Mwamitano, 15 sanza ya 11
Miso ya Yehova ezali kotambolatambola na mabele mobimba.—2 Nt. 16:9.
Nkulutu moko na nkombo Miqueas amonaki ete bandeko mosusu oyo bazali na mikumba na lisangá basalelaki ye makambo na bosembo te. Atako bongo, abatelaki makanisi na ye mpe asalaki makasi apekisa mayoki na ye. Azalaki kobondela mbala na mbala mpe kosɛnga Yehova apesa ye elimo santu mpe makasi mpo na koyika mpiko. Lisusu, alukalukaki na mikanda na biso masolo oyo ekokaki kosalisa ye. Yango eteyi yo nini? Soki omoni ete ndeko moko asaleli yo makambo na bosembo te, fandá nyɛɛ mpe boyá makanisi nyonso ya mabe oyo ekoki koyela yo. Mbala mosusu, okoki koyeba te makambo nini etindaki ndeko yango asala bongo. Na yango, bondelá Yehova mpe sɛngá ye asalisa yo otalela makambo ndenge ndeko yango azali kotalela yango. Moná ete ndeko yango asalelaki yo makambo na nko te mpe luká kolimbisa ye. (Mas. 19:11) Kobosana te ete Yehova ayebi makambo oyo ezali kokómela yo mpe akopesa makasi oyo osengeli na yango mpo oyika mpiko.—Mos. 5:8. w22.11 21 par. 5
Mwapɔsɔ, 16 sanza ya 11
Naboyi baoyo bazali kobomba ndenge bazali.—Nz. 26:4.
Poná baninga oyo balingaka Yehova. Baninga oyo oponaka bakoki kosalisa yo okóma mokristo oyo akɔmɛli. (Mas. 13:20) Ndeko Julien, oyo azali lelo nkulutu, alobi boye: “Ntango nazalaki elenge, nazwaki baninga ya malamu ntango tozalaki kosakola elongo. Baninga yango bazalaki molende mpenza, mpe basalisaki ngai namona esengo oyo mosala ya kosakola ekoki kopesa. Lisusu, nayaki komona ete nazalaki na baninga ya malamu mingi te, mpo baninga oyo nazalaki na bango bazalaki bato oyo nazalaki na bango mbula moko.” Ezali boni soki omoni ete ndeko moko na lisangá azali moninga ya malamu te mpo na yo? Ntoma Paulo ayebaki ete bandeko mosusu na lisangá na siɛklɛ ya liboso bazalaki na bizaleli ya malamu te, yango wana ayebisaki Timote akeba na bato ya ndenge wana. (2 Tim. 2:20-22) Boninga na biso ná Yehova ezali na motuya mingi. Tosalaka makasi mpo tópusana penepene na Yehova, yango wana tosengeli te kozala na baninga oyo bakobebisa boninga na biso ná Tata na biso ya likoló. w22.08 5-6 par. 13-15
Mwalomingo, 17 sanza ya 11
Zalá mosika na zoba.—Mas. 14:7.
Na kokesana na baoyo bayinaka bwanya oyo euti na Nzambe, tolingaka banzela ya Nzambe, oyo esangisi mibeko na ye na oyo etali malamu ná mabe. Tokoki lisusu kolinga mibeko yango soki tozali kokokanisa mbuma oyo kotosa mibeko yango ebimisaka ná mbuma oyo koboya kotosa yango ebimisaka. Taláká mikakatano ndenge na ndenge oyo ekómelaka bato mpo baboyaka na bozoba nyonso toli ya bwanya oyo Yehova apesaka. Na nsima, talelá bomoi malamu oyo ozali na yango mpo ozali kotosa Nzambe. (Nz. 32:8, 10) Yehova apesi moto nyonso likoki ya kozala na bwanya na ye, kasi atindikaka bato na makasi te bándima yango. Nzokande, amonisi mbuma mabe oyo eutaka na koboya koyoka bwanya na ye. (Mas. 1:29-32) “Bakolya mbuma ya nzela na bango.” Kendekende, lolenge ya bomoi na bango ekomemela bango eloko moko ya malonga te kasi nde mitungisi, bampasi, mpe nsukansuka liwa. Nzokande, baoyo bayokaka toli ya bwanya oyo Yehova apesaka mpe basalelaka makambo oyo toli yango elobaka, Yehova alaki bango boye: “Moto oyo azali koyokela ngai, akofanda na kimya mpe akotungisama te mpo na nsɔmɔ ya mpasi.”—Mas. 1:33. w22.10 21 par. 11-13