“Mwasi Yezabele”
K ASI nazali na yo likambo oyo ete: opesi nzela na mwasi yango Yezabele, oyo akolobaka ete ye azali mosakoli, mpe azali kolakisa mpe azali kozimbisa baombo na ngai ete basala pite mpe balia mbeka na bikeko.” (Emoniseli 2:20) Yesu alobaki boye epai na bankulutu ya lisangá na boklisto ya Tiyatire. Lisangá yango ezalaki na molende mingi mpe emonisaki bolingo, kondima mpe koyika mpiko, kasi epesaki nzela na bopusi mabe ya mwasi moko Yezabele. Mpo na nini? Likambo motindo wana ekoki kosalema lelo?—Emoniseli 2:19.
Ezali komonana mpenza ete moto moko te na Tiyatire azalaki mpenza na nkombo Yezabele. Yesu asalelaki nkombo wana mpo na kokundwela mokonzi-mwasi na lokumu Yezabele, mwasi ya mokonzi Akabe. Mwasi wana oyo azalaki na ezaleli ya lolendo abebisaki mpenza libota na Nzambe ntango akotisaki losambo mabe ya Baale na Yisraele mpe kobundisa na makasi mpo na kolimwisa losambo ya peto.—1 Mikonzi 16:31-33; 21:1-7.
Motindo moko mpe, Yezabele ya Tiyatire, ezala ete azali mwasi to etuluku ya basi, alendisaki pite mpe losambo na bikeko kati na libota na Nzambe. Lokola Yesu azali koloba mpo na “bana na ye”. ekoki kozala mpenza bayekoli na ye, na boye, kati na lisangá, bamosusu bayokaki ye. (Emoniseli 2:22, 23) Bopusi na ye ezalaki na likama ya kobebisa mpe lisangá lokola libota na Yisraele ebebaki na mikolo ya Akabe.
Mpo na nini Yezabele ya Tiyatire azalaki na bopusi monene boye? Kosalaka bokokani elongo na Yezabele ya kala, bato mosusu bakanisaki ete ye azalaki mwasi ya nkulutu moko oyo ayebanaki mingi na Tiyatire. Nzokande, Biblia elobi bongo te. Ezali mpenza, nguya ya bomoto na ye mpe mosala na ye ya koloba ete ye azali mosakoli nde epesaki ye mwa lokumu kati na lisangá.
Emonani lokola ete misala mabe oyo azalaki kolendisa etalelaki kozala ya bituluku na mombongo. Engebene W. Ramsay, “batangaki bituluku mingi na mombongo na Tiyatire koleka na engumba nyonso mosusu ya Azi”. Diksionere moko (The lnterpreter’s Dictionary of the Bible) elobi boye na ntina yango: “Etuluku moko na moko ezalaki na mokonzi nzambe na yango, bafeti na yango, bokutani na yango, oyo mbala mosusu, ekokaki kobebisama mpo na kokoma bilembo ya mbindo. Mbala mosusu ‘Yezabele: azalaki koloba ete . . . bilambo wana bizalaki mabe te mpamba te, mpo na komisalisa, mosali moko na moko asengelaki kozala kati na etuluku moko.” Ezali yango nde diksionere mosusu ezali koloba (The Expositor’s Greek Testament), oyo ezali komeka koyebisa ete bato ya Yezabele “bazalaki na lolendo mpo na bonsomi na bango”.
Na yango, mateya ya Yezabele na Tiyatire ekokanaki na “mateya ya Balaam” na Pergame (Emoniseli 2:14) Lisangá ya Pergame eyikaki mpiko liboso na minyoko mingi, kasi basangani na yango mosusu bazalaki komekola Balaam ya kala na kolendisa pite mpe losambo na bikeko. Bato bazali kokanisa ete na Pergame bopusi ya Balaam ezalaki kobenda na kowangana kondima na yo mpo na kopengola minyokoli makasi nzokande na Tiyatire Yezabele azalaki kobenda bato na kotika kondima mpo na bantina etali mosolo. Ata soki ntina ezali nini, mateya wana mazalaki lipengwi oyo ezalaki komema na liwa.
Bopusi ya Yezabele to oyo ya Balaam ekokaki kozala na mikolo na biso? Ya solo mpenza Bakonzi mingi ya mangomba na boklisto na lokuta bazali komekola Yezabele na kopesa nzela kati na masangá na bango bato oyo bazali kosangisa nzoto mibali na mibali, pite, ekobo, kosopa zemi mpe makambo mosusu ya motindo moko oyo makweisami na Nzambe, Ata kati na lisangá ya boklisto, bato mosusu balendisaki “elimo ya lipanda” mpo na losambo ya peto, kolendisaka baklisto ete bazala na motema makasi te mpo na oyo etali mitinda ya Biblia mpe kosala ata pite.
Baoyo nyonso balingi kosepelisa Jehovah ba sengeli komibatela na makanisi motindo wana ata soki mayebisami epai na bato, mibali basi, oyo bazali na bomoto ya nguya mpe bopusi makasi. Lolenge wana ya kokanisa ezali na likama lelo lokola ezalaki na ekeke ya liboso.—Emoniseli 2:22, 23.