Masese
4 Ee bana, bóyoka disiplini ya tata+ mpe bótya likebi, mpo bóyeba eloko babengi mayele.+ 2 Mpo ya solo, liteya ya malamu nde nakopesa bino.+ Bótika mobeko na ngai te.+ 3 Mpo ngai nazalaki mwana mpenza epai ya tata na ngai,+ mwana ya motau mpe mwana se moko na miso ya mama na ngai.+ 4 Mpe tata azalaki koteya ngai+ mpe koloba na ngai boye: “Motema+ na yo esimba makasi maloba na ngai.+ Batelá mitindo na ngai mpe kobá kozala na bomoi.+ 5 Zwá bwanya,+ zwá mayele.+ Kobosana te, mpe kotangwa na maloba ya monɔkɔ na ngai te+. 6 Kotika yango te, mpe ekokɛngɛla yo. Lingá yango, mpe ekobatela yo. 7 Bwanya ezali eloko ya liboso.+ Zwá bwanya; mpe na nyonso oyo ozali kozwa, zwá mpe mayele.+ 8 Zwá yango na motuya monene, mpe ekotombola yo.+ Ekopesa yo nkembo mpo oyambi yango.+ 9 Ekotya motole ya fololo ya monzɛlɛ na motó na yo;+ ekokabela yo motole ya kitoko.”+
10 Mwana na ngai, yoká, mpe ndimá maloba na ngai.+ Boye bambula ya bomoi na yo ekokóma mingi.+ 11 Ɛɛ, nakolakisa yo na nzela ya bwanya;+ nakotambolisa yo na banzela ya kolongobana.+ 12 Ntango okotambola, matambe na yo ekozala na nkaka te;+ mpe soki opoti mbangu, okobɛta libaku te.+ 13 Simbá disiplini;+ kotika yango te.+ Batelá yango, mpo yango nde bomoi na yo.+
14 Kokɔta na nzela ya bato mabe te,+ mpe kokende te komikɔtisa na nzela ya bato mabe.+ 15 Kimá yango,+ koleka kuna te;+ longwá na yango, leká na yo.+ 16 Mpo balalaka te soki basali mabe te,+ mpe bazwaka mpɔngi te soki babɛtisi moto libaku te.+ 17 Mpo balei limpa ya makambo ya mabe,+ mpe vinyo ya makambo ya mobulu nde bazali komɛla.+ 18 Kasi nzela ya bayengebene ezali lokola pole oyo ezali kongɛnga, oyo ezali kongɛnga se kongɛnga kino moi ekokóma makasi.+ 19 Nzela ya bato mabe ezali lokola molili;+ bayebi te na eloko nini bazali kobɛtabɛta libaku.+
20 Mwana na ngai, tyá likebi na maloba na ngai.+ Sembolá litoi na yo na maloba na ngai.+ 21 Elongwa na miso na yo te.+ Batelá yango na kati ya motema na yo.+ 22 Mpamba te ezali bomoi mpo na bato oyo bazali kozwa yango+ mpe bokolɔngɔnɔ mpo na nzoto na bango mobimba.+ 23 Koleka biloko mosusu nyonso oyo esengeli kobatelama, batelá motema na yo,+ mpo maziba ya bomoi eutaka na yango.+ 24 Longolá maloba oyo etɛngamá+ epai na yo; mpe longolá mosika na yo mbɛbu ya maloba ya mbilingambilinga.+ 25 Miso na yo esengeli kotala alima liboso na yo,+ ɛɛ, miso na yo oyo ezali kongɛnga esengeli kotala alima liboso na yo.+ 26 Yeisá patatalu nzela ya lokolo na yo,+ mpe tiká banzela na yo nyonso ezala semba.+ 27 Kokende na lobɔkɔ ya mobali te to na lobɔkɔ ya mwasi te.+ Longolá lokolo na yo na makambo oyo ezali mabe.+