Mokapo 9
Basimbi nkombo na Yesu makasi
PELEGAME
1. Lisangá nini ezwi nsango na Yesu oyo elandi, mpe na engumba ya lolenge nini baklisto yango bazalaki kofanda?
KILOMETRE 80 ekabolaki Sumuluna na Pelegame kuna na nord; nzokande kolongwa Pelegame kokoma na mai monene, ezalaki na kilometre 24. Mboka yango efandaka kati na lobwaku ebengamaki Caïque, mpe lelo oyo, mboka yango ezali kobengama ete Bergama. Lokumu ya mboka wana eutaki na temple na yango etongamaki mpo na Zeus to Jupiter. Na bambula 1800, batimoli na biloko ya kala na mabelé to archéologues bakamataki etumbelo ya temple yango mpe bamemaki yango na mboka Berlin na ebombelo ebengami Pergamon-Museum. Lelo oyo, bato bakoki ntango nyonso komona yango elongo na bikeko ya banzambe ya bapakano. Nsango nini Nkolo Yesu alingaki kotindela lisangá oyo efandaki kati na mboka oyo etondaki na losambo ya bikeko?
2. Motindo nini Yesu amilakisaki, mpe mpo na nini azali na ‘mopanga mopeli bipai mibale’?
2 Yesu amilakisi naino ye moko; alobi: “Komélá anzelu na lisangá na Pelegame ete, Oyo azali na mopanga mopeli na bipai nyonso mibale alobi boye ete . . .” (Emoniseli 2:12) Yesu azongeli awa maloba malobami na ntina na ye kati na Emoniseli 1:16. Lokola Mosambisi mpe Mokokisi bikateli, akoboma bato oyo bazali konyokola bayekoli na ye. Oyo ezali solo elendiseli! Nzokande, se mpo na oyo etali lisambisi, basangani na lisangá basengeli mpe koyeba ete Jéhovah, na nsima na “ntoma na kondimana,” Yesu Klisto, ‘akobima noki lokola motatoli’ mpo na kotelemela baklisto nyonso ya nkombo mpamba oyo bazali kosambelaka bikeko, bazali kosalaka pite, bazali bato na lokuta mpe moyibi, mpe bazali kosalisa babola te. (Malaki 3:1, 5; Baebele 13:1-3) Ebongi totya likebi na toli mpe na mpamela oyo Nzambe apesi na nsima na Yesu.
3. Losambo nini ya lokuta ekolaki na Pelegame, mpe mpo na nini elobami ete “kiti na bokonzi” na Satana ezalaki wana?
3 Tala oyo Yesu alobi sikawa na lisangá ya Pelegame: “Nayebi esika efandi yo; kuna ezali kiti na bokonzi na Satana.” (Emoniseli 2:13a) Baklisto oyo bafandaki solo na mboka oyo losambo ya Satana ezalaki makasi. Longola temple ya Zeus, ezalaki na ndako-nzambe mosusu etongamaki mpo na Eskulape, nzambe na makambo matali mosala ya monganga. Pelegame eyebanaki mpe lokola mboka oyo losambo ya mokonzi to empereur ezalaki makasi koleka. Liloba ya hébreu oyo ebongolami ete Satana elimboli “Motemeli,” mpe “kiti na bokonzi” na ye elakisi boyangeli na ye na mokili mobimba, oyo Nzambe atikaki nzela mpo na yango na boumeli ya ntango moko. (Yobo 1:6; tala mpe ndimbola na nse ya lokasa na elembo a kati na Biblia Lingala haut-fleuve.) Losambo na bikeko oyo epalanganaki mingi na Pelegame emonisaki malamu ete “kiti na bokonzi” na Satana epikamaki makasi na mboka yango. Kanisa nkanda ya Satana na komonaka ete baklisto bazalaki kofukamela ye te na nzela na losambo ya ekólo!
4. (a) Na maloba nini Yesu akumisi baklisto ya Pelegame? (b) Pline, moyangeli na nkombo ya mokonzi ya Loma, akomaki nini epai ya mokonzi yango na nkombo Trajan mpo na myango oyo alingaki kosalela epai na baklisto? (c) Atako makaneli mazalaki, ezaleli nini baklisto ya Pelegame babatelaki?
4 Ee, “kiti na bokonzi na Satana” ezali wana na Pelegame! Kasi Yesu abakisi maloba oyo: “Nde ozali kosimba nkombo na ngai, mpe owangani kondima na ngai te ata na mikolo na Antipase, ye motatoli na ngai na sembo abomamaki kati na bino, kuna ezali Satana kofanda.” (Emoniseli 2:13b) Oyo ezalaki solo maloba na kokumisama mpo na bango! Na ntembe te Antipase abomamaki mpo ete aboyaki kosambela bilimu mabe mpe kosambela mokonzi ya Loma to empereur. Mwa ntango moke nsima wana Yoane azwaki esakweli oyo, Pline le Jeune, guvernere momonisi na mokonzi na Loma Trajan, akomelaki mokonzi yango mpo na kolimbola epai na ye lolenge akosala epai na baoyo bafundamaki ete bazali baklisto. Mokonzi to empereur, andimaki mpe myango na ye. Bakangami oyo bawanganaki ete bazali baklisto te, bazalaki kotika bango; kasi liboso na kotika bango, elobaki Pline, basengelaki ‘naino na miso na ye, kosambela banzambe, mpe kopesa mpaka na malasi (encens) elongo na vinyo lokola mabonza epai na ekeko ya mokonzi [empereur Trajan] . . . mpe kofinga Klisto.’ Oyo nyonso ayebanaki solo ete azali moklisto abomamaki. Ata liboso na makaneli oyo, baklisto ya Pelegame bawanganaki kondima na bango te. ‘Basimbaki nkombo na Yesu makasi’ na ntina boye ete balandaki kokumisa ye na etelemelo na ye etombwami oyo Jéhovah apesi ye lokola Molongi mpe Mosambisi. Na bosembo nyonso, bazalaki kolanda matambe na Yesu lokola batemwe ya Bokonzi.
5. (a) Losambo nini ekokani lelo na losambo ya mokonzi to empereur oyo ekotisi baklisto ya na ntango na biso kati na komekama makasi? (b) Motindo nini Mosenzeli esungi bango?
5 Mbala mingi, Yesu ayebisaki ete Satana azali mokonzi na mokili oyo ya mabe, kasi lokola ye azalaki sembo, Satana akokaki ye te. (Matai 4:8-11; Yoane 14:30) Na ntango na biso, mabota makasi, mpenzampenza “roi du nord” mpe “roi du sud” bawelanaki soki nani akoyangela mokili mobimba. (Danyele 11:40) Mposa makasi ya kolinga ekolo epelisami lokola móto mpe losambo ya mokonzi to empereur ezali mpe komonana lelo na lolenge ya nationalisme makasi oyo epalangani na mokili mobimba. Masolo likoló na neutralité to kozanga kokota na makambo na mokili, masolo oyo mabimisamaki na La Tour de Garde ya 1er Novembre 1939 (na Anglais), mpe na Mosenzeli ya 1er Février 1980 mpe 1er Avril 1987 emonisaki polele likanisi ya Biblia na ntina yango, kopesaka toli epai ya baklisto oyo balingi kotambola na nkombo ya Jéhovah mpe kolonga mokili lokola Yesu alongaki na mpiko nyonso.—Mika 4:1, 3, 5; Yoane 16:33; 17:4, 6, 26; 18:36, 37; Misala 5:29.
6. Na ndakisa ya Antipase, etelemelo nini ba Témoins de Jéhovah na ntango biso basili kokamata yango kozanga kokwea?
6 Toli oyo epesamaki na ntango ebongi mpenza. Wana ete losambo ya ekolo ezali kongala, ba Témoins de Jéhovah, ezala bapakolami to baninga na bango, babatelaki ntango nyonso kondima na bango makasi. Na Etats-Unis, bankama mingi na bana mpe na balakisi balongolaki bango na biteyelo mpo ete baboyaki kopesa losako na drapo, mpe na Alemanye Batemwe banyokwamaki makasi mpo ete baboyaki kopesa losako na elembo ebengamaki svastika (lolenge moko ya ekulusu, croix gammée). Lokola tosilaki koloba yango, banazis babomaki bankoto na basaleli ya sembo ya Jéhovah mpo ete baboyaki komibebisa na losambo motindo wana ya ekolo. Na bambula kobanda 1930, ntango wana losambo lobengami shintoïsme mpe losambo ya empereur shinto ya Japon ezalaki kongala, baministre mibale bapionniers bazalaki na molende nyonso kolona mbuma ya Bokonzi na mboka Taïwan, oyo ntango yango ezalaki na maboko ya Bajaponé. Bakonzi ya basoda babwakaki bango na boloko epai kuna moko na bango akufaki mpo na minyokoli. Na nsima babimisaki pionnier oyo mosusu, nde ezalaki bobele mpo na kobeta ye lisasi na mokongo—Antipase ya ntango na biso. Lelo lisusu, ezali na mikili epai bazali kosengisa ete bato nyonso basambela bilembo ya ekolo mpe bamipesa mobimba kolinga mboka na bango. Bilenge Batemwe mingi bakangamaki na boloko mpe babomamaki mpo ete baboyaki na mpiko nyonso komikotisa na makambo ya mokili, awa ezali bango baklisto. Bilenge, bino baoyo bosengeli kokutana na makambo motindo oyo, boyekolaka Liloba na Nzambe mikolo nyonso, mpo na kozala na “kondima mpo na kobikisa milimo na bino” ete bozwa bomoi ya seko.—Baebele 10:39 kino 11:1; Matai 10:28-31.
7. Ndenge nini bana misato na mokili na Inde bakutanaki na likambo na losambo ya ekolo, mpe nsuka na yango ezalaki boni?
7 Bilenge bayekoli bakutanaki na makambo ya boye. Na 1985, na eteni na mokili Kerala, kuna na Inde, bana misato ya ba Témoins de Jéhovah baboyaki kosala makambo makokaki kobebisa kondima na bango etongami likoló na Biblia mpe baboyaki koyemba loyembo mpo ya ekolo. Bazalaki kotelema na limemya, wana ete bayekoli mosusu bazalaki koyemba, nde ata bongo balongolaki bango na eteyelo. Tata na bango afundaki likambo yango kino na la Cour suprême ya Inde. Bazuzi mibale na tribinale wana ya nsuka balongisaki bana, kolobaka na mpiko nyonso: “Bokoko na biso ezali kotikela bato bonsomi; filozofi na biso ezali kotikela bato bonsomi; mibeko na mboka na biso mizali kotikela bato bonsomi; tobebisa bonsomi yango te.” Nsango ya likambo yango etambolaki mingi kati na bazulunalo mpe na ekolo mobimba ya Baindia, oyo na ntango wana ezalaki na bato pene na ndambo moko likolo na mitano oyo bafandi na mokili, ete kuna na Inde ezali na baklisto oyo bazali kosambela Nzambe ya solo Jéhovah mpe bazali kotosa mibeko ya Biblia.
Bopusi mabe
8. Yesu apamelaki baklisto ya Pelegame na likambo nini?
8 Ee, baklisto ya Pelegame bazalaki solo bato ya sembo. Nzokande, Yesu alobi na lisangá yango: “Kasi nazali na yo mwa makambo.” Lisangá ya Pelegame esalaki nini mpo epamelama boye? Yesu abakisi: “Ete ozali na bamosusu wana na mateyo na Balama, oyo alakisaki Balaka kotiela bato na Yisraele libaku ete balia mbeka na bikeko mpe basala pite.”—Emoniseli 2:14.
9. Balame azalaki nani, mpe ndenge nini toli na ye ebetisaki “libaku na bana na Yisraele”?
9 Na ntango na Moïse, Balaka mokonzi ya Moaba abengisaki Balama, mosakoli moko Moyisraele te, kasi azalaki na mwa boyebi na misala na Jéhovah, abengisaki ye mpo ete aloka Yisraele. Jéhovah atemelaki Balama, kolobisaka ye mapamboli likoló na Bayisraele mpe bilakeli mabe likoló na banguna na bango. Mpo na kokitisa nkanda ya Balaka, Balame alakisaki ye mayele moko mabe: Kotinda basi ya Moaba ete bakweisa mibali ya Yisraele mpo basala pite mpe basambela nzambe ya lokuta Baala na Peolo! Mayele mabe wana esalaki mosala na yango. Nkanda makasi ya Jéhovah epelaki, mpe etumbu oyo atindaki ebomaki bato 24 000 kati na Bayisraele wana basali na pite. Etumbu esukaki bobele ntango nganga Finehase akamataki ekateli ya kolongola mabe na kati na Yisraele.—Mituya 24:10, 11; 25:1-3, 6-9; 31:16.
10. Mabaku nini makotaki kati na lisangá na Pelegame, mpe mpo na nini baklisto yango bazwaki likanisi ete Nzambe akosala eloko te mpo na mabe na bango?
10 Boni na ntango na Yoane, mabaku motindo oyo mazalaki na Pelegame? Mazangaki te. Pite mpe losambo ya bikeko ekotaki kati na lisangá. Baklisto yango bazangaki kotosa makebisi na Nzambe mapesamaki na nsima na ntoma Paulo. (1 Bakolinti 10:6-11) Lokola bayikaki mpiko na monyoko, bakanisaki mbala mosusu ete Jéhovah akoloba eloko te mpo na pite na bango. Yango wana Yesu alobelaki bango ete esengeli na bango kobwaka mabe motindo oyo.
11. (a) Baklisto basengeli komibatela na nini, mpe eloko nini basengeli kokanisa te? (b) Na boumeli ya bambula, bato boni babimisamaki na lisangá ya boklisto, mpe mingi na bango mpo na likambo nini?
11 Bobele bongo lelo, baklisto basengeli komibatela ete babongola te “mawa na Nzambe kino bosoto.” (Yuda 4) Tosengeli koboya mabe mpe ‘kobetabeta nzoto na biso’, mpo ete tokangama ntango nyonso na bizaleli malamu ya boklisto. (1 Bakolinti 9:27; Nzembo 97:10; Baloma 8:6) Tokanisa te ete soki tozali na molende mingi kati na mosala ya Nzambe mpe tozali koyika mpiko kati na monyoko, ete wana epesi biso nzela na kotambola na mobulu. Na boumeli ya bambula, mpe kati na mokili mobimba, nkoto mingi na bato basili kobimisama na lisangá ya boklisto, mingi na bango mpo na pite. Bambula mosusu motuya na bango elekaki oyo ya Bayisraele babomamaki kala na likambo ya Baala na Peolo. Tomikengela mpo ete tokwea na molongo na bato wana te.—Baloma 11:20; 1 Bakolinti 10:12.
12. Lokola mpo na basaleli na Nzambe na ntango ya kala, mitinda nini mizali kosalelama lelo mpo na baklisto?
12 Yesu apameli mpe baklisto ya Pelegame mpo ete bazali “kolia mbeka na bikeko.” Elimboli nini? Na kotalela maloba na Paulo epai na Bakolinti, ekoki kozala ete bamoko basalelaki mabe bonsomi na bango lokola baklisto mpe bazokisaki lisosoli ya baninga na bango. Kasi emonani mpenza lokola ete bazalaki kosangana na motindo moko to na motindo mosusu na milulu ya kosambela bikeko. (1 Bakolinti 8:4-13; 10:25-30) Baklisto ya sembo basengeli lelo kosalela bonsomi na bango ya boklisto na bolingo ezangi koluka litomba, kosenzelaka malamu ete babetisa bamosusu libaku te. Esengeli na bango kobwaka mitindo ya lelo ya losambo ya bikeko, ndakisa kosambela bavedete ya télévizio, ya cinéma to ya masano. Epai mosusu basengeli kokeba ete mbongo to mpe libumu ekoma nzambe na bango te.—Matai 6:24; Bafilipi 1:9, 10; 3:17-19.
Tosengeli koboya mikabwano
13. Na nsima Yesu apameli baklisto ya Pelegame na likambo nini, mpe mpo na nini lisangá ebongaki kozwa mpamela yango?
13 Yesu apameli lisusu baklisto ya Pelegame, kolobaka na bango: “Lisusu yo ozali na bamosusu oyo bazali kosimba mateyo na Banikolaiti lokola.” (Emoniseli 2:15) Liboso na yango, Yesu akumisaki Baefese mpo ete bayinaki misala na lingomba wana. Kasi baklisto ya Pelegame bazwi toli ya kolongola mikabwano na kati na lisangá. Mitinda ya boklisto misengeli kotosama, mpo ete bomoko ya baklisto ebatelama, bomoko mpo na yango Yesu abondelaki engebene Yoane 17:20-23. Esengelaki ‘kolakisa mateyo na sembo mpe kopamela baoyo bakobongolaka maloba.’—Tito 1:9.
14. (a) Uta ebandeli, lisangá ya boklisto esengelaki kobunda na banani, mpe ntoma Paulo alobaki nini mpo na bato wana? (b) Moto na moto oyo amekami na kolanda etuluku moko ya bapengwi asengeli kotosa maloba nini ya Yesu?
14 Uta ebandeli, lisangá ya boklisto etemelaki bapengwi ya lolendo baoyo, na nzela na maloba na kolengola mpe na bokosi, “bazali koyeisa mikabwano mpe mabaku kotelemela mateyo” mapesami na nzela oyo Jéhovah azali kosalela. (Baloma 16:17, 18) Ntoma Paulo akebisaki baklisto mpo na likama wana pene kati na mikanda na ye nyonso.a Na ntango na biso, wana Yesu asili kozongisa lisangá ya solo kati na bopeto na yango mpe bomoko na yango ya boklisto. Mikabwano to basekte ezali naino likama kino na mikolo na biso. Yango wana, moto na moto oyo akomekama ete alanda etuluku moko ya bapengwi, mpe kosala bongo lingomba elongo na bango to sekte, ebongi ete moto yango atya likebi na maloba oyo ya Yesu: “Na bongo bongola motema na yo; soko bongo te, nakoya epai na yo noki, mpe nakosala etumba na bango na mopanga [molai] na monoko na ngai.”—Emoniseli 2:16.
15. Mokabwano to sekte ebandaka ndenge nini?
15 Mokabwano to sekte ebandaka ndenge nini? Ekoki kozala molakisi ya lokuta oyo azali kobimisa ntembe likoló na makambo na solo mazwami na Biblia (na ndakisa, azali kotya ntembe ete tozali na mikolo ya nsuka te); etuluku ya bato batiki lisangá mpe babandi kolanda ye. (2 Timote 3:1; 2 Petelo 3:3, 4) To ekoki kozala ete moto moko abandi kotónga lolenge oyo Jéhovah azali kosala mpo na kokokisa mosala na ye. Kosalelaka mayoki, moto motindo wana akoloba mbala mosusu ete mosala ya kokende ndako na ndako kosakola nsango malamu ya Bokonzi ezali na moboko kati na Biblia te mpe ezali na ntina te. Nzokande, kosangana na mosala yango, na ndakisa na Yesu mpe na bantoma na ye, mbele ekolakisa ezaleli ya komikitisa epai ya bato motindo yango; kasi bango bamoni malamu kotika lisangá mpe kozala na goigoi, koyanganaka mbala mosusu kozanga ebongiseli mpenza, na mwa bato moke, bobele mpo na kotanga Biblia. (Matai 10:7, 11-13; Misala 5:42; 20:20, 21) Bazali na makanisi na bango moko likoló na ekaniseli na kufa na Yesu, likoló na mobeko oyo ezwami na Biblia ya koboya makila, likoló na bilambo mpe likoló na likaya. Epai mosusu, bazali kotya mbindo likoló na nkombo ya Jéhovah; nokinoki bazali kozongela bizaleli mabe lokola etikameli nzela kati na Babilone Monene. Mabe koleka, ezali na baoyo, na kopusama na Satana, babandi ‘kobeta baninga na bango ya kala ya boombo,’ baoyo bazalaki bandeko na bango.—Matai 24:49; Misala 15:29; Emoniseli 17:5.
16. (a) Mpo na nini ye oyo azali kotatabana mpo na bopusi ya bapengwi asengeli kobongola motema? (b) Nini ezali kozela baoyo baboi kobongola motema?
16 Moto na moto oyo azali kotatabana mpo na bopusi ya bapengwi, ebongi ete alanda toli oyo euti na Yesu: “Bongola motema na yo.” Tosengeli kobwaka maloba na bapengwi lokola pwázó mpe ezali solo pwázó. Maloba wana mazali komonisa elimo ya likunya mpe koyina baninga, ekeseni mpenza na maloba na solo mpe na sembo, na mpeto mpe na bolingo oyo Yesu azali koleisa na yango lisangá na ye. (Luka 12:42; Bafilipi 1:15, 16; 4:8, 9) Mpo na bato na motó makasi oyo baboi kobongola motema, Nkolo Yesu ‘azali kobundisa bango na mopanga molai mobimi na monoko na ye.’ Azali koyungola libota na ye, mpo na kobatela bomoko mpo na yango asambelaki na mpokwa ya nsuka oyo alekisaki awa na mokili esika moko na bayekoli na ye. (Yoane 17:20-23, 26) Lokola bapengwi baboi toli ya bolingo mingi mpe lisalisi epesameli bango na minzoto mizali kati na loboko mobali na Yesu, ntina wana Yesu azali kosambisa bango mpe kopesa bango “etumbu monene” kati na “molili na libanda.” Bazali kobimisama na lisangá mpo ete bazala lisusu mfulu te likoló na libota ya Nzambe.—Matai 24:48-51; 25:30; 1 Bakolinti 5: 6, 9, 13; Emoniseli 1:16.
‘Mana masili kobombama mpe libanga mpembe’
17. Mbano nini ezali kozela baklisto bapakolami oyo ‘balongi,’ mpe baklisto ya Pelegame basengeli kolonga makambo nini?
17 Mbano monene ezali liboso na baoyo nyonso bazali kotosa toli oyo Yesu apesaki na kotambwisama na elimo santu ya Jéhovah. Yoka! “Oyo azali na matoi ayoka yango elobi elimo na masangá ete, Mpo na molongi, nakopesa ye mana masili kobombama, mpe nakopesa ye libanga mpembe. Na likoló na libanga yango esili kokomama nkombo na sika oyo moto mosusu ayebi te, bobele mozwi na yango ayebi.” (Emoniseli 2:17) Na motindo yango, baklisto ya Pelegame lokola baoyo ya Sumuluna bayikisami mpiko na ‘kolonga.’ Mpo na kokoka kolonga, baklisto ya Pelegame, esika kiti na bokonzi na Satana ezali, basengeli kobwaka losambo ya bikeko, pite mpe mikabwano esika moko na lipengwi lokola ezaláká na likambo na Balake, na Balame mpe na lingomba na Banikolaiti. Soki bakosala bongo, baklisto oyo bapakolami nde babengami na kolya mana masili kobombama. Yango elimboli nini?
18, 19. (a) Mana oyo Jéhovah apesaki na Bayisraele ezalaki nini? (b) Mana nini ebombamaki? (c) Kolya mana masili kobombama elakisi nini?
18 Na ntango na Moïse, Jéhovah apesaki mana mpo na koleisa Bayisraele kati na esobe. Mana wana ezalaki ya kobombama te, mpamba te ntongo nyonso, longola bobele mokolo na sabata, mana ezalaki kokwea na ekamwiseli, lolenge na yango ezalaki lokola matandala na mbinga mingi te. Na nzela na ebongiseli oyo eutaki na Nzambe, bomoi ya Bayisraele ebatelamaki. Mpo na kokanisa yango, Jéhovah atindaki Moïse ete “Kamata mbeki moke mpe tia [ndambo] moko na mana kati na yango, mpe tia yango liboso na Jéhovah ete ebatelama mpo na mabota na bino.” Etyamaki bongo na kati na sanduku ya bulee ya kondimana.—Exode 16:14, 15, 23, 26, 33; Baebele 9:3, 4.
19 Oyo ezali solo elembo ebongi! Mana yango ebombamaki kati na Esika-Eleki-Bosantu na tabernakle, epai kuna kongenga ya ekamwiseli oyo ezalaki kongenga likoló na ezipelo na Sanduku ezalaki elilingi ete Jéhovah ye moko azali kati na esika yango. (Exode 26:34) Moto moko te apesamelaki ndingisa na kokota na esika wana ya bosantu mpo na kolya mana masili kobombama. Nzokande, Yesu alobi ete bayekoli na ye bapakolami mpe balongi bakolya “mana masili kobombama.” Lokola Klisto liboso na bango, bakozwa libaku ya kokota ‘na esika na bulee etongami na maboko te, yango elilingi na oyo na solo, kasi kati na likoló mpenza.’ (Baebele 9:12, 24) Nsima na kosekwa bazwi nzoto ekoki kobeba te mpe bomoi bokoki kosuka te, ebongiseli kitoko mingi euti na Nzambe, oyo emonisami na elilingi oyo ete bapesi bango “mana masili kobombama,” bilei bikoki kobeba te. Oyo nde libaku malamu mpo na etuluku oyo moke ya balongi!—1 Bakolinti 15:53-57.
20, 21. (a) Kozwa libanga mpembe elakisi nini mpo na baklisto bapakolami? (b) Lokola mabanga mpembe mazali bobele 144 000, elikya nini ebele monene bazali na yango?
20 Bango bazwi lisusu “libanga mpembe.” Na batribinale ya Baromé, bazalaki kosalela libanga mpo na kokata likambo.b Libanga mpembe elimbolaki ete moto alongi na esambiseli, nzokande libanga mwindo elimbolaki ete moto akweisami na kozwa etumbu, mbala mingi etumbu ya liwa. Lokola Yesu apesi “libanga mpembe” epai na baklisto ya Pelegame, yango elakisi ete azwi bango na likambo te mpe bazali mpeto. Kasi maloba na Yesu makoki mpe kozala na ndimbola mosusu. Epai ya Baromé, mabanga mazalaki mpe kosalelama lokola ticket mpo na kokota na milulu minene. Na motindo yango, libanga mpembe ekoki kolimbola eloko moko ya ntina mingi mpo na moklisto mopakolami oyo alongi: nzela epesameli ye na kokota mpe kozwa esika ya lokumu kati na makoló mpo na libala na Mwana na Mpate. Bobele mabanga 144 000 ya motindo yango nde masili kokabolama.—Emoniseli 14:1; 19:7-9.
21 Ezali boni mpo na ebele monene, baninga ya baklisto bapakolami? Bango mpe bazali na mbano na bango. Ata bazwi libanga mpembe te mpo na kokota na makolo, soki bakoyika mpiko, bakobika na bolozi monene mpe kosangana na esengo ya kozongisa Paradis na mabelé. Basekwi ya sembo bakoya kosangana na bango, basembwi ya kala liboso ya eleko ya boklisto mpe baoyo, kati na bampate mosusu, basili kokufa kala mingi te. Na nsima, basekwi nyonso mosusu basikolami bakozala na esengo ya kozongisama na bomoi na mabelé oyo masili kobongwana Paradis.—Nzembo 45:16; Yoane 10:16; Emoniseli 7:9, 14.
22, 23. Nkombo ekomami likoló na libanga epesami na baklisto bapakolami elimboli nini, mpe esengeli koyikisa bango mpiko na kosala nini?
22 Nkombo ya sika ekomami likoló na libanga yango elimboli nini? Nkombo ezali na ntina mpo na kobenga moto mpe kokesenisa ye na bato mosusu. Baklisto wana bapakolami bazwi libanga nsima na kosukisa bomoi na bango na mabelé lokola kurse oyo balongi kati na yango. Na bongo, ezali polele ete nkombo likoló na libanga ekangani na libaku malamu ezali na bango ya kosangana elongo na Yesu kati na makoló; bandimami na mosala ya bokonzi, libaku malamu mpenza epesameli bobele batuki na libula na Bokonzi ya likoló. Na yango, ezali nkombo to koponama na mosala “oyo moto mosusu ayebi te, bobele mozwi na yango.”—Tala Emoniseli 3:12.
23 Oyo ezali solo elendiseli mpo na kelasi na Yoane ete ‘bayoka yango elobi elimo na masanga’ mpe basalela yango! Mpo na baninga na bango ebele monene, bango mpe balendisami ete basala mosala na sembo esika moko na bango, awa bazali naino na mabelé, mpe basakola Bokonzi ya Jéhovah elongo na bango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala 1 Bakolinti 3:3, 4, 18, 19; 2 Bakolinti 11:13; Bagalatia 4:9; Baefese 4:14, 15; Bafilipi 3:18, 19; Bakolose 2:8; 1 Batesalonike 3:5; 2 Batesalonike 2:1-3; 1 Timote 6:3-5; 2 Timote 2:17; 4:3, 4; Tito 1:13, 14; 3:10; Baebele 10:26, 27.
b Tala Misala 26:10 mpe maloba na nse na lokasa ya Traduction du monde nouveau, ebimeli na Lingelesi.
[Bililingi na lokasa 43]
Bilembo oyo bizali komonisa losambo ya mbindo na bapakano, bityami na Pergamon-Museum, na Berlin
[Elilingi na lokasa 45]
Mana ebombamaki kati na sanduku na kondimana. Na elobeli na elilingi, kozwa mana mabombami elimboli kozwa bomoi bokoki kosuka te mpo na baklisto bapakolami oyo bakolonga
[Elilingi na lokasa 45]
Libanga mpembe ezali mpo na baoyo bandimami na libala na Mwana na Mpate