Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr20 Sanza ya 2 nk. 1-7
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2020
  • Mitó ya makambo mike
  • 03-09/02
  • 10-16/02
  • 17-23/02
  • w19.06 lok. 20 par. 3
  • 24/02–01/03
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2020
mwbr20 Sanza ya 2 nk. 1-7

Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

03-09/02

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 12-14

“Kondimana oyo etali mpe yo”

it-1-F lok. 78 par. 6

Kondimana

Kondimana ya Abrahama. Emonani ete kondimana oyo Nzambe asalaki elongo na Abrahama ebandaki mosala ntango Abrama (Abrahama) akatisaki ebale Efrata mpo na kokende na Kanana. Kondimana ya Mibeko esalemaki mbula 430 na nsima. (Ga 3:17) Yehova asololaki na ye ntango Abrahama azalaki kofanda na Mezopotamia, na engumba Ure ya Bakaladea mpe ayebisaki ye akende na mokili oyo akolakisa ye. (Mis 7:2, 3; Eb 11:31; 12:1-3) Kobima 12:40, 41 (LXX) emonisi ete na nsuka ya mbula 430 ya kofanda na Ezipito mpe na mokili ya Kanana, “na mokolo yango mpenza” Bayisraele, oyo bazalaki na boombo na Ezipito, babimaki na mokili yango. Babimaki na mokolo ya 14 Nisana, na mobu 1513 L.T.B., na mokolo ya Elekeli. (Kob 12:2, 6, 7) Yango emonisi ete ntango Abrahama azalaki kokende na Kanana, akatisaki ebale Efrate na mokolo ya 14 Nisana, na mobu 1943 L.T.B., mpe emonani ete na ntango yango nde kondimana ya Abrahama ebandaki mosala. Nzambe abimelaki lisusu Abrahama nsima ya kokɔta na Kanana mpe kokóma na Shekeme mpe abakisaki maloba mosusu na elaka yango; alobaki boye: “Nakopesa momboto na yo mokili oyo;” na ndenge yango, amonisaki boyokani oyo ezali kati na elaka oyo asalaki na Edene, mpe amonisaki ete “momboto” yango akokóma moto, elingi koloba akozala mokitani ya moto. (Eb 12:4-7) Yehova abakisaki makambo mosusu na elaka yango na nsima, na kotalela makambo oyo ezali na Ebandeli 13:14-17; 15:18; 17:2-8, 19; 22:15-18.

w89-F 1/7 lok. 3 par. 4

Mpo na nini osengeli koyeba solo na ntina etali Abrahama?

Yango ezali elaka moko kitoko mpenza mpe Nzambe azongelaki yango na mabaku soki mibale mobimba epai ya Abrahama. (Ebandeli 18:18; 22:18) Mpo elaka yango ekokisama, Nzambe ya Abrahama akosekwisa ata bamonisi ya mabota yango oyo bakufá. Bomoi ekozala mpenza lipamboli mpo na baoyo bakosekwa, mpo mingi na bango bakozonga na bomoi na mabele oyo ekozala lokola paradiso oyo moto ya liboso abungisaki. Na nsima, bakoteya bango ndenge ya kozwa bomoi ya seko.​—Ebandeli 2:8, 9, 15-17; 3:17-23.

it-2-F lok. 152 par. 6

Mibeko

Na kotalela makambo oyo istware emonisi, bato mosusu ya mayele bakanisaka ete mpo mabele moko ekóma ya moto mosusu, bazalaki kolakisa mosombi mabele yango na esika moko oyo ekomonana polele mpe yango ezalaki kopesa nzela ete bátya bandelo ya sikisiki. Ntango mosombi azalaki koloba: “Namoni,” yango ezalaki komonisa ete andimi yango na kolanda mibeko. Ntango Yehova alakaki Abrahama ete akozwa mokili ya Kanana, ayebisaki ye naino atala yango na ngámbo nyonso minei. Soki Abrahama alobaki te ete: “Namoni,” ekoki kozala mpo Nzambe alobaki ete akopesa Mokili ya Ndaka epai ya momboto na ye na nsima. (Eb 13:14, 15) Nzambe ayebisaki Moize, momonisi ya ekólo Yisraele ‘atala’ mokili; soki likanisi oyo touti kolobela likoló ebongi, tokoki koloba ete mokili yango ekómaki ya Bayisraele na boyokani na mibeko mpo bango bázwa yango na litambwisi ya Yosua. (Mib 3:27, 28; 34:4; talá mpe likambo oyo Satana alakaki Yesu na Mt 4:8.) Likambo mosusu oyo emonani lokola eyokanaki na mibeko ezalaki ya kokatisa to kokɔta na mokili na mokano ya kozwa yango. (Eb 13:17; 28:13) Na kotalela mikanda mosusu ya kala, bato bazalaki kotánga banzete nyonso oyo ezalaki na eteni ya mabele oyo bazalaki kotɛka.​—Eb 23:17, 18.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

w16.05 lok. 7 par. 12

Luká kosilisa matata na bolingo

12 Biblia emonisi ndenge oyo basaleli ya Nzambe bakoki kobatela kimya ntango bazali na matata. Na ndakisa, Abrahama ná Lota, mwana ya ndeko na ye, bazalaki na bibwɛlɛ mingi, mpe bakɛngɛli ya bibwɛlɛ na bango bawelanaki mpo esika ya kotya bibwɛlɛ ezalaki mingi te mpo na bibwɛlɛ na bango nyonso. Lokola Abrahama alingaki kimya, atikaki Lota apona mokili oyo eleki malamu. (Eba. 13:1, 2, 5-9) Oyo nde ndakisa malamu mpo na biso! Abrahama azangaki nde esika ya malamu libela mpo na bokabi na ye? Soki moke te. Mbala moko nsima ya likambo yango, Yehova alakaki Abrahama ete akopesa ye mingi koleka oyo abungisaki. (Eba. 13:14-17) Liteya nini tozwi? Ata soki tobungisi biloko mosusu, Yehova akopambola biso soki tosilisi matata na biso na bolingo.

it-2-F lok. 654 par. 6

Nganga-nzambe

Melekisedeke, mokonzi ya Saleme, azalaki nganga-nzambe (kohén) oyo akeseni mpenza na bamosusu. Biblia elobeli bankɔkɔ na ye te, kobotama na ye te; elobeli mpe liwa na ye te. Bonganga-nzambe na ye ezalaki ya libula te, lisusu moto moko te atikelaki ye ebonga yango to moto mosusu azwaki yango nsima na ye. Melekisedeke azalaki mokonzi mpe nganga-nzambe. Bonganga-nzambe na ye elekaki oyo ya Balevi, mpo Levi kutu afutaki ndambo ya zomi epai ya Melekisedeke mpo azalaki naino na bangei ya Abrahama ntango Abrahama apesaki Melekisedeke ndambo ya zomi mpe Melekisedeke apambolaki ye. (Eb 14:18-20; Ebr 7:4-10) Mpo na yango, Melekisedeke azalaki elilingi ya Yesu Kristo, “nganga-nzambe libela na libela lokola Melekisedeke.”​—Ebr 7:17.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur: Nini esalaki ete Sara azala mwasi moko malamu?

w12 1/1 lok. 8

Mwasi oyo azalaki kobanga Nzambe mpe azalaki molongani ya malamu

Mobali ya Sara azalaki na kondima makasi. Kasi Sara ye moko mpe azalaki kobanga Nzambe mpe atiká ndakisa moko ya malamu. Kutu, mbala misato mobimba, Biblia elobeli ye lokola ndakisa oyo basi oyo babangaka Nzambe basengeli kolanda. (Yisaya 51:1, 2; Baebre 11:11; 1 Petro 3:3-6) Atako Makomami elobi makambo mingi te mpo na mwasi wana oyo akesanaki mpenza na basi mosusu, tokoki komona ete azalaki mpenza na bizaleli ya malamu.

Na ndakisa, tókanisa naino ndenge Sara asalaki ntango Abrahama ayebisaki ye ete Nzambe asɛngi bango bálongwa na Ure. Amitunaki nde soki bazali kokende wapi mpe mpo na nini? Amitungisaki nde mpo na ndenge oyo bakobikela kuna? Ayokaki nde mawa mpo azali kotika baninga mpe libota na ye, mpo ayebaki te ntango nini akokutana na bango lisusu to soki bakabwani mpo na libela? Na ntembe te, makanisi wana eyelaki ye. Atako bongo, andimaki kokende, mpe atyaki motema ete Yehova akopambola ye mpo na botosi na ye.​—Misala 7:2, 3.

Longola kozala mosaleli ya Yehova oyo azalaki na botosi, Sara azalaki mpe molongani ya malamu mpenza. Na esika ya kowelana na mobali na ye mpo na kotambwisa makambo ya libota, Sara azalaki na limemya makasi mpo na mobali na ye; na bolingo nyonso, azalaki kosunga ye ntango azalaki kotambwisa libota na bango. Na ndenge yango, amikómisaki kitoko na nzela ya bizaleli na ye ya malamu.​—1 Petro 3:1-6.

Bizaleli yango ekoki kosalisa basi lelo? Jill, mwasi moko oyo aumeli na libala mbula koleka 30 alobi boye: “Ndakisa ya Sara eteyi ngai ete nasengeli te kobanga kosolola na mobali na ngai mpe komonisa ye makanisi na ngai. Kasi, lokola mobali na ngai nde azali mokonzi ya libota, ye nde azali na mokumba ya kozwa ekateli ya nsuka. Soki azwi ekateli, mokumba na ngai ezali ya kosala nyonso mpo ete ekateli yango elonga.”

Mbala mosusu liteya eleki ntina oyo tokoki kozwa epai ya Sara yango oyo: Atako azalaki mwasi moko kitoko mpenza, atikaki te ete kitoko na ye ya nzoto ekómisa ye lolendo. (Ebandeli 12:10-13) Kasi, na komikitisa nyonso, apesaki nde Abrahama mabɔkɔ, ezala na ntango ya mpasi to na ntango ya bisengo, na bomoi na bango mobimba. Kozanga ntembe, Abrahama ná Sara bazalaki mpenza sembo, na komikitisa, mpe bazalaki mpenza kolingana​—bamemelanaki mpenza mapamboli na libala na bango.

10-16/02

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 15-17

“Mpo na nini Yehova apesaki Abrama ná Sarai bankombo mosusu?”

it-1-F lok. 870

Libunga, kolukaluka mabunga

Na kokesana na Nzambe, banzela mpe misala ya bato ezalaka mbala mingi na mabunga. Adama atikelá bato nyonso lisumu mpe libunga. (Ro 5:12; Nz 51:5) Kasi, Yehova, ye oyo azangi libunga, “ayebi malamu ndenge oyo tosalemá, azali kobosana te ete tozali putulu” mpe azali na motema mawa. (Nz 103:13, 14) Atalelaki Noa moto ya sembo mpe ya botosi ete “azalaki na mbeba te kati na bato ya ntango na ye.” (Eb 6:9) Alobaki na Abrahama boye: “Tambolá liboso na ngai mpe zalá na mbeba te.” (Eb 17:1) Atako Noa ná Abrahama bazalaki bato ya kozanga kokoka mpe bakufaki, na miso ya Yehova “oyo amonaka ndenge motema ezali,” bazalaki bato oyo bazangi mbeba. (1Sa 16:7; talá mpe 2Ba 20:3; 2Nt 16:9.) Nzambe alobaki na Yisraele boye: “Osengeli kozala na mbeba te na miso ya Yehova Nzambe na yo.” (Mib 18:13; 2Sa 22:24) Apesaki Mwana na ye ya sembo (Ebr 7:26) lokola mbeka ya lisiko, mpe mpo na mbeka yango Nzambe akoki kobenga baoyo bazali komonisa kondima mpe botosi ‘bayengebene’ to bato oyo bazangi mbeba, ata bongo azali kaka kobatela ebonga na ye ya Mosambisi ya sembo oyo azangi mbeba.​—Ro 3:25, 26; talá mpe BOSEMBO; KOKOKA.

it-1-F lok. 30 par. 1

Abrahama

Ntango elekaki. Abrahama ná bato ya libota na ye basalaki mbula soki zomi na Kanana, kasi Sara azalaki kaka ekomba. Alobaki na Abrahama ete Agare, moombo na ye Moezipito azwa esika na ye mpo abotela ye mwana. Abrahama andimaki, yango wana na mobu 1932 L.T.B., Yishimaele abotamaki ntango Abrahama azalaki na mbula 86. (Eb 16:3, 15, 16) Ntango elekaki lisusu. Na mobu 1919 L.T.B., Abrahama akómaki na mbula 99 mpe Yehova apesaki mitindo ete mibali nyonso ya ndako na ye bákatama ngenga. Yango ezalaki elembo oyo emonisi ete ye ná Abrahama bazalaki na boyokani moko ya ndenge mosusu mpe basalaki kondimana. Kaka na libaku yango, Yehova abongolaki nkombo ya Abrama na Abrahama, “mpamba te nakokómisa yo tata ya ebele ya bikólo.” (Eb 17:5, 9-27; Ro 4:11) Mwa moke na nsima, baanzelu misato oyo balataki nzoto ya bato, oyo Abrahama ayambaki na nkombo ya Yehova, balakaki ye ete Sara akozwa zemi mpe akobota mwana mobali na mbula oyo ekolanda!​—Eb 18:1-15.

w09 1/2 lok. 13

Nkombo nini ebongi na yo?

Nzambe mpe abongolaki bankombo ya bato mosusu mpo na kosakola likambo moko. Na ndakisa, abongolaki nkombo ya Abrama oyo elimboli “Tata oyo atombwami,” na Abrahama, oyo elimboli “Tata ya ebele ya bana.” Na boyokani na ndimbola ya nkombo yango, Abrahama akómaki mpe tata ya ebele ya mabota. (Ebandeli 17:5, 6) Tótalela mpe nkombo ya mwasi ya Abrahama, Sarai oyo ntango mosusu elimboli “Koswana.” Na ntembe te, asepelaki ntango Nzambe apesaki ye nkombo “Sara” oyo elimboli “Mokonzi mwasi,” mpo asengelaki kokóma nkɔkɔ ya bakonzi.​—Ebandeli 17:15, 16.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

it-1-F lok. 465

Dati

Yehova alobaki na Abrama (Abrahama): “Yebá mpenza ete momboto na yo ekokóma mopaya, ekofanda na mokili oyo ezali ya bango te, mpe bakosalela bango, mpe bango bakomonisa bango mpasi mbula nkama minei (400).” (Eb 15:13; talá mpe Mis 7:6, 7.) Ayebisaki ye likambo yango liboso ete Yisaka, “momboto” oyo alakamaki, abotama. Yishimaele, mwana oyo Abrama abotaki na moombo ya Sara, Agare Moezipito abotamaki na mobu 1932 liboso ya ntango na biso mpe na nsima, na mobu 1918 liboso ya ntango na biso, Yisaka abotamaki. (Eb 16:16; 21:5) Soki totángi mbula 400 kobanda na ntango ya Kobima, oyo esukisaki ‘monyoko’ oyo esakolamaki (Eb 15:14), ekomema biso na mobu 1913 liboso ya ntango na biso, dati oyo Yisaka azalaki na mbula soki mitano. Emonani ete bakilisaki Yisaka mabɛlɛ na ntango wana mpe azalaki ‘mopaya’ na mokili oyo ezalaki ya ye te, amonaki mpasi oyo ezalaki ebandeli ya monyoko oyo esakolamaki na lolenge oyo Yishimaele, oyo azalaki na mbula soki 19, azalaki “kosɛka” ye. (Eb 21:8, 9) Ndenge oyo Yishimaele azalaki kotyola mozwi ya libula ya Abrahama ekoki komonana lokola likambo ezangi ntina na eleko na biso, kasi ezalaki bongo te na eleko wana. Ndenge oyo Sara atingamaki kaka bábengana Agare ná mwana na ye Yishimaele mpe ndenge Nzambe andimaki likambo yango emonisi ete ezalaki likambo ya lisɛki te. (Eb 21:10-13) Kutu, lokola likambo yango ekomami nyonso na Makomi mosantu, yango ezali elembo oyo emonisi ebandeli ya eleko ya mbula 400 ya monyoko oyo esakolamaki, eleko oyo esengelaki kosuka na Kobima ya Bayisraele na Ezipito.​—Ga 4:29.

it-1-F lok. 844 par. 7

Kobima

“Na libota ya minei.” Tosengeli kobosana te ete Yehova ayebisaki Abrahama ete bakitani na ye bakozonga na Kanana na libota ya minei. (Eb 15:16) Na mbula 430 yango nyonso, kobanda ntango kondimana ya Abrahama ebandaki mosala na yango tii na kobima ya Bayisraele na Ezipito, mabota yango elekaki minei, ata soki totaleli ndenge bato ya ntango wana bazalaki koumela mingi na mokili ndenge lisolo yango emonisi. Kasi, Bayisraele bafandaki mpenza bapaya na Ezipito na boumeli ya mbula 215. Soki tozwi ndakisa ya libota moko ya Yisraele, na ndakisa oyo ya Levi, tokoki kotánga ‘libota ya minei’ nsima ya kokɔta na bango na Ezipito na lolenge oyo: (1) Levi, (2) Kohate, (3) Amirame, mpe (4) Moize.​—Kob 6:16, 18, 20.

17-23/02

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 18-19

“‘Mosambisi ya mabele mobimba’ abebisi Sodoma ná Gomora”

w17.04 lok. 18 par. 1

“Mosambisi ya mabele mobimba” asalaka ntango nyonso oyo ezali sembo

“MOSAMBISI ya mabele mobimba akosala nde oyo ezali sembo te?” (Ebandeli 18:25) Abrahama moto ya sembo atunaki motuna wana te mpo azalaki na ntembe. Motuna na ye emonisaki nde ete azalaki na kondima ete Yehova akosambisa engumba ya Sodoma mpe ya Gomora na bosembo nyonso. Andimisamaki ete Yehova akokaki soki moke te ‘koboma moyengebene elongo na moto mabe.’ Abrahama akokaki ‘kokanisa ata moke te’ likambo ya ndenge wana. Na nsima, Yehova alobaki boye mpo na ye moko: “Libanga, mosala na ye ezali ya kokoka, mpo banzela na ye nyonso ezali bosembo. Nzambe moko ya bosembo, epai na ye kozanga bosembo ezali te; azali moyengebene mpe sembo.”​—Kolimbola Mibeko 31:19; 32:4.

w18.08 lok. 30 par. 4

Motema molai​—Yiká mpiko na ntina

Tóbosana te ete Yehova ye moko nde ndakisa eleki malamu na oyo etali komonisa motema molai. (2 Petro 3:15) Masolo mingi ya Biblia elobeli motema molai na ye. (Nehemia 9:30; Yisaya 30:18) Na ndakisa, Yehova asalaki nini ntango Abrahama atunaki ye mituna ebele mpo na ekateli na ye ya kobebisa Sodoma? Yehova akataki Abrahama maloba te. Amonisaki motema molai mpe atikaki Abrahama atuna mituna mpe aloba mitungisi na ye. Na nsima, Yehova amonisaki ete ayoki mitungisi ya Abrahama mpe ayebisaki ye ete akobebisa Sodoma te soki bayengebene bazali ata 10 na engumba yango. (Ebandeli 18:22-33) Yehova amonisaka motema molai ntango azali koyoka moto, azalaka motema mɔtɔmɔtɔ te!

w10 15/11 lok. 26 par. 12

Yehova azali Nkolo Mokonzi na biso oyo aleki nyonso!

12 Tokoki kondima ete mosika te Yehova akomonisa bokonzi na ye. Akotika mabe libela na libela te, mpe toyebi ete tozali na mikolo ya nsuka. Yehova abomaki bato mabe na ntango ya Mpela. Abebisaki Sodoma ná Gomora mpe Farao ná mampinga na ye. Sisera ná basoda na ye mpe Senakeribe ná mampinga na ye ya Asiri balongaki te kotɛlɛma liboso ya Oyo-Aleki-Likoló. (Eba. 7:1, 23; 19:24, 25; Kob. 14:30, 31; Bas. 4:15, 16; 2 Bak. 19:35, 36) Na yango, tokoki kozala na elikya ete Yehova Nzambe akotika libela na libela te ete nkombo na ye etyolama mpe Batatoli na ye bányokwamaka. Longola yango, sikoyo tozali komona elembo ya kozala ya Yesu mpe ya bosukisi ya makambo ya ntango oyo mabe.​—Mat. 24:3.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

w88-F 15/5 lok. 23 par. 4-5

Ezali na moto moko oyo amoná Nzambe?

Sikoyo tozali na likoki ya koyeba ntina oyo Abrahama alobaki na anzelu moko oyo azalaki momemi-nsango ya Nzambe lokola nde azalaki koloba na Yehova Nzambe ye moko. Lokola anzelu yango alobaki na bosikisiki maloba oyo Nzambe alingaki koloba na Abrahama mpe azalaki wana lokola momonisi na ye, lisolo yango ya Biblia elobi “Yehova abimelaki ye.”​—Ebandeli 18:1.

Tóbosana te ete anzelu oyo azali momemi-nsango ya Nzambe azali na likoki ya kopesa nsango ya Nzambe kaka ndenge telefone to radio ekoki komema maloba na biso epai ya moto mosusu. Sikoyo toyebi mpenza ntina oyo Abrahama, Moize, Manoa mpe basusu basololaki na anzelu moko oyo alataki nzoto ya moto lokola nde bazalaki kosolola na Nzambe ye moko. Atako bamonaki baanzelu yango mpe nkembo ya Nzambe oyo ezalaki komonana epai na bango, bamonaki Nzambe te boye na miso. Yango ekweisi te maloba oyo ya ntoma Yoane: “Moto ata moko te amoná Nzambe.” (Yoane 1:18) Mibali yango bamonaki nde baanzelu oyo bazalaki bamonisi ya Nzambe kasi Nzambe ye moko te.

w19.06 lok. 20 par. 3

Salisá baoyo bazali kotungisama báyika mpiko

3 Lota azwaki ekateli ya mabe ndenge aponaki kokende kofanda na Sodoma, engumba oyo bato na yango bazalaki na etamboli ya mbindo mpenza. (Tángá 2 Petro 2:7, 8.) Engumba yango ezalaki na bozwi, kasi Lota akutanaki na mikakatano mingi ndenge akendaki kofanda kuna. (Eba. 13:8-13; 14:12) Mbala mosusu mwasi ya Lota akómaki kolinga mingi engumba yango mpe bato mosusu oyo bazalaki kofanda kuna mpe yango esalaki ete azanga botosi epai ya Yehova. Mwasi yango akufaki ntango Nzambe anɔkisaki sufulu mpe mɔtɔ na mokili yango. Kanisá mpe bana basi mibale ya Lota. Bazalaki bafianse ya mibali oyo bakufaki na Sodoma. Lota abungisaki ndako na ye, bozwi na ye, kasi likambo ya mpasi koleka, abungisaki mwasi na ye. (Eba. 19:12-14, 17, 26) Na ntango wana oyo Lota azalaki kotungisama mingi, Yehova atikaki nde komonisela ye motema molai? Te.

24/02–01/03

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 20-21

“Yehova akokisaka ntango nyonso bilaka na ye”

wp17.5 nk. 14-15

Sara “Mama ya Bakonzi”

Kosɛka oyo Sara asɛkaki emonisaki nde ete azangaki kondima? Te. Biblia elobi: “Na kondima mpe Sara azwaki nguya ya kokumba zemi ya momboto, atako alekaki mbula ya kobota, mpo atalelaki moto oyo apesaki elaka ete azali sembo.” (Baebre 11:11) Sara ayebaki Yehova malamu; ayebaki ete akokokisa elaka nyonso oyo apesi. Biso nyonso tosengeli na kondima ya ndenge wana! Tosengeli koluka koyeba malamumalamu Nzambe oyo Biblia elobeli. Soki tosali bongo, tokomona ete ezalaki mpenza na ntina ete Sara azala na kondima ya ndenge wana. Yehova azali sembo mpe akokisaka bilaka na ye; ntango mosusu akoki kokokisa yango ata na ndenge oyo ekoki kokamwisa biso to kosɛkisa biso mpo tondimaki te ete ekoki kosalema!

“YOKÁ MONGONGO NA YE”

Nsukansuka, ntango Sara akómaki na mbula 90, ayokaki esengo oyo azalaki koluka banda kala. Abotelaki Abrahama mwana mobali; na ntango yango Abrahama azalaki na mbula 100! Abrahama apesaki mwana yango nkombo Yisaka, to “Kosɛka,” kaka ndenge Nzambe alobaki yango. Meká komona na makanisi ndenge oyo Sara, atako alɛmbi, azali koloba na mwa kosɛka: “Nzambe abongiseli ngai likambo moko ya kosɛka: moto nyonso oyo akoyoka yango akosɛka ngai.” (Ebandeli 21:6) Kozanga ntembe, likabo wana ya kokamwa oyo Yehova apesaki Sara, epesaki Sara esengo makasi tii na nsuka ya bomoi na ye. Kasi, yango ememelaki mpe ye mikumba minene.

Ntango Yisaka akómaki na mbula 5, libota mobimba esalelaki ye fɛti na mokolo oyo asengelaki kotika komɛla mabɛlɛ. Kasi makambo nyonso te nde elekaki malamu. Lisolo elobi ete Sara “azalaki komona” ezaleli moko ya mabe. Mwana ya Agare, Yishimaele, oyo akómaki na mbula 19, azalaki kosɛka Yisaka. Yango ezalaki kaka masɛki mpamba te. Nsima ya bambula, elimo ya Nzambe etindaki ntoma Paulo akoma ete likambo oyo Yishimaele asalaki ezalaki monyoko. Sara amonaki ete matumoli wana ezalaki likama mpo na mwana na ye. Ayebaki malamu ete Yisaka azalaki mwana oyo Yehova akosalela mpo na kokokisa mokano na ye. Yango wana, na mpiko nyonso mpe kozanga kobanga asololaki na Abrahama. Asɛngaki ye abengana Agare ná Yishimaele.​—Ebandeli 21:8-10; Bagalatia 4:22, 23, 29.

Abrahama asalaki nini? Biblia elobi: “Likambo yango esepelisaki Abrahama ata moke te mpo na mwana na ye.” Lokola azalaki kolinga mwana na ye Yishimaele mingi, akokaki te kondima likambo oyo Sara asɛngaki ye. Kasi, Yehova amonaki likambo yango polele, yango wana akɔtelaki Sara. Biblia elobi: “Bongo Nzambe alobaki na Abrahama ete: ‘Likambo moko te na oyo Sara azali se kolobela yo mpo na mwana wana mpe mpo na moombo na yo ezanga kosepelisa yo. Yoká mongongo na ye, mpamba te oyo ekobengama momboto na yo ekoya na nzela ya Yisaka.’” Yehova akitisaki Abrahama motema ntango ayebisaki ye ete akobatela Agare ná mwana na ye, Yishimaele. Lokola Abrahama azalaki moto ya sembo, atosaki.​—Ebandeli 21:11-14.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

wp17.3 lok. 12, maloba na nse ya lokasa.

“Ozali mwasi moko kitoko mingi”

Sara azalaki leki ya Abrahama. Tera nde tata na bango, kasi moto na moto azalaki na mama na ye. (Ebandeli 20:12) Atako lelo oyo libala ya ndenge wana ezali mabe, ezali na ntina tóbosana te ete makambo ezalaki ndenge moko te na eleko wana. Kozanga kokoka oyo Adama ná Eva bamemelá bato ekɔtaki naino makasi te na ntango wana. Atako bazalaki kobalana mpenza na bandeko na bango ya makila, bato yango bazalaki makasi mingi mpenza yango wana bana oyo bazalaki kobota bazalaki makila makasi. Kasi bambula 400 na nsima, bakómaki koumela na bomoi ndenge moko na biso. Na ntango yango, Mibeko ya Moize epekisaki kosangisa nzoto na moto oyo azali mpenza ndeko ya makila.​—Balevi 18:6.

w89-F 1/7 lok. 20 par. 9

Abrahama​—Ndakisa mpo na baoyo nyonso balingi kokóma baninga ya Nzambe

9 Abrama asalaki likambo mosusu oyo emonisaki ete azalaki na kondima. Lisolo yango elobi ete: “Atongaki etumbelo kuna mpo na Yehova.” (Ebandeli 12:7) Yango elingi mbala mosusu koloba ete apesaki mbeka ya nyama, mpo liloba ya Ebre oyo ebongolami na “etumbelo” elimboli “esika ya kopesa mbeka.” Na nsima, Abrama asalaki lisusu likambo yango oyo emonisi kondima na ye na bisika mosusu ya mokili yango. Longola yango, Abrama ‘azalaki kobelela nkombo ya Yehova.’ (Ebandeli 12:8; 13:18; 21:33) Fraze ya Ebre oyo ebongolami na “kobelela nkombo ya Yehova” elimboli mpe “koloba polele (kosakola) nkombo.” Bato ya ndako ya Abrama, ata mpe Bakanana bazalaki koyoka ndenge azalaki kolobela nkombo ya Nzambe na ye Yehova na mpiko nyonso. (Ebandeli 14:22-24) Ndenge moko mpe, baoyo nyonso balingi kokóma baninga ya Nzambe lelo oyo basengeli kobelela nkombo na ye na kondima. Yango ekosɛnga kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola, ‘kopesa Nzambe mbeka ya lisanzoli ntango nyonso, elingi koloba, mbuma ya mbɛbu na biso oyo ezali kosakola nkombo na ye polele.’​—Baebre 13:15; Baroma 10:10.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto