Mokapo 14
Nkembo na kiti na bokonzi na Jéhovah
Emonaneli 2—Emoniseli 4:1 kino 5:14
Teme: Makambo ya kokamwa mazali kosalama liboso na kiti na bokonzi likoló na yango Nzambe afandi mpo na kosambisa.
Eleko na kokokana na yango: Emonaneli yango ezali kolobela makambo oyo mabandaki kosalema longwa 1914 kino nsuka na Boyangeli na Mbula nkoto mpe koleka, ntango bikelamu binso bizali na likoló mpe awa na mabelé bikokumisa Jéhovah.—Emoniseli 5:13.
1. Mpo na nini ebongi ete totya likebi mingi na bimonaneli oyo Yoane amonaki?
YOANE abandi koyebisa biso bimonaneli mosusu ya kokamwa. Na nzela na elimo, azali ntango nyonso kuna na mokolo na Nkolo. Makambo oyo akomi, matali biso mpenza, biso baoyo tozali kobika na mokolo yango. Na nzela na bimonaneli yango, Jéhovah alongoli ezipeli likoló na biloko bizangi komonana na likoló mpe amonisi biso bikateli na ye oyo bikokokana awa na mabelé. Epai mosusu, ata elikya na biso ezali ya likoló to ya mabelé, bimoniseli yango bizali kosalisa biso na koyeba esika na biso ezali nini kati na mokano na Jéhovah. Na bongo, ebongi ete biso banso tolanda kotya likebi mingi na maloba oyo ya Yoane: “Esengo na motangi mpe na bayoki na maloba na kosakola oyo, mpe baoyo batosi makambo masili kokomama kati na yango.”—Emoniseli 1:3.
2. Yoane abyangami ete asala nini?
2 Makambo Yoane amoni sikawa ezali ya kokamwa mingi koleka filme nyonso oyo ekokaki kobimisama na ntango na biso! Akomi: “Na nsima na makambo oyo namonaki ekuke esili kozipwa na likoló, mpe mongongo oyo nayokaki liboso kosolola na ngai [ezalaki] lokola mongongo na kelelo; elobi [na ngai] ete, Buta awa mpe nakotalisa yo makambo makobima nsima.” (Emoniseli 4:1) Na emonaneli, Yoane akoti kati na makóló mazangi komonana, liboso na Jéhovah, mosika mpenza koleka likolo oyo bato na mayele bazali kotinda biloko na bango to kokanga bafoto, mosika mpe koleka maboke nyonso na minzoto mabengami galaksi kati na molongo na biloko oyo bikomonanaka. Yoane abengami ete aleka na ekuke moko oyo ekomonisa ye makambo na kokamwa mingi: esika eleki kotombwama na makolo na elimo, esika epai Jéhovah ye mpenza akofandaka likoló na kiti na ye ya bokonzi. (Nzembo 11:4; Yisaya 66:1) Oyo nde libaku malamu!
3. Mongongo “lokola oyo na kelelo” ezali kotinda biso kokanisa na nini, mpe na ntembe te yango ezali mongongo na nani?
3 Biblia eyebisi te soki “mongongo ya liboso” wana ezali ya nani. Lokola mongongo makasi na Yesu oyo eyokamaki liboso, mongongo oyo ezali mpe mongongo makasi na moto azali kopesa bitinda mpe ezali lokola kobeta na kelelo. (Emoniseli 1:10, 11) Ekundoli biso kelelo makasi oyo ebetamaki na ngomba Sinaï mpo na komonisa ete Jéhovah azali wana. (Exode 19:18-20) Na ntembe te Jéhovah ye moko azali Mobandisi na nkembo na libyangami yango. (Emoniseli 1:1) Afungolaki ekuke mpo ete Yoane, kati na emonaneli, akoka kokota na esika eleki bosantu na makóló epai bokonzi na Ye efandi.
Nkembo na Jéhovah
4. (a) Emonaneli na Yoane ezali na litomba nini mpo na baklisto bapakolami? (b) Emonaneli yango ezali na litomba nini mpo na baklisto oyo elikya na bango ezali ya kozala na bomoi ya seko na mabelé?
4 Yoane amoni nini? Toyoka ye asolola biso sikawa makambo ya kokamwa oyo amonaki: “Nokinoki nazalaki kati na [nguya na elimo]. Namoni kiti na bokonzi kati na likoló, mpe Mofandi na kiti na bokonzi yango.” (Emoniseli 4:2) Na mbala moko, Yoane amemami na elimo na nzela na nguya na mosala na Nzambe kino na kiti na bokonzi ya Jéhovah. Oyo nde libaku malamu! Kuna Yoane azwi emonaneli na nkembo na makóló epai “libula likobeba te, lizangi mbindo, likosila te,” ebombamaki mpo na ye mpe mpo na baklisto mosusu bapakolami. (1 Petelo 1:3-5; Bafilipi 3:20) Emonaneli na Yoane ezali mpe na ntina mingi mpo na baoyo elikya na bango ezali ya kozala na bomoi ya seko na mabelé. Ezali kosalisa bango na komona nkembo na Jéhovah mpe lolenge na boyangeli na ye na likoló oyo azali kosalela, ya liboso mpo na kosambisa mabota, mpe na nsima mpo na koyangela bato awa na mabelé. Jéhovah azali solo Nzambe mobongisi oyo aleki banso!
5. Yoane amoni eloko nini ya solosolo, oyo elakisamaki kala na ezipeli na sanduku na kondimana?
5 Biloko mingi oyo Yoane amoni kati na makóló bikokani na biloko bizaláká kati na tabernakle oyo etongamaká mibu soko 1 600 esilaki koleka, kati na esobe, mpo ekoka kozala esika ya bosantu mpo na losambo ya solo oyo Bayisraele basengelaki kosalela. Kati na Esika-Eleki-Bosantu na tabernakle yango ezalaki na sanduku na kondimana, mpe na likoló na ezipeli na wolo ya Sanduku yango nde esika Jéhovah azalaki koloba. (Exode 25:17-22; Baebele 9:5) Ezipeli ya Sanduku ezalalaki bongo elilingi ya kiti ya bokonzi ya Jéhovah. Awa Yoane amoni lisusu elilingi te kasi bosolo na yango mpenza: Nkolo Moyangeli monene Jéhovah, ye moko, afandi na nkembo nyonso na kiti na ye na bokonzi kuna na likoló oyo etombwami koleka makolo nyonso.
6. Yoane alobi nini mpo na ndenge amonaki Jéhovah, mpe mpo na nini maloba asaleli mabongi mpenza?
6 Na kokesena na basakoli oyo bazwaki bimonaneli na kiti na bokonzi na Jéhovah, Yoane alobeli makambo nyonso te na ntina na Mosantu oyo afandi na kiti wana etombwami koleka nyonso. (Ezekiele 1:26, 27; Danyele 7:9, 10) Nde ata bongo, tala ndenge amonaki Ye oyo afandaki likoló na kiti na bokonzi yango: “Mofandi azalaki na motindo na komonana lokola libanga na yasipi na salali, mpe monama mozingaki kiti na bokonzi ezalaki na motindo na komonana lokola libanga na samala.” (Emoniseli 4:3) Oyo nde nkembo monene koleka nkembo nyonso! Yoane amoni kitoko oyo ebebisami na eloko moko te, ezali kongala, ekokani na oyo ya mabanga ya ntalo mazali pee. Oyo Yoane amonaki ekokani na maloba na moyekoli Yakobo na ntina na Jéhovah, mpo ete abengi ye “Tata na kongenga na likolo”! (Yakobo 1:17, MN) Mwa ntango moke nsima na kokoma Emoniseli, Yoane ye moko akomaki na mokanda na ye mosusu “ete Nzambe azali moi mpe molili ezali kati na ye soko moke te.” (1 Yoane 1:5) Nkembo ya Jéhovah eleki ya bato nyonso.
7. Monama zongazonga na kiti na bokonzi na Jéhovah elakisi nini?
7 Yoane amoni monama na langi ya mai ya mpondu lokola libanga na emerode to samala ezingi kiti ya bokonzi. Liloba ya greke iris oyo ebongolami awa ete monama elakisi eloko moko ezingami. Mbala ya liboso oyo Biblia elobeli monama ezalaki na ntango ya Noa. Nsima wana mai na mpela makitaki, Jéhovah abimisaki monama kati na lipata, mpe alimbolaki ntina na yango na maloba oyo: “Natii monama na ngai na lipata, mpe yango ekozala elembo na kondimana kati na ngai na mokili. Nakokanisa kondimana kati na ngai na bino mpe na milimo nyonso na bomoi, mpe mai ekoya lisusu mpela monene te, ete eboma mosuni nyonso.” (Genese 9:13, 15) Yoane azali bongo kokanisa na nini wana ezali ye kotala emonaneli oyo na likoló? Monama esengelaki kokundola ye ntina ya kozala na boyokani ya kimya elongo na Jéhovah, boyokani lokola oyo kelasi na Yoane bazali na esengo ya kobatela yango elongo na Ye na mikolo na biso. Monama yango esengelaki mpe komonisa epai na Yoane kimya makasi oyo ezali liboso na Jéhovah. Kimya wana, kozanga yikiyiki, ekozala epai na bato nyonso ya botosi ntango Jéhovah akotya hema na ye likoló na bato kati na mabelé ya sika to lisangá ya sika ya bato.—Nzembo 119:165; Bafilipi 4:7; Emoniseli 21:1-4.
Mikóló ntuku mibale na minei
8. Yoane amoni banani zongazonga na kiti na bokonzi, mpe bazali elilingi ya banani?
8 Yoane ayebi ete banganga baponamaki kala mpo na kosala mosala kati na tabernakle. Ekoki bongo kozala ete akamwaki na komona makambo oyo ayebisi biso sikawa ete: “Kiti na bokonzi ntuku mibale na minei ezingaki kiti na bokonzi, mpe mikóló ntuku mibale na minei bafandi na kiti na bokonzi yango. Balati bilamba mpembe, mpe na mitó na bango mitole na wolo.” (Emoniseli 4:4) Ee, na esika ete amona banganga, amoni nde mikóló 24, bafandi likoló na kiti na bokonzi mpe bazali na bikoti ya mikonzi na likoló na mitó na bango. Bazali banani? Ezali bato mosusu te, bobele bapakolami na lisangá na boklisto, basekwisami mpe bapesameli esika na likoló oyo Jéhovah alakaki bango. Ndenge nini toyebi yango?
9, 10. Ndenge nini toyebi ete mikóló 24 bazali elilingi na lisangá na baklisto bapakolami na elimo ntango bakokoka bango nyonso na nkembo na bango na likoló?
9 Ya liboso mpo ete bazali na mitolé to bikoti ya mikonzi na mitó na bango. Engebene Biblia, baklisto bapakolami bazali kozwa “motolé mokobeba te” mpe, bomoi bokoki kosuka te. (1 Bakolinti 9:25; 15:53, 54.) Kasi lokola mikóló 24 bafandi na bakiti na bokonzi, awa mitolé to bikoti ya wolo elakisi nguya epesameli bango ya koyangela lokola mikonzi. (Tala Emoniseli 6:2; 14:14.) Yango emonisi ete mikóló 24 bazali elilingi na bayekoli na Yesu bapakolami na elimo, kati na etelemelo na bango na likoló mpamba te Yesu asalaki kondimana elongo na bango mpo ete bafanda na bakiti na bokonzi kati na Bokonzi na ye. (Luka 22:28-30) Bobele Yesu mpe mikóló wana 24—Moto mosusu te, ata baanzelu te—balakisami ete bazali koyangela kati na makóló liboso na Jéhovah.
10 Ndimbola oyo ekokani na elaka oyo Yesu apesaki na lisangá ya Laodikia: “Mpo na molongi nakopesa ye nzela na kofanda na ngai elongo na kiti na bokonzi na ngai.” (Emoniseli 3:21) Kasi mikóló wana 24 bazali bobele na mosala ya koyangela te kuna na likoló. Na maloba na ebandeli na mokanda na Emoniseli, Yoane alobi boye mpo na Yesu: “Azalisi biso bokonzi na banganga mpo na Nzambe Tata na ye.” (Emoniseli 1:5, 6) Mikóló wana bazali bongo bakonzi mpe banganga. “Bakozala banganga na Nzambe mpe na Klisto; bakozala bakonzi esika moko na ye mbula nkoto.”—Emoniseli 20:6.
11. Mpo na nini ebongi ete mikóló bazala na motuya 24, mpe motuya yango emonisi nini?
11 Yoane amoni mikóló 24 zongazonga na kiti na bokonzi. Ndimbola na motuya oyo ezali nini? Na makambo mingi, mikóló yango balakisamaki na elilingi na banganga ya sembo na Yisraele ya kala. Ntoma Petelo akomaki epai na baklisto bapakolami: “Nde bino bozali libota liponami, banganga na bokonzi, libota na bulee, bato baponami.” (1 Petelo 2:9) Bonganga ya Bayuda ekabolamaki na bituluku to bakelasi 24. Kelasi mokomoko eponamaki mpo na kosala mosala liboso ya Jéhovah na boumeli ya mwa baposo na mbula moko; na bongo mosala ya bosantu ezalaki kokatama te. (1 Ntango 24:5-19) Ekoki bongo ete mikóló bazala 24 kati na emonaneli na Yoane na ntina etali bonganga na likoló, mpamba te banganga wana bazali kosalela Jéhovah ntango nyonso, kotika ezali te. Ntango motuya na bango nyonso ekokoka, bonganga wana ekozala na kelasi 24, mokomoko ekozala na balongi 6 000, mpamba te Emoniseli 14:1-4 elobi na biso ete bato 144 000 (24 x 6 000) ‘basombami kati na bato’ mpo na kotelema na ngomba na Siona na likoló elongo na Mwana na Mpate, Yesu Klisto. Lokola motango 12 elakisi ebongiseli moko ya bonzambe oyo ekoki bipai binso, motango 24 ebakisi lisusu mpe elendisi makasi ebongiseli yango.
Mikalikali, mingongo mpe nkake
12. Na nsima Yoane amoni nini mpe ayoki nini? ‘Mikalikali mpe mingongo mpe nkake’ ekundoli nini?
12 Na nsima Yoane amoni nini mpe ayoki nini? “Mikalikali ebimi na kiti na bokonzi, mpe mingongo, mpe nkake.” (Emoniseli 4:5a) Oyo ekundoli biso bilembo mosusu minene ya nguya ya Jéhovah na likolo! Na ndakisa totalela makambo malekaki ntango Jéhovah “akitaki” na ngomba Sinaï. Moïse alobi: “Na ntongo na mokolo na misato nkake ezalaki mpe mikalikali mpe lipata moindo ezalaki na likoló na ngomba mpe kelelo ebetamaki makasi. . . . Wana mongongo na kelelo ebandaki koyokana makasi makasi, Mose asololaki mpe Nzambe azongiselaki ye na mongongo.”—Exode 19:16-19.
13. Mikalikali oyo mizali kobima uta na kiti na bokonzi na Jéhovah ezali elilingi ya nini?
13 Na boumeli na mokolo na Nkolo, Jéhovah azali komonisa polele nguya na ye mpe kozala na ye. Ya solo, azali kosala yango te na nzela na mikalikali oyo bato bakoki komona na miso, mpamba te Yoane amonaki nde bilembo. Na bongo, mikalikali milakisi nini? Nkake ekoki kopesa kongenga, kasi ekoki mpe koboma. Na yango, mikalikali oyo mizali kobima longwa na kiti na bokonzi ya Jéhovah elakisi kongenga oyo ye azali kopesa ntango nyonso na libota na ye, bakisa mpe nsango na kokweisa banguna na ye, nsango ekokani na móto.—Tala Nzembo 18:14; 144:5, 6; Matai 4:14-17; 24:27.
14. Ndenge nini mingongo miyokamaki na eleko na biso?
14 Bongo mingongo milimboli nini? Ntango Jéhovah akitaki na ngomba Sinaï, mongongo moko esololaki na Moïse. (Exode 19:19) Bitinda mingi mpe makambo mingi na mokanda na Emoniseli eyebisami na biso na nzela na mingongo miutaki likoló. (Emoniseli 4:1; 10:4, 8; 11:12; 12:10; 14:13; 16:1, 17; 18:4; 19:5; 21:3) Na mikolo na biso, Jéhovah apesi mpe bitinda elongo na maloba na kosakola epai na libota na ye, kongengisaka bongo boyebi na bango na bisakweli mpe na mitinda na Biblia. Mbala mingi, kongenga epesamaki na makita maleki minene to assemblées internationales, nsima na yango solo wana ezwami na Biblia esakolamaki kati na mokili mobimba. Ntoma Paulo alobaki na ntina na basakoli na sembo na nsango malamu: “Lokito na bango ekomi na mokili mobimba, maloba na bango kino nsuka na mokili.”—Baloma 10:18.
15. Nkake nini ezali kobima uta na kiti na bokonzi na Jéhovah na boumeli na mokolo na Nkolo?
15 Nkake ebetaka nsima na mokalikali. Davidi akokisaki “mongongo na Jéhovah” na nkake. (Nzembo 29:3, 4) Ntango Jéhovah asungaki ye na kobundisaka banguna na ye, Davidi alobaki mpo na nkake ete eutaki epai na Ye. (2 Samwele 22:14; Nzembo 18:13) Elihu alobaki na Yobo ete mongongo ya Jéhovah ekokani na nkake wana ezali Ye ‘kosala makambo minene oyo biso tokoki kososola yango te.’ (Yobo 37:4, 5) Na boumeli na eteni oyo na mokolo na Nkolo, Jéhovah ‘alobi lokola nkake’ na kokebisaka bato mpo na misala oyo akosala mpo na kotelemela banguna na ye. Kongala wana na elilingi ekokani na nkake ezali ntango nyonso koyokama na mabelé mobimba. Esengo na yo soki otyaki likebi na kosakola oyo ekokani na mongongo na nkake mpe soki ozali kosalela lolemo na yo na mayele mpo na kokómisa kosakola yango epai ya bato mosusu!—Yisaya 50:4, 5; 61:1, 2.
Miinda na móto mpe libeke na talatala
16. “Miinda nsambo ya móto” mizali elilingi ya nini?
16 Yoane amoni biloko nini mosusu? “Miinda nsambo [na móto] mipelaki liboso na kiti na bokonzi, mizali elimo nsambo na Nzambe. Liboso na kiti na bokonzi lokola libeke na talatala ezali na motindo na kulusatala.” (Emoniseli 4:5b, 6a) Yoane ye moko apesi biso ndimbola na miinda nsambo ete “mizali elimo nsambo na Nzambe.” Motango nsambo elakisaka eloko oyo ezali ya kokoka kati na biloko biuti na Nzambe; na yango, miinda nsambo elakisi elimo santu kati na mobimba na yango nyonso mpe kati na makasi na yango nyonso ya kongengisa. Na mikolo na biso, kelasi na Yoane bazali na botondi mozindo na ndenge bangengisami makasi bongo mpe bapesameli mokumba ete bangengisa bafandi na mokili oyo bazali na nzala na elimo. Esengo nini na komona mbula nyonso zulunalo Mosenzeli ezali kobimisama bamilió ebele na minoko pene na 200 mpo na kolanda kopanza kongenga yango na bisika nyonso!—Nzembo 43:3.
17. “Libeke na talatala na motindo na kulusatala” ezali elilingi ya nini?
17 Yoane amoni mpe “libeke na talatala ezali na motindo na kulusatala.” Ekoki kolimbola nini mpo na baoyo babengami na kokota na la cour to libanda ya Jéhovah kuna na likolo? Engebene Paulo, Yesu abulisaki lisangá “awa esili ye kopetola bango na mai esika moko na liloba.” (Baefese 5:26) Liboso na kufa na ye, Yesu alobaki na bayekoli na ye: “Bino bopetolami mpo na liloba lisili ngai kosolola na bino.” (Yoane 15:3) Na yango, libeke na talatala oyo ezali na motindo na kulusatala elakisi Liloba na Nzambe ekomami, Liloba oyo ezali kopetola. Mpo na kokota liboso na Jéhovah, banganga na bokonzi basengeli naino kopetolama mobimba na Liloba na ye.
Botala: “Bikelamu na bomoi minei”!
18. Yoane amoni nini na katikati mpe zongazonga na kiti na bokonzi?
18 Yoane amoni sikawa eloko mosusu. Akomi: “Kati na kiti na bokonzi, mpe na epai na epai bikelamu na bomoi minei, bitondaki na miso liboso mpe na nsima.”—Emoniseli 4:6b.
19. Bikelamu na bomoi minei bizali elilingi ya banani, mpe ndenge nini toyebi yango?
19 Bikelamu yango bizali elilingi ya nini? Emonaneli epesamaki na mosakoli mosusu, Ezekiele, ekosalisa biso na koyeba yango. Ezekiele amonaki Jéhovah afandaki na likalo moko kuna na likoló, mpe bikelamu na bomoi bizalaki esika moko na likalo yango, bikelamu oyo motindo na yango ekokani na oyo Yoane amonaki. (Ezekiele 1:5-11, 22-28) Na nsima Ezekiele amonaki lisusu likalo yango mpe kiti na bokonzi ezalaki likoló na yango esika moko na bikelamu na bomoi. Nde ya mbala oyo abengaki bikelamu wana na bomoi ete bacheribɛ. (Ezekiele 10:9-15) Bikelamu na bomoi minei oyo Yoane amonaki elakisi bongo ebele na bacheribɛ na Nzambe, bikelamu na lokumu mingi kati na lisangá na Ye ya elimo. Yoane akamwi te na komona ete bacheribɛ batelemi penepene na Jéhovah, mpamba te kati na tabernakle ya kala, bacheribɛ mibale basalamaki na wolo bazalaki wana na likoló na ezipeli na sanduku na kondimana, oyo ezalaki elilingi na kiti na bokonzi na Jéhovah. Mongongo ya Jéhovah ezalaki kobima na kati na bacheribɛ wana, mongongo oyo ezalaki kopesa bitinda mpe mibeko na libota ya Yisraele.—Exode 25:22; Nzembo 80:1.
20. Ekoki kolimbola nini ete bikelamu na bomoi minei bizali “katikati na kiti na bokonzi mpe zongazonga na kiti na bokonzi”?
20 Bikelamu na bomoi minei bizali “katikati na kiti na bokonzi.” Yango elimboli nini? Ekoki kolimbola ete batelemi zongazonga na kiti na bokonzi na motindo boye ete mokomoko atelemi na katikati ya ngambo mokomoko. Na motindo yango, babongoli ya La Bible en français courant babongolaki maloba na greke oyo mazwami esika yango boye ete: “Zongazonga na kiti na bokonzi, mpe na ngambo mokomoko.” Liloba yango ekoki mpe kolimbola ete bikelamu na bomoi minei bazali na centre ya makóló, esika kiti ya bokonzi ezali. Ekoki kozala mpo na ntina yango le Nouveau Testament ya P. de Beaumont ebongoli maloba yango boye: “Zongazonga na kiti na bokonzi mpe na katikati” (centre). Likambo ya ntina ezali ete bacheribɛ batelemi penepene na kiti na bokonzi na Jéhovah, lokola baoyo Ezekiele amonaki na nsuka nyonso ya likalo, oyo ezalaki elilingi na lisangá na Jéhovah. (Ezekiele 1:15-22) Nyonso wana eyokani na maloba na Nzembo 99:1: “Jéhovah azali mokonzi. . . . Akofandaka kati na bacheribɛ.”
21, 22. (a) Yoane alobi nini na motindo amonelaki bikelamu na bomoi minei? (b) Mokomoko na bikelamu na bomoi minei azali elilingi ya nini?
21 Yoane alobi lisusu: “Ekelamu na bomoi na liboso azalaki na motindo na nkosi, oyo na mibale na motindo na elenge ngombe mobali, oyo na misato na elongi na moto, mpe oyo na minei na motindo na mpongo ezali kopombwa.” (Emoniseli 4:7) Mpo na nini bikelamu na bomoi minei bikeseni moko na mosusu? Bikelamu oyo na bomoi bikeseni bizali komonisa polele bizaleli na Nzambe bikeseni. Ya liboso nkosi. Kati na Biblia, nyama oyo ezali elilingi ya courage to mpiko, mingimingi mpo na oyo etali kosalela boyengebene. (2 Samwele 17:10; Masese 28:1) Nkosi azali bongo elilingi na boyengebene na Nzambe esalelami na mpiko. (Deteronome 32:4; Nzembo 89:14) Ekelamu na bomoi na mibale azali na motindo na ngombe mobali oyo azali naino elenge. Nyama oyo ezali kokanisela biso ezaleli nini? Mpo na Bayisraele, ngombe mobali ezalaki na motuya mingi mpo na makasi na ye. (Masese 14:4; tala mpe Yobo 39:9-11.) Ngombe mobali oyo azali naino elenge ezali bongo elilingi ya makasi, nguya na bomoi oyo ezali kouta epai na Jéhovah.—Nzembo 62:11; Yisaya 40:26.
22 Ekelamu na bomoi na misato ezali na elongi lokola elongi na moto. Yango elakisi bolingo na Nzambe, mpamba te awa na mabelé bobele moto azalisamaki na elilingi na Nzambe, azwaki bongo ezaleli oyo monene bolingo. (Genese 1:26-28; Matai 22:36-40; 1 Yoane 4:8, 16) Na ntembe te bacheribɛ bazali komonisa ezaleli yango, awa ezali bango kosala mosala zongazonga na kiti na bokonzi ya Jéhovah. Tokoloba boni sikawa mpo na ekelamu na bomoi na minei? Ye akokani na mpongo to aigle oyo azali kopombwa. Jéhovah ye moko abendi likebi na biso likoló na miso makasi ya ndeke yango, na maloba oyo: “Miso na ye [ekomonaka] mosika.” (Yobo 39:29) Mpongo azali bongo elilingi na mayele, bososoli. Jéhovah azali Liziba na mayele, mpe bacheribɛ na ye bazali komonisa ezaleli yango na kotosaka mibeko na ye.—Masese 2:6; Yakobo 3:17.
Makumisi mpo na nkembo na Jéhovah
23. Likambo oyo ete bikelamu na bomoi minei “bitondi na miso” elimboli nini, mpe likambo oyo ete bazali mokomoko na mapapu motoba na bituluku misato ya mapapu mibalemibale, elimboli nini?
23 Yoane alandi koyebisa biso makambo amonaki: “Bikelamu na bomoi yango minei bazalaki na mapapu motoba motoba, na epai na epai mpe na kati batondaki na miso. Bapemi te, butu na moi bobele koloba ete, Santu! Santu! Santu! Jéhovah Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, Oyo azalaki mpe azali mpe akozala seko.” (Emoniseli 4:8) Bikelamu wana minei bazali na miso bipai nyonso; yango elakisi ete bakomonaka bipai nyonso mpe ata na mosika. Bazali kosalela miso yango ntango nyonso mpo ete bazali na mposa na kolala te. Kosalaka bongo, bakokani na Ye oyo elobami na ntina na ye ete: “Miso na Jéhovah makotambolaka kati na mokili mobimba ete amonisa nguya na ye mpo na bango baoyo bazali na mitema mpeto liboso na ye.” (2 Ntango 16:9) Na ebele ya miso bongo, bacheribɛ bakoki komona bipai nyonso. Ezali na eloko moko te oyo bakoki kozanga komona. Babongi solo mpo na kosalela Nzambe kati na mosala na ye ya kosambisa. Ekomami na ntina na ye ete: “Miso na Jéhovah mazali na bipai nyonso, kotalaka bato mabe mpe bato malamu.” (Masese 15:3) Epai mosusu, mpo ete bazali na mapapu motoba, bituluku misato ya mapapu mibalemibale (kati na Biblia motango 3 esalelamaka mpo na kolobela makasi likoló na eloko moko), bacheribɛ bakoki kotambola na mbangu lokola ya mokalikali mpo na kosakola bikateli ya Jéhovah mpe mpo na kokokisa yango.
24. Motindo nini bacheribɛ bazali kokumisa Jéhovah, mpe balingi bongo komonisa nini?
24 Boyoka! Bacheribɛ babandi koyemba loyembo moko kitoko mpo na kokumisa Jéhovah: “Santu! Santu! Santu! Jéhovah Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, oyo azalaki mpe azali mpe akozala seko.” Awa lisusu, kozongela maloba mbala misato ezali mpo na kolendisa makasi na yango. Bacheribɛ bazali kosakola na makasi nyonso bosantu ya Jéhovah Nzambe. Ye azali Liziba mpe Ndakisa ya kokoka na makambo nyonso mpo na oyo etali bosantu. Azali mpe “Mokonzi na seko”; azali ntango nyonso “Alfa na Oméga, Oyo na liboso mpe Oyo na nsuka, Ebandeli mpe Nsuka.” (1 Timote 1:17; Emoniseli 22:13) Kozanga kopema, bacheribɛ bazali kosakola epai na bikelamu nyonso bizaleli na Jéhovah oyo bikokani na oyo ya moto mosusu te.
25. Ndenge nini bikelamu na bomoi mpe mikóló 24 bazali kosambela Jéhovah kati na bomoko?
25 Makumisi mpo na Jéhovah etondi kuna na likoló oyo eleki makóló nyonso. Mpamba te, Yoane alobi lisusu boye mpo na makambo amonaki: “Soko bikelamu na bomoi bapesi nkembo, na lokumu, na matondi epai na Mofandi na kiti na bokonzi oyo azali na bomoi libela na libela, mikóló yango ntuku mibale na minei bakwei liboso na Mofandi na kiti na bokonzi, mpe basambeli Oyo azali na bomoi libela na libela, mpe babwaki mitole na bango liboso na kiti na bokonzi, mpe balobi ete, Jéhovah Nzambe na biso obongi kozwa nkembo, na lokumu, na nguya, mpo ete yo ozalisaki biloko nyonso; mpe mpo na mokano na yo bizali mpe bisili kozalisama.” (Emoniseli 4:9-11) Kati na Makomami, ezali awa moko na maloba maleki kitoko mpo na kokumisa Jéhovah, Nzambe na biso mpe Nkolo Moyangeli.
26. Mpo na nini mikóló 24 babwaki bikoti na bango na nse liboso na Jéhovah?
26 Mikóló 24 bazali na makanisi ndenge moko na Yesu. Babwaki bikoti na bango ya bokonzi na nse liboso na Jéhovah. Bakanisi ata moke te ete baluka komitombola liboso na Nzambe. Bandimi na kosokema nyonso ete mokano bobele moko ya bokonzi na bango ezali mpo na kopesa Nzambe lokumu mpe nkembo, lokola Yesu asalaki yango ntango nyonso. (Bafilipi 2:5, 6, 9-11) Na kosokema, bandimi ete bazali na nse mpe bayamboli ete boyangeli na bango esimbami na bokonzi monene ya Jéhovah. Na bongo, basangani na motema moko na bacheribɛ mpe na bikelamu nyonso mosusu ya sembo mpo na kokumisa mpe kokembisa Nzambe oyo asalaki biloko nyonso.—Nzembo 150:1-6.
27, 28. (a) Makambo Yoane amonaki mpe ayebisi biso masengeli kopusa biso na kosala nini? (b) Motuna nini motunami na ntina na makambo oyo Yoane amonaki mpe ayokaki na nsima?
27 Nani akoki koloba ete aoki eloko moko te nsima na kotanga emonaneli oyo Yoane azwaki? Emonaneli yango ezali kitoko mingi, ezali kokamwisa. Nzokande, oyo ezali bobele emonaneli, bongo bosolo na yango mpenza boye ezali motindo nini? Nkembo na Jéhovah esengeli kopusa moto nyonso oyo azali na botondi ete azwana na bikelamu na bomoi minei mpe na bankulutu 24 mpo na kokumisa ye, kosambelaka ye mpe kosakolaka nkombo na ye na miso na bato nyonso. Baklisto bazali lelo na libaku malamu ya kozala batatoli na Nzambe oyo. (Yisaya 43:10) Tobosana te ete emonaneli na Yoane etali mokolo na Nkolo, mokolo oyo tozali kobika na yango lelo. “Elimo nsambo” ezali ntango nyonso penepene na biso mpo na kotambwisa biso mpe kolendisa biso. (Bagalatia 5:16-18) Tozali lelo na Liloba na Nzambe mpo esalisa biso ete tozala basantu na kosalelaka Nzambe oyo azali mosantu. (1 Petelo 1:14-16) Tozali solo na esengo na kotanga na mongongo makasi maloba na esakweli oyo. (Emoniseli 1:3) Maloba yango mazali kolendisa biso ete tozala sembo epai na Jéhovah mpe totika nzela te na mokili ete ekanga biso monoko mpo na kozanga kokumisa ye na molende nyonso.—1 Yoane 2:15-17.
28 Nyonso oyo tolobeli awa, ezali makambo Yoane amonaki ntango abengamaki ete akota na ekuke oyo efungwamaki kuna na likoló. Na motindo na kokamwa mingi, amonisi Jéhovah afandi likoló na kiti na Ye ya bokonzi na likoló, na nkembo nyonso ya bokonzi na Ye mpe ya lokumu na Ye, azingami na lisangá eleki nguya kati na masangá nyonso—na bonzenga mpe na bosembo oyo ezali kongala. Tribinale ya bonzambe efandi. (Danyele 7:9, 10, 18) Nyonso ekoki mpo ete likambo moko ya monene ekoka kosalema. Ezali nini, mpe ndenge nini likambo yango etali biso lelo? Totya likebi na maye malandi.
[Elilingi na lokasa mobimba 75]
[Elilingi na lokasa mobimba 78]