Mokapo ya ntuku mibale na moko
Mokano ya Yehova ekokisami na nkembo mpenza
1, 2. (a) Mokano ya Yehova ezali nini mpo na bikelamu na ye ya mayele? (b) Banani bazalaki mpe na libota ya basambeli ya Nzambe oyo ezalaki na bomoko?
BIKELAMU nyonso ya mayele basangani mpo na kosambela Nzambe kaka moko ya solo, mpe bango nyonso bazali kosepela na bonsomi monene ya bana ya Nzambe—yango nde mokano ya Yehova oyo etondi na bolingo. Yango ezali mpe likambo oyo bato oyo balingaka boyengebene bazalaka na mposa na yango makasi.
2 Yehova abandaki kokokisa mokano na ye monene wana ntango abandaki misala na ye ya bozalisi. Ekelamu na ye ya liboso ezalaki Mwana moko oyo banda lisekwa na ye azali “kongɛnga na nkembo [ya Nzambe] mpe elilingi ya sikisiki ya bomoto na ye mpenza.” (Baebele 1:1-3) Mwana yango akeseneki na bikelamu mosusu nyonso, akelamaki na Nzambe ye moko. Na nsima, na nzela ya Mwana yango nde Nzambe akelaki bikelamu mosusu nyonso: liboso baanzelu na likoló, na nsima bato awa na mabele. (Yobo 38:7; Luka 3:38) Bango nyonso basalaki libota moko ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Yehova azalaki Nzambe na bango nyonso, Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, mpe Tata na bango ya bolingo.
3. (a) Eloko nini biso nyonso tosangolaki epai ya baboti na biso ya liboso? (b) Ebongiseli nini ya bolingo Yehova asalaki mpo na bakitani ya Adama?
3 Ntango bakatelaki baboti na biso ya liboso etumbu ya liwa mpo na lisumu oyo basalaki na nko, babenganaki bango na Edene mpe Nzambe aboyaki bango. Bazalaki lisusu bato ya libota na ye ya molɔ́ngɔ́ mobimba te. (Genese 3:22-24; Deteronome 32:4, 5) Biso nyonso tozali bakitani na bango, yango wana tobotami na makanisi ya kosalaka masumu. Kasi, Yehova ayebaki ete bato mosusu kati na bakitani ya Adama na Eva bakolinga boyengebene. Yango wana, asalaki ebongiseli moko mpo ete bato yango bákoka kozwa “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.”—Baloma 8:20, 21.
Yisalaele abungisi esika na ye ya Moponami
4. Libaku malamu nini Yehova apesaki Yisalaele ya kala?
4 Mbula soki 2500 nsima ya kokela Adama, Yehova apesaki bato mosusu libaku malamu ya kozala na boyokani moko ya malamu mpenza elongo na Ye. Aponaki Yisalaele ya kala mpo ezala libota na ye mpe apesaki bango Mibeko na ye. (Genese 12:1, 2) Abongisaki bango bákóma ekólo moko mpe asalelaki bango na boyokani na mokano na ye. (Deteronome 14:1, 2; Yisaya 43:1) Kasi, bazalaki naino na kati ya boombo ya lisumu mpe ya liwa, mpo na yango bazalaki te na bonsomi monene oyo Adama na Eva bazalaki na yango na ebandeli.
5. Ndenge nini Bayisalaele babebisaki boyokani ya malamu kati na bango na Nzambe?
5 Nzokande, Bayisalaele bazalaki bato oyo baponamaki na Nzambe. Bazalaki mpe na mokumba ya kotosa Yehova lokola Tata na bango mpe kosala na boyokani na mokano na ye. Yesu alobelaki mingi ntina ya kokokisa mokumba yango. (Matai 5:43-48) Kasi, ekólo ya Yisalaele esalaki bongo te. Atako Bayuda yango balobaki ete, “tozali na Tata kaka moko, Nzambe,” kasi Yesu alobaki ete misala na bango mpe elimo oyo bazalaki komonisa ezalaki kowangana maloba na bango. (Yoane 8:41, 44, 47) Na mobu 33 na ntango na biso (T.B.), Nzambe asukisaki Mobeko yango, mpe boyokani ya malamu ya Yisalaele elongo na ye ekómaki na nsuka. Kasi, yango elingaki koloba ete bato bakozala lisusu na boyokani moko ya malamu te elongo na Nzambe?
Kosangisama ya “biloko oyo ezali na likoló”
6. Mokano ya “mosala ya kotambwisa makambo” oyo Paulo alobeli na Baefese 1:9, 10 ezali nini?
6 Ntoma Paulo amonisi ete bato mosusu bakoki kozala na boyokani ya malamu mpenza elongo na Nzambe. Na ndakisa, mpo na oyo etali ebongiseli oyo Yehova azwaki mpo ete baoyo bazali na kondima bákoka kokóma bato ya ndako na ye, Paulo akomaki ete: “[Nzambe] ayebisaki biso sɛkɛlɛ mosantu ya mokano na ye. Yango ezali engebene bosepeli na ye ndenge akanaki na kati na ye moko mpo na mosala moko ya kotambwisa makambo na nsuka mpenza ya bantango oyo etyamá, elingi koloba, koyanganisa lisusu biloko nyonso esika moko na kati ya Klisto, biloko oyo ezali na likoló mpe oyo ezali na mabele.” (Baefese 1:9, 10) “Mosala ya kotambwisa makambo” yango ezali na mabɔkɔ ya Yesu Klisto. Na nzela na ye, bato bakondimama na miso ya Nzambe. Mwa motángo moke kati na bango bazali na elikya ya kozala na bomoi na likoló. Bato mosusu mingi koleka bakofanda awa na mabele.
7. Banani bazali “biloko oyo ezali na likoló”?
7 Libosoliboso, kobanda na Pantekote ya mobu 33 T.B., likebi epesamaki na “biloko oyo ezali na likoló,” elingi koloba, baoyo bakosangola libula elongo na Yesu na Bokonzi ya likoló. Na nzela ya kondima na bango na motuya ya mbeka ya Yesu, Nzambe atángi bango bayengebene. (Baloma 5:1, 2) Na nsima, Bayuda mpe Bapakano bakɔtaki, mpe “biloko oyo ezali na likoló” esengelaki kozala bato 144000. (Bagalatia 3:26-29; Emoniseli 14:1) Kaka mwa ndambo moke kati na bango bazali naino awa na mabele.
Kosangisama ya “biloko oyo ezali na mabele”
8. Banani bazali “biloko oyo ezali na mabele,” mpe boyokani nini bazali na yango na Yehova?
8 Mosala ya kotambwisa makambo yango ezali mpe koyanganisama ya “biloko oyo ezali na mabele.” Bamilio ya bato bazali sikoyo koyanganisama na elikya ya kozwa bomoi ya seko awa na mabele. Elongo na batikali ya basangoli yango ya Bokonzi, bazali kokumisa nkombo ya Yehova mpe kotombola losambo na ye. (Yisaya 2:2, 3; Sefania 3:9) Bazali mpe kobenga Yehova “Tata” mpamba te bazali koyeba ete ye nde azali liziba ya bomoi. Mpe bazali na boyokani malamu na ye na nzela ya kondima na bango kati na mbeka ya makila ya Yesu. (Emoniseli 7:9, 14) Kasi lokola bazali naino bato ya kozanga kokoka, kondimama na bango mpenza lokola bana ya Nzambe ezali naino likambo oyo ekoya nsima.
9. Elaka nini Baloma 8:21 ezali na yango mpo na bato?
9 Baoyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabele bazali kozela na motema likoló ntango oyo bikelamu nyonso “ekolongolama na boombo ya kopɔla.” (Baloma 8:21) Bonsomi yango ekobanda nsima ya ntango oyo Klisto na mampinga na ye ya likoló bakoyeisa bolɔzi monene na nsuka na yango na nzela ya Armagedon. Yango ekolimbola koboma ebongiseli mobimba ya makambo mabe ya Satana, mpe ekolandana na mapamboli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Bokonzi ya Klisto.—Emoniseli 19:17-21; 20:6.
10. Basaleli ya Yehova bakoyemba loyembo nini mpo na kosanzola Nzambe?
10 Ekozala mpenza likambo ya esengo monene ntango basaleli ya Yehova na mabele bakosangisa mingongo na bango na oyo ya basaleli na ye ya likoló, oyo bazali kosakola na esengo nyonso ete: “Misala na yo ezali minene mpe ya kokamwa, Yehova Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Banzela na yo ezali ya boyengebene mpe ya solo, Mokonzi ya seko. Nani akobanga mpenza yo te, Yehova, mpe akopesa nkombo na yo nkembo te, mpo yo moko kaka nde ozali sembo? Mpo bikólo nyonso bakoya mpe bakosambela liboso na yo, mpamba te mibeko na yo ya boyengebene mimonani polele.” (Emoniseli 15:3, 4) Ya solo, basaleli nyonso ya Yehova bakosangana na losambo ya Nzambe kaka moko ya solo. Ata mpe bato oyo bakufá bakosekwa, bango mpe bakosangisa mingongo na bango elongo na baoyo bazali kosanzola Yehova.—Misala 24:15.
Bonsomi moko malamu ezali liboso
11. Bonsomi nini ya malamu bato oyo bakobika na bolɔzi monene bakozala na yango?
11 Nsima ya bolɔzi monene, oyo ekosuka na Armagedon, oyo ekolongola mabe nyonso na mabele, Satana Zabolo akozala lisusu te “nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” Basambeli ya Yehova bakotungisama lisusu te na masɛnginya ya Satana. (2 Bakolinti 4:4; Emoniseli 20:1, 2) Mangomba ya lokuta ekozala lisusu te mpo na komonisa Yehova na ndenge ya mabe mpe kotya bokabwani kati na bato. Basaleli ya Nzambe ya solo bakonyokwama lisusu te na mabɔkɔ ya bakonzi. Oyo nde bonsomi malamu!
12. Ndenge nini bato nyonso bakosikolama na boombo ya lisumu mpe mbeba na yango?
12 Lokola azali “Mwana-Mpate ya Nzambe oyo azali kolongola lisumu ya mokili,” Yesu akosalela motuya ya mbeka na ye mpo na kolongola masumu ya bato. (Yoane 1:29) Ntango Yesu azalaki awa na mabele mpe alimbisaki masumu ya moto moko boye, abikisaki mpe moto yango mpo na komonisa ete masumu na ye elimbisami. (Matai 9:1-7; 15:30, 31) Kaka ndenge wana, Klisto Yesu, Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe na likoló, na lolenge ya kokamwa akobikisa bato oyo miso na bango ekufá, oyo balobaka te, oyo matoi na bango ekufá, bibɔsɔnɔ, bato ya maladi ya motó, mpe bato nyonso oyo bazali na bamaladi mosusu nyonso. (Emoniseli 21:3, 4) Bato nyonso ya botosi bakomona “mobeko ya lisumu” ndenge ekolongolama mpo ete makanisi na bango mpe misala na bango esepelisa bango mpe esepelisa Nzambe. (Baloma 7:21-23) Na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto, bakokóma bato ya kokoka, na ‘lolenge mpe elilingi’ ya Nzambe kaka moko ya solo.—Genese 1:26.
13. Na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto, Klisto akosala nini, mpe yango ekosuka ndenge nini?
13 Ntango Klisto akokómisa bato na ezalela ya kokoka, na nsima akozongisa bokonzi oyo bapesaki ye mpo na mosala yango epai ya Tata: “Akozongisa bokonzi epai na Nzambe na ye mpe Tata, ntango akosilisa kobebisa nyɛɛ guvɛrnema nyonso mpe bokonzi nyonso mpe nguya. Mpo asengeli koyangela tii ntango Nzambe akosilisa kotya banguna nyonso na nse ya makolo na ye.” (1 Bakolinti 15:24, 25) Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Bokonzi yango ekokokisa mokano yango mobimba; yango wana ekosengela na guvɛrnɛma moko te mpo ezala kati na Yehova mpe bato. Mpe lokola lisumu na liwa ekolongolama nyonso mpe bato bakosikolama, mosala ya Yesu lokola Mobikisi ekokóma na nsuka na yango. Biblia elobi ete: “Na ntango yango Mwana ye moko mpe akomitya na nse na ye, mpo Nzambe azala makambo nyonso epai ya moto nyonso.”—1 Bakolinti 15:28.
14. Bato nyonso ya kokoka bakotyama na komekama nini, mpe mpo na nini?
14 Nsima na yango, ekosɛnga na bato ya kokoka bámonisa ete baponi kosalela Nzambe kaka moko ya solo libela na libela. Yango wana, liboso ya kondima bango lokola bana mpenza na ye, Yehova akotya bato nyonso ya kokoka yango na komekama ya nsuka. Satana na bademo na ye bakobimisama na libulu mozindo. Yango ekosala mabe moko te oyo ekoumela seko mpo na baoyo balingaka mpenza Yehova. Kasi baoyo nyonso bakozanga kotosa Yehova na nko bakobebisama mpo na libela, elongo na motomboki ya liboso mpe bademo na ye.—Emoniseli 20:7-10.
15. Likambo nini ekosalema lisusu kati na bikelamu nyonso ya mayele ya Nzambe?
15 Na nsima, bato nyonso ya kokoka oyo bazalaki na ngámbo ya boyangeli ya Nzambe na boumeli ya komekama wana ya nsuka, Yehova akondima bango lokola bana na ye. Kobanda na ntango wana, bakozwa mpenza bonsomi ya bana ya Nzambe lokola basangani ya libota ya Nzambe ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Bikelamu nyonso ya mayele na likoló mpe na mabele bakoyanganisama lisusu mpo na kosambela ye lokola Nzambe kaka moko ya solo. Mokano ya Yehova ekokokisama na nkembo mpenza! Okosepela kozala moko kati na libota yango ya esengo na molɔ́ngɔ́ mobimba, oyo ekoumela seko? Soki bongo, tozali kolendisa yo otya likebi na oyo Biblia elobi na 1 Yoane 2:17: “Mokili ezali koleka mpe ndenge moko mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.”
Bozongeli
• Liboso ya botomboki na Edene, basambeli nyonso ya Yehova bazalaki na boyokani ya ndenge nini elongo na ye?
• Mokumba nini basambeli ya Nzambe bazali na yango?
• Banani basengeli naino kokóma bana ya Nzambe, mpe ndenge nini likambo yango eyokani na mokano ya Yehova oyo etali kosambela ye na bomoko?
[Elilingi na lokasa 190]
Bato ya botosi bakozala na bomoi na paladiso na mabele mobimba