Mokapo 3
Moto oyo abongi mpenza mpo na ngai?
Kanisá naino mwa moke mpe yanolá na mituna oyo:
Bizaleli nini okanisaka ete ezali na ntina mingi moto oyo okolinga kobalana na ye azala na yango? Na bizaleli oyo ezali awa, tyá elembo ✔ pembeni ya makambo minei oyo omonaka ete eleki ntina.
□ Azala kitoko □ Alinga makambo ya Nzambe
□ Azala boboto □ Azala moto oyo bakoki kotyela motema
□ Ayebana mingi □ Azala moto ya bizaleli malamu
□ Moto oyo ayebi kosɛkisa □ Moto oyo amityelaka mikano
Ntango ozalaki mwana moke, ekómelaki yo olula moto moko? Kati na makambo oyo totandi likoló, tyá elembo × pembeni ya likambo oyo ezalaki kosepelisa yo mingi epai ya moto yango.
NA KATI ya makambo nyonso oyo totángi, moko te ezali mabe. Mokomoko ezali malamu na ndenge na yango. Kasi, omoni te ete soki olingi mwana mobali to mwasi ntango ozali naino elenge, makanisi na yo ekokende mingimingi na makambo oyo ezali komonana na miso, na ndakisa oyo ezali na lobɔkɔ ya mwasi awa na likoló?
Nzokande, ntango obandi kokola, mpe obandi kosalela likoki na yo ya kososola, okotalela nde bizaleli oyo ezali na ntina mingi, na ndakisa oyo ezali na lobɔkɔ ya mobali. Na ndakisa, okobanda komona ete mwana mwasi oyo aleki kitoko na kartye na bino, ntango mosusu azali te moto oyo bakoki kotyela motema, to mpe elenge mobali oyo azali vɛdɛti na kelasi na bino, ntango mosusu azali na bizaleli ya malamu te. Na ntembe te, soki oleki “eleko ya ebandeli ya bolenge,” okolanda te kaka makambo oyo ezali komonana na miso mpo na kopesa eyano na motuna oyo: “Moto oyo abongi mpenza mpo na ngai?”
Luká naino komiyeba
Liboso oluka mobali to mwasi oyo abongi na yo, esengeli naino yo moko omiyeba malamu. Mpo na yango, pesá biyano na mituna oyo:
Nazalaka makasi na makambo nini? ․․․․․
Nazalaka na bolɛmbu to makasi te na makambo nini? ․․․․․
Nalingaka moto oyo tokobalana asalelaka ngai makambo ndenge nini mpe boyokani ya ndenge nini nalingi kozala na yango ná Nzambe? ․․․․․
Komiyeba yo moko ezali likambo ya pɛtɛɛ te; kasi komituna mituna lokola oyo, ekoki kosalisa yo. Soki obandi komiyeba malamu, ekozala mpasi te ozwa mwasi to mobali oyo akosalisa yo okolisa bizaleli na yo ya malamu, kasi bizaleli na yo ya mabe te.a Sikoyo, okosala nini soki ozwi moto oyo abongi na yo?
Nakoki kolingana na moto nyonso?
“Tokoki kosala boninga?” Motuna yango ekoki kopesa yo nkanda to kosepelisa yo, na kotalela moto oyo atuni yo yango. Sikoyo, kanisá ete ondimi. Nsima ya mwa ntango, ndenge nini okoki koyeba soki mwana mobali to mwasi oyo bolingani na ye azali moto oyo abongi mpenza mpo na yo?
Tózwa ndakisa ete olingi kosomba sapato ya sika. Okei na zando mpe omoni sapato moko oyo esepelisi yo. Kasi, likambo ya mawa, ntango omeki yango, omoni ete ekoki yo te. Okosala nini? Okosomba yango kaka? To okoluka nde sapato mosusu? Ekozala malamu kotika sapato yango mpe koluka mosusu. Ekozala bozoba kotambola na sapato oyo ezali kokoka yo te!
Ezali mpe bongo na likambo ya kopona moto oyo bokobalana. Nsima ya mikolo, okobanda komona bilongi mosusu oyo ekosepelisa yo. Kasi, moto nyonso te nde akozala moto oyo abongi mpenza mpo na yo. Kutu, okolinga nde kozwa moto oyo okofanda na ye malamu, moto oyo bizaleli mpe mikano na ye ekoyokana ná oyo ya yo. (Ebandeli 2:18; Matai 19:4-6) Osili komona moto yango? Soki ezali bongo, ndenge nini okoki koyeba soki azali moto oyo abongi mpenza mpo na yo?
Luká koyeba moto yango malamu
Mpo ozwa eyano na motuna yango, talelá malamu moto wana oyo azali kobɛtisa yo motema. Kasi, kebá! Miso na yo ekoki kotalaka mingi kaka makambo oyo olingi komona. Yango wana, kowela te. Luká koyeba bizaleli ya moto yango malamu. Yango ekosɛnga ete osala milende mpe esengeli mpenza kosala yango. Tópesa ndakisa: Kanisá ete olingi kosomba motuka. Okotala yango malamumalamu, boye te? Okotala kaka libándá? Ekosɛnga ete otala yango malamumalamu tii na kati, mbala mosusu oluka koyeba soki motɛrɛ na yango ezali malamu, boye te?
Kopona moto oyo bokobalana ezali ekateli monene koleka kopona motuka ya kosomba. Kasi, bilenge mingi bamonaka mosika te. Likebi na bango ekendaka nokinoki na makambo oyo esepelisaka bango nyonso mibale. Na ndakisa, balobaka: ‘Tolingaka miziki ya ndenge moko.’ ‘Tosepelaka na masano ya ndenge moko.’ ‘Toyokanaka na makambo nyonso!’ Kasi, ndenge tolobaki yango liboso, soki oleki ebandeli ya bolenge, okotika kotalela kaka makambo oyo emonanaka na miso. Okomona ete osengeli mpe kotalela “bomoto oyo ebombaná, oyo ya motema.”—1 Petro 3:4; Baefese 3:16.
Na ndakisa, na esika otalela kaka makambo oyo yo ná ye boyokanaka, okoki koyeba ye soki oluki koyeba ndenge azalaka ntango boyokani te na likambo moko. Na maloba mosusu, asalaka nini soki bozali na matata? Atingamaka ete makambo esalema ndenge ye alingi mpe ntango mosusu akómaka na “nkanda makasimakasi” to abimisaka “maloba ya kofinga”? (Bagalatia 5:19, 20; Bakolose 3:8) To amonisaka ete azali makambo makasi te, elingi koloba ete mpo na kobatela kimya, andimaka mpe bósalela makanisi oyo opesi?—Yakobo 3:17.
Likambo mosusu ya kotalela yango oyo: Asalelaka mayele mabe mpo na kondimisa yo osala oyo ye alingi, alingaka te osolola na bato mosusu, to asalelaka yo zuwa ezangá ntina? Alingaka oyebisa ye likambo nyonso oyo ozali kosala? Elenge moko na nkombo Nicole alobi boye: “Nayokaka bafianse babebanaka mpo moko asepelaka te soki moninga ayebisi ye te esika oyo azali. Nakanisi ete wana ezali elembo ya mabe.”—1 Bakorinti 13:4.
Makambo oyo touti kolobela etaleli mingimingi bomoto mpe bizaleli. Nzokande, ezali mpe na ntina oyeba ndenge bato mosusu batalelaka moto oyo olingani na ye. Ekoki kosɛnga mbala mosusu osolola na bato oyo bayebi ye banda kala, na ndakisa bakristo oyo bakɔmɛli oyo bazali na ye lisangá moko. Yango ekosalisa yo oyeba soki bato ‘balobaka malamu mpo na ye.’—Misala 16:1, 2.
Ekoki mpe kozala malamu okoma oyo omoni epai ya moto oyo ozali kosepela na ye na makambo oyo touti kolobela mpo na kotalela soki abongi mpo na yo.
Bomoto ․․․․․
Bizaleli ․․․․․
Ndenge bato batalelaka ye ․․․․․
Ezali malamu otalela mpe etanda oyo elobi “Akozala mobali ya malamu mpo na ngai?” na lokasa 39 to “Akozala mwasi ya malamu mpo na ngai?” na lokasa 40. Mituna oyo ezali na bitanda yango ekosalisa yo oyeba soki moto oyo ozali kosepela na ye akozala mobali to mwasi oyo abongi mpo na yo.
Kasi, okosala nini soki, nsima ya kotalela makambo yango, omoni ete moto yango abongi na yo te? Na ntango yango, ekosɛnga na yo oyanola na motuna oyo ya ntina mingi:
Tosengeli kokabwana?
Ntango mosusu kokabwana ezalaka malamu. Tótalela likambo oyo ekómelaki Julie. Alobi boye: “Na ebandeli, nazalaki kosepela ndenge elenge mobali oyo nalingaki azalaki ntango nyonso koluka koyeba soki naza wapi, nazosala nini, mpe soki naza ná nani. Kasi, na nsima, nakokaki lisusu kozala na moto mosusu te, kaka ná ye. Akómaki kutu kosalela ngai zuwa ata soki naza ná bato ya libota na ngai—mingimingi soki naza ná tata na ngai. Ntango tokabwanaki, nayokaki neti balongoli ngai kilo moko boye na mapeka!”
Sarah mpe akutanaki na likambo ya ndenge wana. Akómaki komona ete John, elenge mobali oyo alinganaki na ye, azalaki moto ya kotyola, ya makambo makasimakasi, mpe azangá botosi. Sarah alobi boye: “Mokolo moko oyo esengelaki ngai ná ye tóbima, akómaki epai na biso na retare ya ngonga misato! Ntango abɛtaki porte, mama afungolaki; kasi, apesaki ye ata mbote te mpe alobaki na ngai mbala moko ete: ‘Tókende! Toza na retare.’ Na esika aloba ‘Naza na retare,’ ekómaki ‘Toza na retare.’ Esengelaki nde asɛnga bolimbisi to ayebisa ngai ntina oyo akómaki na retare. Lisusu, esengelaki azala ata na mwa limemya epai ya mama!” Ya solo, yango elingi koloba te ete soki moto asali mabe mbala moko to amonisi ezaleli oyo ebongi te mbala moko, esengeli kokabwana na ye. (Nzembo 130:3) Kasi, ntango Sarah amonaki ete kozanga botosi ya John ezali nde ndenge na ye, azwaki ekateli bákabwana.
Na ndakisa ya Julie ná Sarah, okosala nini soki omoni ete moto oyo olingani na ye akozala te mobali to mwasi ya malamu? Soki ezali bongo, kokanga miso te na makambo oyo ezali kosepelisa yo te! Atako ezali mpasi, ekoleka malamu bókata. Masese 22:3 elobi boye: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi.” Na ndakisa, soki omoni likambo moko to makambo mingi ya mabe oyo elobelami na lokasa 39 mpe 40 epai ya moto oyo olingani na ye, ekoleka malamu okata boyokani yango—ntango mosusu tii akobongisa likambo yango. Ya solo, kokabwana ezalaka pɛtɛɛ te. Kasi, libala ezali likambo ya bomoi mobimba. Eleki malamu koyoka mpasi mpo na mwa ntango moke na esika ya kozala na basusi bomoi na yo mobimba!
Ndenge ya koyebisa ye ekateli na yo
Ndenge nini okoki koyebisa moto yango ete omoni malamu bókata? Ya liboso, luká esika ya malamu mpo na kosolola. Yango elingi koloba nini? Kanisá naino ndenge oyo okolinga báyebisa yo likambo ya ndenge wana. (Matai 7:12) Okolinga báyebisa yo yango na miso ya bato? Te. Lobá soki ndenge mosusu ya kosala ezali te, ezali malamu te kotikela moto maloba na telefone, kokomela ye na telefone, to na ordinatɛrɛ ete olingi ye lisusu te. Na esika ya kosala bongo, ekozala malamu opona ngonga mpe esika moko oyo okoki kosolola na ye na motema mpiɔ.
Soki ntango oyo bosengeli kosolola ekoki, okoloba nini? Ntoma Paulo alendisaki bakristo ete ‘bálobanaka solo.’ (Baefese 4:25) Yango wana, ekozala malamu oloba na boboto, kasi mpe komonisa ye ekateli na yo polele. Lobá na ye polele mpo na nini yo omoni ete bokoki kobalana te. Ezali na ntina te otandela ye mabunga to mabe oyo omonaka epai na ye. Kutu, na esika oloba, “Osalaka boye te” to “Ata mbala moko te osalá boye,” ekoleka malamu osalela maloba oyo ekomonisa ndenge oyo yo oyokaka—“Ngai nalingaka moto oyo . . .” to “Ngai namoni malamu tókata mpo . . .”
Na ntango yango, esengeli te kozala bongolabongola to kotika ye andimisa yo makanisi na ye. Kobosana te ete ozwi ekateli ya kokabwana na ye mpo na likambo ya ntina mpenza. Yango wana, osengeli kokeba soki abandi koloba na yo maloba ya sukali to kosalela mayele mosusu ya mabe mpo ozongisa motema nsima. Elenge mwasi moko na nkombo Lori alobi boye: “Nsima ya kokabwana ná mwana mobali moko oyo tozalaki na ye, akómaki mawamawa. Nakanisi azalaki kosala bongo mpo nayokela ye mawa. Nayokelaki ye mpe mawa. Kasi, nabongolaki ekateli na ngai te mpo ye azalaki kosala bongo.” Na ndakisa ya Lori, osengeli koyeba soki olingi nini. Kangamá na ekateli na yo. Tiká te na yo ezala te.—Yakobo 5:12.
Nsima ya kokabwana
Osengeli kokamwa te soki okómi koyoka motema mpasi nsima ya kokabwana na moto oyo olinganaki na ye. Kutu, okoki koyoka lokola mokomi ya nzembo oyo alobaki boye: “Nabulungani, nagumbami koleka ndelo; mokolo mobimba natamboli epai na epai na mawa.” (Nzembo 38:6) Baninga na yo mosusu bakoki kobondela yo mpo ozongela moto oyo okabwani na ye. Kebá! Moto oyo akomona mabe ná malamu ya ekateli wana, ezali nde yo, kasi baninga na yo te. Yango wana, kangamá na ekateli na yo, ata soki likambo yango ekoki kopesa yo mawa.
Yebá ete nsukansuka, mpasi yango ekosila. Mpo na nini te kosala makambo oyo elandi mpo olonga na ntango wana ya mpasi?
Yebisá moninga na yo ya motema ndenge ozali koyoka.b (Masese 15:22) Yebisá Yehova likambo yango na libondeli. (Nzembo 55:22) Mipesá na mosala ya Yehova. (1 Bakorinti 15:58) Kozalaka kaka yo moko te! (Masese 18:1) Zongelá nokinoki baninga oyo bakolendisa yo. Salá makasi okanisaka makambo ya malamu.—Bafilipi 4:8.
Ntango mosusu, nsima ya mikolo, okoki kozwa moto mosusu. Na ntango yango, okoyeba kotalela makambo na ndenge ebongi mpo makambo oyo ekómelaki yo liboso ekoteya yo. Ekoki kozala ete na ntango wana, eyano na yo ekozala ɛɛ na motuna oyo: “Moto oyo abongi mpenza mpo na ngai?”
MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 31, NA VOLIMI 1
Ntango bozali kokutana ná moto na yo, mpo na nini esengeli bóyokana makambo oyo bosengeli kosala ná oyo bokosala te?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Okoki komiyeba lisusu malamu koleka soki otaleli mituna oyo ezali na mokapo ya liboso ya buku oyo, na motó ya likambo ya moke oyo elobi ete: “Okoki mpo na kobala?”
b Baboti na yo mpe mikóló mosusu, na ndakisa bankulutu, bakoki kosalisa. Kutu, mbala mosusu okomona ete bango mpe bakutaná na likambo yango ntango bazalaki bilenge.
VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO
“Ata na misala na ye mwana mobali asalaka ete bato báyeba ye, soki mosala na ye ezali pɛto mpe elongobani.”—Masese 20:11.
TOLI
Bósalaka makambo oyo ekomonisa polele bizaleli ya moto na moto:
● Bóyekolaka Liloba ya Nzambe elongo.
● Moto na moto atalaka malamu ndenge oyo moninga apesaka biyano to asalaka masolo na makita mpe ndenge oyo asakolaka.
● Bópesaka mabɔkɔ na misala lokola kotonga to kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi.
OYEBAKI YANGO . . . ?
Mbala mingi baankɛtɛ emonisaka ete soki bato oyo bazali na lingomba moko te babalani, libala na bango ekufaka.
MAKAMBO OYO NAKOSALA
Soki nakómi kosepela na moto oyo azali mondimi te, nako ․․․․․
Mpo nayeba ndenge bato mosusu batalelaka moto oyo nalingani na ye, nakoki ․․․․․
Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․
OKANISI NINI?
● Bizaleli nini ya malamu okoya na yango na libala?
● Bizaleli nini ya ntina mingi okolinga ete moto oyo bokobalana azala na yango?
● Mikakatano nini ya minene ekoki kobima soki obalani na moto ya lingomba mosusu?
● Ndenge nini okoki koyeba bomoto, bizaleli, mpe ndenge bato balobaka mpo na moto oyo bolingani?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 37]
“Makambo oyo moto oyo olingani na ye azali kosala epai ya bandeko na ye, akosala yango mpe epai na yo.”—Tony
[Etanda na lokasa 34]
“Bókangana te na ekanganeli ya mabe”
“Bókangana te na ekanganeli ya mabe esika moko na bato oyo bazali bandimi te.” Na ntembe te, omonaka ete toli wana oyo ezali na 2 Bakorinti 6:14 ebongi mpe mpo na yo. Atako bongo, ekoki kokómela yo osepela na moto moko oyo azali motatoli te. Mpo na nini? Ntango mosusu kitoko na ye ekoki kobenda yo. Elenge mobali moko na nkombo Marc alobaki boye: “Nazalaki ntango nyonso komona elenge mwasi wana na ntango ya kosala ngalasisi na kelasi. Azalaki kosala nyonso mpo na koya kosolola na ngai. Eumelaki te, tokómaki baninga.”
Soki omiyebi malamu mpe oyebi ete mitinda oyo olandaka ezali na ntina mingi; lisusu, soki ozali moto oyo akɔmɛli mpe ezali mpasi motema na yo ekosa yo, okoyeba oyo osengeli kosala. Ata soki moto yango azali mpenza kitoko, to azali komonana ete azali na bizaleli malamu, akosalisa yo te okolisa boninga na yo na Nzambe.—Yakobo 4:4.
Nzokande, soki lolango ekoli makasi, ezalaka mpasi kokata yango; yango nde likambo elenge mwasi moko na nkombo Cindy amonaki. Alobi boye: “Nazalaki kolela mokolo na mokolo. Nazalaki ntango nyonso kokanisa mwana mobali yango, ata na makita. Nalingaki ye mingi mpe nazalaki komona malamu kutu nakufa, na esika nazanga ye.” Kasi, eumelaki te, Cindy amonaki ntina oyo mama na ye apesaki ye toli ete alingana te na moto oyo azali motatoli te. Alobi boye: “Nasalaki malamu ndenge nakabwanaki na ye. Natye mpenza motema ete Yehova akokokisa bamposa na ngai.”
Yo mpe okutani na likambo oyo Cindy akutanaki na yango? Soki ezali bongo, kobundana na yango yo moko te! Okoki kosolola na baboti na yo. Yango nde Julien asalaki ntango akómaki kosepela na elenge mwasi moko na kelasi. Alobi boye: “Nsukansuka, nasɛngaki baboti na ngai básalisa ngai. Yango nde esalisaki ngai nalonga.” Bankulutu ya lisangá mpe bakoki kosalisa yo. Mpo na nini te koyebisa moko na bango mokakatano oyo ozali na yango?—Yisaya 32:1, 2.
[Etanda/Elilingi na lokasa 39]
Etanda ya mituna
Akozala mobali ya malamu mpo na ngai?
Makambo ya ntina mingi
◻ Soki azali na bokonzi, ndenge nini asalelaka yango?—Matai 20:25, 26.
◻ Mikano na ye ezali nini?—1 Timote 4:15.
◻ Azali sikoyo kosala makasi mpo akokisa mikano yango?—1 Bakorinti 9:26, 27.
◻ Ndenge nini atalelaka bato ya libota na ye?—Kobima 20:12.
◻ Banani bazali baninga na ye?—Masese 13:20.
◻ Abɛtaka masolo ya ndenge nini?—Luka 6:45.
◻ Ndenge nini atalelaka mbongo?—Baebre 13:5, 6.
◻ Alingaka masano ya ndenge nini?—Nzembo 97:10.
◻ Ndenge nini amonisaka ete alingaka Yehova?—1 Yoane 5:3.
Makambo na ye ya malamu
◻ Azali makasi na mosala?—Masese 6:9-11.
◻ Ayebi kosalela mbongo?—Luka 14:28.
◻ Bato balobaka malamu mpo na ye?—Misala 16:1, 2.
◻ Amibanzabanzaka mpo na basusu?—Bafilipi 2:4.
Makambo ya kokeba na yango
◻ Asilikaka noki?—Masese 22:24.
◻ Alukaka bókóma na etamboli ya nsɔni?—Bagalatia 5:19.
◻ Abɛtaka na nzoto to azokisaka basusu na maloba?—Baefese 4:31.
◻ Alingaka komɛla masanga mpo na komisepelisa?—Masese 20:1.
◻ Azalaka moto ya zuwa mpe akanisaka kaka makambo na ye?—1 Bakorinti 13:4, 5.
[Etanda/Elilingi na lokasa 40]
Etanda ya mituna
Akozala mwasi ya malamu mpo na ngai?
Makambo ya ntina mingig
◻ Amonisaka mpenza botosi na libota na bango mpe na lisangá?—Baefese 5:21, 22.
◻ Ndenge nini atalelaka bato ya libota na ye?—Kobima 20:12.
◻ Banani bazali baninga na ye?—Masese 13:20.
◻ Abɛtaka masolo ya ndenge nini?—Luka 6:45.
◻ Ndenge nini atalelaka mbongo?—1 Yoane 2:15-17.
◻ Mikano na ye ezali nini?—1 Timote 4:15.
◻ Azali sikoyo kosala makasi mpo akokisa mikano yango?—1 Bakorinti 9:26, 27.
◻ Alingaka masano ya ndenge nini?—Nzembo 97:10.
◻ Ndenge nini amonisaka ete alingaka Yehova?—1 Yoane 5:3.
Makambo na ye ya malamu
◻ Azali makasi na mosala?—Masese 31:17, 19, 21, 22, 27.
◻ Ayebi kosalela mbongo?—Masese 31:16, 18.
◻ Bato balobaka malamu mpo na ye?—Ruta 3:11.
◻ Amibanzabanzaka mpo na basusu?—Masese 31:20.
Makambo ya kokeba na yango
◻ Azalaka matata?—Masese 21:19.
◻ Alukaka bókóma na etamboli ya nsɔni?—Bagalatia 5:19.
◻ Abɛtaka na nzoto to azokisaka basusu na maloba?—Baefese 4:31.
◻ Alingaka komɛla masanga mpo na komisepelisa?—Masese 20:1.
◻ Azalaka moto ya zuwa mpe akanisaka kaka makambo na ye?—1 Bakorinti 13:4, 5.
[Elilingi na lokasa 30]
Sapato nyonso te nde ekokoka yo; ndenge moko mpe, moto nyonso te nde akoki kozala mobali to mwasi oyo abongi mpo na yo
[Elilingi na lokasa 31]
Okanisi ete liboso ya kosomba motuka esengeli kotala yango malamu, na esika ya kotala kaka kitoko na yango? Mpo na kopona moto bokobalana, esengeli kotala malamu mpenza!