Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Emoniseli—II
MAKAMBO nini ezali kozela baoyo basambelaka Yehova Nzambe mpe baoyo basambelaka ye te? Nini ekokómela Satana ná bademo na ye? Mapamboli nini bato ya botosi bakozwa na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto? Biyano na mituna yango mpe na mituna mosusu ya ntina mingi ezwami na Emoniseli 13:1–22:21.a Ntoma Yoane azwaki bimonaneli 16 na nsuka ya ekeke ya liboso; mikapo oyo ezali kolobela bimonaneli libwa ya nsuka.
Yoane akomaki boye: “Esengo na moto oyo azali kotánga na mongongo makasi mpe na baoyo bazali koyoka maloba ya esakweli oyo, mpe na baoyo bazali kotosa makambo oyo ekomami na kati na yango.” (Emon. 1:3; 22:7) Kotánga mpe kosalela makambo oyo ezali na mokanda ya Emoniseli ekoki kotinda biso tósalela Nzambe na motema mobimba, ekoki kolendisa kondima na biso epai ya Nzambe mpe Mwana na ye Yesu Klisto, mpe kopesa biso elikya kitoko mpo na mikolo ezali koya.b—Ebe. 4:12.
BAANZELU BASOPI BASAANI NSAMBO YA NKANDA YA NZAMBE
Emoniseli 11:18 elobi boye: “Bikólo basilikaki mpe nkanda [ya Nzambe] eyaki, ná ntango etyamá . . . [mpo na] kobebisa baoyo bazali kobebisa mabelé.” Mpo na komonisa ntina oyo nkanda ya Nzambe eyaki, emonaneli ya mwambe elobeli misala ya ‘nyama mabe . . . ya maseke zomi mpe na mitó nsambo.’—Emon. 13:1.
Na emonaneli ya libwa, Yoane amonaki “Mwana-Mpate atɛlɛmi likoló ya Ngomba Siona mpe elongo na ye bato nkóto nkama moko na ntuku minei na minei.” Bato yango “basombamaki na kati ya bato.” (Emon. 14:1, 4) Na nsima, baanzelu basakolaki. Na emonaneli oyo elandaki, Yoane amonaki “baanzelu nsambo oyo bazalaki na malɔzi nsambo.” Emonani ete Yehova ye moko nde atindaki baanzelu yango básopa “basaani nsambo ya nkanda ya Nzambe” likoló ya bibongiseli ndenge na ndenge ya mokili ya Satana. Basaani yango ezali na bansango mpe makebisi ya bitumbu oyo Nzambe akopesa. (Emon. 15:1; 16:1) Bimonaneli wana mibale elobeli na mozindo bitumbu mosusu oyo Nzambe akopesa, oyo ezali na boyokani na mawa ya misato mpe kobɛtama ya kelelo ya nsambo.—Emon. 11:14, 15.
Biyano na mituna ya Biblia:
13:8—“Rulo ya bomoi ya Mwana-Mpate” ezali nini? Rulo yango ya elilingi ezali kaka na bankombo ya baoyo bazali koyangela elongo na Yesu Klisto na Bokonzi na ye ya likoló. Ezali mpe na bankombo ya baklisto bapakolami oyo bazali naino na mabelé, oyo bazali na elikya ya kokende likoló.
13:11-13—Na ndenge nini nyama mabe ya maseke mibale azalaki koloba lokola dalagona mpe kosala ete mɔtɔ euta na likoló ekita tii na mabelé? Nyama mabe ya maseke mibale, elingi koloba bokonzi ya Anglo-américain oyo ezali nguya ya mokili mobimba, ezali koloba lokola dalagona na ndenge ezali kotya bato mbamba mpe kosalela makaneli ná mobulu mpo na kondimisa bato boyangeli na yango na makasi. Ezali kosala ete mɔtɔ euta na likoló na ndenge ezali kosala lokola mosakoli na koloba ete elongaki mabe na bitumba mibale ya mokili mobimba oyo esalemaki na ekeke ya 20 mpe elongi Kominisme.
16:17—“Mopɛpɛ” oyo Anzelu ya nsambo asopaki saani na ye likoló na yango ezali nini? “Mopɛpɛ” yango ezali makanisi ya Satana, “elimo [makanisi ya motema] oyo ezali sikoyo kosala mosala na kati ya bana ya kozanga botosi.” Moto nyonso oyo azali na kati ya mokili ya Satana azali kopema mopɛpɛ wana ya mabe.—Ef. 2:2.
Mateya mpo na biso:
13:1-4, 18. “Nyama mabe” oyo elimboli baguvɛrnema ya bato ezali “komata uta na mbu,” elingi koloba uta na ebele ya bato oyo bapesá Nzambe mokɔngɔ. (Yis. 17:12, 13; Dan. 7:2-8, 17) Nyama yango, oyo Satana asalaki mpe apesaki nguya, ezali na motángo 666, oyo elimboli ete ezangi mpenza kokoka. Koyeba ndimbola ya nyama yango esalisi biso tókumisaka yango te mpe tósambelaka yango te ndenge bato bazali kosala.—Yoa. 12:31; 15:19.
13:16, 17. Ata soki tokoki kokutana na mikakatano na bomoi na biso ya mokolo na mokolo, na ndakisa na makambo etali ‘kosomba to kotɛka,’ tosengeli te kopesa nzela ete nyama mabe etambwisa bomoi na biso. Kondima kozwa ‘elembo ya nyama mabe na lobɔkɔ na biso to na bilongi na biso’ ekomonisa ete topesi nyama mabe nzela etambwisa misala mpe makanisi na biso.
14:6, 7. Ndenge anzelu azalaki kosakola eteyi biso ete tosengeli kopalanganisa na lombangu nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe oyo esili kotyama. Tosengeli kosalisa bato oyo toyekolaka na bango Biblia bábanga Yehova Nzambe mpe bápesa ye nkembo.
14:14-20. Ntango kobuka “mbuma ya mabelé,” elingi koloba koyanganisama ya bato oyo bakobika, ekosila, anzelu akoyanganisa “vinyo ya mabelé” mpe akobwaka yango “na kati ya ekamwelo monene ya vinyo ya nkanda ya Nzambe.” Vinyo yango, oyo ezali baguvɛrnema ya mokili ya Satana oyo ezali koyangela bato elongo na “bikango” na yango ya mbuma mabe, ekobebisama mpo na libela. Tosengeli kosala makasi ete vinyo ya mabelé ebebisa biso te.
16:13-16. ‘Maloba mapemami ya mbindo’ ezali makanisi mabe oyo bademo bazali kopanza mpo na komonisa ete kosopama ya basaani nsambo ya nkanda ya Nzambe etali bakonzi ya mokili te, kasi bazali nde kosala nyonso mpo na kotɛmɛla Yehova.—Mat. 24:42, 44.
16:21. Lokola nsuka ya mokili oyo ebɛlɛmi, kosakolama ya bitumbu oyo Yehova akosopa likoló ya ebongiseli oyo mabe ya Satana esengeli kosalema na maloba ya polele, oyo ezali lokola mai ya malili makasi. Atako bongo, bato mingi bakokoba kaka kotuka Nzambe.
MOKONZI OYO ALONGI AZALI KOYANGELA
“Babilone Monene,” lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba, ezali eteni ya bosɔtɔ ya mokili mabe ya Satana. Emonaneli ya 11 emonisi ye lokola “mwasi ya ndumba monene” to mwasi ya mbindo oyo “afandi likoló ya nyama mabe moko ya langi ya motane-ngwaa.” “Maseke zomi” ya nyama yango oyo ezali komema ye ekoboma ye mpenza. (Emon. 17:1, 3, 5, 16) Emonaneli ya 12 oyo emonisi ndumba yango lokola “engumba monene” esakoli kokwea na ye mpe ezali kolendisa basaleli ya Nzambe ‘bábima na kati na ye.’ Bato mingi bakolela ntango engumba yango monene ekokwea. Nzokande, esengo ekozala na likoló mpo na “libala ya Mwana-Mpate.” (Emon. 18:4, 9, 10, 15-19; 19:7) Na emonaneli ya 13, moto oyo azali kotambwisa “mpunda moko ya mpɛmbɛ” azali kokende kobundisa bikólo. Akobebisa mokili mabe ya Satana.—Emon. 19:11-16.
Nini ekokómela “nyoka ya ebandeli, oyo azali Zabolo mpe Satana”? Ntango nini ‘akobwakama na kati ya laki ya mɔtɔ’? Yango nde moko ya makambo oyo emonaneli ya 14 emonisi. (Emon. 20:2, 10) Bimonaneli mibale ya nsuka emonisi na mokuse ndenge bomoi ekozala na Boyangeli ya Mbula Nkóto. Ntango “emoniseli” ekómaki na nsuka, Yoane amonaki ‘ebale moko ya mai ya bomoi, ezali kotiyola na katikati ya balabala,’ mpe bazalaki kobenga “moto nyonso oyo azali na mposa ya mai.”—Emon. 1:1; 22:1, 2, 17.
Biyano na mituna ya Biblia:
17:16; 18:9, 10—Mpo na nini “bakonzi ya mabelé” bazali kolela mpo na ebongiseli oyo bango moko babebisaki? Bazali kolela kaka mpo matomba na bango ekei. Nsima ya kobomama ya Babilone Monene, bakonzi ya mabelé bakoya komona ete azalaki na ntina mpenza mpo na bango. Azalaki kosala ete makambo na bango ya mabe emonana lokola ezali malamu. Babilone Monene esalisaki bango mpe na kotinda bana mike na bitumba. Longola wana, esali mosala monene ya kosalisa bato bátosaka boyangeli na bango.
19:12—Na ndenge nini moto ata moko te ayebi nkombo oyo ekomami longola kaka Yesu? Emonani ete nkombo yango emonisi mikumba oyo Yesu azali na yango na boumeli ya mokolo ya Nkolo, na ndakisa oyo elobelami na Yisaya 9:6. Kaka Yesu nde ayebi nkombo yango mpo Nzambe apesi kaka ye mikumba wana mpe kaka Yesu ye moko nde akangi ntina ya mikumba minene wana. Nzokande, Yesu apesi mikumba na ye misusu epai ya etuluku ya mwasi na ye, na ndenge ‘akomi nkombo na ye ya sika likoló na bango.’—Emon. 3:12.
19:14—Banani bakobunda elongo na Yesu na Armagedona? ‘Mampinga ya likoló’ oyo ekobunda na Yesu elongo na etumba ya Nzambe ezali baanzelu ná baklisto bapakolami oyo bakozala na likoló na ntango wana.—Mat. 25:31, 32; Emon. 2:26, 27.
20:11-15—Bankombo ya banani ekomami na kati ya “rulo [to “buku”] ya bomoi”? Ezali rulo oyo ezali na bankombo ya bato nyonso oyo bakozwa bomoi ya seko—baklisto bapakolami, ebele ya bato mpe basaleli ya Nzambe ya sembo oyo bakozonga na bomoi na ‘lisekwa ya bayengebene.’ (Mis. 24:15; Emon. 2:10; 7:9) Bankombo ya bato oyo bakozonga na bomoi na ‘lisekwa ya bato oyo bazangi boyengebene’ ekokomama na “rulo ya bomoi” kaka soki bato yango batosi “makambo oyo ekomama na kati ya barulo” ya mibeko oyo ekofungwama na boumeli ya mbula nkóto. Kasi, bankombo yango ekomami mpo na libela te. Bankombo ya baklisto bapakolami ekokomama mpo na libela soki batikali sembo kino liwa. (Emon. 3:5) Bankombo ya baoyo bakozwa bomoi ya seko awa na mabelé ekokomama mpo na libela ntango bakoleka komekama ya nsuka na nsuka ya mbula nkóto.—Emon. 20:7, 8.
Mateya mpo na biso:
17:3, 5, 7, 16. “Bwanya oyo euti na likoló” esalisi biso tóyeba “libombami ya mwasi wana mpe ya nyama mabe [ya langi ya motane-ngwaa] oyo azali komema ye.” (Yak. 3:17) Nyama wana mabe ya elilingi ebimaki liboso na nkombo ya Société des Nations mpe na nsima ekómaki ONU. Koyeba ndimbola ya libombami wana esengeli kotinda biso tósakola na molende nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya mokolo na ye ya kosambisa.
21:1-6. Tosengeli mpenza kondima ete mapamboli oyo Biblia elaki ete Bokonzi ya Nzambe ekosala, ekokokisama. Mpo na nini? Mpamba te Biblia elobi mpo na yango ete: “Esalemi!”
22:1, 17. “Ebale moko ya mai ya bomoi” elimboli bibongiseli oyo Yehova azwi mpo na kosikola bato ya botosi na lisumu mpe na liwa. Lelo oyo, tozali na mwa ndambo ya mai yango. Tósuka kaka te na kondima libyangi ya koya mpe ‘kokamata mai ya bomoi ofele,’ kasi tóndima mpe kokabela bato mosusu mai yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo oyo ezali na Emoniseli 1:1–12:17, talá “Makanisi ya ntina na mokanda ya Emoniseli—I” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuali 2009.
b Mpo na koyeba ndimbola ya vɛrsɛ mokomoko ya mokanda ya Emoniseli, talá buku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!
[Elilingi na lokasa 5]
Bokonzi ya Nzambe ekomemela bato ya botosi mapamboli kitoko!