Mokapo 8
Mpo na nini nasengeli kobɛla boye?
“Ntango ozali elenge, okoki komona lokola okoki kobɛla te. Kasi soki maladi moko ebɛti yo na mbalakaka, ntango wana okomona ete ozali ebende te. Omiyoki mbala moko okómi mobange.”—Jason.
NTANGO Jason akómaki na mbula 18, ayebaki ete azali na maladie de Crohn, elingi koloba maladi ya misɔpɔ oyo elɛmbisaka mingi mpe epesaka mpasi mingi. Mbala mosusu yo mpe ozali na maladi oyo ezali kosila te to mokakatano moko na nzoto. Makambo oyo bato mingi bamonaka ete ezali mpasi te—na ndakisa kolata bilamba, kolya, to kokende kelasi—ekoki kosɛnga mpenza kosala makasi.
Maladi oyo esilaka te ekoki kotinda yo omiyoka lokola okangami na bolɔkɔ, to bapekisi yo kosala makambo mosusu. Okoki mpe komiyoka ete ozali kaka yo moko. Okoki kutu kobanda komituna soki osali likambo moko oyo esilikisi Nzambe to soki Nzambe azali mpenza komeka bosembo na yo. Kutu, Biblia elobi boye: “Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te mpe ye moko akoki komeka moto na ndenge wana te.” (Yakobo 1:13) Maladi ezali kaka likambo oyo ekómelaka bato nyonso mpe “ntango ná makambo oyo ekanami te” ekoki kokómela biso nyonso.—Mosakoli 9:11.
Likambo ya esengo, Yehova Nzambe alaki mokili ya sika oyo kati na yango “moto moko te oyo [akofanda] kuna akoloba: ‘Nazali na maladi.’” (Yisaya 33:24) Ata baoyo bakufá bakosekwa, mpo bákoka kozwa libaku ya kofanda na mokili yango ya sika. (Yoane 5:28, 29) Liboso ntango yango ekoka, okoki kosala nini mpo mpasi na yo elɛmbisa yo te?
Kobungisa elikya te. Biblia elobi boye: “Motema oyo ezali na esengo esalaka malamu lokola eloko oyo ebikisaka.” (Masese 17:22) Bato mosusu bakoki kokanisa ete moto akoki te kozala na esengo to kosɛka soki azali kobɛla makasi. Nzokande, kozala na esengo mpe kozala elongo na baninga ya malamu ekoki kokitisa motema mpe kobakisela yo mposa ya bomoi. Na yango, kanisá oyo okoki kosala mpo okóma na esengo mingi. Kobosana te ete esengo ezali ezaleli oyo euti na Nzambe, eteni ya mbuma ya elimo ya Nzambe. (Bagalatia 5:22) Elimo yango ekoki kosalisa yo oyikela maladi na yo mpiko na mwa esengo.—Nzembo 41:3.
Omityela mikano oyo okokoka. Biblia elobi ete “bwanya ezali elongo na bato ya bopɔlɔ.” (Masese 11:2) Bopɔlɔ ekosalisa yo okóma mafumafu te to omibatela te koleka ndelo. Na ndakisa, soki likoki ezali, kosala mwa ngalasisi ekoki kosalisa yo omiyoka malamu. Yango wana mbala mingi, balopitalo mingi esalisaka bilenge oyo bazali kobɛla, massage kinésithérapie. Mbala mingi ngalasisi ya malamu esalisaka kaka nzoto te, kasi esalisaka mpe moto azala na makanisi ya malamu. Likambo oyo osengeli kosala ezali nde kotalela na bosembo bomoi na yo mpe komityela mikano oyo okokoka.
Yebá kofanda na bato. Okosala nini soki bato bazali koloba makambo ya kozokisa mpo na maladi na yo? Biblia elobi boye: “Kotya motema na yo te na maloba nyonso oyo bato bakoki koloba.” (Mosakoli 7:21) Mbala mosusu, lolenge malamu ya kosala, ezali ya kokipe likambo yango te. To mbala mosusu okoki kobanda koloba liboso bango bátuna yo. Na ndakisa, soki omoni lokola bato bazali koyoka mpasi mpo ofandaka na velo ya bibɔsɔnɔ, luká kokitisa bango motema. Okoki koloba boye: “Mbala mosusu bozali komituna mpo na nini nafandaka na velo ya bibɔsɔnɔ. Bolingi boyeba ntina?”
Kotika te. Ntango azalaki na mpasi makasi, Yesu abondelaki Nzambe, atyelaki Ye motema, mpe atyaki makanisi na ye nyonso na esengo oyo ezalaki liboso na ye, kasi te na mpasi na ye. (Baebre 12:2) Mikakatano oyo akutanaki na yango eteyaki ye. (Baebre 4:15, 16; 5:7-9) Andimaki básalisa ye mpe bálendisa ye. (Luka 22:43) Atyaki makanisi na ye na bolamu ya basusu, kasi te kaka na mpasi na ye.—Luka 23:39-43; Yoane 19:26, 27.
Yehova ‘atyelaka yo likebi’
Ezala ozali kobɛla maladi ya ndenge nini, osengeli kokanisa te lokola Nzambe azali komona yo na ntina te. Kutu, Yehova azwaka na motuya mpenza baoyo basalaka makasi mpo na kosepelisa ye. (Luka 12:7) ‘Atyelaka yo likebi’ mpenza, mpe azali kosepela kosalela yo na mosala na ye—atako ozali na maladi to na mokakatano.—1 Petro 5:7.
Na yango, kotika te kobanga epekisa yo kosala makambo oyo olingaka mpe oyo osengeli kosala. Taleláká Yehova mpo asalisa yo. Ayebi bamposa mpe makanisi na yo. Lisusu, akoki kopesa yo “nguya oyo eleki makasi” mpo na kosalisa yo oyika mpiko. (2 Bakorinti 4:7) Na nsima, mbala mosusu okokóma na makanisi malamu lokola oyo ya Timote, oyo bazwaki ye na maladi oyo elɛmbisaka nzoto (Syndrome de fatigue chronique) ntango azalaki na mbula 17. Alobi boye: “Mokanda ya 1 Bakorinti 10:13 emonisi ete Yehova akotika biso te tómekama na likambo oyo tokokoka kokangela motema te. Nakanisaka boye, soki Mozalisi na ngai ayebi ete nakoki koyikela mokakatano oyo mpiko, ngai nani mpo natya ntembe?”
Soki moto oyo oyebi azali kobɛla
Bongo soki yo ozali nzoto kolɔngɔnɔ, kasi oyebi moto moko oyo azali kobɛla to azali ebɔsɔnɔ? Ndenge nini okoki kosalisa moto yango? Likambo ya ntina ezali ‘komitya na esika na ye’ mpe ‘koyokela ye mawa mpenza.’ (1 Petro 3:8) Luká koyeba mokakatano ya moto yango. Luká komona mokakatano na ye ndenge ye moko azali komona yango. Annie, oyo abotamá na maladi babengi spina-bifida, alobi boye: “Lokola nazali nzoto mike mpe nafandaka na velo ya bibɔsɔnɔ, bato mosusu balobaka na ngai lokola nde bazali koloba na mwana moke, mpe ntango mosusu elɛmbisaka ngai nzoto. Kasi, basusu basalaka makasi báfanda mpe básolola na ngai, na ndenge yango tokómaka molai ndenge moko. Nasepelaka mingi mpenza!”
Soki ozali kotala kaka maladi na bango te, okomona ete baoyo bazali kobɛla, bazali kaka bato lokola yo. Mpe kobosana te ete na maloba na yo, ozali na nguya ya ‘kokabela bango likabo ya elimo!’ Soki osali bongo, yo mpe okozwa lipamboli, mpo ‘bokolendisana.’—Baroma 1:11, 12.
MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 13, NA VOLIMI 1
VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO
“Na ntango yango . . . moto moko te . . . akoloba: ‘Nazali na maladi.’” —Yisaya 33:23, 24.
TOLI
Soki oyebi likambo moko, okobanga yango mingi te. Na yango, luká koyeba makambo nyonso oyo okoki koyeba mpo na maladi na yo. Tuná monganga na yo mituna polele na makambo oyo okangi ntina malamu te.
OYEBAKI YANGO . . . ?
Maladi to mokakatano na yo ezali etumbu ya Nzambe te. Kasi, euti nde na ezaleli ya kozanga kokoka oyo Adama atikelá biso nyonso.—Baroma 5:12.
MAKAMBO OYO NAKOSALA
Mpo nabatela esengo na ngai atako nazali kobɛla to konyokwama, nasengeli ․․․․․
Mokano moko oyo nakoki kokokisa ezali ․․․․․
Soki moto alobi na ngai makambo ya mabe mpo na maladi na ngai, mpo na kolekisa yango, nakosala boye: ․․․․․
Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․
OKANISI NINI?
● Ndenge nini okoki kosalela makanisi ya mokapo oyo mpo osalisa moto oyo azali ebɔsɔnɔ to azali na maladi oyo esilaka te?
● Soki ozali na maladi oyo esilaka te, makambo nini ya malamu okoki kokanisaka mpo obatela esengo na yo?
● Ndenge nini oyebi ete soki moto abɛli, yango elakisi te ete Nzambe aboyi ye?
[Etanda/Elilingi na lokasa 75]
DUSTIN, azali na mbula 22
“Nakanisaka lisusu ndenge nalelaki na mabɔkɔ ya mama na ngai ntango nayebaki ete nakobanda kotambola kaka na velo ya bibɔsɔnɔ. Nazalaki kaka na mbula 8.
Nazali na maladi oyo ekɔndisaka misisa (dystrophie musculaire). Esɛngaka básalisa ngai mpo na kolata, kosukola, mpe kolya. Nakokaka te kotombola mabɔkɔ. Atako bongo, nazali na mingi ya kosala na bomoi, nazali na esengo mpe ezali na makambo mingi oyo nazali na botɔndi mpo na yango. Nabimaka mbala mingi na mosala ya kosakola mpe nazali mosaleli na misala na lisangá. Nabosanaka kutu ete bomoi ezali ‘etumba.’ Na mosala ya Yehova, nazalaka ntango nyonso na likambo ya kosala mpe ya kozela na motema moko. Nazelaka mpenzampenza nde mokili ya sika ya Nzambe, epai ‘nakopumbwa lokola serfe.’”—Yisaya 35:6.
[Etanda/Elilingi na lokasa 75]
TOMOKO, azali na mbula 21
“Ntango nazalaki kaka na mbula 4, monganga ayebisaki ngai ete: ‘okobanda kozwa ntonga ya insuline bomoi na yo mobimba.’
Ezalaka mpasi mingi mpo na moto oyo abɛlaka maladi ya diabɛtɛ ayeba sukali oyo esengeli mpenza na kati ya nzoto. Mbala mingi, esɛngaka te ete nalya ntango nazali na mposa ya kolya, mpe ntango nazali na mposa ya kolya te, nde ntango nasengeli kolya. Tii lelo, nasili kozwa bantonga soki 25 000; mpo na yango mabɔkɔ mpe bibɛlɔ na ngai ekómá makasi. Kasi baboti na ngai basalisá ngai namitungisaka mingi te mpo na maladi na ngai. Bazalaki ntango nyonso na esengo mpe na makanisi ya malamu, mpe basalisá ngai napesaka motuya na makambo ya Nzambe. Yehova asalisaka ngai mingi. Ntango nzoto na ngai epesaki nzela, nazwaki ekateli ya kokóma mosakoli ya ntango nyonso mpo na komonisa botɔndi na ngai.”
[Etanda/Elilingi na lokasa 76]
JAMES, azali na mbula 18
“Bato bayebaka likambo ya kosala te liboso ya moto oyo akeseni mpenza na bango, lokola ngai.
Nabɛlá nanisme, maladi oyo ekómisaka bato mokuse mingi. Bato batyaka likebi mingi na ndenge moto azali komonana na miso; na yango ntango nyonso namekaka komonisa ete nazali mwana moke te oyo azali na mongongo monene. Na esika namilelaleka mpo na nzoto na ngai, nasalaka makasi nandima ndenge nazali. Nasepelaka na bomoi oyo nazali na yango. Nayekolaka Biblia mpe nabondelaka Yehova asunga ngai. Libota na ngai elendisaka ngai ntango nyonso. Nazelaka ntango oyo Nzambe akolongola maladi nyonso. Liboso ntango yango ekóma, nasalá makasi namesana na maladi na ngai, kasi natikaka te ete maladi yango etungisaka ngai koleka ndelo.”
[Etanda/Elilingi na lokasa 76]
DANITRIA, azali na mbula 16
“Nayebaki ete nakoki kozala maladi ntango namonaki ete ata kosimba kɔpɔ ya mai ezalaki kosala ngai mabɔkɔ mpasi.
Kozala na maladi babengi fibromyalgie ezali mpasi mingi. Lokola nazali elenge, nalingaka kozala lokola baninga na ngai, kasi sikoyo makambo nyonso ezali mpasi mpo na ngai. Ata mpo nazwa mpongi, naumelaka mingi! Atako bongo, nayei komona ete na lisalisi ya Yehova, nakoki komesana na mokakatano na ngai. Nalongaki kutu kolekisa ngonga mingi na mosala ya kosakola ntango nakómaki mobongisi-nzela mosungi. Atako ezalaki mpasi, nasalaki yango. Namekaka kosala nyonso oyo nakoki. Nasengeli ‘koyokela’ nzoto na ngai mpe koyeba esika makasi na ngai esuki. Soki nabosani, mama ayebisaka ngai yango ntango nyonso!”
[Etanda/Elilingi na lokasa 77]
ELYSIA, azali na mbula 20
“Kala, nazalaki mwana mayele na kelasi. Sikoyo kotánga ata fraze moko ezali mpasi, mpe ntango mosusu yango epesaka ngai mawa.
Kozala na maladi oyo elɛmbisaka nzoto (syndrome de fatigue chronique) ekómisaka ata misala mikemike mpasi. Mbala mingi ata kokita na mbeto ezalaki likambo monene. Kasi, natiká ata mokolo moko te maladi na ngai etambwisa bomoi na ngai. Natángaka Biblia mokolo na mokolo, atako yango esɛngaka kotánga kaka mwa bavɛrsɛ moke to kosɛnga moto moko ya libota atángela ngai. Nazali na botɔndi mingi mpo na libota na ngai. Papa andimaki kutu koboya mokumba moko na liyangani ya etúka mpo akoka kosalisa ngai nazala na liyangani yango. Amilelá ata mokolo moko te. Alobaki ete mokumba monene koleka oyo akoki kozwa ezali ya kobatela libota na ye.”
[Etanda/Elilingi na lokasa 77]
KATSUTOSHI, azali na mbula 20
“Na mbala moko, makanisi na ngai ebulunganaka, nabandaka koganga mpe kolɛnga makasi, ata mpe kobwakabwaka biloko oyo ezali pembeni mpe kobuka yango.
Nabɛlaka maladi ya ndɛkɛ banda ntango nazalaki na mbula 5. Maladi yango ekweisaka ngai mbala 7 sanza nyonso. Nasengeli komɛla nkisi mikolo nyonso, mpe yango elɛmbisaka ngai. Nzokande, nasalaka makasi nakanisaka basusu, na esika ya kokanisa kaka makambo na ngai moko. Na lisangá na biso, ezali na basakoli mibale ya ntango nyonso ya mbula na ngai, oyo basalisaka ngai mingi. Ntango nasilisaki kelasi, namipesaki lisusu mingi na mosala ya kosakola. Maladi ya ndɛkɛ ezali etumba ya mokolo na mokolo. Kasi, soki nayoki malamu te, nakendaka kopema. Mokolo oyo ekolanda, nayokaka malamu.”
[Etanda/Elilingi na lokasa 78]
MATTHIEU, azali na mbula 19
“Eza mpasi mpo baninga na yo bápesa yo limemya soki oza te ndenge bango bamonaka ete ‘moto asengeli kozala.’
Nalingaka kosala masano, kasi nakokaka te. Nazali na maladi moko ya bɔɔngɔ, mpe ata kotambola ya mpamba ezalaka mpasi. Atako bongo, naboyaka kokanisa kaka makambo oyo nakoki kosala te. Namipesaka na makambo oyo nakoki kosala, na ndakisa kotánga. Ndako ya Bokonzi ezali esika oyo nakoki kozala na kimya kozanga namitungisa ete bato bakoloba mabe mpo na ngai. Koyeba mpe ete Yehova alingaka ngai mpo na bomoto na ngai ya kati, ebɔndisaka ngai. Kutu, namimonaka te ete nazali moto ya maladi. Namonaka ete nazali moto oyo azali na mokakatano moko ya ndenge mosusu oyo nasengeli kosilisa.”
[Etanda/Elilingi na lokasa 78]
MIKI, azali na mbula 25
“Kala, nazalaki kosala masano. Kasi na nsima, wana nazalaki naino elenge, nakómaki mbala moko lokola mobange.
Nabotamá na maladi moko na motema. Bilembo ya maladi yango ebandaki komonana ntango nakómaki elenge. Basalaki ngai lipaso, kasi lelo—mbula 6 na nsima—nalɛmbaka mpambampamba mpe nayokaka ntango nyonso motó mpasi. Na yango, namityelaka mikano oyo nakoki kokokisa nsima ya mwa ntango mokuse. Na ndakisa, nakómaki mosakoli ya ntango nyonso, mpe nakokisaki mosala yango mingimingi na nzela ya kokoma mikanda mpe ya kosolola na bato na telefone. Longola yango, maladi na ngai esalisi ngai nakóma na bizaleli oyo nazalaki na yango te, na ndakisa motema molai mpe koyeba esika makoki na ngai esuki.”
[Elilingi na lokasa 74]
Maladi oyo esilaka te ekoki kotinda yo omiyoka lokola okangami na bolɔkɔ—kasi Biblia epesi elikya ya kosikolama