Mwalomingo, 30 sanza ya 8
Yehova azali pene na baoyo motema ebukani.—Nz. 34:18.
Ata soki banyokolá yo, yebá ete Yehova alingaka yo mpe azwaka yo na motuya. Soki ozali koyoka ete olɛmbi nzoto to “elimo [na yo] etutami,” kobosana te ete Yehova amonaki makambo ya malamu na motema na yo mpe ye moko abendaki yo epai na ye. (Yoa. 6:44) Azalaka ntango nyonso pene ya kosalisa yo mpo ozali na motuya na miso na ye. Tokoki koyeba mayoki oyo Yehova azalaka na yango soki totaleli ndakisa ya Yesu. Na mosala na ye awa na mabele, bato oyo basusu bazalaki komona ete bazali bato mpamba, Yesu atyelaki bango likebi mpe amoniselaki bango motema mawa. (Mat. 9:9-12) Ntango mwasi moko oyo azalaki na maladi ya nsɔmɔ asimbaki elamba ya Yesu na elikya ete akobika, Yesu abɔndisaki ye mpe apesaki ye longonya mpo na kondima na ye. (Mrk. 5:25-34) Yesu amonisaka bizaleli ya Tata na ye na ndenge ya kokoka. (Yoa. 14:9) Na yango, okoki kondima ete Yehova azwaka yo na motuya mpe amonaka bizaleli na yo ya malamu, ata mpe kondima na yo mpe bolingo na yo mpo na ye. w24.10 7 par. 4-5
Mwayambo, 31 sanza ya 8
Tyá mai ya miso na ngai na kati ya molangi na yo ya mposo ya nyama.—Nz. 56:8.
Na bomoi na ye, Davidi akutanaki na makambo ebele oyo esalaki ete atangisa mai ya miso. Bato mingi bazalaki koyina ye mpe ata baninga oyo azalaki kotyela motema basalaki ye mabe. (1 Sa. 19:10, 11; 2 Sa. 15:10-14, 30) Mokolo moko akomaki: “Nalɛmbi na kolelalela na ngai; butu nyonso nazali kopɔlisa mbeto na ngai na mai ya miso; nazali kotondisa kiti na ngai ya mpɔngi na mai ya miso.” (Nz. 6:6) Atako mikakatano oyo Davidi akutanaki na yango, andimaki ete Yehova azalaki kolinga ye. Akomaki boye: “Yehova akoyoka mongongo ya kolela na ngai.” (Nz. 6:8) Maloba ya mokapo ya lelo emonisaka ete Yehova azali na bolingo mingi ya motema. Davidi alobaki ete ezalaki lokola nde Yehova azalaki kozwa mai nyonso ya miso na ye mpe azalaki kotya yango na molangi to kokoma yango na buku moko. Davidi andimaki mpenza ete Yehova azalaki komona mpasi na ye mpe abosanaki yango te. Amindimisaki ete Tata na ye ya likoló oyo atondi na bolingo ayebaki makanisi oyo ezalaki kotungisa ye, kasi ayebaki mpe ndenge oyo ezalaki kotinda ye amiyoka. w24.12 22 par. 11-12
Mwamibale, 1 sanza ya 9
Bókoba komimeka mpo na komona soki bozali na kati ya kondima.—2 Ko. 13:5.
Tosengeli kosala makasi kaka te mpo na kokóma bakristo oyo bakɔmɛli na elimo, kasi mpe mpo na kotikala bongo. Mpo na yango, tosengeli koboya komityela motema koleka ndelo. (1 Ko. 10:12) Tosengeli ‘kokoba komimeka’ mpo tótala soki tozali kokoba kokende liboso na elimo. Na mokanda na ye epai ya Bakolose, ntoma Paulo amonisaki lisusu ntina ya kokoba kozala moto oyo akɔmɛli na elimo. Atako bakristo yango bakómaki mikóló na elimo, Paulo ayebisaki bango ete bákeba ete bákóma te baombo ya makanisi ya mokili. (Kol. 2:6-10) Mpe Epafrasi, oyo emonani ete ayebaki bandeko ya lisangá yango malamu, abondelaki mingi mpo ‘nsukansuka bázala bato oyo bakoki na nyonso,’ elingi koloba bato oyo bakɔmɛli na elimo. (Kol. 4:12) Liteya ezali nini? Paulo ná Epafrasi bakangaki ntina ete kotikala moto oyo akɔmɛli na elimo esɛngi milende mingi mpe lisalisi ya Nzambe. Balingaki ete Bakolose bákoba kozala bakristo oyo bazali mikóló, to oyo bakɔmɛli na elimo atako mikakatano oyo bazalaki na yango. w24.04 6-7 par. 16-17