Mokapo 14
Ndenge nini nakoki komibatela na eteyelo?
Komá soki maloba oyo elandi ezali solo to lokuta:
1. Matumoli ezali kaka kosimba na nzoto.
□ Solo
□ Lokuta
2. Matumoli ya kosangisa nzoto ezali kaka kosimba na nzoto.
□ Solo
□ Lokuta
3. Bana basi bazalaka mpe na matumoli.
□ Solo
□ Lokuta
4. Soki bazali kotumola yo to koluka yo makango, osengeli komitika.
□ Solo
□ Lokuta
MOKOLO na mokolo, bilenge mingi babangaka mpo na matumoli ya bilenge mosusu na biteyelo. Elenge moko na nkombo Ryan alobi boye: “Miniti 15 oyo nazalaki kolekisa na bisi mpo na kokende na kelasi ekómaki lokola monyoko ya bangonga mingi mpo bana mosusu bazalaki kofinga ngai mpe na nsima bakómaki kobɛta ngai.” Balukaka bilenge mosusu makango na makasi. Elenge moko na nkombo Anita alobi boye: “Elenge mobali moko oyo azalaki vɛdɛti na kelasi akangaki ngai na kulware mpe abandaki kosimbasimba ngai. Nayebisaki ye na boboto ete alongola mabɔkɔ na ye na nzoto na ngai; kasi alingaki te. Andimaki te ete nazali koboya.”
Bana mosusu kutu bazwaka mitungisi ya baninga na bango ya kelasi na Internet. Yo mpe okutanaka na likambo yango? Soki ezali bongo, okoki kosala nini? Ezali na makambo mingi oyo okoki kosala! Mpo na kobanda, tótalela maloba oyo tolobelaki na ebandeli na mokapo oyo, mpo na kobimisa bokeseni oyo ezali kati na masapo mpamba mpe makambo ya solo.
1. Lokuta. Bilenge mingi batumolaka baninga na maloba, kasi kaka na makofi te. Kokanela, kofinga, kosɛka, to mpe kotyola, ezali mpe lolenge mosusu ya matumoli.
2. Lokuta. Koloba na moto na makanisi ya mabe ete azali kitoko, kosala masɛki ya nsɔni, to mpe kolalisela moto miso ezali mpe matumoli ya koluka kosangisa nzoto.
3. Solo. Ezala mwana mwasi to mwana mobali akoki kotumola moninga.
4. Lokuta. Ezali na makambo oyo okoki kosala mpo bátika kotumola to kotungisa yo. Tótalela ndenge okoki kosala.
Ndenge okoki kolonga matumoli kozanga ete obunda
Bana mosusu batumolaka baninga kaka mpo na kotala soki bakoloba nini. Nzokande, Biblia epesi toli oyo: “Elimo na yo esilika nokinoki te.” (Mosakoli 7:9) Mpo ‘kozongisa mabe na mabe’ ezali lokola kosopa petrole na mɔtɔ mpe ekobendela yo mikakatano mosusu. (Baroma 12:17) Kasi, ndenge nini okoki kosukisa moto oyo azali kotumola yo kozanga ete obunda na ye?
Moná yango mpamba. Soki moto atumoli yo mpo kaka ayeba soki okosala nini, na esika osilika, salá makasi okipe yango te. Elenge moko na nkombo Alain alobi boye: “Ntango mosusu esɛngaka kaka okipe te maloba mabe oyo babimiseli yo.” Soki moto amoni ete matumoli na ye ezali kosala yo eloko te, ntango mosusu akoki kotika yo nyɛɛ.
Yanolá na boboto. Biblia elobi boye: “Eyano, ntango ezali ya boboto, elongolaka nkɛlɛ.” (Masese 15:1) Moto ya matumoli akanisaka te ete bakoki kozongisela ye maloba ya boboto, mpe kosala bongo ekoki koboma mɔtɔ. Ya solo, kotikala kimya ntango bazali kotumola yo esɛngaka komipekisa. Kasi, kosala bongo ebotaka mbuma malamu. Masese 29:11 elobi boye: “Zoba abimisaka elimo na ye nyonso, kasi ye oyo azali na bwanya abatelaka yango ezala kimya tii na nsuka.” Boboto ezali elembo ya moto oyo azali na motema molai. Moto ya boboto atombokaka noki te; nzokande, mbala mingi moto ya matumoli azalaka motema mɔtɔmɔtɔ, asilikaka noki, mpe kutu aumelaka te mpo na komitungisa. Yango wana, Biblia elobi boye: “Ye oyo ayokaka nkanda noki te azali malamu koleka moto ya nguya.”—Masese 16:32.
Mibatelá. Soki omoni ete makambo ebandi kobeba, luká ‘nzela ya kokima.’ Masese 17:14 elobi boye: “Liboso koswana ebima, bendá nzoto.” Yango wana, ntango omoni lokola mobulu elingi ebima, longwá wana mpe kimá ata kokima. Soki mwaye ya kokima ezali te, salá oyo okoki mpo na komibatela.
Yebisá likambo yango. Baboti na yo basengeli koyeba likambo oyo ezali koleka. Bakoki mpe kopesa yo batoli oyo ekosalisa yo. Na ndakisa, bakoki koyebisa yo oyebisa molakisi to mokonzi mosusu ya eteyelo likambo yango. Yebá ete baboti na yo ná bakonzi ya eteyelo bakoki kosilisa likambo yango na boboto, mpo okutana lisusu te na mikakatano.
Likambo nini osengeli kosimba? Moto ya matumoli akolonga te soki osali makambo te ndenge ye akanisaki. Yango wana, kotika te nkanda na ye ebangisa yo. Salelá makanisi oyo touti kolobela mpo olonga.
Ndenge ya kokima motungisi ntango bazali koluka yo makango na makasi
Ezali mabe te oyoka nkanda soki bazali koluka yo makango na makasi! Kasi, Motuna yango oyo: Okoki kosala nini? Makambo ya kosala ezali mingi! Mwa makanisi oyo elandi, ekoki kosalisa.
Soki moto abandi maloba neti ya makango, boyá na motema moko. Soki bato oyo balukaka baninga makango na makasi, bamoni ete ozali kokakatana, bakokoba kotya yo mbamba, mpo bakoki kokanisa ete ntango mosusu okondima, longolá kaka soki omonisi ekateli makasi. Yango wana, tiká ete “te” na yo emonana mpenza ete ezali “te.” (Matai 5:37) Soki ozali kolakisa moto oyo azali kotungisa yo mino to ozali nsɔninsɔni mpo na kobanga, ye akomona lokola ozali kosepela na likambo azali kosala. Zalá na mpiko mpe lobá na ye polele ete oboyi. Yango nde mpenza lolenge malamu oyo ekoki kobatela yo!
Monisá ete osiliki. Elenge Anita ayebisi ndenge oyo asalaki ntango mwana mobali moko azalaki kolandalanda ye: “Nayokisaki ye nsɔni na miso ya baninga na ye, nalobaki na ye na mongongo makasi ete kosimba ngai TE!” Esukaki ndenge nini? “Baninga na ye nyonso basɛkaki ye. Akangelaki ngai nkanda, kasi nsima ya mwa mikolo, asɛngaki ngai bolimbisi; kutu na nsima akɔtelaki ngai ntango elenge mosusu alukaki kotungisa ngai.”
Soki azali koyoka na maloba te, longwá wana. Ekoleka malamu okima ata kokima. Soki mwaye ya kokima ezali te, ekozala mpe mabe te soki otindiki moto oyo alingi kosangisa na yo nzoto na makasi. (Kolimbola Mibeko 22:25-27) Elenge mwasi moko mokristo alobi boye, “Ntango elenge mobali moko alingaki kosimba ngai na nzoto, nabɛtaki ye likofi makasi mpe nakimaki!”
Yebisá moto mosusu. Adrienne, elenge moko ya mbula 16, alobi boye: “Yango nde nasalaki. Natunaki baboti na ngai toli ntango mwana mobali moko oyo nakanisaki ete azali moninga ya malamu abandaki kobimisela ngai maloba ya bolingo. Ntango nazalaki koboya, ye azalaki nde kobakisa mitungisi; ekómaki lokola teyatre.” Baboti ya Adrienne bapesaki ye toli oyo esalisaki ye mpenza. Na ntembe te, baboti na yo mpe bakoki kosalisa yo.
Kokima matumoli to motungisi ezalaka pɛtɛɛ te. Kasi, kobosana likambo oyo te: Bilenge bakristo basengeli kokanisa te ete bakoki kolonga te bato oyo balingaka kokómisa bango makango na makasi, basengeli mpe te kondima to kobendama na maloba ya kolɛngola ya moto oyo alingi kosala bango mabe. Soki osaleli makambo oyo tolobeli na lisolo oyo, okolonga mikakatano yango.
MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 18, NA VOLIMI 1
Makanisi mabe ya baninga ezali moko ya makambo oyo osengeli kobunda na yango. Okomona ndenge oyo okoki kolonga makanisi yango kozanga kobanga.
VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO
“Soki likoki ezali, soki etaleli kaka bino, bózala na kimya na bato nyonso.”—Baroma 12:18.
TOLI
Soki moto atumoli yo, kolakisa te ete ozali kobanga ye, kasi koswanisa mpe ye te. Lobá na ye polele ete atika yo kimya. Longwá na malɛmbɛ. Soki azali kotika te, kende koyebisa likambo yango.
OYEBAKI YANGO . . . ?
Na bisika mosusu, okoki komibendela mindɔndɔ soki olati bilamba oyo ekokani na bilamba oyo bilenge ya mobulu balataka. Elenge moko oyo azalaká moto ya mobulu alobi boye: “Soki moto alati lokola biso, kasi azali moto ya etuluku na biso te, tozalaki kosala ye mabe. Asengelaki kopona kokóma na ngámbo na biso to kobɛtama.”
MAKAMBO OYO NAKOSALA
Soki moto moko afingi to atumoli ngai, nako ․․․․․
Mpo namibendela mindɔndɔ te, nako ․․․․․
Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․
OKANISI NINI?
● Okoki kosala nini mpo ozala moto ya kimya mpe bápesa yo limemya mpe bábanga kotumola yo?
● Okoki kosala nini soki bazali koluka yo makango na makasi? (Kanisá makambo oyo okoki kokutana na yango mpe ndenge oyo okosala.)
● Mpo na nini osengeli kozwa na lisɛki te motungisi ya kokóma makango ya moto?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 123]
‘‘Soki omoni ete bitumba elingi kobanda, kangá biloko na yo mpe zongá. Basusu batikalaka kaka wana mpe yango wana bakutanaka na mindɔndɔ.’’—Jairo
[Etanda na lokasa 125]
Mpo bákómisa yo te makango na makasi
Kozalaka seresere na moto te. Yango ekotinda bilenge mosusu bábanda kotungisa yo. Biblia etuni boye: “Moto akoki nde kotya mɔtɔ na ntolo na ye bongo bilamba na ye ezika te?” (Masese 6:27) Ezali polele ete kozala seresere ná moto ezali lokola kosakana na mɔtɔ.
Kebá na baninga na yo. Bato mosusu bakokanisa mbala moko ete yo mpe osalaka makambo oyo baninga na yo basalaka. Elenge mwasi moko na nkombo Carla, alobi boye: “Soki olekisaka ntango na bana basi oyo balingaka mibali bálula bango to bátya bango litoi, bakobanda mpe kotungisa yo.”—1 Bakorinti 15:33.
Kebáká na bilamba oyo olataka. Ntango olati bilamba oyo ebongi te, yango ekomonisa ete ozali kobenga mibali to basi—mpe soki bamoni, bakoya.—Bagalatia 6:7.
Monisáká ete ozali mokristo. Soki omibombi, moto moko te akoyeba ete ozali mokristo.—Matai 5:15, 16.
[Elilingi na lokasa 124]
Kosilika ntango moto azali kotumola yo ezali lokola kosopa petrole na mɔtɔ
[Elilingi na lokasa 127]
Yebisá moto oyo azali koluka yo makango: longwá!