Ndenge ya kokómisa lisusu boyokani na yo ná Yehova makasi
MBULA na mbula, bato mingi bazongisamaka lisusu na lisangá ya Yehova. Kanisá ‘esengo monene oyo ezalaka na likoló’ mbala nyonso oyo moto moko azongisami na lisangá! (Luka 15:7, 10) Soki outi kozongisama na lisangá, yebá ete Yesu, baanzelu mpe Yehova ye moko basepeli mingi mpenza mpo na likambo yango. Kasi wana ozali kokómisa lisusu boninga na yo ná Yehova makasi, okoki kokutana na mwa mikakatano. Mikakatano nini, mpe nini ekoki kosalisa yo?
MIKAKATANO OYO OKOKI KOKUTANA NA YANGO
Bandeko mingi bakobaka kaka kobunda na makanisi ya mabe ata nsima ya kozongisama na lisangá. Mbala mosusu ozali komiyoka lokola Mokonzi Davidi. Ata nsima ya kolimbisama ya masumu na ye, alobaki boye: “Makambo ya libunga eleki ngai na makasi.” (Nz. 40:12; 65:3) Ata nsima ya kozongisama na lisangá, moto akoki kokoba komiyoka kaka ete amemi ngambo, ata mpe koyoka nsɔni na boumeli ya bambula mingi. Isabelle alongolamaki na lisangá mpe azongisamaki nsima ya mbula 20.a Alobi boye: “Ezalaki mpenza mpasi nandima ete Yehova akokaki kolimbisa ngai.” Soki olɛmbi nzoto, yango ekoki kolɛmbisa yo lisusu na elimo. (Mas. 24:10) Kotika te likambo yango ekómela yo.
Basusu bamonaka ete ezali mpasi básala makambo nyonso oyo esengeli mpo bázongisa lisusu boninga makasi ná Yehova. Nsima ya kozongisama na lisangá, ndeko mobali moko na nkombo Antoine alobaki boye: “Nayokaki lokola nabosanaki makambo nyonso oyo nayekolaki mpe oyo nazalaki kosala ntango nazalaki Motatoli ya Yehova.” Komiyoka bongo ekoki kosala ete bato mosusu bámipesa mobimba te na makambo ya elimo.
Na ndakisa, soki mopɛpɛ moko makasi ebebisi ndako ya moto moko, akoki komitungisa mpenza soki akanisi ntango mpe makasi oyo ekosɛnga mpo na kotonga yango lisusu. Ndenge moko mpe, soki lisumu moko ya monene oyo osalaki ebebisi boninga na yo elongo na Yehova, okoki komona ete ekosɛnga osala lisusu milende mingi mpo na kobongisa likambo yango. Kasi yebá ete okosala yango na makasi na yo moko te.
Yehova ayebisi biso boye: “Bóya mpe tóbongisa makambo kati na biso.” (Yis. 1:18) Osili kosala makasi mpo na ‘kobongisa makambo.’ Yehova alingaka yo ndenge osali milende wana. Kanisá naino: lokola ozongisami na lisangá, opesi Yehova likoki ya komonisa ete Satana azali mobuki-lokuta!—Mas. 27:11.
Kosala bongo esalisi yo opusana lisusu penepene na Yehova. Alaki ete ye mpe akopusana penepene na yo. (Yak. 4:8) Ezali malamu bandeko mosusu bámona ete ozongisami na lisangá. Kasi osengeli kosuka kaka wana te. Osengeli kokoba kokómisa makasi bolingo na yo mpo na Moninga mpe Tata na yo, Yehova. Ndenge nini okoki kosala yango?
OMITYELA MIKANO OYO EBONGI
Meká komityela mikano oyo ebongi. Na ntembe te obosaná te mateya ya moboko oyo etali Yehova mpe bomoi oyo alaki na mikolo ezali koya. Kasi osengeli kobongisa lisusu makambo etali bomoi na yo ya bokristo, na ndakisa kosakola nsango malamu mpe koyanganaka elongo na bandeko na yo bakristo. Tótalela mwa mikano oyo okoki komityela.
Sololáká na Yehova mbala na mbala. Tata na yo ayebi ete soki okobi komipesa foti, ekoki kozala mpasi obondela ye. (Rom. 8:26) Atako bongo, ‘tingamá na mabondeli,’ yebisá Yehova ndenge oyo osepelaka mpenza kozala moninga ye. (Rom. 12:12) Andrej abosanaka te makambo oyo ekómelaki ye. Alobi boye: “Nazalaki mpenza komipesa foti mpe koyoka nsɔni. Kasi mbala nyonso nsima ya kobondela, makanisi yango ezalaki kolongwa. Nazalaki mpenza kozwa kimya ya makanisi.” Soki ozali koyeba te makambo oyo osengeli kobondela mpo na yango, talelá lisusu mabondeli oyo Mokonzi David asalaki ntango abongolaki motema. Mabondeli yango ezali na Nzembo 51 mpe 65.
Yekoláká Biblia mbala na mbala. Yango ekokómisa kondima na yo makasi mpe ekosalisa yo olinga lisusu Yehova mingi. (Nz. 19:7-11) Felipe alobi boye: “Lokola nazalaki te na programɛ malamu ya kotánga mpe koyekola Biblia, yango esalaki ete nalɛmba mpe natika Yehova. Lokola nalingaki te kozongela lisusu libunga oyo nasalaki, yango wana nasalaki makasi natya programɛ ya boyekoli na ngai moko.” Yo mpe okoki kosala bongo. Soki olingi koyeba masolo oyo okoki kotya na programɛ ya boyekoli na yo moko, okoki kosolola na moninga moko oyo akɔmeli na elimo.
Kómisá lisusu makasi boninga na yo elongo na bandeko. Bandeko mosusu oyo bazongisamá na lisangá babangaka ete basusu bakotalela bango na ndenge ya mabe. Larissa alobi boye: “Nayokaki mpenza nsɔni mpe namonaki lokola nasalaki bandeko ya lisangá mabe mpenza. Eumelaki ntango molai mpo makanisi yango elongwa.” Na yango, yebá ete bankulutu mpe bandeko mosusu oyo bakɔmeli na elimo bakosepela kosalisa yo wana ozali kokómisa lisusu boninga na yo ná Yehova makasi. (Talá etanda “Oyo bankulutu bakoki kosala.”) Bazali kosepela ndenge ozongeli Yehova mpe balingi ete ozala na esengo!—Mas. 17:17.
Okoki kosala nini mpo ozala lisusu penepene ya bandeko ya lisangá? Omipesa mobimba na makambo oyo bandeko ya lisangá bazali kosala, na ndakisa, koyanganaka na makita mpe kobima mbala na mbala na mosala ya kosakola. Yango ekosalisa yo na nini? Felix alobi boye: “Bandeko bazalaki kozela na mposa makasi ete nazongela Yehova. Namonaki ete nazali mpenza na ntina. Bango nyonso basalisaki ngai namiyoka ete nazongi lisusu na libota ya Yehova, ete balimbisi ngai mpe nakoba kokende liboso.”—Talá etanda “Oyo okoki kosala.”
KOLƐMBA TE!
Wana ozali kokoba kokómisa lisusu makasi boninga na yo elongo na Yehova, Satana akokoba kobimisela yo mikakatano mpo na kolɛmbisa kondima na yo. (Luka 4:13) Na yango, kómisá kondima na yo makasi mpo olonga mikakatano yango.
Yehova alaki boye mpo na bampate na ye: “Oyo ebungi, nakoluka yango; oyo epalangani, nakozongisa yango; oyo ebukani, nakokanga yango eteni ya elamba mpe oyo ezali kobɛla, nakokembisa yango.” (Ezk. 34:16) Yehova asalisá bandeko mingi mpo bázongisa lisusu boyokani malamu elongo na ye. Yebá ete alingi kosalisa yo okóma na boyokani ya makasi koleka elongo na ye.
a Na lisolo oyo topesi bango bankombo mosusu.