Yobo ayikaki mpiko mpe atikalaki sembo
“Okanisi na motema na yo likambo na moombo na ngai, Yobo? Mpo ete mosusu azali lokola ye kati na mokili te, moto malamu bɛ mpe na sembo, oyo akotosaka Nzambe mpe akoboyaka mabe.”—YOBO 1:8.
1, 2. (a) Makama nini ekómelaki Yobo? (b) Yobo azalaki na bomoi ya ndenge nini liboso makambo yango ekómela ye?
MOBALI moko azalaki na nyonso oyo moto alukaka: bomɛngo, lokumu, nzoto kolɔngɔnɔ mpe libota ya esengo. Kasi na nsima, makama misato ya mbalakaka eyaki kobongola bomoi na ye. Abungisaki naino bozwi na ye nyonso na mokolo moko. Na nsima, mopɛpɛ moko makasi ebomaki bana na ye nyonso. Mwa moke na nsima, ye moko abɛlaki maladi moko ya mabe; babibɔ ya mineneminene ebimaki ye nzoto mobimba mpe ezalaki kosala ye mpasi makasi. Na ntembe te oyebi sikoyo ete mobali yango ezalaki Yobo, moto oyo balobeli na mokanda ya Biblia oyo ezali mpe na nkombo na ye.—Yobo, mokapo 1 mpe 2.
2 Yobo amilelaki ete: “Soki nazalaki ata lokola na basanza oyo eleká!” (Yobo 3:3; 29:2, NW) Ntango moto akómi na mikakatano, akanisaka ndenge azalaki liboso! Yobo azalaki na bomoi ya malamu liboso; ezalaki lokola nde mabe moko ekoki kokómela ye te. Bato minene ya mboka bazalaki kopesa ye limemya mpe koluka toli epai na ye. (Yobo 29:5-11) Azalaki na bozwi mingi, kasi azalaki kotya elikya na ye na mbongo te. (Yobo 31:24, 25, 28) Azalaki kosalisa basi bakufelá mibali mpe bitike. (Yobo 29:12-16) Azalaki mpe na bamakango te; akangamaki kaka na mwasi na ye moko.—Yobo 31:1, 9, 11.
3. Yobo azalaki moto ya ndenge nini na miso ya Yehova?
3 Yobo azalaki na mabe moko te mpamba te azalaki kobanga Nzambe. Yehova alobaki boye: “Mosusu azali lokola ye kati na mokili te, moto malamu bɛ mpe na sembo, oyo akotosaka Nzambe mpe akoboyaka mabe.” (Yobo 1:1, 8) Nzokande, atako Yobo azalaki moto ya sembo, makama eyelaki ye mpe ebebisaki bomoi na ye. Mosala nyonso ya motoki na ye elimwaki lokola molinga; ye moko akómaki konyokwama mpe kotungisama.
4. Mpo na nini kotalela bampasi oyo Yobo akutanaki na yango ekoki kosalisa biso?
4 Longola Yobo, ezali mpe na basaleli mosusu ya Yehova oyo bakutanaka na mikakatano ya makasi. Lelo oyo, baklisto mingi bazali kokutana na mikakatano lokola oyo Yobo akutanaki na yango. Yango wana, ebongi tótalela mituna mibale oyo: Ndenge nini kotalela bampasi oyo Yobo akutanaki na yango ekoki kosalisa biso soki biso mpe tokutani na mpasi? Liteya nini tokoki kozwa, oyo ekosalisa biso mpo tóyebaka komitya na esika ya bato mosusu oyo bazali na mpasi?
Ntembe ya Satana mpe komekama ya Yobo
5. Na makanisi ya Satana, mpo na nini Yobo azalaki kosalela Nzambe?
5 Mokakatano ya Yobo ezalaki likambo ya ndenge mosusu mpenza. Ye moko ayebaki te, nzokande, Zabolo alobaki ete andimi te ete Yobo asalelaka Nzambe na motema ya sembo mpenza. Ntango Yehova alobelaki misala malamu ya Yobo na likita moko oyo esalemaki na likoló, Satana azongisaki boye: “Yo otiki lopango kozingela ye te mpo na ndako na ye mpe na biloko na ye nyonso epai na epai?” Na bongo, Satana alingaki koloba ete Yobo, ná basaleli mosusu ya Nzambe, basalelaka ye mpo na litomba. Satana abakisaki boye: “Tiká ete osembola lobɔkɔ na yo [sikoyo] mpe [osimba] nyonso ezali na ye mpe akolakela yo mabe na miso na yo.”—Yobo 1:8-11.
6. Ntembe monene nini Satana abimisaki?
6 Likambo yango ezalaki lisɛki te. Satana alobaki ete Yehova ayangelaka malamu te. Nzambe akoki mpenza koyangela molɔ́ngɔ́ mobimba na bolingo? To, ndenge Satana amonisaki yango, bato bakobanda koluka ntango nyonso kaka matomba na bango moko? Yehova atikaki Zabolo ameka Yobo; ayebaki ete mosaleli na ye akotikala sembo. Yango wana, Satana abimiselaki Yobo makama ndenge na ndenge na mwa ntango mokuse. Ntango Satana amonaki ete Yobo azali kaka sembo nsima ya makambo oyo asalaki ye, apesaki ye maladi ya mabe mpenza. Zabolo alobaki ete: “Loposo mpo na loposo! Moto akopesa nyonso ezali na ye mpo na bomoi na ye.”—Yobo 2:4.
7. Na ndenge nini basaleli ya Nzambe bazali kokutana na bampasi lokola oyo Yobo akutanaki na yango?
7 Lelo oyo, baklisto oyo bazali konyokwama ndenge mpenza Yobo anyokwamaki bazali mingi te; atako bongo, bazali kokutana na mikakatano ndenge na ndenge. Mingi bazali konyokwama mpo na kondima na bango to mpe bazali na mikakatano na kati ya mabota. Kozanga mbongo to maladi ekoki kosilisa moto mayele. Bamosusu kutu bandimaki kokufa mpo na kondima na bango. Kasi, tosengeli te kokanisa ete Satana nde atindaka likambo nyonso ya mpasi oyo ekómeli biso. Mikakatano mosusu eyelaka biso na bozoba na biso moko, mpe maladi mosusu oyo tobɛlaka ezali ya makila, elingi koloba ete tozwaka yango epai ya baboti na biso banda kobotama na biso. (Bagalatia 6:7) Lisusu, bobange eyaka na mikakatano na yango oyo mpe eponaka elongi te. Makama ekoki koyela ata nani kati na biso. Biblia ezali komonisa polele ete lelo oyo, Yehova abatelaka basaleli na ye na makama wana na ndenge ya likamwisi te.—Mosakoli 9:11.
8. Ndenge nini Satana akoki kosalela bampasi oyo tokutani na yango?
8 Kasi, Satana akoki kosalela minyoko oyo tokutani na yango mpo na kolɛmbisa kondima na biso. Ntoma Paulo alobaki ete azalaki na “nzubɛ moko na kati ya mosuni, anzelu moko ya Satana,” oyo azalaki ntango nyonso ‘kobɛta ye mbata.’ (2 Bakolinti 12:7) Ata soki nzubɛ yango ezalaki maladi; na ndakisa, azalaki komona malamu te, to mokakatano mosusu, Paulo ayebaki ete Satana akokaki kosalela yango mpo na kosilisa ye esengo mpe kolɛmbisa ye. (Masese 24:10) Lelo oyo, Satana akoki kotinda bandeko ya libota, baninga ya kelasi, to mpe bakonzi ya Leta bányokola basaleli ya Nzambe.
9. Mpo na nini bampasi to minyoko esengeli kokamwisa biso te?
9 Ndenge nini tokoki kolonga mikakatano yango? Tosengeli kotalela yango lokola libaku ya komonisa Yehova ete bolingo na biso epai na ye mpe botosi na biso na bokonzi na ye ezali ya likolólikoló te. (Yakobo 1:2-4) Ezala likambo nini ezali kopesa biso mpasi, soki tozali koyeba ntina oyo tosengeli kotikala sembo, yango ekosalisa biso tókangama makasi na losambo ya Yehova. Ntoma Petelo akomelaki baklisto boye: “Balingami, bómitungisa te mpo na mɔtɔ oyo ezali kopela na kati na bino, oyo ezali kokómela bino mpo na komekama, lokola nde likambo moko ya kokamwa ezali kokwela bino.” (1 Petelo 4:12) Paulo mpe alobaki boye: “Baoyo nyonso bazali na mposa ya kozala na bomoi na ezaleli ya kokangama na Nzambe na kati ya boyokani elongo na Klisto Yesu bango mpe bakonyokwama.” (2 Timote 3:12) Se ndenge asalaki mpo na Yobo, Satana azali kobetela bosembo ya Batatoli ya Yehova ntembe. Kutu, Biblia emonisi ete na mikolo oyo ya nsuka, Satana angali nde kongala na etumba oyo azali kobundisa basaleli ya Nzambe.—Emoniseli 12:9, 17.
Yobo amikosi mpe bapesi ye toli ya mabe
10. Likambo nini Yobo ayebaki te?
10 Lelo oyo, biso tozali na likambo moko oyo Yobo azalaki na yango te. Yobo ayebaki te mpo na nini bampasi wana ekómelaki ye. Ye azalaki kokanisa ete “[Yehova] apesaki, [Yehova] asili kolongola.” (Yobo 1:21) Ntango mosusu Satana alukaki Yobo akanisa ete Nzambe nde apesi ye mpasi wana.
11. Yobo akanisaki nini mpo na bampasi na ye?
11 Yobo alɛmbaki mpenza nzoto; mwasi na ye kutu apesaki ye makanisi ete alakela Nzambe mabe, kasi Yobo aboyaki. (Yobo 2:9, 10) Akómaki koloba ete ‘bato mabe kutu bazali malamu.’ (Yobo 21:7-9) Mbala mosusu, akómaki komituna: ‘Mpo na nini Nzambe apesi ngai etumbu?’ Ntango mosusu kutu azalaki komona ete malamu akufa na ye. Amilelaki ete: “Soki okobomba ngai kati na esika na bakufi, soki okozipa ngai kino nkanda na yo ekosuka!”—Yobo 14:13.
12, 13. Maloba ya baninga misato ya Yobo esalaki ye nini?
12 Baninga misato ya Yobo bakendaki kotala ye mpo na “kolela na ye elongo mpe kobɔndisa ye.” (Yobo 2:11) Kasi, emonanaki ete bazalaki “babɔndisi mabe.” (Yobo 16:2) Yobo akokaki kobɔndisama soki azalaki ata na baninga oyo akokaki koyebisa mikakatano na ye, kasi bato wana misato babakiselaki Yobo mpasi mpe motungisi.—Yobo 19:2, 26:2.
13 Tokanisi mpenza ete Yobo azalaki komituna: ‘Mpo na nini mpasi ya boye ekómela kaka ngai? Lisumu nini nasali mpo nazwa etumbu ya boye?’ Baninga na ye bayaki na makanisi etɛngamá mpenza. Balobaki ete Yobo asalaki lisumu moko ya monene, yango wana bampasi wana ekómeli ye. Elifaza atunaki ete: “Oyo ya malamu abebaki ntango nini? Lokola ngai namoni, baoyo bakotimola masumu mpe bakokona yauli, bakobuka bobele lolenge yango.”—Yobo 4:7, 8.
14. Mpo na nini tosengeli te kokanisaka mbala moko ete mpasi ekómelaka moto mpo asalaki mabe?
14 Ya solo, tokoki kokutana na mikakatano soki tolonaki mpo na mosuni na esika tólona mpo na elimo. (Bagalatia 6:7, 8) Kasi na mokili oyo, tózala na etamboli ya malamu to te, mikakatano ekoki koyela biso. Longola yango, tokoki te koloba ete mpasi ekoki te koyela moto malamu. Yesu Klisto ‘azangaki mbindo, akabwanaki na basumuki,’ kasi akufaki na nzete ya mpasi; ntoma Yakobo mpe akufaki martiru. (Baebele 7:26; Misala 12:1, 2) Makanisi etɛngamá ya Elifaza ná baninga na ye etindaki Yobo akóma komilongisa mpe aluka komonisa ete azali motema mpɛmbɛ. Kasi, lokola batingamaki kaka ete mpasi ya Yobo ezali mpamba te, mbala mosusu etindaki ye akóma komituna soki Nzambe azali mpenza sembo.—Yobo 34:5; 35:2.
Lisalisi na ntango ya mpasi
15. Makanisi nini ekoki kosalisa biso ntango tozali na mpasi?
15 Liteya nini tokoki kozwa na lisolo ya Yobo? Ntango mosusu emonanaka lokola nde mpasi, maladi, to mpe minyoko eponaka bilongi. Bato mosusu bamonanaka lokola mikakatano mingi ya ndenge wana ezwaka bango te. (Nzembo 73:3-12) Ebongi ntango mosusu tómitunaka mituna ya ntina mingi oyo: ‘Ndenge oyo nalingaka Nzambe ekotinda ngai nasalela ye ata soki likambo nini ekómeli ngai? Nazalaka na mposa ya kopesa Yehova libaku ya “kozongisela ye monɔkɔ oyo akopamela ye?”’ (Masese 27:11; Matai 22:37) Tosengeli te kotika ete makanisi ya mpambampamba ya bato mosusu etinda biso tóbanda komitunatuna mituna mpo na Tata na biso ya likoló. Moklisto moko ya sembo oyo abɛlaki maladi moko bambula mingi alobaki boye: “Nayebi ete likambo nyonso oyo Yehova atikeli nzela, nakoki koyikela yango mpiko. Nayebi ete akopesa ngai makasi oyo esengeli. Mpe asalaka yango ntango nyonso.”
16. Ndenge nini Liloba ya Nzambe esalisaka baoyo bazali na mpasi?
16 Lelo oyo toyebi makambo mosusu oyo Yobo ayebaki te na ntina na mayele mabe ya Satana. “Tozangi te koyeba mayele na ye.” (2 Bakolinti 2:11) Longola yango, tozali na Biblia, mokanda moko oyo ekoki koteya biso bwanya. Biblia ezali na masolo ya mibali mpe basi ya sembo oyo bayikelaki bampasi ndenge na ndenge mpiko. Ntoma Paulo, moto oyo amonaki mpasi koleka baklisto mingi, akomaki boye: “Makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo na kolakisa biso, mpo ete na nzela ya ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na nzela ya kobɔndisama oyo euti na Makomami tókoka kozala na elikya.” (Baloma 15:4) Motatoli moko ya Mpoto, oyo akɔtaki bolɔkɔ mpo na kondima na ye na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, atikelaki moto moko bilei na ye mikolo misato mobimba mpo moto yango apesa ye Biblia. Alobi boye: “Biblia wana ememelaki ngai matomba mingi. Atako nalalaki nzala mikolo wana, nazwaki bilei ya elimo oyo esungaki ngai ná bandeko mosusu na ntango wana ya mpasi. Nabombaka Biblia yango tii lelo.”
17. Nzambe abongisi makambo nini oyo ekoki kosalisa biso ntango tozali na mpasi?
17 Longola libɔndisi ya Biblia, tozali na ebele ya mikanda oyo elimbolaka Biblia, oyo epesaka biso batoli oyo ebongi mpo na kolonga mikakatano. Soki oluki na Index des publications Watch Tower, okozanga te komona lisolo ya ndeko ata moko oyo akutanaki na mpasi lokola oyo ozali na yango. (1 Petelo 5:9) Ekozala mpe malamu oyebisa mpasi na yo epai ya bankulutu to bandeko mosusu oyo bakɔmeli. Longola nyonso wana, libondeli ekoki kosalisa yo ozwa lisalisi ya Yehova mpe elimo santu na ye. Nini esalisaki Paulo ayikela ‘bambata’ ya Satana mpiko? Azalaki kotyela nguya ya Nzambe motema. (2 Bakolinti 12:9, 10) Akomaki boye: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.”—Bafilipi 4:13.
18. Ndenge nini bandeko na biso baklisto bakoki kolendisa biso?
18 Nyonso wana emonisi ete lisalisi ezali mpe osengeli kokakatanaka te koluka yango. Masese elobi ete: “Soki okosenzwa na mokolo ya mpasi, nguya na yo ezali bobele moke.” (Masese 24:10) Se ndenge nsɛlɛlɛ ekoki kokweisa ndako ya mabaya, bosembo ya moklisto ekoki kobeba mpo alɛmbi nzoto. Mpo na kobatela biso, Yehova azali kosunga biso na nzela ya baninga oyo bazali mpe basaleli na ye. Na butu oyo bakangaki Yesu, anzelu moko abimelaki ye mpe alendisaki ye. (Luka 22:43) Ntango Paulo azalaki na nzela mpo na kokende na bolɔkɔ na Loma, “apesaki Nzambe matɔndi mpe azwaki mpiko” ntango akutanaki na bandeko na Esika ya Zando ya Apiusi mpe na Tavɛrnɛ-Misato. (Misala 28:15) Ndeko mwasi moko, moto ya Allemagne, abosanaka te ndenge oyo bandeko basalisaki ye ntango akɔtaki bolɔkɔ na kaa ya bakangami ya Ravensbrük. Na ntango wana azalaki elenge mpe azalaki kobanga. Alobi boye: “Ndeko mwasi moko amonaki ngai ntango kaka nakómaki mpe ayambaki ngai na esengo. Ndeko mwasi mosusu ya sembo azalaki kobatela ngai mpe akómaki mpenza mama na ngai ya elimo.”
“Omimonisa sembo”
19. Nini esalisaki Yobo alonga komekama ya Satana?
19 Yehova alobaki ete Yobo azalaki “kokanga [bosembo, NW] na ye makasi.” (Yobo 2:3) Atako Yobo alɛmbaki nzoto mpe ayebaki te ntina oyo azalaki konyokwama, atikalaki kaka sembo. Yobo apesaki mokɔngɔ te na makambo oyo elekaki ntina na bomoi na ye. Alobaki ete: “Kino nakokufa nakomilongwela sembo na ngai te.”—Yobo 27:5.
20. Mpo nini tosengeli koyika mpiko?
20 Soki biso mpe tozali na ekateli ndenge moko na Yobo, tokotikala sembo ata soki tokutani na komekama, na botɛmɛli, to na bampasi. Yesu ayebisaki baklisto ya lisangá ya Similina ete: “Kobanga te makambo oyo elingi kokómela yo. Talá! Zabolo akokoba kobwaka bamosusu na bino na kati ya bolɔkɔ mpo bómekama mpenza na mobimba, mpe mpo bózwa bolɔzi [mikakatano, mpasi, to minyoko] mikolo zomi. Omimonisa sembo ata tii na liwa, mpe nakopesa yo motole ya bomoi.”—Emoniseli 2:10.
21, 22. Ntango tozali na mpasi, nini ekoki kolendisa biso?
21 Na mokili oyo Satana azali koyangela, tokozanga te kokutana na makambo oyo ekomeka bosembo na biso. Atako bongo, Yesu alobi na biso ete soki tozali kokanisa makambo oyo ezali liboso, ntina ya kobanga ezali te. Likambo eleki ntina ezali ete tótikala sembo. Paulo alobaki ete: “Bolɔzi ezali ya ntango mokuse,” nzokande “nkembo,” to lifuti oyo Yehova alaki biso, ezali “kilo mingi koleka mpenza mpe ezali ya seko.” (2 Bakolinti 4:17, 18) Ata mpasi ya Yobo ezalaki ya ntango mokuse soki tokokanisi yango na ebele ya bambula ya esengo oyo alekisaki liboso mpe nsima ya mpasi wana.—Yobo 42:16.
22 Atako bongo, tokoki komona ete mikakatano na biso ezali kosila te mpe mpasi eleki ndelo. Na lisolo oyo elandi, tokotalela ndenge oyo lisolo ya Yobo ekoki koteya biso makambo mosusu na oyo etali ezaleli ya koyika mpiko. Tokolobela mpe ndenge oyo tokoki kolendisa bato mosusu oyo bazali na mpasi.
Okopesa eyano nini?
• Ntembe nini Satana abimisaki mpo na bosembo ya Yobo?
• Mpo na nini bampasi esengeli kokamwisa biso te?
• Ndenge nini Yehova asalisaka biso mpo tóyika mpiko?
[Bililingi na lokasa 23]
Koyekola, kosolola na baklisto oyo bakɔmeli, mpe kobondela Yehova mpo na koyebisa ye mpasi na biso, ekoki kosalisa biso tóyika mpiko