambela Nzambe.’”—Emoniseli 19:10a.
21. (a) Litatoli nini Emoniseli ezali koyebisa na ntina na baanzelu? (b) Ezalela na baklisto esengeli kozala nini liboso na baanzelu?
21 Longwa na ebandeli kino na nsuka, Emoniseli ezali kotatola mpo na bosembo mpe na molende na baanzelu. Bazali kotindama mpo na kosakola solo oyo esengeli koyebisama. (Emoniseli 1:1) Bazali kosala elongo na bato kati na mosala ya kosakola nsango malamu mpe na kosopáká bolozi to bitumbu ya elilingi. (Emoniseli 14:6, 7; 16:1) Babundaki esika moko na Yesu mpo na kobengana Satana mpe badémo na ye kati na makolo, mpe bakobunda lisusu esika moko na ye na Armagedon. (Emoniseli 12:7; 19:11-14) Lisusu, bakoki kobelema penepene na Jéhovah ye moko. (Matai 18:10; Emoniseli 15:6) Atako bongo, bazali bobele baombo na bopolo na Nzambe. Kati na losambo na solo, esika ezali te mpo na losambo ya baanzelu, to mpe mpo na losambo oyo etali kosambela Nzambe na nsima na “mosantu” moko to ya anzelu moko. (Bakolose 2:18) Baklisto bazali kosambela bobele Jéhovah ye moko, bazali kosenga ye nyonso na nkombo na Yesu.—Yoane 14:12, 13.
Mokumba na Yesu kati na esakweli
22. Anzelu alobi nini na Yoane, mpe ndimbola ya maloba yango ezali nini?
22 Anzelu alobi sikawa: “Mpamba te maloba na basakoli mapemami mpo na kopesa litatoli na Yesu.” (Emoniseli 19:10b, MN) Ndenge nini? Na ndimbola oyo ete esakweli nyonso epemami ezali mpo na Yesu mpe na mokumba oyo ye azali kokokisa kati na mikano na Jéhovah. Esakweli ya liboso na Biblia ezalaki koyebisa koya na libota moko. (Genese 3:15) Yesu akomaki libota yango. Makambo mosusu oyo mayebisamaki nsima mapesaki nzela na kobongisama ya solo mobimba ya esakweli, oyo etongami likoló na elaka oyo ya moboko. Ntoma Petelo alobaki na Korneye, mondimi oyo autaki kati na bapakano ete: “Basakoli nyonso bakotatolaka mpo na ye [Yesu] ete bandimi na ye nyonso bakozwa kolimbisama na masumu mpo na nkombo na ye.” (Misala 10:43) Nsima na mibu 20, ntoma Paulo alobaki: “Mpo bilaka nyonso na Nzambe bizali Ee! kati na ye [Yesu].” (2 Bakolinti 1:20) Mbula ntuku minei na misato na nsima, Yoane ye moko azongeli koyebisa biso makambo oyo malandi: ‘Solo eyei mpo na Yesu Klisto.’—Yoane 1:17.
23. Mpo na nini etelemelo monene mpe bokonzi na Yesu ezali kobebisa te losambo oyo tozali kopesa epai na Jéhovah?
23 Yango ebebisi ata mwa moke losambo oyo tozali kopesa epai na Jéhovah? Te. Tokanisa lisusu na likebisi ya anzelu: “Sambela Nzambe.” Ata mbala moko te Yesu alukaki kozwa esika na Jéhovah. (Bafilipi 2:6) Ya solo, baanzelu bazwaki etinda ‘na kokumbamela Yesu,’ mpe bikelamu nyonso bisengeli kondima bokonzi na ye monene, mpo ete “na nkombo na Yesu mabolongo nyonso makumbama.” Kasi yeba ete nyonso wana ezali “mpo na nkembo na Nzambe Tata” mpe etinda euti epai na ye. (Baebele 1:6; Bafilipi 2:9-11) Jéhovah apesaki Yesu bokonzi na ye monene, mpe soki tondimi bokonzi yango, tozali kopesa nkembo epai na Nzambe. Koboya kotosa bokonzi na Yesu elimboli kobwaka Jéhovah Nzambe ye moko.—Nzembo 2:11, 12.
24. Wapi makambo mibale ya kokamwa oyo tozali kozela, mpe na ntina yango, maloba nini tosengeli kozongela yango na eleko na biso?
24 Na bongo, tozongela na mongongo moko maloba na ebandeli ya Nzembo 146 kino 150: “Bokumisa Yah!” Tika ete ebele na aleluya ebanda koyembama uta sikawa mpo na bolongi ya Jéhovah likoló na Babilone Monene, lisangá ya mokili mobimba ya mangomba na lokuta! Mpe esengo ebanda, mpamba te libala ya Mwana na Mpate ebelemi!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala Traduction du monde nouveau, ebimeli na Lingelesi oyo ezali na mitindani, maloba na nse na lokasa.
b Tala Traduction du monde nouveau, ebimeli na Lingelesi oyo ezali na mitindani, maloba na nse na lokasa.
c Traduction du monde nouveau, ebimeli na Lingelesi oyo ezali na mitindani, maloba na nse na lokasa.
d Traduction du monde nouveau, ebimeli na Lingelesi oyo ezali na mitindani, maloba na nse na lokasa.
e Tala lisusu Emoniseli 1:4; 14:13; 16:15.
[Etanda na lokasa 273]
“Mokanda epai na Sodome mpe Gomore”
Oyo ezali motó na likambo ebimaki na zulunalo Daily Telegraph ya Londres, le 12 Novembre 1987 mpe elobelaki mpo na mokanda oyo etangamaki liboso na Likitani monene na Lingomba ya Anglikane. Mokanda yango ezalaki kosenga ete balongola na Lingomba “baklisto” mibali oyo bakosangisaka nzoto bango na bango. Mokomi na zulunalo, Godfrey Barker, alobaki: “Lobi, episkopo ya Cantorbéry alobaki na kozanga elikya ete: ‘Soko santu Paulo akokaki kotinda mokanda epai na Lingomba na Anglikane, alingaki mpenza kokoma mokanda ya lolenge nini?’” M. Barker ye moko abakisaki maloba malandi: “Mokanda epai na Sodome na Gomore. Oyo nde eyano,” mpe alobaki lisusu: “Dr Runcie [episkopo] akanisi ete mokanda yango mbele ekokokana na mokanda ya liboso etindamaki epai na Baloma.”
Mokomi na zulunalo atangaki maloba na Paulo kati na Baloma 1:26-32: “Nzambe atiki bango kati na mposa na nsoni . . . Mibali bazali kosangana na mibali na makambo na nsoni. . . . Bayebi ekateli na Nzambe ete baoyo bakosalaka makambo ndenge yango babongi kokufa. Nde ata bongo, bazali kosalaka yango. Mpe oyo eleki lisusu mabe, bazali kondima baoyo bakosalaka bongo.” Asukisaki boye: “Santu Paulo azalaki se na komibanzabanza mpo na basembwi, kasi Dr Runcie ye, azali komitungisa mpo na bato na Lingomba.”
Mpo na nini episkopo akutanaki na mokakatano motindo oyo? Zulunalo Daily Mail ya Londres oyo ebimaki le 22 Octobre 1987 ebimisaki na titre monene: “‘Kati na bakonzi misato ya lingomba, moko na bango azali kosangana na ndeko na ye mobali.’ . . . Soko babandi kobengana ba homosexuels na lisangá, yango ‘ekokweisa Lingomba ya anglikane.’” Masolo malobelaki maloba malandi ya mokonzi na lingomba oyo azali secrétaire général de Mouvement chrétien des lesbiennes et des homosexuels: “Soko mokanda yango endimami, Lingomba ekokwea, mpe episkopo ya Cantorbéry ayebi yango malamu. Tokanisi ete na mwayene 30 kino 40 % na bakonzi na Lingomba ya anglikane bazali kosangana mibali na mibali. Mpe ezali bango bato bazali kosala mingi mpo na Lingomba.” Soko motuya ya basembwi ezali se kokita ekoki kozala mpo ete bazali kosepela lisusu na mosala yango mpo na Nzambe oyo esalemi mingimingi na mibali bazali kosangana na mibali.
Ekateli nini ezwamaki na Likita ya Lingomba? Mingi kati na bango, bato 388 (95 % ya bakonzi na lingomba) bandimaki mokanda oyo esengaki se bitumbu mikemike. Na ntina yango, zulunalo Economist ya le 14 Novembre 1987 elobaki: “Lingomba ya anglikane ezali kotemela ezaleli ya kosangana mibali na mibali, kasi na lolenge mosusu. Likitani eleki monene, parlement ya lingomba, ezwaki ekateli poso oyo, na kokanisaka na bakonzi na lingomba oyo bakosanganaka elongo na mibali, ete kosangana mobali na mobali ezali lisumu te lokola pite mpe ekobo: ‘ezali se kokokisa mokano te,’ elingi koloba ‘ete kosangisa nzoto ezali kosenga komipesa mobimba na boyokani na libela kati na libala.’” Kosalaka bokeseni bozali kati na etemelo na episkopo ya Cantorbéry mpe maloba na polele na ntoma Paulo kati na Baloma 1:26, 27, zulunalo Economist ekomaki maloba na ntoma Paulo na nse na maloba malandi: “Santu Paulo ayebaki makambo nini azalaki koloba.”
Yesu mpe ayebaki makambo azalaki koloba, mpe alobaki yango na polele nyonso. Alobaki ete na “Mokolo na kosambisa, ekozala malamu mpo na mboka na Sodome” koleka mpo na bakonzi na mangomba oyo baboyaki nsango na ye. (Matai 11:23, 24) Yesu asalelaki lisese mpo na komonisa ete bakonzi na mangomba, oyo baboyaki Mwana na Nzambe mpe mateya naye, bazalaki mabe koleka bato na Sodome. Yuda 7 elobi ete Bato na Sodome bazwaki “etumbu na móto na seko,” elingi koloba libebi na seko. (Matai 25:41, 46) Bakonzi na mangomba na mokili oyo bazali komibenga ete bazali baklisto, bakosambisa makasi mpo lokola bakufi-miso, basili kopengwisa basembwi na bango oyo bakufa mpe miso mosika na mitinda mitombwami na etamboli malamu mityami na Bokonzi na Nzambe, mpe bamemi bango na banzela mabe na mokili oyo! (Matai 15:14) Na ntina na lingomba na lokuta, Babilone Monene, mongongo moko mobimi uta makoló mopesi libyangami lilandi: “Bino bato na ngai bobima na ye, ete bosangana na masumu na ye te, ete bozwa moko na malozi na ye mpe te.”—Emoniseli 18:2, 4.
[Bililingi na lokasa 275]
Aleluya eyokani makasi mbala minei na makoló, mpo na kokumisa Jéhovah na ntina na bolongi na ye ya nsuka likoló na Babilone Monene