Mokapo 13
Somba wolo oyo esili kopetolama na mɔ́to
LAODIKIA
1, 2. Esika nini ezalaki lisangá ya nsuka kati na masangá nsambo oyo Yesu atindelaki bango mikanda nsima na kosekwa na ye, mpe wapi mwa bamoko na makambo mazalaki na mboka yango?
LAODIKIA ezali lisangá ya nsuka kati na masangá nsambo oyo mazwaki nsango uta na Yesu nsima na kosekwa na ye. Mokanda na lisangá yango ezali na makambo mazali kofungola miso mpe mazali kopusa biso na mosala.
2 Lelo oyo, okokuta mboka ya kala ya Laodikia penepene na mboka Denizli (na mokili ya Turquie), oyo ekabwani na ntaka ya 90 kilometre na mboka Alasehir epai ya sud-est. Na ekeke ya liboso, Laodikia ezalaki mboka na bonzenga mpe na bozwi. Lokola ezalaki mboka oyo banzela mingi ekutanaki wana, ezalaki centre monene ya mosolo mpe mombongo. Kati na biloko oyo bazalaki koteka mpo na kozwa mosolo mingi, ezalaki na mafuta moko ya kopakola na miso lokola nkisi, mpe mafuta yango ezalaki na lokumu mingi; epai mosusu, mboka Laodikia ezalaki mpe na lokumu mingi mpo na bilamba kitoko mingi oyo bazalaki kotonga wana uta na mika ya moindo ya mpate. Mpasi makasi ezalaki na bango se mpo bazangaki mai, kasi nzela emonanaki mpo na kosilisa mokakatano yango, mpamba te batimolaki terase moko oyo ezalaki kozwa mai ya mɔ́to mazalaki kobima mwa mosika mpo na komema yango kino na kati na mboka.
3. Ndenge nini Yesu abandi mokanda na ye epai na lisangá na Laodikia?
3 Laodikia ezalaki penepene ya mboka Kolose. Kokomaka epai na Bakolose, ntoma Paulo alobi mpo na mokanda moko atindelaki lisangá na Laodikia. (Bakolose 4:15, 16) Toyebi te makambo nini mazalaki na mokanda yango oyo Paulo akomelaki bango, kasi nsango oyo Yesu atindi sikawa epai ya bandeko na Laodikia emonisi ete basili kokwea mpenza mpo na oyo etali ezalela na bango ya elimo. Nzokande, lokola momeseno, Yesu amilakisi naino, wana elobi ye boye: “Komélá anzelu na lisangá na Laodikia ete, Ye, Bobele bongo, Motatoli na sembo mpe na solo, Ebandeli na bozalisi na Nzambe, alobi boye ete.”—Emoniseli 3:14.
4. Elimboli nini ete Yesu azali “Amen”?
4 Mpo na nini Yesu amibengi ete “Bobele bongo” (na hébreu “Amen”)? Titre oyo epesi kilo na nsango na ye. “Amen” elimboli “solosolo,” “tika ezala bongo” to “bobele bongo”; tokolobaka yango na nsuka na mabondeli mpo na komonisa ete tondimi makambo mauti kolobama. (1 Bakolinti 14:16) Yesu azali “Amen,” mpamba te bosembo na ye na makambo nyonso mpe kufa na ye lokola mbeka endimisi mpe epesi ndanga ete bilaka nyonso ya motuya oyo Jéhovah asili kopesa bikokokana. (2 Bakolinti 1:20) Uta ntango yango, mabondeli nyonso mazali kopesama epai na Jéhovah na nsima na Yesu.—Yoane 15:16; 16:23, 24.
5. Motindo nini Yesu azali “motatoli na sembo mpe na solo”?
5 Yesu azali mpe “motatoli na sembo mpe na solo.” Kati na bisakweli, mbala mingi atangami esika moko na bosembo, na solo mpe na boyengebene, mpamba te azali mosaleli na Jéhovah Nzambe, ntembe ata moke mpo na ye ezali te. (Nzembo 45:4; Yisaya 11:4, 5; Emoniseli 1:5; 19:11) Ye azali Temwe ya Jéhovah oyo aleki monene. Mpamba te, lokola Yesu azali “ebandeli na bozalisi na Nzambe,” uta na ebandeli mpenza asakolaki nkembo na Nzambe. (Masese 8:22-30) Wana ezalaki ye moto awa na mabelé, atatolaki mpo na solo. (Yoane 18:36, 37; 1 Timote 6:13) Nsima na kosekwa na ye, alakaki elimo santu epai na bayekoli na ye mpe alobaki na bango ete: “Bokozala batatoli na ngai kati na Yelusaleme, na Yuda mobimba, na Samaria, mpe kino nsuka na mokili.” Kobanda na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso, Yesu atambwisaki baklisto bapakolami kati na mosala ya kosakola nsango malamu “epai na bato nyonso na nse na likoló.” (Misala 1:6-8; Bakolose 1:23) Solo, Yesu abongi kobengama motatoli na sembo mpe na solo. Baklisto bapakolami na mboka Laodikia bakokaki kozwa matomba mingi na kotosaka maloba na ye.
6. (a) Yesu alobi nini mpo na ezalela ya elimo ya lisangá ya Laodikia? (b) Ndakisa nini malamu mingi Yesu apesaki kasi baklisto ya Laodikia balandaki yango te?
6 Nsango nini Yesu alingi kotindela baklisto ya Laodikia? Akumisi bango te; na bosolo nyonso, alobi na bango: “Nayebi misala na yo ete yo mpio te, yo mɔ́to mpe te. Mposa na ngai ete ozala mpio soko mɔ́to! Bongo awa ezali yo mwa mɔ́to moke, nde na mɔ́to te, na mpio mpe te, etikali moke nakosanza yo na monoko na ngai.” (Emoniseli 3:15, 16) Mbele okoyamba ndenge nini nsango motindo oyo euti na Nkolo Yesu Klisto? Mbele ekolamusa yo te mpe mbele ekopusa yo te na komisosola? Na ntembe te baklisto na Laodikia basengeli kolamuka, mpamba te bazali kolala na elimo, kokanisaka ete oyo basili kozwa ekotikala se bongo. (Tala 2 Bakolinti 6:1.) Basengelaki komekola Yesu lokola baklisto, mpamba te Yesu azali ntango nyonso na mɔ́to mozali kopela mpo na Jéhovah mpe mpo na mosala na ye. (Yoane 2:17) Epai mosusu, basokemi bazali ntango nyonso komona ye ete azali na bolingo mpe na bopolo, moto na maloba na kokitisa motema lokola kopo ya mai ya mpio na mokolo na moi makasi. (Matai 11:28, 29) Nzokande, baklisto na Laodikia bazali na mɔ́to te, na mpio mpe te, motindo moko na mai oyo mazali kokoma na mboka na bango. Mpo ete bazali lisusu na mɔ́to te, Yesu akani ete ‘akosanza bango longwa na monoko na ye.’ Mpo na biso, na ndakisa na Yesu, totya ntango nyonso molende ya kozala liziba na mai na mpio na elimo mpo na bazalani na biso.—Matai 9:35-38.
“Ozali koloba ete, ngai mozwi”
7. (a) Ndenge nini Yesu amonisi ntina na mabe oyo ebebisi lisangá ya Laodikia? (b) Mpo na nini Yesu alobi ete baklisto ya Laodikia bazali ‘na miso makufi mpe bolumbu’?
7 Wapi mpenza ntina na mabe oyo ezali kobebisa lisangá na Laodikia? Maloba malandi na Yesu mapesi biso likanisi ya sikisiki mpo na yango: “Ozali koloba ete, Ngai mozwi, nasili kozwa mosolo mingi, nazali na bosenga na eloko te, mpe oyebi te ete yo moto na bolozi, na makambo na mawa, mobola, na miso makufi, na bolumbu.” (Emoniseli 3:17; tala Luka 12:16-21.) Mpo ete bafandi na mboka na bonzenga mpe na bozwi, lisangá na Laodikia batii motema na bozwi na bango mpe bazali komitungisa te. Bomoi na bango boye epusamaki na masano mazalaki kosalema na stade, na teyatre mpe na libanda ya kopota mbangu, na motindo boye ete bakomaki “bato balingi bisengo koleka bolingo epai na Nzambe.”a (2 Timote 3:4) Kasi baklisto na Laodikia ata bazalaki na bozwi na mosuni, nzokande bakomaki babola na elimo. Bakokaki te ‘komibombela biloko mingi na motuya kuna na likoló.’ (Matai 6:19-21) Bakokaki te kobatela liso ezangi bilulela, na kotyaka Bokonzi na Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi na bango. Bazali solo na molili, na miso makufi, mpe bazali komona eloko moko te na elimo. (Matai 6:22, 23, 33) Epai mosusu, atako bazali na bilamba kitoko oyo bozwi na bango epesaki bango nzela na kosomba, nzokande na miso na Yesu bazali se bolumbu. Bazali na bilamba na elimo te oyo ekoki komonisa bango ete bazali baklisto.—Tala Emoniseli 16:15.
8. (a) Ezalela nini ekokani na oyo ya lisangá ya Laodikia tozali komona yango na mikolo na biso? (b) Ndenge nini baklisto mosusu basili komizimbisa bango moko kati na mokili oyo etondi na lokoso?
8 Ezali solo kopesa mpasi na motema! Kasi lelo tozali komona bato na motindo oyo te? Ntina na yango ezali nini? Ezali mpo ete bato yango batii motema mingi na bozwi ya mosuni mpe na makambo ya bomoto. Lokola ezali komonana epai na bandimi na mangomba na boklisto ya mokili oyo, ba Témoins de Jéhovah mosusu bamizimbisi bango moko na kokanisaka ete ekoki bobele koyangana na bantango mosusu na makita mpo na kosepelisa Nzambe. Bakanisi ete ekoki bobele komonana na libanda ete ‘bazali kosalela liloba.’ (Yakobo 1:22) Atako kelasi na Yoane bazali kopesa makebisi mbala na mbala, baklisto yango bazali kotia motema na bango na bilamba oyo bizali kobima, na bavuatire mpe bandako, mpe bazali na bomoi etongami likoló na bisengo mpe masano. (1 Timote 6:9, 10; 1 Yoane 2:15-17) Mpo na yango, bazali komona lisusu eloko moko te na elimo. (Baebele 5:11, 12) Na esika ya kotikala bobele bongo, mpio te mɔ́to te, esengeli na bango “kopelisa mɔ́to ya elimo” mpe kosala noki mpo na ‘kosakola liloba,’ oyo ezali kobondisa mitema.—1 Batesaloniki 5:19; 2 Timote 4:2, 5.
9. (a) Maloba nini ya Yesu mbele masengeli kolamusa baklisto oyo bazali mpio te mɔ́to te, mpe mpo na nini? (b) Ndenge nini lisangá ekoki kosalisa “bampate” oyo bazali kobunga?
9 Ndenge nini Yesu azali kotalela baklisto oyo bazali mpio te mɔ́to te? Maloba na ye na polele masengeli kolamusa bango: “Oyebi te ete yo moto na bolozi, na makambo na mawa, mobola, na miso makufi, na bolumbu.” Lisosoli na bango ezali kooka lisusu eloko moko te mpe bazali komiyeba te ete bakomi babola mpenza na elimo. (Tala Masese 16:2; 21:2.) Soki ezalela ya boye ebimi kati na lisangá, tokoki kotala yango mpamba te. Na kopesaka ndakisa malamu ya molende mpe na kosalaka mosala ya babateli na mpate na bolingo nyonso, bankulutu mpe bandeko mosusu baponami na bango bakolonga mbala mosusu na kopelisa lisusu epai na “bampate” wana babungi, esengo na mosala mokokisami na motema moko.—Luka 15:3-7.
Toli mpo na ‘kozala mozwi’
10. “Wolo” oyo Yesu alakisi baklisto na Laodikia ete basomba elimboli nini?
10 Kobika ekoki kozwama mpo na bandeko ya Laodikia? Ee, soki nde bakolanda toli oyo ya Yesu: “Yango wana nazali kopesa yo toli ete osomba wolo na maboko na ngai, oyo esili kopetolama na mɔ́to, ete ozala na mosolo mingi.” (Emoniseli 3:18a) “Wolo” ya solo ya boklisto, epetolami na mɔ́to mpe engali, na motindo boye ete bosoto na yango nyonso elongwi, ekokomisa bango ‘bazwi na miso na Nzambe.’ (Luka 12:21) Kasi bakosomba wolo yango wapi? Epai na bato na mombongo na mboka yango te, kasi epai na Yesu. Ntoma Paulo alimbolaki nini wana wolo yango ntango alobaki na Timote ete apesa toli epai na baklisto oyo bazali na bozwi ete “basala malamu, bazala bazwi na misala kitoko, bakabela bato biloko, basalisa bato. Boye bakomitongela moboko kitoko mpo na ekeke ekoya.” Soki bakomipesa boye nde bakokoka ‘kosimba bomoi na solo.’ (1 Timote 6:17-19) Baklisto na Laodikia oyo bazalaki na bozwi, mbele ebongaki balanda toli ya Paulo; kosalaka bongo mbele bakomaki bazwi na elimo.—Tala mpe Masese 3:13-18.
11. Bandakisa nini tozali na yango lelo ya baklisto oyo bazali kosomba “wolo epetolami na mɔ́to”?
11 Tozali lelo na ndakisa ya baklisto oyo bazali kosomba “wolo epetolami na mɔ́to”? Ee. Ata wana ezalaki kobelama mokolo na Nkolo, mwa etuluku moke na bayekoli na Biblia babandaki komona ete mateya mingi ya boklisto ya mokili oyo ezali lokuta mpe eutaki na Babilone, ndakisa mateya lokola la Trinité to Bosato Bosantu, molimo mokufaka te, lifelo ya mɔ́to, kobatisa babébés mpe kosambela bikeko (bakisa kosambela ekulusu mpe kosambela Marie). Kobatelaka solo ezwami na Biblia, baklisto yango bazalaki kosakola Bokonzi na Nzambe lokola elikya bobele moko mpo na bato, mpe lisiko oyo Yesu apesaki ezali moboko ya lobiko. Mbula soko 40 liboso na 1914, bango basilaki koyebisa ete mobu wana ezali mobu mosili kotyama elembo kati na bisakweli na Biblia mpo na nsuka na ntango na Bapakano, yango ekobimisa makambo ya kokamwa awa na mabelé.—Emoniseli 1:10.
12. Nani azalaki mokambi na etuluku wana na baklisto oyo balamukaki na elimo, mpe ndakisa nini atikaki mpo na oyo etali komibombela biloko na motuya na likoló?
12 Moto azalaki liboso na baklisto wana oyo balamukaki na elimo ezalaki Charles Russell oyo, na ebandeli ya bambula 1870, asalaki etuluku moko ya bayekoli ya Biblia na mboka Allegheny (lelo oyo esangani na mboka Pittsburgh, na Etats-Unis). Ntango azalaki koluka solo, Russell azalaki associé na tata na ye na mombongo oyo bazalaki kosala mpe mbele akomaki moto na mosolo mingi. Kasi atekaki biloko na ye mpe apesaki mosolo na ye nyonso na mosala ya kosakola Bokonzi na mabelé mobimba. Na 1884, Russell akomaki président wa liboso na Société oyo eyebani lelo na nkombo ete Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania. Na 1916, akufaki na kati na engbunduka, penepene na mboka Pampa, na etuka ya Texas kuna na Amerike, wana ezalaki ye kokende na New York; mobembo na ye ya nsuka mpo na mosala ya kosakola na weste ya Etats-Unis esilisaki makasi na ye nyonso. Atikaki ndakisa monene ya moto oyo amibombelaki biloko na motuya na elimo kuna na likoló, ndakisa oyo elandami lelo na bankoto mingi ya bapionniers, oyo bazali na elimo ya komipesa, kozanga koluka liboso matomba na bango moko.—Baebele 13:7; Luka 12:33, 34; 1 Bakolinti 9:16; 11:1.
Mafuta na elimo mapakolami na miso
13. (a) Ndenge nini mafuta na elimo na kopakola na miso makokaki kobongisa ezalela ya baklisto ya Laodikia? (b) Bilamba ya motindo nini Yesu alakisi baklisto wana ete basomba, mpe mpo na nini?
13 Yesu apameli mpe lisangá na Laodikia na kolobaka na bango: “Nazali kopesa yo toli ete osomba . . . na maboko na ngai . . . bilamba mpembe ete olata yango mpe nsoni na bolumbu na yo emonana te, na mafuta mpo na kopakola miso na yo ete otala.” (Emoniseli 3:18b) Mpo na kobikisa miso na bango na elimo oyo ezalaki komona lisusu te, esengelaki na bango ete basomba mafuta, oyo ezalaki kotekisama epai na babikisi na mboka wana te, kasi mafuta oyo bobele Yesu akokaki kotekela bango. Mafuta wana mazali nkisi oyo ekosalisa bango ete bazwa bososoli na elimo, mpo na kotambola na “nzela na boyengebene,” miso na bango mangenga mpe matala se kokokisa mokano na Nzambe. (Masese 4:18, 25-27) Kosalaka bongo, bakoki kolata “bilamba mpembe,” na esika ya kolata bobele bilamba na motuya mingi na mika moindo ya mpate, bilamba oyo bizalaki kotongama na Laodikia; “bilamba mpembe” nde ekomonisa ete bazali solo bayekoli na Klisto.—Tala 1 Timote 2:9, 10; 1 Petelo 3:3-5.
14. (a) Mafuta nini ya elimo mpo na kopakola na miso tozali na yango uta 1879? (b) Epai na nani ba Témoins de Jéhovah bazali kozwa mosolo mosengeli mpo na mosala na bango? (c) Mpo na oyo etali lolenge ya kosalela makabo mapesameli bango, ndenge nini ba Témoins de Jéhovah bakeseni na mangomba ya mokili?
14 Mafuta oyo na elimo mpo na kopakola na miso ezali mpe na mikolo na biso? Na ntembe te ezali. Na 1879, pasteur Russell, nkombo oyo bazalaki kobenga ye na bolingo nyonso, abandaki kobimisa zulunalo oyo eyebani lelo na mokili mobimba ete La Tour de Garde annonce le Royaume de Jéhovah (Mosenzeli ayebisaka Bokonzi ya Jéhovah), mpo na kobatela solo. Kati na nimero ya mibale, Russell alobaki: “Tondimi ete Mosenzeli esimbami na ye moko JEHOVAH, mpe lokola ezali bongo, ekosenga te mpe ekoluka te lisungi epai na bato. Ntango ye oyo alobi ete: ‘Wolo nyonso mpe palata nyonso na ngomba ezali ya ngai,’ soki akokoka lisusu te mpo na kopesa mosolo mosengeli, wana tokoyeba ete ntango ekoki mpo na kotika kobimisa yango.” Bakonzi mingi na mangomba basili komizwela mosolo mingi mpe bafandi kati na bomengo monene (mbala mosusu kosalaka pite). (Emoniseli 18:3.) Nzokande, bayekoli na Biblia oyo bayebani lelo na nkombo Témoins de Jéhovah, basalelaki makabo nyonso oyo lisangá ezwi kozanga kosenga, mpo na kokolisa mosala ya kosakola Bokonzi ya Jéhovah na mokili mobimba. Kelasi na Yoane ezali kotambwisa kino lelo mosala ya kobimisa bazulunalo Mosenzeli (La Tour de Garde) mpe Réveillez-vous! Na 2006, zulunalo oyo mibale ekabolamaki koleka milió 59. Mosenzeli ezali kobimisama na minoko koleka nkama. Ezali zulunalo ya “liboso” ya lisangá ya baklisto koleka milió motoba, baoyo, na nzela na mafuta na elimo mpo na kopakola na miso, bafungoli miso mpe bamoni losambo ya lokuta, bamoni mpe ntina ya kosala nokinoki mosala ya kosakola nsango malamu kati na mabota nyonso.—Malako 13:10.
Bolamu bozali kozwama na mpamela mpe na disipline
15. Mpo na nini Yesu apesi toli makasi na baklisto ya Laodikia, mpe lisangá basengeli kosala nini?
15 Kasi tozonga naino na lisangá na Laodikia. Ndenge nini bakotalela toli makasi oyo Yesu apesi bango? Basengelaki kolemba mpe kokanisa ete Yesu azali lisusu na mposa na bango te ete bazala bayekoli na ye? Te, soki moke te! Mokanda elobi lisusu boye: “Soki nayoki bolingo epai na banani, nakopamela bango nyonso, nakopesa bango etumbu. Na bongo ozala na mɔ́to, mpe bongola motema.” (Emoniseli 3:19) Lokola mpo na disipline ya Jéhovah, oyo ya Yesu ezali mpe elembo ya bolingo. (Baebele 12:4-7) Lisangá ya Laodikia basengelaki kozwa litomba na bolingo oyo Yesu amonisaki epai na bango mpe kosalela toli na ye. Basengelaki kobongola motema mpe koyeba ete ezaleli na bango ya mpio te mɔ́to te ezali lisumu. (Baebele 3:12, 13; Yakobo 4:17) Tika ete bankulutu na bango babwáka banzela na bango ya koluka bozwi ya mosuni mpe ‘bapelisa lokola mɔ́to’ likabo oyo bazwi na Nzambe! Na nzela na mafuta na elimo na kopakola na miso, tika ete basangani nyonso na lisangá balendisama lokola na mai malamu mauti na liziba na mpio!—2 Timote 1:6; Masese 3:5-8; Luka 21:34.
16. (a) Ndenge nini Yesu azali lelo komonisa bolingo na ye? (b) Ezalela na biso lelo esengeli kozala boni soki tozwi toli moko makasi?
16 Boni mpo na biso lelo? Yesu atiki te ‘kolinga bato na ye oyo bazali kati na mokili.’ (Yoane 13:1; Matai 28:20) Azali komonisa bolingo na ye na nzela na kelasi na Yoane na mikolo na biso mpe na nzela na myoto to bankulutu kati na lisangá ya boklisto. (Emoniseli 1:20) Na mikolo oyo ya mpasi mingi, bankulutu bazali koluka kosalisa biso banso, bilenge mpe mikóló, ete totikala kati na lopango na lisangá na Nzambe, toboya elimo ya lipanda mpe mposa ya bozwi, toboya mpe pite oyo epalangani na mokili. Soki ntango mosusu tozwi toli makasi soko mpe disipline, tomikundola ete “mpamela mpe disipline ezali nzela na bomoi.” (Masese 6:23, MN) Biso tozali na kokoka te mpe tosengeli kondima noki kobongola motema, soki esengeli, na motindo boye ete tosembolama mpe tobatelama kati na bolingo na Nzambe.—2 Bakolinti 13:11.
17. Ndenge nini bozwi ekoki kozala likama na elimo?
17 Tosengeli kopesa nzela te na mposa na biloko ya mosuni, na bozwi to na kozanga bozwi ete elongola biso mɔ́to na biso. Solo, bozwi ekoki kosalisa moto ete azala na makoki mingi ya kosalela Nzambe, kasi ekoki mpe kozala likama. (Matai 19:24) Moklisto oyo azali na bozwi akoki mbala mosusu kokanisa ete soki azali kopesa mosolo mingi mpo na makabo, ntina ezali te mpo na ye ete aboma nzoto kati na mosala ya kosakola lokola ezali kosala yango bandeko mosusu. To akoki kokanisa ete lokola azali na bozwi, lisangá basengeli kopesa ye kilo. Epai mosusu, bato na mosolo mingi bakoki komipesa na masano mpe na bisengo oyo babola bakoki komipesa na yango te. Masano yango makolyaka ntango, mpe soki moto ayebi kosenzela te, akokoka lisusu kosakola te, mpe akokoma bongo moklisto oyo azali mpio te mɔ́to te. Tika ete topengola mitambo wana nyonso mpe tolanda ‘kosala makasi mpe kobunda’ na motema na biso mobimba, kobatelaka ntango nyonso elikya ya bomoi ya seko liboso na biso!—1 Timote 4:8-10; 6:9-12.
“Tokolya elambo na mpokwa biso na ye”
18. Libaku nini Yesu apesi na baklisto ya Laodikia?
18 Yesu alobi lisusu boye: “Yoka, natelemi na ekuke, mpe nazali kobeta; soko nani akoyoka mongongo na ngai mpe akozipola monoko na ndako, nakokota epai na ye mpe tokolia elambo [na mpokwa] biso na ye.” (Emoniseli 3:20) Soki baklisto na Laodikia bayambaki Yesu kati na lisangá na bango, mbele asalisi bango ete basilisa ezalela na bango wana ya mpio te mɔ́to te!—Matai 18:20.
19. Yesu alingi koloba nini wana elaki ye ete akolya elambo na mpokwa elongo na lisangá na Laodikia?
19 Wana Yesu alobeli elambo na mpokwa, na ntembe te ekundoli epai na lisangá na Laodikia ntango oyo ye azalaki na momeseno ya kolya elongo na bayekoli na ye. (Yoane 12:1-8) Babengami na elambo bazalaki ntango nyonso kozwa bolamu na elimo na libaku motindo wana. Bobele bongo, ezalaki na mabaku oyo Yesu, nsima na kosekwa na ye, alyaki elongo na bayekoli na ye, mpe bango balendisamaki mingi. (Luka 24:28-32; Yoane 21:9-19) Na bongo, elaka na ye ya koya kati na lisangá ya Laodikia mpe kolya elambo elongo na bango ezali elaka ete bakozwa bolamu mingi na elimo; kasi esengeli ete baluka kozwa yango.
20. (a) Lokola boklisto ya mokili oyo ezalaki mpio te mɔ́to te na ebandeli na mokolo na Nkolo, ememaki yango kino kosala nini? (b) Ekateli nini Yesu azwaki likoló na boklisto ya mokili oyo mpe nini ezali komonana lelo?
20 Toli ya bolingo mingi oyo Yesu apesaki na lisangá na Laodikia ezali na ntina monene mpo na batikali na baklisto bapakolami na mikolo na biso. Mwa bamoko kati na bango bazali komikundola ete wana ekokaki mokolo na Nkolo, bandimi na Mangomba na boklisto ya mokili oyo bazalaki mpenza mpio te mɔ́to te. Na esika ete bayamba Nkolo na biso ntango azongaki na 1914, bakonzi na mangomba na boklisto ya mokili oyo bapesaki nde maboko na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, oyo mikili 24 kati na mikili 28 oyo bazalaki kobunda, ezalaki komibenga ete ezali mikili ya boklisto. Bamikotisaki bongo na nyongo makasi ya makila masopamaki! Na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, oyo esalamaki mpe mingimingi kati na mikili mizali komibenga ete ya boklisto, masumu na mangomba na lokuta “ekomaki mipiko na mipiko kino na likoló.” (Emoniseli 18:5) Epai mosusu, bakonzi na mangomba batyeli Bokonzi na Jéhovah mokongo mpamba te bapesaki maboko na bango mpo na kosunga Société des Nations, O.N.U. mpe bituluku ya batomboki, oyo nyonso ekoki te kosilisa bampasi ya bato. Esili koleka kala mpenza uta Yesu asundolaki bakonzi na mangomba; nsima na kokweisa bango ete babongi na etumbu, abwakaki bango lokola mobomi mbisi akobwakaka mbisi mabe oyo ekangami na monyama na ye. Mawa ezali lelo kati na Mangomba ya boklisto ya mokili oyo emonisi ete yango esili kosambisama. Tika ete nsuka na yango ezala likebisi mpo na biso!—Matai 13:47-50.
21. Kobanda na 1919, ndenge nini baklisto ya lisangá ya solo batalelaki maloba oyo Yesu atindelaki baklisto ya Laodikia?
21 Ata na kati na lisangá ya solo emonanaki na baklisto oyo bazalaki mpio te mɔ́to te, bakokani na bimeli oyo ezali na mɔ́to te mpo ekoka kolendisa, ezali mpe na mpio te mpo ekoka kokitisa motema lokola mai ya mpio. Kasi Yesu azali ntango nyonso na bolingo mingi mpo na lisangá na ye. Akokota epai na baklisto oyo balingi koyamba ye lokola mpo na bolei na mpokwa. Yango wana uta 1919, miso na baklisto oyo bayambaki ye mafungwamaki mpo na koyeba ndimbola na bisakweli bizwami na Biblia. Pole ezali kongenga makasi mpo na bango.—Nzembo 97:11; 2 Petelo 1:19.
22. Yesu akanisaki na elambo nini ya mpokwa na ntango ezali koya, mpe nani akosangana na yango?
22 Kolobaka na lisangá na Laodikia, na ntembe te boye Yesu akanisaki na elambo mosusu ya mpokwa. Totangi mwa mosika kati na Emoniseli: “Esengo na bango basili kobyangama na elambo na libala na Mwana na Mpate, [elambo na ye ya mpokwa].” Ekozala bongo elambo monene mpo na kokumisa Jéhovah nsima wana akoboma losambo ya lokuta. Elambo yango ekosalema na likoló mpe bato bakosangana na yango ezali Klisto elongo na mwasi na ye na motuya na bango ya kokoka, elingi koloba bato 144 000. (Emoniseli 19:1-9) Basangani na lisangá na kala na Laodikia oyo batosaki toli na Yesu, bakisa bandeko na sembo na Klisto Yesu baoyo lelo balati bilamba na peto bizali komonisa bango ete bazali solo baklisto bapakolami, ee, bango nyonso bakosangana na elambo oyo na mpokwa elongo na Mobali na bango. (Matai 22:2-13) Oyo ezali solo elendiseli mpo na kozala na mɔ́to mpe kobongola motema!
Kiti ya bokonzi mpo na balongi
23, 24. (a) Yesu alobi mpo na mbano nini mosusu? (b) Ntango nini Yesu afandaki na kiti na ye lokola mokonzi Masiya, mpe ntango nini abandaki kosambisa baoyo bazalaki komibenga ete baklisto? (c) Elaka nini kitoko Yesu apesaki yango na bayekoli na ye ntango abandisaki ekaniseli ya liwa na ye?
23 Yesu alobi mpo na mbano mosusu, wana elobi ye boye ete: “Mpo na molongi nakopesa ye nzela na kofanda na ngai elongo na kiti na bokonzi na ngai, lokola ngai mpe nalongi mpe nafandi na Tata na ngai elongo na kiti na bokonzi na ye.” (Emoniseli 3:21) Na boyokani na maloba na Davidi na Nzembo 110:1, 2, Yesu atikalaki sembo mpe alongaki mokili, asekwisamaki na mobu 33 ya ntango na biso mpe atombwamaki kino na kiti na bokonzi na Tata na ye na likoló, mpe afandaki wana. (Misala 2:32, 33) Na 1914, mbula mosusu ya ntina mingi, Yesu ayaki mpo na kofanda likoló na kiti na bokonzi na ye moko lokola Masiya Mokonzi mpe Mosambisi. Na ntembe te, kosambisa ebandaki na 1918 kati na baoyo bazalaki komibenga ete baklisto. Bapakolami balongi oyo basilaki kokufa basekwisamaki mpe balandaki Yesu kati na Bokonzi na ye. (1 Petelo 4:17) Alakaki bango bongo ntango abandisaki ekaniseli ya liwa na ye, kolobaka na bayekoli na ye: “Pelamoko Tata na ngai apesaki ngai Bokonzi, ngai mpe napesi bino bokonzi mpo ete bolia mpe bomela na mesa na ngai kati na bokonzi na ngai mpe bosambisa mabota zomi na mibale na Yisraele.”—Luka 22:28-30.
24 Oyo nde libaku malamu ya kofanda esika moko na Mokonzi na ntango na “kozalisa lisusu,” mpe, na nzela na mbeka na ye ya kokoka, kosala elongo na ye mpo na kotombola bato ya botosi kino ezalela ya kokoka lokola ezalaki na Edene. (Matai 19:28; 20:28) Lokola Yoane alobi yango, mpo na balongi, Yesu azalisi bango “bokonzi, banganga mpo na Nzambe na ye mpe Tata,” mpo ete bafanda na bakiti na bokonzi zongazonga na kiti na bokonzi na nkembo mingi na Jéhovah. (Emoniseli 1:6; 4:4) Biso banso, tozala bapakolami to basangani na mabelé ya sika baoyo tozali kolikya kosangana na mosala ya kozongisa Paradis, totya likebi na maloba oyo Yesu atindelaki lisangá ya Laodikia.—2 Petelo 3:13; Misala 3:19-21.
25. (a) Lokola na mikanda miuti koleka, na maloba nini Yesu asukisi mokanda na ye epai na lisangá na Laodikia? (b) Ndenge nini moklisto mokomoko asengeli kotalela maloba na Yesu epai na lisangá ya Laodikia?
25 Lokola na mikanda misusu, Yesu asukisi mpe oyo na maloba malandi: “Oyo azali na matoi ayoka yango elobi elimo na masangá!” (Emoniseli 3:22) Ntango na nsuka epusani mingi. Bilembo bizali mingi oyo bimonisi ete bolingo ezali lisusu te na kati na baklisto ya mokili oyo. Lokola biso tozali baklisto ya solo, tika tomonisa ete tokeseni mpenza na bango na kotosaka na molende nyonso malako oyo Yesu apesaki na mokanda na ye epai na lisangá ya Laodikia, ee, na mikanda nyonso nsambo oyo Nkolo atindaki na masangá! Tokoki komonisa botosi na biso na kosanganaka na molende nyonso na kokokisama na esakweli monene na Yesu na ntina na eleko na biso, esakweli oyo elobi ete: “Mpe nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.”—Matai 24:12-14.
26. Na mokapo nini Yesu akoloba lisusu epai na Yoane, kasi azali kosangana na nini?
26 Toli na Yesu epai na masangá nsambo esuki awa. Akoloba lisusu epai na Yoane bobele na mokapo ya nsuka ya Emoniseli, kasi akomonana kati na bimonaneli mingi, na ndakisa oyo etali kokokisa bikateli ya Jéhovah. Sikawa tolanda kelasi na Yoane mpo na kotalela emonaneli ya mibale ya kokamwa oyo Nkolo Yesu Klisto apesaki.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bokundoli esalamaki na esika engumba na Laodikia ezalaká kala, emonisaki biloko oyo bitangami awa.
[Etanda na lokasa 73]
Bokeseni ezali kati na biloko ya mosuni mpe mayele
Na 1956, mokomi moko na zulunalo akomaki boye: “Eleki pene na mibu nkama, moto azalaki na bamposa 72, kati na yango 16 ezalaki biloko ya ntina. Lelo oyo, tokanisi ete azali na bamposa 474, kati na yango 94 emonani lokola biloko ya ntina. Eleki mibu nkama, biloko 200 bizalaki kotekama; lelo oyo, biloko 32 000 bizali kotekama. Biloko oyo bisengeli mpenza mpo na moto bizali mingi mpenza te, kasi bamposa na ye ezali mingi koleka.” Na mikolo na biso, bazali koloba na biso ntango nyonso ete bozwi mpe biloko ya mosuni ezali na ntina mingi kati na bomoi. Na yango, mingi bayei kobosana toli oyo elandi ya Mosakoli (7:12): “Mayele ekobatelaka lokola ekobatelaka mosolo. Malamu na mayele ezali ete mayele ekobikisa bomoi na ye oyo azwi yango.”
[Elilingi na lokasa 67]
Mai mazalaki kokoma na Laodikia, mpio te mɔ́to te, mazalaki elengi te. Mawa mingi na baklisto na Laodikia mpo ete elimo na bango ezalaki mpio te mɔ́to mpe te