LISOLO YA BOYEKOLI 2
Mateya oyo tokoki kozwa epai ya “moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi”
“Tókoba kolingana, mpo bolingo euti na Nzambe.”—1 YOA. 4:7.
LOYEMBO 105 “Nzambe azali bolingo”
NA MOKUSEa
1. Bolingo ya Nzambe esalisaka biso tómiyoka ndenge nini?
NTOMA Yoane akomaki ete: “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoa. 4:8) Toyebi ete Nzambe nde akelaki bomoi. Kasi, mwa maloba yango esalisi biso tómona ete bolingo mpe eutaka epai na ye. Yehova alingaka biso! Bolingo na ye, esalisaka biso tómiyoka ete tobatelami mpe epesaka biso esengo mpenza.
2. Na kotalela Matai 22:37-40, wapi mibeko mibale oyo eleki monene, mpe mpo na nini na bantango mosusu ezalaka mpasi kotosa mobeko ya mibale?
2 Bakristo bakoki te kopona soki bakomonisa bolingo to te. Ezali nde mobeko. (Tángá Matai 22:37-40.) Soki toyebi Yehova malamu, ekozala mpasi te tótosa mobeko na ye ya liboso. Lokola Yehova azali Nzambe ya kokoka, atyelaka biso likebi mpe asalelaka biso makambo na boboto. Kasi ekoki kozala mpasi mpo tótosa mobeko na ye ya mibale. Mpo na nini? Mpo bandeko na biso ya lisangá, oyo bazali mpe bazalani na biso, bazali bato ya kozanga kokoka. Yango wana na bantango mosusu, bakoki koloba to mpe kosalela biso makambo na boboto te. Yehova ayebaki ete ekozala mpasi tótosa mobeko wana; yango wana asalelaki bato mosusu oyo bakomaki Biblia mpo báteya biso ntina oyo tosengeli komoniselana bolingo mpe ndenge ya kosala yango. Yoane azalaki moko ya bato yango.—1 Yoa. 3:11, 12.
3. Yoane abɛti nsɛtɛ na likambo nini?
3 Na mikanda oyo Yoane akomaki, abɛti nsɛtɛ ete bakristo basengeli komoniselana bolingo. Kutu, soki osangisi mokanda oyo Matai, Marko mpe Luka bakomaki mpo na bomoi ya Yesu mpe okokanisi yango na oyo Yoane akomaki, okomona ete mokanda ya Yoane nde esaleli liloba “bolingo” mpe “alingaki” mbala mingi koleka mikanda na bango nyonso. Yoane azalaki na mbula soki nkama moko ntango akomaki Evanzile mpe mikanda na ye misato. Mikanda yango ya Biblia ezali koteya biso ete bolingo nde esengeli kotambwisa makambo nyonso oyo bakristo basalaka. (1 Yoa. 4:10, 11) Kasi esɛngaki ntango mingi mpenza liboso Yoane akanga ntina ya likambo yango.
4. Yoane azalaki ntango nyonso komonisela bato bolingo? Limbolá.
4 Ntango Yoane azalaki elenge, azalaki ntango nyonso te komonisa bolingo. Na ndakisa, mokolo moko, Yesu ná bayekoli na ye bazalaki koleka na Samaria mpo na kokende na Yerusaleme. Bato ya mwa mboka moko ya Samaria baboyaki koyamba bango. Yoane asalaki nini? Ye ná ndeko na ye Yakobo basɛngaki Yesu apesa bango nzela bábenga mɔtɔ euta na likoló mpe ekitela bato nyonso ya mwa mboka yango mpe eboma bango! (Luka 9:52-56) Mokolo mosusu, Yoane amoniselaki bantoma mosusu bolingo te. Emonani ete ye ná ndeko na ye Yakobo nde batindaki mama na bango asɛnga Yesu apesa bango bisika ya lokumu elongo na Yesu na Bokonzi ya Nzambe. Ntango bantoma mosusu bayebaki likambo yango, basilikaki! (Mat. 20:20, 21, 24) Kasi, atako Yoane asalaki mabunga nyonso wana, Yesu azalaki kolinga ye kaka.—Yoa. 21:7.
5. Tokolobela nini na lisolo oyo?
5 Na lisolo oyo, tokolobela ndakisa ya Yoane, mpe makambo mosusu oyo akomaki na ntina etali bolingo. Yango ekosalisa biso tóyeba ndenge oyo tokoki komonisela bandeko na biso bolingo. Tokoyekola mpe ndenge oyo tata ya libota akoki komonisa ete alingaka bato ya libota na ye.
BOLINGO EMONANAKA NA MISALA
6. Ndenge nini Yehova amonisi ete alingaka biso?
6 Mbala mingi tokanisaka ete kolinga moto elimboli kaka komonisa ye ete tosepelaka na ye to kolobaka na ye maloba ya kitoko. Kasi bolingo ya solosolo esukaka kaka na maloba te; emonanaka mpe na misala. (Talá mpe Yakobo 2:17, 26.) Na ndakisa, Yehova alingaka biso. (1 Yoa. 4:19) Amonisi bolingo yango na maloba ya kitoko oyo akomisá na Biblia. (Nz. 25:10; Rom. 8:38, 39) Nzokande, toyebi ete Nzambe alingaka biso, kaka na maloba te, kasi mpe na makambo oyo asalaka. Yoane akomaki boye: “Na likambo oyo nde bolingo ya Nzambe emonisamaki polele mpo na biso, mpamba te Nzambe atindaki na mokili Mwana na ye se moko oyo abotamaki mpo biso tókoka kozwa bomoi na nzela na ye.” (1 Yoa. 4:9) Yehova atikaki ete Mwana na ye ya bolingo anyokwama mpe akufa mpo na biso. (Yoa. 3:16) Na yango, ezali polele ete Yehova alingaka biso.
7. Yesu asalaki nini mpo na komonisa ete alingaka biso?
7 Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete alingaka bango. (Yoa. 13:1; 15:15) Amonisaki ete alingaki bango mpe alingaka biso mingi kaka na maloba te, kasi mpe na makambo oyo asalaki. Alobaki boye: “Ata moto moko te azali na bolingo koleka oyo, ete moto akaba molimo na ye mpo na baninga na ye.” (Yoa. 15:13) Soki tokanisi makambo oyo Yehova ná Yesu basalelá biso, yango esengeli kotinda biso tósala nini?
8. Mokanda ya 1 Yoane 3:18 elobi ete tosengeli kosala nini?
8 Tokomonisa ete tolingaka Yehova ná Yesu soki tozali kotosa bango. (Yoa. 14:15; 1 Yoa. 5:3) Kutu Yesu apesaki biso mitindo ete tólinganaka. (Yoa. 13:34, 35) Tosengeli komonisa ete tolingaka bandeko na biso kaka na maloba te, kasi mpe na makambo oyo tosalelaka bango. (Tángá 1 Yoane 3:18.) Tosengeli mpenza kosala nini mpo na komonisa ete tolingaka bango?
LINGÁKÁ BANDEKO
9. Bolingo etindaki Yoane asala nini?
9 Yoane akokaki kotikala elongo na tata na ye mpe koluka mbongo na mosala ya koboma mbisi, oyo libota na bango ezalaki kosala. Kasi na esika asala bongo, asalelaki mikolo ya bomoi molai oyo atikalaki na yango mpo na kosalisa basusu báyeba makambo etali Yehova mpe Yesu. Lolenge ya bomoi oyo Yoane aponaki ezalaki pɛtɛɛ te. Akutanaki na minyoko ya makasi, mpe na nsuka ya siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso, babenganaki ye na mboka mpo azalaki kosakola. Na ntango yango, asilaki kokóma mobange. (Mis. 3:1; 4:1-3; 5:18; Em. 1:9) Ata ntango batyaki Yoane na bolɔkɔ mpo azalaki kosakola makambo etali Yesu, amonisaki mpenza ete azalaki kolinga bato. Na ndakisa, ntango azalaki na esanga ya Patimosi, akomaki emoniseli oyo bapesaki ye, mpe atindaki yango na masangá mpo báyeba makambo oyo “esengeli kosalema nsima ya mwa ntango moke.” (Em. 1:1) Mpe, ekoki kozala ete nsima ya kobima na bolɔkɔ na esanga ya Patimosi nde Yoane akomaki mokanda na ye oyo elobeli bomoi mpe mosala ya Yesu. Akomaki mpe mikanda misato mpo na kolendisa mpe kopesa bandeko makasi. Ndenge nini okoki komekola Yoane na likambo etali komonisa elimo ya komipimela?
10. Ndenge nini okoki komonisa ete olingaka bato?
10 Okomonisa ete olingaka bato na makambo oyo oponi kosala na bomoi na yo. Mokili ya Satana elingi ete osalela ntango mpe makasi na yo nyonso kaka mpo na litomba na yo moko. Na ndakisa, elingi osala nyonso mpo na konduka mbongo to koyebana na mokili. Kasi, na mokili mobimba, bakristo ebele bazali kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola mpe ya kosalisa bato bápusana penepene na Yehova. Bamosusu kutu bapesaka bomoi na bango mobimba kaka na mosala ya kosakola mpe ya koteya.
11. Ndenge nini basakoli mingi ya sembo bamonisaka ete balingaka Yehova mpe bandeko na bango?
11 Bandeko mingi ya sembo basalaka mosala ya mosuni mokolo mobimba mpo na kozwa eloko ya kobikela mpe kokokisa bamposa ya mabota na bango. Atako bongo, bakristo yango ya sembo bapesaka ebongiseli ya Nzambe mabɔkɔ na kotalela makoki na bango. Na ndakisa, bamosusu bazali kosalisa bandeko oyo bazwi makama, bamosusu bazali kopesa mabɔkɔ na misala ya kotonga bandako ya losambo, mpe moto nyonso azali na libaku ya kopesa makabo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba. Basalaka makambo nyonso wana mpo balingaka Nzambe mpe bato. Pɔsɔ na pɔsɔ, tomonisaka ete tolingaka bandeko na biso na ndenge toyanganaka, tosalaka masolo, mpe topesaka biyano na makita ya lisangá. Ata soki tolɛmbi ndenge nini, tozangaka makita te. Mpe ata soki tokoki kobanga, topesaka biyano kaka. Lisusu, atako biso moko mpe tozalaka na mikakatano, tolendisaka basusu liboso mpe nsima ya makita. (Ebr. 10:24, 25) Tozali mpenza na botɔndi mpo na mosala makasi oyo bandeko na biso bazali kosala!
12. Wapi lolenge mosusu oyo Yoane amonisaki ete azalaki kolinga bandeko na ye?
12 Mpo na komonisa ete azalaki kolinga bandeko, Yoane asukaki kaka te na kopesa bango longonya, kasi apesaki mpe bango toli. Na ndakisa, na mikanda oyo akomaki, Yoane apesaki bandeko longonya mpo na kondima mpe misala na bango ya malamu; kasi apesaki bango mpe toli ya polele na likambo etali lisumu. (1 Yoa. 1:8–2:1, 13, 14) Ndenge moko mpe, tosengeli kopesaka bandeko longonya mpo na makambo ya malamu oyo bazali kosala. Kasi, soki ndeko moko abandi kokolisa makanisi ya mabe to kosala makambo oyo ekoki kobebisa boyokani na ye ná Yehova, tokoki komonisa ete tolingaka ye soki, na boboto mpenza, topesi ye toli oyo ebongi. Esɛngaka kozala na mpiko mpo na kopesa moninga toli, kasi Biblia elobi ete baninga ya malamu bapesanaka toli to basembolanaka.—Mas. 27:17.
13. Makambo nini tosengeli koboya kosalaka?
13 Na bantango mosusu, tomonisaka ete tolingaka bandeko na biso na ndenge toboyaka kosala makambo mosusu. Na ndakisa, tosilikaka mpambampamba te mpo na makambo oyo balobaka. Kanisá likambo moko oyo esalemaki pene na nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabele. Ayebisaki bayekoli na ye ete mpo bázwa bomoi ya seko, basengelaki kolya mosuni na ye mpe komɛla makila na ye. (Yoa. 6:53-57) Bayekoli mingi ya Yesu basepelaki te na maloba wana, yango wana batikaki kolanda ye. Kasi baninga ya motema ya Yesu, na ndakisa Yoane, bakimaki ye te. Bakangaki ntina ya maloba ya Yesu te, mpe ekoki kozala ete ekamwisaki bango. Atako bongo, basilikaki te mpe bakanisaki te ete makambo oyo Yesu alobaki ezalaki mabe. Batyelaki ye nde motema mpo bayebaki ete makambo oyo alobaki ezalaki mpenza solo. (Yoa. 6:60, 66-69) Ezali mpenza na ntina ete tósilikaka mpambampamba te mpo na makambo oyo baninga balobi! Kasi, tópesaka bango nde libaku ya kolimbwela biso makambo oyo balingi mpenza koloba.—Mas. 18:13; Mos. 7:9.
14. Mpo na nini tosengeli soki moke te koyina bandeko na biso?
14 Yoane apesi mpe biso toli ete tóyinaka bandeko na biso te. Soki toboyi kotosa toli yango, tokopesa Satana nzela mpo akonza biso. (1 Yoa. 2:11; 3:15) Yango nde likambo oyo ekómelaki bakristo mosusu na nsuka ya siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso. Na ntango wana, Satana azalaki kosala nyonso oyo akoki mpo akɔtisa koyinana mpe bokabwani kati na basaleli ya Nzambe. Ntango Yoane azalaki kokoma mikanda na ye, mibali oyo bazalaki na makanisi lokola oyo ya Satana, bakɔtaki na kati ya lisangá. Na ndakisa, Diotrefese azalaki kokɔtisa bokabwani makasi na lisangá moko. (3 Yoa. 9, 10) Azalaki komemya ata moke te bankulutu oyo lisangani ya mikóló-bakambi ezalaki kotinda. Alukaki kutu kolongola na lisangá bandeko oyo bazalaki koyamba malamu bato oyo ye azalaki kolinga te. Azalaki mpenza na lofundo! Lelo oyo, Satana azali kosala nyonso oyo akoki mpo na kokabola basaleli ya Nzambe. Tosengeli soki moke te koyina bandeko na biso mpe kotika kosalisa bango.
LINGÁKÁ LIBOTA NA YO
15. Likambo nini tata ya libota asengeli kobosana te?
15 Likambo moko ya ntina mingi oyo tata asengeli kosala mpo na komonisa ete alingaka bato ya libota na ye ezali ya kokokisa bamposa na bango ya mosuni. (1 Tim. 5:8) Kasi, asengeli kobosana te ete biloko ya mosuni ekoki te kokokisa bamposa ya elimo ya bato ya libota na ye. (Mat. 5:3) Tólobela ndakisa malamu oyo Yesu atikelá batata ya mabota. Evanzile oyo Yoane akomaki emonisi ete ata ntango Yesu azalaki konyokwama likoló ya nzete ya mpasi, azalaki kaka kokanisa bato ya libota na bango. Yoane atɛlɛmaki pene ya Maria, mama ya Yesu, na esika oyo bazalaki koboma Yesu. Atako Yesu azalaki koyoka mpasi makasi mpenza, asɛngaki Yoane abatela Maria, mama na ye. (Yoa. 19:26, 27) Yesu azalaki na balɛki oyo bakokaki kokokisa bamposa ya Maria ya mosuni, kasi emonani ete na ntango wana, ata moko na bango te akómaki moyekoli ya Yesu. Yango wana, Yesu alingaki komindimisa ete ezali na moto oyo akokoba kokokisa bamposa ya Maria ya mosuni mpe ya elimo.
16. Mikumba nini Yoane azalaki na yango?
16 Yoane azalaki na mikumba mingi. Lokola azalaki ntoma, asengelaki kosakola na molende mpenza. Ekoki mpe kozala ete abalaki. Na yango, asengelaki kozala na bokatikati na oyo etali kokokisa bamposa ya mosuni ya bato ya libota na ye mpe kosalisa bango bázala na boyokani malamu ná Yehova. (1 Ko. 9:5) Yango ekoki koteya batata ya mabota nini?
17. Mpo na nini ezali na ntina ete tata ya libota asalisa bato ya libota na ye básalela Yehova?
17 Ndeko oyo azali tata ya libota akoki kozala na mikumba mingi. Na ndakisa, asengeli kozala gɔigɔi te na mosala na ye, mpo akoka kopesa Yehova lokumu. (Ef. 6:5, 6; Tito 2:9, 10) Akoki mpe kozala na mikumba mingi na lisangá, na ndakisa, kobatela bandeko mpe kolendisa bango na elimo, mpe kozala ndakisa na mosala ya kosakola. Asengeli mpe koyekolaka Biblia mbala na mbala na mwasi mpe bana na ye. Soki asali bongo, bato ya libota na ye bakozala na botɔndi na eloko nyonso oyo akosala mpo na kosalisa bango bázalaka nzoto kolɔngɔnɔ mpe na esengo. Bakosepela mpe na ndenge azali kosalisa bango bákoba kosalela Yehova.—Ef. 5:28, 29; 6:4.
“BÓTIKALA NA KATI YA BOLINGO NA NGAI”
18. Yoane ayebaki likambo nini?
18 Yoane aumelaki na bomoi mpe akutanaki na makambo mingi ya malamu. Akutanaki mpe na mikakatano ya ndenge na ndenge oyo ekokaki kolɛmbisa kondima na ye. Kasi, asalaki ntango nyonso makasi mpo atosa mitindo ya Yesu, ata mpe mobeko ya kolinga bandeko. Mpo na yango, Yoane ayebaki ete Yehova ná Yesu balingaki ye, mpe ete bakokaki kopesa ye makasi ya kolonga ata komekama ya ndenge nini. (Yoa. 14:15-17; 15:10; 1 Yoa. 4:16) Eloko moko te oyo Satana ná mokili na ye bakokaki kosala ekokaki kopekisa Yoane alinga bandeko na maloba mpe na misala.
19. Mokanda ya 1 Yoane 4:7 ezali kolendisa biso tósala nini, mpe mpo na nini?
19 Ndenge moko na Yoane, biso mpe tozali kofanda na mokili oyo Satana azali koyangela; alingaka ata moto moko te. (1 Yoa. 3:1, 10) Mposa na ye ezali ete tótika kolinga bandeko na biso, kasi akolonga te; lobá kaka soki biso moko topesi ye nzela. Tiká ete tózwa ekateli ya kolinga bandeko na biso, tómonisela bango bolingo kaka na maloba te kasi mpe na makambo oyo tosalelaka bango. Soki tosali bongo, tokoyoka esengo ya kozala na kati ya libota ya Yehova, mpe tokozala na bomoi ya esengo.—Tángá 1 Yoane 4:7.
LOYEMBO 88 Teyá ngai banzela na yo
a Tokoki mpenza koloba ete ntoma Yoane azalaki “moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi.” (Yoa. 21:7) Atako azalaki elenge ntango azalaki elongo na Yesu, Yoane azalaki na bizaleli mingi ya malamu. Na nsima, ntango akómaki mobange, Yehova asalelaki ye mpo akoma makambo mingi na ntina etali bolingo. Lisolo oyo ekolobela na mokuse mwa makambo mosusu oyo Yoane akomaki mpe tokomona makambo oyo tokoki koyekola na ndakisa na ye.
b NDIMBOLA YA BILILINGI: Tata moko ya libota azali kosunga bandeko oyo bazwi likama, azali kopesa makabo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba, mpe azali kobenga bandeko báya kosangana na libota na ye mpo na losambo na kati ya libota.