MOKAPO YA MWAMBE
Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
1. Libondeli nini oyo bato mingi bayebi tokolobela sikoyo?
BAMILIO ya bato bayebi libondeli oyo eyebani, oyo babengaka Tata wa biso, to libondeli ya Nkolo. Yesu asalelaki libondeli yango mpo na koteya bayekoli na ye ndenge ya kobondela. Abondelaki mpo na makambo nini? Mpe mpo na nini libondeli yango ezali na ntina mpo na biso lelo?
2. Wapi makambo misato ya ntina Yesu ateyaki biso tóbondelaka mpo na yango?
2 Yesu alobaki: “Bosengeli kobondela boye: ‘Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama [to ezala mosantu]. Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.’” (Tángá Matai 6:9-13.) Mpo na nini Yesu ateyaki biso tóbondelaka mpo na makambo wana misato?—Talá Etanda 20.
3. Makambo nini tosengeli koyeba mpo na Bokonzi ya Nzambe?
3 Toyekolaki ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova. Tolobelaki mpe mokano ya Nzambe mpo na bato mpe mabele. Kasi, Yesu alingaki koloba nini ntango alobaki: “Bokonzi na yo eya”? Tokoyeba soki Bokonzi ya Nzambe ezali nini, ekosala nini, mpe ndenge nini ekosantisa nkombo ya Nzambe.
BOKONZI YA NZAMBE EZALI NINI?
4. Bokonzi ya Nzambe ezali nini, mpe nani azali Mokonzi na yango?
4 Yehova atyá guvɛrnema moko na likoló mpe aponá Yesu azala Mokonzi na yango. Biblia ebengi guvɛrnema yango Bokonzi ya Nzambe. Yesu azali “Mokonzi ya baoyo bazali bakonzi mpe Nkolo ya baoyo bazali bankolo.” (1 Timote 6:15) Yesu akoki kosala makambo ya malamu koleka bakonzi nyonso ya mokili, mpe azali na nguya koleka bakonzi nyonso, ata soki basangani.
5. Guvɛrnema ya Nzambe ezali wapi? Ekoyangela nini?
5 Yesu azongaki na likoló mikolo 40 nsima ya lisekwa na ye. Nsukansuka, Yehova atyaki ye Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe. (Misala 2:33) Guvɛrnema ya Nzambe ezali na likoló kasi ekoyangela mabele. (Emoniseli 11:15) Yango wana, Biblia ebengi Bokonzi ya Nzambe ‘bokonzi ya likoló.’—2 Timote 4:18.
6, 7. Mpo na nini Yesu azali Mokonzi ya malamu koleka bakonzi nyonso ya mokili?
6 Biblia elobi ete Yesu aleki bakonzi nyonso ya bato mpo “kaka ye moko nde akoki te kokufa.” (1 Timote 6:16) Nsukansuka, bato nyonso oyo bazali bakonzi bakokufa, kasi Yesu akokufa te. Makambo nyonso ya malamu oyo Yesu akosalela biso ekoumela libela na libela.
7 Biblia esakolaki ete Yesu akozala Mokonzi ya sembo mpe ya motema mawa; elobaki: “Elimo ya Yehova ekofanda mpenza likoló na ye, elimo ya bwanya mpe ya mayele, elimo ya toli mpe ya nguya, elimo ya boyebi mpe ya kobanga Yehova; mpe akosepela na kobanga Yehova. Mpe akosambisa te na kolanda kaka oyo ekomonana na miso na ye, mpe akopamela [to akopesa toli] te na kolanda kaka likambo oyo matoi na ye eyoki. Mpe akosambisa na boyengebene mpenza bato oyo bazangá [to babola].” (Yisaya 11:2-4) Okolinga kozala na mokonzi ya ndenge wana?
8. Ndenge nini toyebi ete Yesu akoyangela ye moko te?
8 Nzambe aponá bato mosusu mpo báyangela elongo na Yesu na guvɛrnema ya likoló. Na ndakisa, ntoma Paulo ayebisaki Timote: “Soki tokobi koyika mpiko, tokoyangela mpe elongo na ye.” (2 Timote 2:12) Bato boni bakoyangela elongo na Yesu?
9. Bato boni bakoyangela elongo na Yesu? Ntango nini Nzambe abandaki kopona bato yango?
9 Ndenge tomonaki yango na Mokapo 7, na emonaneli moko ntoma Yoane amonaki Mokonzi Yesu na likoló elongo na bakonzi mosusu 144 000. Bato 144 000 yango ezali banani? Yoane alobi ete “nkombo [ya Yesu] mpe nkombo ya Tata na ye ekomamá na bilongi na bango.” Mpe abakisi: “Bango bazali bato oyo bazali kokoba kolanda Mwana-Mpate [elingi koloba Yesu] epai nyonso oyo azali kokende. Bango basombamaki na kati ya bato.” (Tángá Emoniseli 14:1, 4.) Bato 144 000 yango ezali bakristo ya sembo oyo Nzambe aponá mpo ‘báyangela mabele’ elongo na Yesu. Soki bakufi, basekwaka mpo na kokende na likoló. (Emoniseli 5:10) Banda na ntango ya bantoma, Yehova abandaki kopona bakristo ya sembo mpo bázala na kati ya bakonzi yango 144 000.
10. Lokola Yehova aponi Yesu ná bato 144 000 báyangela bato, mpo na nini yango emonisi bolingo na ye?
10 Yehova alingi biso mingi, yango wana aponi bato mpo báyangela elongo na Yesu. Yesu akozala mokonzi ya malamu mpo ayebi komitya na esika na biso. Ayebi mpasi oyo bato bamonaka mpo azalaki mpe moto lokola biso. Ntoma Paulo alobaki ete Yesu amityaka na esika na biso, akoki “koyokela biso mawa,” mpe “amekamaki na makambo nyonso lokola biso.” (Baebre 4:15; 5:8) Bato 144 000 mpe bayebi mpasi oyo bato bamonaka mpo bazalaki bato lokola biso. Bango moko bazalaki bato ya masumu mpe bazalaki kobɛla. Na yango, tokoki kotya motema ete Yesu ná bato 144 000 bakosuka kaka te na koyeba ndenge tozali koyoka, kasi bakoyeba mpe mikakatano oyo tozali kokutana na yango.
BOKONZI YA NZAMBE EKOSALA NINI?
11. Mpo na nini Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka ete mokano ya Nzambe esalema na likoló?
11 Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka ete mokano ya Nzambe esalema na likoló. Mpo na nini? Na Mokapo 3 toyekolaki ete Satana Zabolo atombokelaki Yehova. Nsima ya botomboki ya Satana, Yehova atikaki ye ná baanzelu oyo balandaki ye, to bademo, báfanda kaka kuna na likoló mpo na mwa ntango. Na yango, bikelamu nyonso te na likoló nde bazalaki kosala mokano ya Nzambe. Na Mokapo 10, tokoyekola makambo mosusu etali Satana mpe bademo.
12. Wapi makambo mibale ya ntina mingi oyo Emoniseli 12:10 elobeli?
12 Biblia elobi ete mwa moke nsima ya ntango oyo Yesu akómaki Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe, abundaki na Satana. (Tángá Emoniseli 12:7-10.) Vɛrsɛ 10 elobeli makambo mibale ya ntina mingi. Ya liboso, Bokonzi ya Nzambe, oyo Yesu Kristo azali mokonzi na yango, ebandi koyangela mpe ya mibale, babengani Satana na likoló mpe abwakami na mabele. Ndenge tokomona yango, makambo yango esilá kosalema.
13. Nini esalemaki na likoló ntango babenganaki Satana?
13 Biblia elobeli esengo oyo baanzelu ya sembo bazalaki na yango ntango babenganaki Satana ná bademo na ye na likoló: “Bósepela, bino likoló mpe bino baoyo bofandi na likoló!” (Emoniseli 12:12) Sikoyo, likoló ezali na kimya mpe na bomoko makasi mpo baanzelu nyonso kuna bazali kosala mokano ya Nzambe.
14. Makambo nini ezali kosalema na mabele mpo babenganá Satana na likoló?
14 Kasi bomoi ezali mpenza ndenge mosusu awa na mabele. Makambo ya nsɔmɔ ezali kosalema ‘mpo Zabolo akiteli biso,’ mpe azali “na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na ntango mokuse.” (Emoniseli 12:12) Satana azali na nkanda makasi. Babenganá ye na likoló mpe ayebi ete etikali moke abomama. Azali kosala nyonso mpo na kobimisa mobulu, bitumba, mpe bampasi na mabele mobimba.
15. Mokano ya Nzambe mpo na mabele ezali nini?
15 Mokano ya Nzambe mpo na mabele ebongwaná te. Alingi kaka bato ya kokoka báfanda libela na libela na mabele oyo ekokóma paradiso. (Nzembo 37:29) Ndenge nini Bokonzi ya Nzambe ekosala yango?
16, 17. Danyele 2:44 eyebisi biso nini mpo na Bokonzi ya Nzambe?
16 Esakweli oyo ezali na Danyele 2:44 elobi: “Na mikolo ya bakonzi yango, Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko oyo ekobebisama te. Mpe bokonzi yango ekoleka na ekólo mosusu te. Ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala seko.” Esakweli oyo eteyi biso nini mpo na Bokonzi ya Nzambe?
17 Ya liboso, eyebisi biso ete Bokonzi ya Nzambe ekoyangela na “mikolo ya bakonzi yango.” Yango elimboli ete baguvɛrnema mosusu ekozala awa na mabele ntango Bokonzi yango ekoyangela. Ya mibale, Bokonzi ya Nzambe ekoumela libela mpe guvɛrnema mosusu ekozwa esika na yango te. Ya misato, Bokonzi ya Nzambe ekobunda etumba na baguvɛrnema ya mokili oyo. Ekolonga etumba yango mpe ekotikala guvɛrnema kaka moko mpo na koyangela mabele. Na yango, bato bakozwa guvɛrnema oyo eleki malamu.
18. Nkombo ya etumba ya nsuka oyo ekozala kati na Bokonzi ya Nzambe mpe baguvɛrnema ya mokili oyo ezali nini?
18 Ndenge nini Bokonzi ya Nzambe ekobanda koyangela mabele? Liboso ya etumba ya nsuka, oyo babengi Armagedone, bademo bakokosa “bakonzi ya mabele mobimba esika bato bafandi, mpo na koyanganisa bango mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” Baguvɛrnema ya bato ekobunda na Bokonzi ya Nzambe.—Emoniseli 16:14, 16; talá Etanda 10.
19, 20. Mpo na nini Bokonzi ya Nzambe esengeli koyangela mabele?
19 Mpo na nini tosengeli na Bokonzi ya Nzambe? Mpo na makambo soki misato. Ya liboso, tozali bato ya masumu; yango wana tobɛlaka mpe tokufaka. Kasi, Biblia elobi ete ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela, tokozala na bomoi libela na libela. Kutu, Yoane 3:16 elobi: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.”
20 Ya mibale, tosengeli na Bokonzi ya Nzambe mpo tofandi na mokili oyo etondi na bato mabe. Bato mingi bakosaka, bayibaka, basalaka makambo ya mbindo. Biso tokoki kosala eloko moko te mpo na kolongola bango, kaka Nzambe nde akolongola bango. Bato oyo bazali kaka kosala mabe bakobomama na Armagedone. (Tángá Nzembo 37:10.) Ya misato, tosengeli na Bokonzi ya Nzambe mpo baguvɛrnema ya bato ezali na nguya te, enyokolaka bato mpe etondi na lokuta. Esalisaka bato te bátosa Nzambe. Biblia elobi ete “moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.”—Mosakoli 8:9.
21. Ndenge nini Bokonzi ekosala ete mokano ya Nzambe esalema awa na mabele?
21 Nsima ya Armagedone, Bokonzi ya Nzambe ekosala ete mokano ya Nzambe esalema na mabele mobimba. Na ndakisa, ekolongola Satana ná bademo na ye. (Emoniseli 20:1-3) Nsukansuka, moto moko te akobɛla to akokufa. Na nzela ya lisiko, bato nyonso ya sembo bakofanda na Paradiso libela na libela. (Emoniseli 22:1-3) Bokonzi ya Nzambe ekosantisa nkombo ya Nzambe. Yango elimboli nini? Elimboli ete ntango guvɛrnema ya Nzambe ekoyangela mabele, bato nyonso bakokumisa nkombo ya Yehova.—Talá Etanda 21.
NTANGO NINI YESU AKÓMAKI MOKONZI?
22. Ndenge nini toyebi ete Yesu akómaki Mokonzi te ntango azalaki awa na mabele to mbala moko nsima ya lisekwa na ye?
22 Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka: “Bokonzi na yo eya.” Yango emonisi ete guvɛrnema ya Nzambe esengelaki koya na nsima. Yehova asengelaki naino kotya guvɛrnema yango mpe kotya Yesu Mokonzi na yango. Yesu atyamaki nde Mokonzi mbala moko ntango azongaki na likoló? Te, azelaki naino. Mwa bambula nsima ya lisekwa ya Yesu, ntoma Petro mpe ntoma Paulo bamonisaki yango polele ntango basalelaki esakweli oyo ezali na Nzembo 110:1 mpo na kolobela Yesu. Na esakweli yango, Yehova alobi: “Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali, tii nakotya banguna na yo lokola ebonga ya makolo na yo.” (Misala 2:32-35; Baebre 10:12, 13) Ntango boni Yesu azelaki liboso ete Yehova atya ye Mokonzi?
Bokonzi ya Nzambe ekosala ete mokano ya Nzambe esalema na mabele
23. (a) Ntango nini Yesu akómaki Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe? (b) Tokoyekola nini na mokapo oyo elandi?
23 Bambula mingi liboso ya 1914, mwa bakristo oyo bazalaki mpenza koluka koyeba solo basosolaki ete 1914 ekozala mobu moko ya ntina mingi na kolanda esakweli ya Biblia. Makambo oyo ezali kosalema na mokili banda mobu 1914 emonisi ete bamikosaki te. Yesu akómaki Mokonzi na mobu wana. (Nzembo 110:2) Mwa moke na nsima, Satana abwakamaki na mabele, mpe sikoyo “ayebi ete azali na ntango mokuse.” (Emoniseli 12:12) Na mokapo oyo elandi, tokomona makambo mosusu oyo emonisi mpenza ete tozali na ntango ya nsuka. Tokomona mpe ete etikali moke, Bokonzi ya Nzambe esala ete mokano ya Nzambe esalema na mabele mobimba.—Talá Etanda 22.