Elimo ya mokili
Ndimbola: Nguya oyo etambwisaka bato oyo basalelaka Yehova Nzambe te, mpe etindaka bango bálobaka mpe básalaka makambo na ndenge moko boye. Atako bato basalaka makambo oyo esepelisaka bango, baoyo bazali na elimo ya mokili bamonisaka bizaleli moko boye, basalaka makambo na lolenge moko boye, mpe bazalaka na mikano oyo eyokani mpenza na makambo ya mokili oyo Satana azali mokonzi mpe nzambe na yango.
Mpo na nini tosengeli kozwa na lisɛki te likambo ya kolanda elimo ya mokili?
1 Yoa. 5:19: “Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” (Satana nde moto azali kopesa bato oyo basalelaka Yehova te elimo oyo ezali kotambwisa makanisi mpe misala na bango. Ezali elimo ya lolendo mpe elimo oyo etindaka bato bálukaka matomba na bango moko. Elimo yango epalangani lokola mpema oyo bato bazali kopema. Tosengeli mpenza kokeba ete nguya ya Satana etambwisa biso te mpe ebebisa bomoi na biso te.)
Em. 12:9: “Dragɔ yango ya monene ebwakamaki na nse, yango nyoka ya ebandeli, oyo babengi Zabolo mpe Satana, oyo azali kokosa mabele mobimba esika bato bafandi; abwakami na mabele, mpe baanzelu na ye babwakami na nse elongo na ye.” (Banda likambo yango esalemaki, nsima ya kobotama ya Bokonzi na 1914, nguya ya Satana ná bademo na ye likoló ya bato ekómi makasi koleka. Elimo yango ezali kotinda bato báluka matomba na bango moko mpe básala makambo ya mobulu. Mingimingi Satana azali koluka ete bato oyo balingi kosalela Yehova básangana na mokili, básala makambo oyo basusu bazali kosala, mpe bátika losambo ya solo.)
Wapi mwa makambo oyo emonisaka elimo ya mokili oyo tosengeli kokeba na yango?
1 Ko. 2:12: “Nzokande biso tozwaki elimo ya mokili te, kasi elimo oyo euti na Nzambe, mpo tóyeba makambo oyo Nzambe apesi biso na boboto.” (Soki elimo ya mokili ekɔteli mpenza makanisi ya moto ná bamposa na ye, yango emonanaka noki na misala oyo elimo yango etindaka moto yango asala. Yango wana, mpo moto alongola elimo ya mokili, asengeli kaka te koboya misala ya bapakano mpe kolekisa ndelo na makambo mosusu, kasi asengeli mpenza koyina makambo yango mpe kozala na makanisi oyo ezali komonisa ete azali kotambwisama na elimo ya Nzambe mpe alingi mpenza banzela ya Nzambe. Osengeli kobosana makanisi yango te ntango ozali kotalela makambo oyo emonisaka ete moto azali na elimo ya mokili.)
Kosala makambo ndenge olingi, kozanga kotalela oyo Nzambe alingi
Satana atindaki Eva apona ye moko oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. (Eba. 3:3-5; talá mpe Masese 3:5, 6.) Bato mingi oyo balandaka ezaleli ya Eva bayebi mokano ya Nzambe mpo na bato te, mpe balukaka koyeba yango te. Ndenge bango moko balobaka, “basalaka makambo ndenge balingi.” Baoyo bayebi masɛngami ya Nzambe mpe basalaka makasi mpo bákokisa yango basengeli kokeba ete elimo ya mokili etinda bango te báboya kolanda toli ya Liloba ya Nzambe na nko ata na makambo oyo ekoki komonana ete ezali “makambo mike.”—Luka 16:10; talá mpe motó ya likambo “Lipanda.”
Kosala makambo na lolendo
Satana nde moto ya liboso oyo atikaki lolendo ebebisa motema na ye. (Talá Ezekiele 28:17; Masese 16:5.) Lolendo ezali nguya moko oyo ezali kotya bokabwani kati ya bato ya mokili oyo Satana azali koyangela, etindaka bato bákanisa ete baleki bato ya mposo mosusu, ekólo mosusu, monɔkɔ mosusu, to mpe baleki bato mosusu na bozwi. Ata baoyo basalelaka Nzambe basengeli kolongola makanisi wana soki esilá naino te na mitema na bango. Basengeli mpe kokeba ete lolendo etinda bango te bángalisa likambo ya moke, to etinda bango te báboya kondima mabunga na bango to báboya toli ya bolingo oyo Yehova azali kopesa na nzela ya ebongiseli na ye.—Rom. 12:3; 1 Pe. 5:5.
Kotombokela bakonzi
Motomboki ya liboso ezali Satana, oyo nkombo na ye elimboli “Motɛmɛli.” Lokola Nimerode, oyo nkombo na ye elimboli “Bóya tótomboka,” atombokelaki Yehova, yango emonisi ete azalaki mwana ya Satana. Kobwaka elimo yango ekosalisa bato oyo babangaka Nzambe bátombokela bakonzi ya Leta te (Rom. 13:1); ekosalisa bana bátosa bokonzi oyo Nzambe apesá baboti na bango (Kol. 3:20); ekosalisa basaleli ya Nzambe báboya kosangana na bapɛngwi, oyo bamemyaka te bato oyo Yehova apesi mokumba na eteni ya ebongiseli na ye oyo ezali na mabele.—Yuda 11; Ebr. 13:17.
Kolanda bamposa ya nzoto ya masumu kozanga komipekisa
Likambo yango emonanaka mpe eyokanaka bipai nyonso. Yango wana tosengeli ntango nyonso kokeba na elimo yango. (1 Yoa. 2:16; Ef. 4:17, 19; Gal. 5:19-21) Masolo oyo moto abɛtaka, masɛki na ye, nzembo mpe miziki oyo ayokaka, mabina oyo abinaka, to soki bafilme oyo atalaka ezalaka mingi mpenza na makambo ya mbindo, yango nde emonisaka ete makanisi mpe mposa ya nzoto oyo euti na elimo ya mokili ekɔtelá ye. Elimo yango ya mokili emonanaka mpe ntango moto azali komipesa na drɔgɛ, na milangwa, na ekobo, na pite, mpe kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi. Lisusu, emonanaka ntango moto abomi libala mpe abali moto mosusu mpo mibeko ya Leta epesi ye nzela ya kosala bongo atako Biblia epesi ye nzela te.—Mal. 2:16.
Kozala moto oyo liso elekisaka eloko te
Satana alonaki mposa ya ndenge wana na motema ya Eva, atindaki ye asala likambo oyo ebebisaki boyokani na ye na Nzambe. (Eba. 3:6; 1 Yoa. 2:16) Yesu aboyaki mpenza masɛnginya ya ndenge wana. (Mat. 4:8-10) Baoyo balingi kosepelisa Yehova, basengeli kokeba ete makambo ya mombongo ekɔtisa elimo wana te na mitema na bango. Bakristo oyo bazali kokangama na motambo yango, bazali kokutana na mikakatano mpe mindɔndɔ mingi mpe bazali kobebisa boyokani na bango na Nzambe.—Mat. 13:22; 1 Tim. 6:7-10.
Kolakisa na lolendo bozwi mpe makambo oyo moto asalá
Ezaleli yango mpe “euti na mokili,” mpe baoyo bakómi basaleli ya Nzambe basengeli kotika yango. (1 Yoa. 2:16) Yango eutaka na lolendo, mpe na esika ya kolendisa basusu na elimo, moto oyo azali na ezaleli yango alakisaka bango nde biloko na ye mpe makambo oyo mokili ezali kosala.—Rom. 15:2.
Komonisa nkanda na maloba ya kofinga mpe kosala mobulu
Yango ezali “misala ya nzoto” oyo bato mingi bazali kobundisa mpo na kolonga yango. Na nzela ya kondima ya solosolo mpe na lisalisi ya elimo ya Nzambe, bakoki kolonga mokili na esika ete elimo ya mokili elonga bango.—Gal. 5:19, 20, 22, 23; Ef. 4:31; 1 Ko. 13:4-8; 1 Yoa. 5:4.
Kotya elikya na makambo oyo bato bakoki kosala, mpe kobanga bango
Moto ya mosuni amonaka ete eloko oyo akoki komona mpe kosimba nde ezali na ntina. Atyaka elikya na ye nde na bilaka ya bato mpe abangaka oyo bazali koloba. Atyelaka bakonzi ya mokili motema, mpe alɛmbaka nzoto soki bilaka na bango ekokisami te. (Nz. 146:3, 4; Yis. 8:12, 13) Na makanisi na ye, bomoi mosusu ezali te. Abangaka liwa mingi mpenza. (Kokanisá yango na Matai 10:28; Baebre 2:14, 15.) Kasi nguya ya sika etambwisaka makanisi ya bato oyo bayebi Yehova, oyo bilaka na ye etondi na makanisi mpe na mitema na bango, mpe oyo basɛngaka ye lisalisi ntango nyonso oyo bazali na mposa na yango.—Ef. 4:23, 24; Nz. 46:1; 68:19.
Kosambela bato mpe biloko na esika ya kosambela Nzambe
“Nzambe ya makambo ya ntango oyo,” Satana Zabolo, atindaka bato básala misala nyonso oyo ezali kolongola bango mposa nyonso ya kosambela, oyo Nzambe atyá na motema ya moto. (2 Ko. 4:4) Bakómisá bakonzi mosusu banzambe. (Mis. 12:21-23) Bamilio ya bato bafukamelaka bikeko. Bamilio mosusu ya bato basambelaka bato ya sinema to bato ya masano. Mbala mingi, ntango bazali kosala milulu, bapesaka bato lokumu oyo eleki. Elimo yango epalangani mingi mpenza; yango wana, baoyo balingaka mpenza Yehova bakangamaka kaka na ye, mpe basengeli kokeba mokolo na mokolo ete bálanda elimo ya mokili te.