Elikya ya solosolo
“Longwa kobotama moto azali ntango nyonso na likama ya kokufa; mpe akoki kopɛngola likama yango te mpamba te nsukansuka moto nyonso akokufa.”—ARNOLD TOYNBEE, NGANGA-MAYELE YA ISTWARE NA EKÓLO GRANDE-BRETAGNE.
1. Likambo nini ya solo bato basengeli kondima, mpe yango ezali kobimisa mituna nini?
NANI akoki kotya ntembe na maloba wana oyo mamonani solo na boumeli ya lisolo ya bato? Na bileko nyonso, bato basukaka bobele na kondima likambo ya nsɔmɔ oyo libéngami liwa. Mpe tomiyokaka ete tozangi nguya ntango moto oyo tolingaka akufi. Mpe emonanaka lokola ete tobungisi moto yango libela. Ekoki kosalema ete tómonana lisusu na balingami na biso oyo bakufá? Elikya nini Biblia ezali kopesa mpo na bakufi? Tiká ete tótalela lisolo oyo lilandi.
‘Moninga na biso asili kokufa’
2-5. (a) Ntango moninga na ye Lasalo akufaki, ndenge nini Yesu amonisaki ete alingaki kosekwisa ye mpe ete azalaki na makoki ya kosala yango? (b) Longola kosekwisama ya Lasalo, likamwisi yango ya lisekwa ezalaki na litomba mosusu nini?
2 Ezalaki na mobu 32 T.B. Lasalo mpe bandeko na ye ya basi, Malata na Malia, bazalaki kofanda na engumba moke ya Betania oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtɛlɛ misato na Yelusaleme. Bazalaki baninga ya Yesu ya motema. Mokolo moko, Lasalo abɛlaki makasi. Bandeko na ye ya basi oyo bamitungisaki mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto na ye, batindaki nsango nokinoki epai na Yesu wana azalaki na ngámbo ya Ebale Yordani. Yesu alingaki Lasalo mpe bandeko na ye ya basi mingi mpenza, na bongo aumelaki te mpe akendeki na Betania. Ntango bazalaki na nzela, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Moninga na biso Lasalo asili kolala mpɔngi; kasi nakokenda kobetola [“kolamwisa,” NW] ye.” Lokola bayekoli basosolaki maloba yango na mbala moko te, Yesu alobaki na bango polele ete: “Lasalo akufi.”—Yoane 11:1-15.
3 Ntango ayokaki ete Yesu azalaki koya na Betania, Malata akendeki na lombangu mpo na kokutana na ye. Ntango amonaki ete azalaki na mawa mingi, Yesu ayokelaki ye mawa mpe alobaki na Malata na komindimisa nyonso ete: “Ndeko na yo akosekwa.” Malata azongisaki ete: “Nayebi ete akosekwa na lisekwa na mokolo [ya] nsuka.” Bongo Yesu alobaki na ye ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Ye oyo azali kondima ngai, ata asili kokufa, akobika.”—Yoane 11:20-25.
4 Yesu akendeki bongo na lilita mpe alobaki na bato ete bálongola libanga oyo bazipaki na yango lilita. Nsima ya kobondela na mongongo makasi, agangaki ete: “Lasalo, bimá libándá.” Mpe wana miso ya bato nyonso ezalaki kotala lilita, Lasalo abimaki. Yesu asekwisaki Lasalo—kozongisáká na bomoi moto oyo akufaki esili koleka mikolo minei!—Yoane 11:38-44.
5 Uta kala, Malata azalaki kondima elaka ya lisekwa. (Yoane 5:28, 29; 11:23, 24) Kasi likamwisi ya kozongisama ya Lasalo na bomoi elendisaki kondima na ye mpe epesaki basusu kondima. (Yoane 11:45) Kasi “lisekwa” elimboli mpenza nini?
“Akosekwa”
6. Liloba “lisekwa” elimboli nini?
6 Liloba “lisekwa” ezali libongoli ya liloba ya Greke a·naʹsta·sis, oyo elimboli mpenza “kotɛlɛma lisusu.” Babongoli Baebele babongolaki liloba yango ya Greke a·naʹsta·sis na maloba ya Liebele techi·yathʹ ham·me·thimʹ, oyo elimboli “kozongisama ya bakufi na bomoi.”a Lisekwa elimboli bongo kotɛlɛmisa moto longwa na ezalela ya kozanga bomoi oyo ezali bongo liwa—kozongisela moto yango lolenge na ye ya bomoi.
7. Mpo na nini kosekwisa moto mokomoko ekozala likambo ya mpasi te mpo na Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto?
7 Lokola mayele ya Yehova Nzambe ezali na nsuka te mpe akoki komikundola makambo nyonso na lolenge ya kokoka, kosekwisa moto ezali likambo ya mpasi te mpo na ye. Komikundola lolenge ya bomoi ya bato oyo bakufá—bizaleli na bango, lisolo ya bomoi na bango mpenza, mpe makambo mikemike nyonso ya bomoto na bango—ezali na mpasi te mpo na ye. (Yobo 12:13; kokanisá na Yisaya 40:26.) Yehova azali mpe Mobandisi ya bomoi. Azali bongo na makoki ya kozongisa moto yango na bomoi na mbala moko, kopesáká ye bomoto motindo moko na oyo azalaki na yango liboso ya liwa na ye kasi na nzoto mosusu, nzoto ya sika. Lisusu, lokola lisekwa ya Lasalo emonisaki yango, Yesu azali na bolingo ya kosekwisa bakufi mpe azali na makoki ya kosala yango.—Kokanisá na Luka 7:11-17; 8:40-56.
8, 9. (a) Mpo na nini lisekwa eyokani te na liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te? (b) Mwango mpo na kolonga liwa ezali nini?
8 Oyo Makomami mazali koteya na ntina na lisekwa eyokani te na liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te. Soki molimo ekufaka te, mbɛlɛ moto moko te azali na mposa ya lisekwa to kozongisama na bomoi. Ya solo, na maloba na ye, Malata amonisaki ata likanisi moko te ete azalaki kondima ete molimo ekufaka te to ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa. Andimaki te ete Lasalo asilaki kokende na mokili moko ya bilimu mpo na kokoba kozala na bomoi. Nzokande, amonisaki kondima na ye na mokano oyo Nzambe azali na yango ya kolonga liwa. Alobaki ete: “Nayebi ete akosekwa na lisekwa na mokolo ya nsuka.” (Yoane 11:23, 24) Lolenge moko mpe, Lasalo ye moko ayebisaki ata lisolo moko te ya makambo oyo akutanaki na yango nsima ya liwa. Azalaki na likambo moko te ya koyebisa.
9 Emonani polele ete, lokola Biblia ezali koloba yango, molimo ekufaka mpe mwango ya kozongisa bakufi na bomoi ezali bobele lisekwa. Kasi bamiliare ya bato basili kokufa kobanda ntango moto ya liboso Adama atyamaki na mabelé. Bongo nani akosekwa mpe epai wapi?
‘Bato nyonso oyo bazali kati na nkunda ya ekaniseli’
10. Elikya nini Yesu apesaki mpo na baoyo bazali na nkunda ya ekaniseli?
10 Yesu Klisto alobaki ete: “Ntango ezali koya wana baoyo nyonso bazali kati na nkunda ya ekaniseli bakoyoka mongongo na ye [Yesu] mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29, NW) Ɛɛ, Yesu Klisto apesaki elaka ete baoyo nyonso Nzambe azali kokanisa bango bakosekwisama. Bamiliare ya bato basili kofanda na mokili mpe bamiliare ya bato basili kokufa. Banani kati na bango bazali na makanisi ya Nzambe, mpe bazali kozela lisekwa?
11. Nani akosekwisama?
11 Baoyo basalelaki Yehova na bosembo bakosekwisama. Kasi bamilio ya bato mosusu basili kokufa kozanga komonisa soki bakomitambwisa engebene mitinda ya sembo ya Nzambe. Bayebaki masɛngami ya Yehova te to bazalaki na ntango moke mpo na kosala mbongwana oyo esɛngamaki. Nzambe azali komikundola bato yango, bango mpe bakosekwisama, mpamba te Biblia epesi elaka ete: “Lisekwa ekozala [mpo] na bato sembo mpe [mpo] na bato sembo te.”—Misala 24:15.
12. (a) Emonaneli nini oyo elobeli lisekwa ntoma Yoane amonaki? (b) Nini ‘ekobwakama na libeke ya mɔ́tɔ,’ mpe yango elimboli nini?
12 Ntoma Yoane azwaki emonaneli ya kokamwa ya bato oyo bakosekwisama wana batɛlɛmaki liboso ya kiti ya bokonzi ya Nzambe. Kolobeláká emonaneli yango, Yoane akomaki ete: “Mai monene ezongisi bakufi na kati na yango: Kufa na Ewelo [“Hades,” NW] izongisi bakufi na kati na yango. Basambisami moto na motindo na misala na ye, moto na motindo na misala na ye. Na nsima Kufa na [Hades] ibwakami kati na libeke na mɔ́tɔ. Libeke na mɔ́tɔ oyo ezali kufa na mibale.” (Emoniseli 20:12-14) Kanisá naino! Bakufi nyonso oyo bazali kati na makanisi ya Nzambe bakobimisama na Hades to Sheol, oyo ezali nkunda ya bato nyonso. (Nzembo 16:10; Misala 2:31) Bongo “kufa mpe Hades” ekobwakama na “libeke na mɔ́tɔ,” oyo ezali elilingi ya kufa ya libela. Nkunda to esika bato nyonso bakundamaka, ekozala lisusu te.
Bakosekwisama wapi?
13. Mpo na nini Nzambe asili kozwa ebongiseli ete bato mosusu básekwisama mpo na kozala na bomoi na likoló, mpe lolenge nini ya nzoto Yehova akopesa bango?
13 Motángo moke ya basi na mibali bakosekwisama mpo na kozala na bomoi na likoló. Bango bakoyangela elongo na Yesu lokola bakonzi mpe banganga mpe bakosangana na mosala ya kolongola mbeba nyonso ya liwa, libula oyo bato basangolá na moto ya liboso Adama. (Baloma 5:12; Emoniseli 5:9, 10) Engebene Biblia, bazali bobele bato 144 000 oyo baponami kati na bayekoli ya Yesu, kobanda na bantoma na ye ya sembo. (Luka 22:28-30; Yoane 14:2, 3; Emoniseli 7:4; 14:1, 3) Yehova akopesa na mokomoko na bato yango oyo bakosekwisami nzoto ya elimo mpo ete bázala na bomoi na likoló.—1 Bakolinti 15:35, 38, 42-45; 1 Petelo 3:18.
14, 15. (a) Ebele ya bato oyo basili kokufa bakosekwisama mpo na kozala na bomoi ya lolenge nini? (b) Mapamboli nini bato ya botosi bakozwa?
14 Nzokande, motángo monene ya bato oyo basili kokufa bakosekwisama mpo na kozala na bomoi awa na mabelé. (Nzembo 37:29; Matai 6:10) Mabelé oyo wapi? Lelo oyo, bokabwani ezali na mabelé, makila ya bato mingi ezali kosopama, ezingelo ebebisami, mpe mobulu ezali koyikana. Soki bakufi basengeli kosekwisama mpo na kozonga na bomoi na mabelé motindo oyo, esengo na bango ekozala mpenza ya ntango mokuse. Kasi Mozalisi apesi elaka ete mosika te akotya nsuka na mokili ya lelo oyo ezali na nse ya boyangeli ya Satana. (Masese 2:21, 22; Danyele 2:44) Mokili ya sika ya sembo—“mabelé ya sika”—ekokóma likambo ya solo. (2 Petelo 3:13) Na ntango yango “mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na malali.” (Yisaya 33:24) Ata nsɔmɔ ya liwa ekolongolama, mpamba te Nzambe “akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”—Emoniseli 21:4.
15 Na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, basɔkɛmi “bakosepela mpe na kimya [ya] solo.” (Nzembo 37:11) Boyangeli ya Yesu oyo ekozala na likoló mpe basangani elongo na ye 144 000 bakosalisa bato ya botosi mokemoke kino bakokóma na ezalela ya kokoka oyo bankɔkɔ na biso ya libosoliboso, Adama na Eva babungisaki. Bato oyo bakosekwisama bakozala kati na bato oyo bakofanda na mokili.—Luka 23:42, 43.
16-18. Esengo ya lolenge nini lisekwa ekomɛmɛla mabota?
16 Biblia ezali kopesa mwa elakiseli ya esengo oyo lisekwa ekomɛmɛla mabota. Kanisá esengo oyo ezalaki na mwasi-mokufeli-mobali ya engumba Naina ntango Yesu atɛlɛmisaki bamemi-ebembe mpe asekwisaki mwana na ye ya mobali se moko! (Luka 7:11-17) Na nsima, pene na libeke ya Galilai, ntango Yesu asekwisaki elenge mwasi moko ya mbula 12, baboti na ye ‘bayokaki esengo mingi koleka.’—Malako 5:21-24, 35-42; talá mpe 1 Mikonzi 17:17-24; 2 Mikonzi 4:32-37.
17 Mpo na bamilio ya bato oyo balali sikawa na liwa, lisekwa ekolimbola bomoi kati na mokili ya sika ya kimya. Kanisá naino elikya yango kitoko oyo etyami liboso na elenge mobali Tommy mpe moto na mombongo oyo tolobelaki na ebandeli ya mwa buku oyo! Ntango Tommy akozonga na bomoi kati na Paladiso awa na mabelé, akozala bobele Tommy moko wana oyo mama na ye ayebaki—kasi akozala na nzoto kolɔngɔnɔ. Mama yango akosimba mwana na ye, akoyamba ye na mabɔkɔ na ye mpe akolinga ye mingi. Lolenge moko, na esika ya kokangama na motambo ya ebongiseli ya kobotama mbala na mbala oyo ezangi nsuka, moto wana ya mombongo ya ekólo Inde azali na likoki ya kolamuka kati na mokili ya sika oyo Nzambe alaki mpe komona bana na ye ya mibali.
18 Koyeba solo na ntina na molimo, na ntina na oyo ekómelaka biso soki tokufi, mpe solo likoló na elikya ya lisekwa, ekoki mpe kozala na bopusi mozindo epai na bato oyo bazali na bomoi sikawa. Tiká tómona yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Atako liloba “lisekwa” mpenza ezali kati na Makomami ya Liebele te, kasi elikya ya lisekwa emonisami polele na Yobo 14:13, na Danyele 12:13, mpe na Hosea 13:14.
[Elilingi na lokasa 26]
Lisekwa ekomɛma esengo ya solosolo