Makamwisi ya kobikisa bato
Ndimbola: Kobikisa moto oyo azali na maladi ya nzoto, ya makanisi to ya elimo. Nzambe apesaki basakoli mosusu ya kala, ezala Yesu Kristo ná bakristo na lisangá ya siɛklɛ ya liboso elimo na ye mpo na kobikisa bato na nzela ya makamwisi.
Makamwisi ya kobikisa bato oyo ezali kosalema na mikolo na biso, ezali kosalema na lisalisi ya elimo ya Nzambe?
Nguya ya kosala makamwisi eutaka kaka epai ya Nzambe?
Moize ná Arona bakendaki epai ya Farao mokonzi ya Ezipito kosɛnga ye atika Bayisraele bákende na esobe kopesa Yehova mbeka. Mpo na komonisa ete Nzambe atindi bango, Moize alobaki na Arona abwaka lingenda na ye na mabele mpe lingenda yango ekómaki nyoka ya monene. Likamwisi yango esalemaki na nguya ya Nzambe. Kasi na nsima banganga-nzambe ya Ezipito oyo basalelaka maji babwakaki mpe mangenda na bango na mabele, mpe yango ekómaki banyoka minene. (Kob. 7:8-12) Basalaki likamwisi yango na nguya ya nani?—Talá Kolimbola Mibeko 18:10-12.
Na mikolo na biso, bakonzi ya mangomba ya bokristo ya nkombo mpamba basalaka makamwisi na ntango ya losambo na bango. Na mangomba oyo ezali ya bokristo te, tokokuta banganga-nzambe ya vodu, bato ya bikelakela, banganga-nkisi ná bato mosusu oyo babikisaka, oyo basalelaka mingi maji mpe misala ya kosakola makambo oyo ebombaná. “Bato” mosusu “oyo babikisaka bato na nzela ya koyekola kaka makanisi ya moto” balobaka ete kobikisa na bango ezali na boyokani moko te na makambo ya lingomba. Na bandakisa nyonso wana, tokoloba ete nguya oyo babikisaka na yango euti nde na Nzambe ya solo?
Mat. 24:24: “Ba-Kristo ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima mpe bakobimisa bilembo minene [“makamwisi minene,” LL] mpe bakosala makamwisi mpo na kokosa ata bato oyo baponami, soki likoki ezali.”
Mat. 7:15-23: “Bókeba na basakoli ya lokuta . . . Bato mingi bakoloba na ngai: ‘Nkolo, Nkolo, tosakolaki na nkombo na yo te? mpe tobimisaki bademo na nkombo na yo te? mpe tosalaki misala ya nguya [“makamwisi,” LL, LNz] na nkombo na yo te?’ Nzokande nakoyebisa bango polele ete: Nayebi bino ata moke te! Bólongwa mosika na ngai, bino bato oyo bobukaka mibeko.”
Kobikisa bato na ndenge ya kokamwisa oyo ezali kosalema na mikolo na biso, ezali kosalema kaka ndenge Yesu ná bayekoli na ye ya liboso bazalaki kosala?
Kosɛnga mbongo: “Bóbikisa bato ya maladi, bósekwisa bakufi, bópɛtola bato ya maba, bóbimisa bademo. Bozwi ofele, bópesa ofele.” (Mat. 10:8) (Bato oyo babikisaka lelo oyo basalaka bongo? Bapesaka ofele ndenge Yesu alobaki?)
Motángo ya bato oyo babikaka: “Ebele nyonso wana ya bato bazalaki koluka kosimba ye [Yesu], mpamba te nguya ezalaki kobima ye mpe kobikisa bango nyonso.” (Luka 6:19) “Babimisaki bato ya maladi ata na babalabala ya minene mpe balalisaki bango kuna na bambeto ya mike mpe na matɔkɔ, mpo, ntango Petro akoleka, ata elili na ye mpamba ekoka kokwela ata moko na bango. Lisusu, ebele ya bato oyo bautaki na bingumba ya zingazinga ya Yerusaleme bakobaki koyangana, bazalaki komema bato ya maladi mpe baoyo bazalaki kotungisama na bilimo ya mbindo, mpe bango nyonso bazalaki kobikisama.” (Mis. 5:15, 16) (Na mikolo na biso, bato nyonso oyo bakendeke epai ya bato ya mangomba oyo babikisaka to na bisika oyo babengaka bisika mosantu mpo na kobikisama, babikaka mpenza?)
Bizaleli ya bandimi ya mangomba ya “bato oyo babikisaka” emonisaka ete bazali na elimo ya Nzambe?
Bato yango bamonisaka polele ete bazali na bizaleli ya mbuma ya elimo lokola bolingo, motema molai, motema pɛtɛɛ, mpe komipekisa?—Gal. 5:22, 23.
Bazali mpenza “bato ya mokili te,” mpe baboyaka kokɔta na makambo nyonso ya politiki? Na ntango ya bitumba, bazalaka na nyongo ya makila te? Bazalaka na lokumu na miso ya bato mpo baboyaka etamboli ya mbindo ya mokili oyo?—Yoa. 17:16; Yis. 2:4; 1 Tes. 4:3-8.
Lelo oyo bakristo ya solo bayebanaka nde na makamwisi ya kobikisa bato?
Yoa. 13:35: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yango nde makambo Yesu alobaki. Soki tondimeli ye mpenza, tokoluka komona bolingo, oyo ezali elembo ya bakristo ya solo, kasi makamwisi ya kobikisa bato te.)
Mis. 1:8: “Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino, mpe bokozala batatoli na ngai . . . tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Liboso Yesu atika bayekoli na ye, ayebisaki bango ete mosala ya kosakola nde ezali mosala ya ntina oyo basengeli kosala, kasi makamwisi ya kobikisa bato te. Talá mpe Matai 24:14; 28:19, 20.)
1 Ko. 12:28-30: “Nzambe atye bato oyo na kati ya lisangá: ya liboso bantoma; ya mibale basakoli; ya misato bateyi; na nsima misala ya nguya; na nsima makabo ya kobikisa; misala ya kosunga, makoki ya kokamba, minɔkɔ ndenge na ndenge. Bango nyonso te bazali bantoma, boye te? Bango nyonso te bazali basakoli, boye te? Bango nyonso te bazali bateyi, boye te? Bango nyonso te basalaka misala ya nguya, boye te? Bango nyonso te bazali na makabo ya kobikisa, boye te?” (Na yango, Biblia emonisi te ete bakristo nyonso ya solo bakozwa likabo ya kobikisa bato na makamwisi.)
Marko 16:17, 18 emonisi ete bakristo bakoyebana na nguya ya kobikisa bato ya maladi?
Mrk. 16:17, 18, LNz: “Bato bakoyamba bakoyebana na makamwisi maye: o nkombo ya ngai bakobengana bazabolo, bakoloba nkota ya bikólo bisusu; bakokanga nyoka na maboko; soko bameli ngenge, ekosala bango eloko te; bakotiela bato ba bokono maboko mpe bakokoma nzoto kolongonu.”
Bavɛrsɛ oyo ezali na bamaniskri mosusu ya Biblia mpe Babiblia mosusu ya siɛklɛ ya mitano mpe ya motoba T.B. Kasi ezali te na bamaniskri ya Grɛki ya kala, lokola Sinaiticus mpe Vatican MS. 1209 ya siɛklɛ ya minei. B. F. Westcott, nganga-mayele oyo ayebi malamu makambo ya bamaniskri ya Biblia, alobaki ete “bavɛrsɛ yango . . . ezali na masolo ya ebandeli te, kasi babakisá yango nde kobakisa.” (An Introduction to the Study of the Gospels, Londres, 1881, lok. 338) Jérôme, mobongoli ya Biblia na siɛklɛ ya mitano, alobaki ete “pene ya bakodeksi nyonso ya Grɛki [ezali] na bavɛrsɛ yango te.” (The Last Twelve Verses of the Gospel According to S. Mark, Londres, 1871, J. W. Burgon, lok. 53) Buku moko (New Catholic Encyclopedia, 1967) elobi: “Maloba na yango mpe ekomeli na yango ekeseni makasi na makomi mosusu ya Evanzile mpe ezali mpasi kondima ete Marko ye moko nde moto akomaki yango [elingi koloba, vɛrsɛ 9-20].” (Vol. IX, lok. 240) Lisolo moko te elobi ete bakristo ya liboso bazalaki komɛla pwazɔ to kosimba banyoka mpo na komonisa ete bazali bandimi.
Mpo na nini bakristo ya liboso bazwaki likabo ya kosala makamwisi ya kobikisa bato?
Ebr. 2:3, 4: “Tokokima ndenge nini soki totyoli lobiko monene ya ndenge wana oyo Nkolo na biso asakolaki liboso mpe oyo bato oyo bayokaki ye bamonisaki biso ete ezali solo, wana Nzambe mpe apesaki litatoli elongo na bango na bilembo ná makamwisi oyo ezali komonisa makambo oyo ekoya mpe na misala ndenge na ndenge ya nguya mpe na ndenge akabolelaki basaleli na ye elimo santu na boyokani na mokano na ye?” (Yango ezalaki elembeteli oyo ezalaki kondimisa ete lisangá ya bokristo, oyo ezalaki naino ya sika, ezali mpenza lisangá ya Nzambe. Kasi ntango ezwaki misisa, ntina ya kopesa bilembeteli mbala na mbala ezalaki lisusu te, boye te?)
1 Ko. 12:29, 30; 13:8, 13: “Bango nyonso te bazali bantoma, boye te? . . . Bango nyonso te bazali na makabo ya kobikisa, boye te? Bango nyonso te balobaka na minɔkɔ mosusu, boye te? . . . Bolingo esilaka soki moke te. Kasi ezala makabo ya bisakweli, ekolongolama; ezala minɔkɔ, ekosuka . . . Nzokande, sikoyo kondima, elikya mpe bolingo ezali, yango misato; kasi oyo eleki na kati na yango ezali bolingo.” (Ntango makabo ya kosala makamwisi ekokisaki ntina na yango, esukaki. Kasi bizaleli ya motuya ya mbuma ya elimo ya Nzambe ekokoba komonana na bomoi ya bakristo ya solo.)
Soki moto abikisami, yango emonisi ete lolenge nyonso oyo basaleli mpo na kobikisa ye ezali kaka malamu?
2 Tes. 2:9, 10: “Kozala ya mobuki mibeko eyokani na mosala ya Satana elongo na misala nyonso ya nguya [“makamwisi,” LL] mpe bilembo ya lokuta mpe makamwisi oyo ezali komonisa makambo oyo ekoya mpe na bokosi oyo euti na makambo nyonso oyo ezangi boyengebene mpo na baoyo bazali kobeba nyɛɛ, lokola lifuti na ndenge bamonisaki te ete balingi mpenza solo mpo bábikisama.”
Luka 9:24, 25: “Moto nyonso oyo alingi kobikisa molimo [“bomoi,” hf, LNz, LL] na ye akobungisa yango; kasi moto nyonso oyo abungisi molimo na ye mpo na ngai ye nde akobikisa yango. Kutu, litomba nini moto azali na yango soki azwi mokili mobimba kasi abungisi bomoi na ye to azwi likama?”
Elikya ezali ete mokolo mosusu maladi nyonso ekosila?
Em. 21:1-4: “Namonaki likoló ya sika ná mabele ya sika; mpo likoló ya kala mpe mabele ya kala elekaki . . . ‘Mpe [Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.’”
Yis. 25:8: “Akolongola mpenza liwa mpo na libela, mpe Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova akopangwisa mpenza mpisoli na bilongi nyonso.” (Talá mpe Emoniseli 22:1, 2.)
Yis. 33:24: “Moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi.’”
Soki moto atuni—
‘Ondimaka makamwisi ya kobikisa bato?’
Okoki koyanola: ‘Moto nyonso oyo andimaka te ete Nzambe azali na nguya ya kobikisa andimaka Biblia te. Kasi tokoki komituna soki bato oyo basalaka makamwisi ya kobikisa lelo oyo basalaka yango na ndenge ya malamu to te.’ Okoki kobakisa: (1) ‘Tiká natángela yo vɛrsɛ moko, mpe talá soki ndenge bazali kosala lelo oyo eyokani na vɛrsɛ yango. (Mat. 10:7, 8) . . . Osimbi mpe likambo moko oyo Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakosala kasi oyo bato oyo babikisaka na makamwisi bakokaka kosala te? (Bato yango bakoki kosekwisa bakufi te.)’ (2) ‘Tozali kosambisa bato te, kasi esengeli kosimba ete Matai 24:24 elobeli likambo oyo tosengeli kokeba na yango.’
To okoki koloba: ‘Nandimaka ete oyo Biblia elobi mpo na makamwisi ya kobikisa ezali solo. Kasi likamwisi nyonso ya kobikisa bato oyo ezali kosalema lelo oyo ezali kaka mpo na ntango moke, boye te? Nsukansuka tokokufa. Ezali nde na ntango oyo moto nyonso akozala nzoto kolɔngɔnɔ mpe akokufa te? (Em. 21:3, 4)’