MOKAPO YA MIBALE
Lolenge ya komibongisa mpo na libala oyo ekolónga
1, 2. (a) Lolenge nini Yesu alobelaki mingi ntina ya kosala mwango? (b) Mingimingi na makambo nini kosala mwango ezali mpenza na ntina?
KOTONGA ndako esɛngaka komibongisa malamumalamu. Liboso ya kotya moboko, etando ya mabelé esengeli kozwama mpe malako ya botongi masengeli kolɛngɛlama. Nzokande, ezali na eloko mosusu ya ntina mingi. Yesu alobaki ete: “Mpo ete soko moto moko kati na bino azali na mposa na kotonga ndako, akofanda liboso [te] kotánga motuya na yango kotala soko azali na mosolo na kosilisa yango?”—Luka 14:28.
2 Makambo oyo masalelamaka mpo na kotonga ndako masalelamaka mpe mpo na kotonga libala ya malamu. Mingi balobaka ete: “Nalingi kobala.” Kasi bato boni bakanisaka liboso na ntina na makambo oyo yango esɛngaka? Atako Biblia ezali kolobela libala na lolenge ya malamu, ezali mpe kobenda likebi na mikakatano oyo ezali na libala. (Masese 18:22; 1 Bakolinti 7:28) Na yango, baoyo bazali kokana kobala basengeli kozala na likanisi libongi mpo na mapamboli mpe mpo na masɛngami ya libala.
3. Mpo na nini Biblia ezali lisalisi oyo libongi mpo na baoyo bazali kosala mwango mpo na libala, mpe wapi mituna misato oyo mikosalisa biso na koyanola?
3 Biblia ekoki kosalisa. Batoli na yango epemami na Mobandisi ya libala, Yehova Nzambe. (Baefese 3:14, 15; 2 Timoté 3:16) Kosalela mitindá mizwami kati na búku oyo ekomamá kala kasi oyo ebongi mpe ata na mikolo na biso, ekoki kosalisa biso na komona (1) Lolenge nini moto akoyeba soki akoki mpo na kobala? (2) Makambo nini asengeli koluka epai na oyo akozala mobalani na ye? mpe (3) Lolenge nini bokutani mpo na kolɛngɛla libala esengeli kobatelama na lokumu malamu?
OKOKI MPO NA KOBALA?
4. Likambo nini lizali na ntina mpo na kobatela libala malamu, mpe mpo na nini?
4 Kotonga ndako ekoki kosɛnga mosolo mingi, kasi kobatela yango mpo ete eumela ntango molai esɛngaka mpe mosolo mingi koleka. Ezali bobele bongo mpo na libala. Emonanaka ete kobala ezali likambo ya mpasi; nzokande kobatela boyokani kati na libala mbula na mbula eleki mpe mpasi. Nini ekoki kosala ete boyokani motindo wana ezala? Likambo ya ntina mingi ezali ndai oyo esalemi na motema moko. Talá lolenge Biblia elobi na ntina na libala: “Moto akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akosangana na mwasi na ye mpe bango bakozala mosuni moko.” (Genese 2:24) Yesu Klisto apesaki ntina bobele moko oyo eyokani na Makomami mpo na koboma libala mpe kozala na likoki ya kobala lisusu—“pite,” elingi koloba, kosangisa nzoto na moto mosusu oyo azali mwasi na yo te to mobali na yo te. (Matai 19:9) Soki ozali kokana kobala, kobosana soko moke te lilako wana ya Biblia. Soki okoki naino te mpo na kosimba ndai wana monene, boye okoki naino te mpo na kobala.—Deteronome 23:21; Mosakoli 5:4, 5.
5. Atako kokata ndai ya libala ebangisaka bato mosusu, mpo na nini yango esengeli kozala na motuya mingi epai na baoyo bazali kokana kobalana?
5 Likanisi ya ndai ya bosembo ezali kobangisa bato mingi. Elenge mobali moko ayambolaki ete: “Koyeba ete biso mibale tokangamaki esika moko mpo na bomoi mobimba ezalaki kopesa ngai mayoki ete natyelami bipekiseli mingi, nakangami, nakoki koningana soko moke te.” Kasi soki olingi mpenza moto oyo okani kobala, ndai yango ekozala lokola bozito te. Nzokande, ekotalelama lokola liziba ya kobatelama. Ndai ya libala ekopesa na babalani mposa ya kofanda elongo ata na ntango ya mpasi ata na ntango ya bisengo mpe kosungana moko na mosusu ata soki makambo nini makoki kokómela bango. Ntoma moklisto Paulo akomaki ete bolingo “ekokangaka motema na makambo nyonso” mpe “ekoyikaka mpiko na makambo nyonso.” (1 Bakolinti 13:4, 7, NW) Mwasi moko alobi ete: “Ndai ya libala epesaka ngai mayoki mingi ya kobatelama. Nabɔndisamaka lokola tondimaki biso moko mpe toyambolaki liboso na bato ete mposa na biso ezali ya kokangama esika moko.”—Mosakoli 4:9-12.
6. Mpo na nini ezali malamu kowela te kobala nokinoki na bolenge?
6 Kotosa ndai wana esɛngaka kokɔmɛla. Na yango, Paulo apesi batoli ete ebongi na baklisto bábala te liboso na ‘kolekisa bambula ya mɔ́tɔ ya bolenge,’ eleko oyo mayoki ya kosangisa nzoto ezalaka makasi mpe ekoki kobebisa bososoli ya moto. (1 Bakolinti 7:36, NW) Bilenge babongwanaka nokinoki wana bazali kokóla. Mingi na baoyo babalaki ntango bazalaki mpenza bilenge bayaka komona ete bobele nsima ya mwa bambula bamposa na bango mpe makambo balingaka, mpe oyo ya babalani na bango, ebongwanaka. Mitángo mizali komonisa ete baoyo babalaka na bolenge mpenza, mingimingi bazwaka esengo te mpe balukaka koboma libala koleka baoyo bazelaka mwa bambula ete bákóma naino mikóló. Na bongo, kowela kobala nokinoki te. Mwa bambula oyo olekisi lokola elenge mpe monzemba oyo akóli ekoki kopesa yo eksperiansi ya malamu oyo ekosalisa yo ete okɔmɛla malamu mpe ozala na makoki ya kozala mobalani malamu. Kozela mwa ntango liboso ya kobala ekoki mpe kosalisa yo na komiyeba malamu yo moko—yango ezali na ntina soki olingi kokólisa boyokani malamu kati na libala na yo.
OMIYEBA YO MOKO LIBOSO
7. Mpo na nini baoyo bazali kokana kobalana basengeli komitalela liboso?
7 Ezalaka na yo pɛtɛɛ mpo na kotánga bizaleli oyo olingi komona epai na moto oyo akozala mobalani na yo? Mingi basalaka yango. Nzokande, ezali boni mpo na bizaleli na yo moko? Bizaleli nini ozali na yango oyo ekosalisa yo ete ozala na libala moko ya malamu? Okozala mobali to mwasi ya lolenge nini? Na ndakisa, ondimaka na motema moko mabungá na yo mpe ondimaka toli, to ozalaka ntango nyonso komilóngisa ntango bazali kosembola yo? Ozalaka ntango nyonso na nsáí mpe na elikya, to ozalaka ntango nyonso mawamawa, mpe komilelalela mingi? (Masese 8:33; 15:15) Omikundola ete libala ekobongola bomoto na yo te. Soki ozali na lolendo, moto oyo asilikaka mpambampamba, to kotalela makambo nyonso na lolenge ya mabe ntango ozali monzemba, okozala sé bongo ntango okobala. Lokola ezali mpasi ete tómimona biso moko ndenge bato mosusu bazali komona biso, mpo na nini te kotuna na moboti moko to na moninga moko ya motema alobela biso na bosembo nyonso lolenge tozali mpe apesa biso mwa batoli? Soki bayebisi yo ete osengeli kosala mbongwana na likambo boye, salá makasi na kosala mbongwana yango liboso ya kobanda koluka kobala.
8-10. Batoli nini Biblia ezali kopesa oyo ekosalisa moto na komibongisa mpo na libala?
8 Biblia ezali kolendisa biso ete tópesa nzela na elimo santu ya Nzambe ete esala mosala kati na biso, na komonisa bizaleli lokola “bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ, komipekisa.” Eyebisi biso lisusu ete ‘tóbongwana sika kati na nguya oyo ezali kopusa makanisi na [biso]’ mpe ‘tólata bomoto ya sika oyo ezalisami engebene mokano ya Nzambe kati na boyengebene mpe bosembo ya solo.’ (Bagalatia 5:22, 23; Baefese 4:23, 24, NW) Kosalela toli oyo na ntango ozali naino monzemba ekozala lokola kotya mbongo kati na bánki—eloko oyo ekozala na ntina mingi mpo na yo na mikolo mizali koya ntango okobala.
9 Na ndakisa, soki ozali mwasi, yekolá kotya likebi mingi na “[bomoto, NW] ebombami na motema” koleka lolenge ozali kotya likebi na libándá ya nzoto na yo. (1 Petelo 3:3, 4) Bopɔlɔ mpe makanisi malamu ekosalisa yo ete ozala na mayele, “motole ya kitoko” ya solo. (Masese 4:9; 31:10, 30; 1 Timoté 2:9, 10) Soki ozali mobali, yekolá kosalela basi makambo na lolenge ya boboto mpe ya limemya. (1 Timoté 5:1, 2) Wana ozali koyekola lolenge ya kokamata bikateli mpe ya komema mikumba, yekolá lisusu kozala na bopɔlɔ mpe na komikitisa. Ezaleli ya koyangela na makasi ekomema mobulu kati na libala.—Masese 29:23; Mika 6:8; Baefese 5:28, 29.
10 Atako kokokisa makambo wana ezalaka pɛtɛɛ te, yango ezali makambo oyo baklisto nyonso basengeli kosala makasi mpo na yango. Mpe ekosalisa yo ete ozala mobalani malamu.
OYO OSENGELI KOLUKA EPAI NA YE OYO AKOZALA MOBALANI NA YO
11, 12. Lolenge nini bato mibale bakoki koyeba ete bakeseni to bakeseni te na makambo kati na bango?
11 Na mboka oyo yo ofandi momeseno ezali nde ete moto apona ye moko mobalani na ye? Soki ezali bongo, lolenge nini osengeli kosala soki omoni mwasi to mobali oyo asepelisi yo? Ya liboso, omituna yo moko, ‘Nazali mpenza na likanisi ya kobala?’ Ezali mpenza mabe kosakana na mayoki ya moto mosusu na kolamwisáká epai na ye bilikya ya lokuta. (Masese 13:12) Na nsima, omituna yo moko, ‘Nakoki mpo na kobala?’ Soki eyano na mituna wana ezali ɛɛ, litambe ya mibale oyo ekolanda etaleli mimeseno ya mboka na mboka. Na mikili misusu, nsima na kotalela ye na boumeli ya mwa ntango, okoki kokutana na moto yango mpe komonisa ye mposa ozali na yango ya koyeba ye malamu. Soki aboyi, ezali na ntina te ete otingama bobele na kolandalanda ye kino kokóma motungisi epai na ye. Omikundola ete ye mpe azali na lotómo ya kokamata ekateli na likambo yango. Nzokande, soki andimi, okoki komibongisa mpo na kolekisáká ntango elongo kati na misala ya malamu. Yango ekopesa yo likoki ya komona soki kobalana na moto yango ekozala likambo ya mayele.a Kati na litambe oyo osengeli koluka nini?
12 Mpo na koyanola na motuna wana, tólobela bibɛtɛli mibale ya miziki, na ndakisa piano mpe gitare. Soki yango ebongisami malamu, moko na moko ekoki kobimisa lokito ya miziki moko ya kitoko. Nzokande, nini ekosalema soki bibɛtɛli nyonso wana mibale bibɛtami nzela moko? Na ntango yango bisengeli kobɛtama moko na boyokani na mosusu. Ezali bobele bongo mpo na yo mpe mpo na moto oyo ozali kokana kobala. Ekoki kozala ete moko na moko kati na bino asalaki makasi mpo na “kobongisa” bizaleli ya bomoto na ye. Kasi motuna oyo ezali kotunama sikawa yango oyo: Bino mibale bosili kobonga moko mpo na mosusu? Na maloba mosusu, bozali koyokana mpenzampenza?
13. Mpo na nini ezali likambo ya kozanga mayele koluka kobalana na moto oyo azali na bindimeli bikeseni na oyo ya yo?
13 Ezali likambo ya ntina ete bino mibale bózala na bindimeli mpe mitindá motindo moko. Ntoma Paulo akomaki ete: “Bókangana na ekanganeli na bokesene te, esika moko na bato bazangi kondima.” (2 Bakolinti 6:14; 1 Bakolinti 7:39) Kobalana na moto oyo azali na lingomba mosusu, yango ekoyeisa mpenza kozanga boyokani makasi kati na bino. Nzokande, kokangama makasi bino mibale epai na Yehova Nzambe ezali moboko moleki makasi mpo na bomoko. Yehova alingi ete ozala na esengo mpe osepela na bikanganeli oyo ozali na yango elongo na moto oyo okobala. Alingi ete bókangama epai na Ye mpe bókangama moko epai na mosusu na nzela ya nkamba na nsinga misato ya bolingo.—Mosakoli 4:12.
14, 15. Kozala na lingomba moko nde ezali likambo bobele moko oyo ezali kopesa bomoko kati na libala? Limbolá.
14 Atako kosambela Nzambe elongo ezali likambo ya ntina mingi mpo na kozala na bomoko, makambo mingi mosusu masɛngami mpo na yango. Mpo na kozala na boyokani, yo mpe moto oyo okobala bosengeli kozala na mikano ndenge moko. Mikano na bino mizali nini? Na ndakisa, bino mibale bokanisaka nini na ntina na kobota bana? Makambo nini mazali kozwa esika ya liboso kati na bomoi na bino?b (Matai 6:33) Kati na libala mpenza ya malamu, mobali mpe mwasi bazali baninga malamu mpe basepelaka kozala elongo. (Masese 17:17) Mpo na yango, basengeli kozala na makambo motindo moko oyo bango mibale basepelaka na yango. Ezali mpasi kobatela boninga ya penepene—mpe ezalaka mpasi mingi kobatela libala—soki bozali na makambo motindo moko te oyo bino mibale bosepelaka na yango. Nzokande, soki moto oyo ozali kokana kobala asepelaka na likambo moko ya sikisiki, lokola kotambola, mpe yo olingaka yango te, yango elingi koloba ete bino mibale bokoki kobalana te? Ezali bongo te. Mbala mosusu bozali na makambo mosusu ya ntina mingi oyo bosepelaka na yango. Lisusu, okoki kopesa esengo epai na moto oyo ozali kokana kobala na kosanganáká elongo na ye na misala misusu ya ntina mpo ete ye asepelaka na yango.—Misala 20:35.
15 Ya solo, na makambo mingi, kokokana ya malamu etaleli likoki oyo bino mibale bozali na yango ya komiyokanisa na makambo ya sika, kasi te makambo oyo bino mibale bokokani na yango. Na esika ya kotuna ete, “Toyokanaka na makambo nyonso?” mituna misusu ya malamu ekoki kozala: “Nini ekosalema ntango toyokani te? Tokoki kosolola na ntina na likambo yango na kimya nyonso, na kopesanáká limemya mpe lokumu? To masoló na bino mbala mingi esukaka nde na maloba ya kotombokisa?” (Baefese 4:29, 31) Soki olingi kobala, kebá na moto nyonso oyo azali na lolendo mpe oyo andimaka bobele makanisi na ye moko, oyo alingaka soko moke te makanisi ya bato mosusu, to oyo asɛngaka makambo mingi mpe alingaka bobele mwango na ye moko.
SOSOLÁ YE LIBOSO
16, 17. Makambo nini mobali to mwasi asengeli koluka ntango azali kotalela moto oyo ye azali kokana kobala?
16 Kati na lisangá ya boklisto, baoyo balingi kopesamela mikumba basengeli “bamekama liboso.” (1 Timoté 3:10) Yo mpe okoki kosalela etindá wana. Na ndakisa, mwasi akoki komituna, “Mobali oyo ayebani lolenge nini? Banani bazali baninga na ye? Azalaka na komipekisa? Lolenge nini atalelaka mibangé? Auti na libota ya lolenge nini? Azalaka na ezaleli ya lolenge nini kati na libota na ye? Ezaleli na ye ezalaka nini mpo na mbongo? Alekisaka ndelo na komela masanga? Asilikaka nokinoki, to mpe azalaka na ezaleli ya kobɛta? Mikumba nini azali na yango kati na lisangá, mpe lolenge nini azali kokokisa yango? Nakokoka mpenza kopesa ye limemya mozindo?”—Levitike 19:32; Masese 22:29; 31:23; Baefese 5:3-5, 33; 1 Timoté 5:8; 6:10; Tito 2:6, 7.
17 Mobali akoki komituna, “Mwasi oyo amonisaka bolingo mpe limemya epai na Nzambe? Azali na makoki ya kobatela ndako? Libota na ye bakozela nini epai na biso? Azali mwasi ya mayele, mosali, mpe oyo ayebi kobatela mosolo? Makambo nini asololaka? Amibanzabanzaka solosolo mpo na bolamu ya bato mosusu, to alukaka kokokisa bobele bamposa na ye moko, mpe azalaka mokɔti na makambo ya bato? Abongi mpenza kotyelama motema? Akolinga na motema moko kotosa litambwisi, to azali nde motó makasi, mbala mosusu ata mpe motomboki?”—Masese 31:10-31; Luka 6:45; Baefese 5:22, 23; 1 Timoté 5:13; 1 Petelo 4:15.
18. Soki makambo mikemike ya bolɛmbu mamonani na boumeli ya bokutani na bino mpo na kolɛngɛla libala, nini bosengeli kobosana te?
18 Obosana te ete ozali na boyokani elongo na moto ya kozanga kokoka oyo azali mokitani ya Adama, kokamata ye te lokola elombe mobali to elombe mwasi ya ndakisa oyo bazalaka na babúku oyo bato babimisaka engebene makanisi na bango moko. Moto nyonso azalaka na mabungá na ye, mpe mabungá mosusu mazali ya kolanda te—ezala oyo ya yo to oyo ya moto oyo olingi kobala. (Baloma 3:23; Yakobo 3:2) Lisusu, komona bolɛmbu moko ekoki kopesa libaku ya kokóla na elimo. Na ndakisa, kanisá ete na boumeli ya kokutana na bino mpo na kolɛngɛla libala, kozanga boyokani ebimi. Yebá ete: Ata bato oyo balinganaka mpe bapesanaka limemya bazangaka koyokana na bantango mosusu. (Kokanisá na Genese 30:2; Misala 15:39.) Yango ekoki nde kozala ete bino mibale bosengeli ‘komipekisa na elimo na bino’ mwa moke mpe koyekola lolenge ya kosilisa matáta yango na kimya nyonso? (Masese 25:28) Moto oyo olingi kobala azali komonisa mposa ya kobongola bizaleli na ye? Ozalaka mpe na mposa yango? Okoki koyekola kozala moto oyo ayebi komipekisa, oyo asilikaka mpambampamba te? (Mosakoli 7:9) Koyekola lolenge ya kosilisa mikakatano ekoki kopesa nzela malamu na kosolola ya sembo oyo ezali na ntina soki bino mibale bolingi kobalana.—Bakolose 3:13.
19. Nini ekozala lolenge ya mayele ya kosala soki mikakatano minene mimonani na ntango ya bokutani mpo na kolɛngɛla libala?
19 Kasi, ezali boni soki omoni makambo oyo mazali kobulunganisa yo mingi? Makambo motindo wana masengeli kotalelama na likebi nyonso. Nzokande ezala mayoki ya bolingo oyo ozali na yango, ezala mitungisi oyo ozali na yango mpo na kobala, kokanga miso te na mabungá minene. (Masese 22:3; Mosakoli 2:14) Soki ozali kokutana mbala na mbala elongo na moto oyo makanisi na bino makeseni na makambo ya ntina mingi, ezali likambo ya mayele kokata bokutani yango mpe kopesa elaká na moto yango te.
BÓBATELA BOKUTANI NA BINO MPO NA KOLƐNGƐLA LIBALA ETE EZALA NA LOKUMU
20. Lolenge nini bato oyo bazali komilɛngɛla mpo na kobalana bakoki kobatela ete bokutani na bango ezala ya nsɔni te?
20 Lolenge nini bokoki kobatela bokutani na bino ya kolɛngɛla libala ete ezala na lokumu? Libosoliboso, bóndimisama ete etamboli na bino ezali ya pɛto. Epai bino bofandi, kosimbana na mabɔkɔ, kopesana mapwɛpwɛ, to kozingana ekɔpi etalelami ete elongobani mpo na bato oyo babalani naino te? Ata soki bilembo wana ya komonisa bolingo endimami, yango ekopesamela nzela bobele soki boyokani wana emonisi ete libala ekómi mpenza pene na kosalema. Bózala na bokɛngi ete komonisana bolingo emema te na etamboli ya mbindo to ata na pite. (Baefese 4:18, 19; kokanisá na Loyembo na Salomo 1:2; 2:6; 8:5, 9, 10.) Mpo ete motema ezali na bokosi, bino mibale bosengeli kozala na mayele mpo na kopɛngola ete bózala bino moko te na ndako, na apartemá moko, na esika ya kozela mituka, to na esika nyonso oyo ekoki kopesa bino libaku ya kosala mabe. (Yilimia 17:9) Kobatela bokutani na bino pɛto ezali kopesa elembeteli ya polele ete bozali na komipekisa mpe ete bozali komibanzabanza mpo na bolamu ya moko na mosusu na esika ya koluka kokokisa bobele bamposa na yo moko. Likambo ya ntina koleka, bokutani ya pɛto ekosepelisa Yehova Nzambe, oyo azali kosɛnga na basaleli na ye ete bákima makambo na mbindo mpe pite.—Bagalatia 5:19-21.
21. Kosolola nini ya sembo esengeli mpo na kobatela ete kokutana mpo na kolɛngɛla libala ezala na lokumu?
21 Ya mibale, bokutani ya lokumu esangisi mpe kosolola ya sembo. Wana bokutani na bino ezali kokende kino na kobalana, makambo mosusu masengeli kolobelama polele. Bokofanda wapi? Bino mibale, ekosengela ete bósala mosala ya mosuni? Bolingi kozala na bana? Lisusu, ezali likambo ya sembo na kolobela makambo, mbala mosusu oyo matali bomoi ya kala ya moto, makambo oyo makoki na nsima koyeisa mikakatano kati na libala. Yango ekoki kosangisa banyongo minene to masɛngisi to makambo matali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, lokola bokɔnɔ moko makasi to ezalela oyo okoki kozala na yango. Lokola bato mingi oyo bazali na VIH (virus oyo epesaka SIDA) bamonisaka bilembo na yango nokinoki te, ekozala mabe te mpo na moto to mpo na baboti oyo bazali komibanzabanza na kosɛnga ete ekizamɛ́ ya makila esalema mpo na koyeba soki SIDA ezali epai na moto oyo na ntango ya kala amipesaki na mobulu na makambo matali kosangisa nzoto to azalaki moto oyo azalaki kosalela bilangwiseli na nzela ya misisa ya nzoto. Soki baekizamɛ́ emonisi maladi, moto oyo azali na yango asengeli te kopusa moto oyo alingaki kobalana na ye ete bákóba boyokani na bango soki ye oyo azali na maladi te alingi ete bákata boyokani yango. Ya solo, moto nyonso oyo amipesaki na bomoi ya mobulu na makambo matali kosangisa nzoto akosala malamu na kondima kosala ekizamɛ́ ya SIDA liboso ya kobanda kokutana na moto moko mpo na kolakana libala.
BÓTALELA TE BOBELE MOKOLO YA ELAMBO YA LIBALA
22, 23. (a) Lolenge nini bokatikati ekoki kozanga na ntango ya kobongisa elambo ya libala? (b) Likanisi nini ya bokatikati lisengeli kobatelama ntango tozali kotalela elambo mpe libala?
22 Na boumeli ya basanza ya nsuka liboso ya kobalana, bino mibale bokozala na makambo mingi ya kosala mpo na kobongisa elambo ya libala na bino. Bokoki komilongwela mitungisi mingi na kozaláká na bokatikati. Elambo monene ya mokolo ya libala ekoki kosepelisa baboti mpe bato mosusu, kasi ekoki kolɛmbisa babalani ya sika mpe mabota na bango mpe kosilisa mosolo na bango. Kolanda mimeseno mosusu ya mboka ezalaka mabe te, kasi komekola basusu mpe mbala mosusu elimo ya kosala koleka oyo basusu basalaki ekoki kobebisa ndimbola ya elambo ya libala mpe ekoki kolongola bino esengo oyo bosengeli kozala na yango. Atako mayoki ya bato mosusu esengeli kotalelama, mobali oyo azali kobala nde azali moto ya liboso mpo na kokata lolenge elambo ya libala ekosalema.—Yoane 2:9.
23 Bóbosana te ete elambo ya libala na bino ekoumela bobele mokolo moko, kasi libala na bino ekoumela bomoi mobimba. Bópɛngola ezaleli ya komibanzabanza na lolenge loleki ndelo mpo na kolɛngɛla elambo ya mokolo ya libala. Nzokande, bóluka litambwisi epai na Yehova Nzambe, mpe bósala mwango liboso mpo na bomoi ya libala. Na kosaláká boye bokomibongisa malamu mpo na libala oyo ekolónga.
a Likambo oyo ekoki kosalema na mikili oyo bokutani kati na mobali mpe mwasi oyo balingi kobalana etalelami ete ebongi mpo na baklisto.
b Ata kati na lisangá ya boklisto, ekoki kozala na baoyo, na elobeli ya elilingi, bazali lokolo moko na kati mpe lokolo mosusu na libándá. Na esika ete bázala basaleli ya Nzambe oyo bamipesi na motema na bango mobimba, mbala mosusu bapusami na bizaleli mpe na etamboli ya mokili.—Yoane 17:16; Yakobo 4:4.