“Batelá motema na yo”
YEHOVA alobaki na mosakoli Samwele boye: “[Yehova] akotalaka lokola ekotalaka moto te. Moto akomonaka lolenge ya libándá nde [Yehova] akotalaka kati na motema.” (1 Samwele 16:7) Ntango Davidi, mokomi ya nzembo, alobelaki mpe motema ya elilingi, ye alobaki boye: “[Yehova], omeki motema na ngai; oyebi ngai na ntango ya butu, opimi ngai nde omoni likambo te.”—Nzembo 17:3.
Ya solo, Yehova atalaka na kati ya motema mpo na koyeba ndenge oyo tozali mpenza. (Masese 17:3) Yango wana, Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala, apesaki toli oyo: “Batelá motema na yo na mpiko nyonso mpo ete makambo na bomoi ikoutaka wana.” (Masese 4:23) Ndenge nini tokoki kobatela motema na biso ya elilingi? Masese mokapo 4 epesi biso eyano na motuna yango.
Yoká disipilini ya tata
Masese mokapo 4 ebandi na maloba oyo: “Bana, bóyoka disipilini ya tata, mpe bótya likebi mpo na kozwa mayele. Mpo ete nakopesa bino mateya malamu. Bósundola mobeko na ngai te.”—Masese 4:1, 2, NW.
Bilenge oyo baboti na bango babangaka Nzambe bazwi toli ete báyoka mateya malamu oyo baboti yango bapesaka bango, mingi mpenza mateya ya tata. Makomami epesi tata mokumba ya kokokisa bamposa ya mosuni na bamposa ya elimo ya libota na ye. (Deteronome 6:6, 7; 1 Timote 5:8) Soki litambwisi yango ezali te, ezali mpenza mpasi mingi mpo elenge azwa mayele ya bomoto! Yango wana, esengeli mpenza ete mwana andima na limemya mpenza disipilini ya tata na ye!
Kasi, tokoloba boni mpo na elenge oyo azali na tata te mpo na kolakisa ye? Na ndakisa, elenge moko ya mbula zomi na moko nkombo na ye Jason, azalaki na mbula minei ntango tata na ye akufaki.a Ntango moklisto moko oyo azali nkulutu atunaki ye likambo oyo esalaka ye mpasi mingi na bomoi, Jason alobaki mbala moko ete: “Likambo ya kozanga tata. Ntango mosusu likambo yango etungisaka ngai mingi mpenza.” Kasi, bilenge oyo bazali na baboti te bakoki kozwa toli oyo ekopesa bango makasi. Jason na bilenge mosusu lokola ye bakoki koluka mpe kozwa toli oyo ekokani na toli ya tata epai ya bankulutu mpe bandeko mosusu oyo bakɔmeli na kati ya lisangá ya boklisto.—Yakobo 1:27.
Salomo akanisaki mateya oyo bapesaki ye mpe alobi boye: “Nazalaki mwana ya tata na ngai, ngai, bobele ngai, nazwaki bolingo epai ya mama na ngai.” (Biso nde totɛngisi makomi; Masese 4:3) Tomoni mpenza ete mokonzi azalaki koyoka esengo soki akanisi ndenge oyo babɔkɔlaki ye. Lokola azalaki “mwana” oyo asepelaki mingi na toli ya tata na ye, na ntembe te elenge Salomo azalaki na boyokani malamu na tata na ye Davidi. Lisusu, Salomo azalaki ‘bobele ye,’ to balingaki ye mingi. Ezali na ntina mingi ete mwana abɔkwama na ndako oyo bolingo ezali mpe baboti na bana basololaka malamu!
Zwá bwanya mpe mayele
Ntango akanisaki lisusu toli ya bolingo oyo tata na ye apesaki ye, Salomo alobaki boye: “Ye tata, alakisaki mpe ngai, alobaki na ngai ete, Tiká ete motema na yo ebatela maloba na ngai; tosá malako na ngai mpe zalá na bomoi. Zwá [bwanya], zwá [mayele], tiká yango te; longwá na maloba na monɔkɔ na ngai te. Tiká ye [bwanya] te mpe ye akobatela yo, lingá ye mpe ye akokɛngɛla yo. [Bwanya] ezali likambo ya liboso; boye, zwá [bwanya], mpe ekozwa yo biloko nyonso, zwá mpe [mayele].”—Biso nde totɛngisi makomi; Masese 4:4-7.
Mpo na nini bwanya ezali “likambo ya liboso”? Bwanya elimboli kosalela boyebi mpe mayele na ndenge oyo ekobota mbuma malamu. Boyebi ezali komesana to koyeba oyo moto azwi na kotalatala to na makambo oyo akutanaka na yango mbala mingi na bomoi, na kotánga to na koyekola. Boyebi ezali likambo ya liboso mpo na kozwa bwanya. Kasi soki toyebi kosalela yango malamu te, boyebi na biso ekozala na ntina te. Tosengeli kosuka te kaka na kotángaka Biblia mokolo na mokolo na mikanda oyo elimbolaka Biblia oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kobimisa kasi, tosengeli mpe kosala makasi mpo na kotosa makambo oyo tozali koyekola.—Matai 24:45.
Kozwa mayele ezali mpe na ntina. Soki tozali na mayele te, ndenge nini tokoki koyeba ndenge likambo moko eyokani na likambo mosusu mpe kokanga malamu ntina ya likambo oyo tozali kotalela? Soki tozangi mayele, ndenge nini tokoki kokanga ntina ya makambo mpe kososola yango malamu? Mpo na kokanisa likambo moko mpe kozwa makanisi ya malamu, tosengeli kozala na mayele.—Danyele 9:22, 23.
Salomo akobaki koyebisa maloba ya tata na ye mpe alobaki boye: “Kumisá ye [bwanya] mpe akotombola yo; akoyeisela yo lokumu wana [okoyamba] ye. Akotya [ekɔti ya lokumu] likoló ya motó na yo, akozingela yo na motole ya nkembo.” (Biso nde totɛngisi makomi; Masese 4:8, 9) Bwanya oyo euti na Nzambe ebatelaka moto oyo azwi yango. Lisusu, epesaka moto yango lokumu mpe nkembo. Yango wana, tósala nyonso ete tózwa bwanya.
“Simbá disipilini”
Mpo na malako ya tata na ye, mokonzi ya Yisalaele alobi lisusu boye: “Mwana na ngai, yoká mpe yambá maloba na ngai, boye [bambula] na bomoi na yo ikozala mingi. Nalakisi yo na nzela ya [bwanya], nakambi yo na bilekelo ya sembo. Ekotambola yo, makolo na yo makozwa nkaka te; ekopota yo, [okotuta] libaku te. Simbá [disipilini, NW], tiká ye kolongwa te; batelá ye, zambi azali bomoi na yo.”—Biso nde totɛngisi makomi; Masese 4:10-13.
Lokola azalaki mwana oyo tata na ye alingaki mingi, na ntembe te Salomo andimaki solo ete disipilini oyo epesami na bolingo, eteyaka mwana mpe esembolaka ye, ezali na ntina mingi. Soki disipilini epesami na bokatikati te, ndenge nini tokoki kokende liboso mpe kokɔmela na elimo to ndenge nini tokoki kobongisa bomoi na biso? Soki tozali kozwa mayele te na mabunga na biso moko to soki tozali kokoka te kosembola makanisi na biso ya mabe, tokokola mpe na elimo te. Disipilini oyo eleki ndelo te, ememaka moto na etamboli oyo esepelisaka Nzambe mpe esalisaka biso “tótambola na bilekelo ya sembo.”
Lolenge mosusu ya disipilini esalisaka biso mpo ‘bambula ya bomoi na biso ekóma mingi.’ Ndenge nini? Yesu Klisto alobaki boye: “Oyo azali sembo na likambo lileki moke azali mpe sembo na likambo monene. Oyo azali sembo te na likambo lileki moke azali mpe sembo te na likambo lileki monene.” (Luka 16:10) Soki tokomipesa disipilini na makambo mikemike ekozala pɛtɛɛ mpo tómipesa mpe disipilini na makambo ya minene, makambo oyo mbala mosusu etaleli bomoi na biso mobimba. Na ndakisa, komesenisa liso etika ‘kotala mwasi na mposa mabe’ ekosalisa biso tókwea te na pite to na ekobo. (Matai 5:28) Likambo yango etaleli bato nyonso, ezala basi to mibali. Soki tozali koteya elimo na biso mpo na ‘komema makanisi nyonso na boombo,’ ekozala mpasi mpo tósala libunga monene na maloba to na misala.—2 Bakolinti 10:5, NW.
Ya solo, mbala mingi ezalaka mpasi mpo na kondima disipilini mpe yango ekoki komonana lokola ete ezali kopekisa biso makambo mosusu. (Baebele 12:11) Kasi, mokonzi ya mayele andimisi biso ete soki tosimbi disipilini, makolo na biso ekomema biso tókende liboso. Se ndenge komibongisa malamu esalisaka mopoti-mbangu mpo apota malamu mpe akwea te to amisala mabe te, kosimba disipilini ekosalisa biso tótambola ntango nyonso malamu na nzela ya bomoi mpe tóbɛta libaku te. Kasi, tosengeli kotala malamu nzela oyo tokopona.
Longwá “na nzela ya bato mabe”
Salomo apesaki likebisi oyo esengeli kotalela yango nokinoki ete: “[Kɔtá] na nzela ya bato mabe te mpe kɔtá na elekelo ya bato ya masumu te. [Longwá] na yango, leká pembeni te, longwá na yango mpe tangwá. Zambi bakolala te bobele ete basali mobulu, bakolongolama mpɔngi soko bakweisi moto moko te. Mpo ete bakolya kwanga na mabe mpe bakomela masanga na yauli.”—Biso nde totɛngisi makomi; Masese 4:14-17.
Bato mabe, baoyo Salomo alingi ete tólongwa na nzela na bango, basalaka misala ya mabe mpo na kokokisa bamposa na bango. Mpo na bango, kosala mabe ezali lokola biloko ya kolya mpe masanga. Bakokaka kolala mpɔngi te soki basali naino mobulu te. Bomoto na bango ezali mpenza mabe! Ndenge nini tokoki kobatela motema na biso soki tozali ntango nyonso kotambola na bato ya ndenge yango? Ezali mpenza bozoba “kotambola na nzela ya bato mabe” soki tozali kosepela kotala mobulu oyo bazali kolakisa na makambo ya kominanola ya mokili lelo oyo! Ata tosali makasi ete tózala na motema mawa tokolonga te soki tozali kotala makambo mabe oyo balakisaka na televizyo to na bafilme.
Tikalá na pole
Salomo alobaki lisusu boye, kaka na ntina etali nzela: “Kasi nzela na bayengebeni ezali lokola pole oyo ekongɛnga lisusu mpe lisusu kino mokolo ya malamu koleka.” (Biso nde totɛngisi makomi; Masese 4:18) Tokoki kokokanisa likambo ya kobanda koyekola Biblia mpe komeka kosalela makambo yango na bomoi na kobanda mobembo ntango ntɔngɔ etani naino malamu te. Ntango butu ezali naino, tomonaka mpenza malamu te. Kasi ntango ntɔngɔ ebandi kotana mokemoke, tokobanda kokesenisa biloko oyo ezali zingazinga na biso. Na nsuka, ntango moi engali, tomonaka eloko nyonso polele. Ndenge moko mpe, mateya ya solo ekómaka kongɛnga na miso na biso soki tolendendeli na koyekola Makomami na motema molai mpe na molende. Mpo na kobatela motema na biso ete ebeba na makanisi mabe te tosengeli koleisa yango bilei ya elimo.
Bisakweli ya Biblia mpe ekómaka polele mokemoke. Bisakweli ekómaka kongɛnga na miso na biso ntango elimo santu ya Yehova ezali kongɛngisa yango to ntango ezali kokokisama na makambo ya mokili to na makambo oyo basaleli ya Nzambe bazali kokutana na yango. Na esika ya kokanisakanisa na ndenge oyo yango ekoki mbala mosusu kokokisama, tosengeli nde kozela ‘kongɛnga engɛnga lisusu mpe lisusu.’
Tokoloba boni mpo na baoyo bazali koboya ete Nzambe atambwisa bango mpe bazali koboya kotambola na kongɛnga? Salomo alobaki boye: “Nzela ya bato mabe ezali molili; bayebi te mpo nini bazali kobɛta libaku.” (Biso nde totɛngisi makomi; Masese 4:19) Bato mabe bazali lokola moto oyo abɛti libaku na molili mpe ayebi te eloko nini ebɛtisi ye libaku. Ata ntango tozali komona lokola nde bato oyo babangaka Nzambe te bazali malamu mpo na misala mabe na bango, bazali malamu se mpo na ntango moke. Mpo na bato yango, mokomi ya nzembo alobaki boye: “Solo otyaki bango na nzela ya mosɛlu; Yo [Yehova] obwaki bango na mobulu.”—Nzembo 73:18.
Zalá na ɛkɛngɛ ntango nyonso
Mokonzi ya Yisalaele alobaki lisusu boye: “Mwana na ngai, yokamelá maloba na ngai; sembolá matoi na yo epai na malako na ngai. Tiká te ete malongwa liboso na miso na yo, batelá yango na kati ya motema na yo. Zambi mazali bomoi epai na baoyo bakozwa yango mpe nkisi malamu mpo na nzoto nyonso na bango. Batelá motema na yo na mpiko nyonso mpo ete makambo na bomoi ikoutaka wana.”—Biso nde totɛngisi makomi; Masese 4:20-23.
Ndakisa ya Salomo ye moko ezali komonisa ete toli oyo epesami mpo na kobatela motema ezali na ntina mingi. Ya solo, na bolenge na ye azalaki mpenza “mwana” oyo tata na ye alingaki mingi mpe azalaki ntango nyonso sembo epai ya Yehova bambula mingi ntango akómaki mokóló. Kasi, Biblia elobi ete: “Zambi ezalaki ete, wana Salomo akómaki mobange, basi na ye [bapaya] bapɛngolaki motema na ye kino banzambe mosusu. Motema na ye ezalaki malamu nyonso liboso ya [Yehova] Nzambe na ye te lokola ezalaki motema ya Davidi tata na ye.” (1 Mikonzi 11:4) Soki tozali na ekɛngɛ ntango nyonso te, ata motema ya malamu koleka ekoki kolɛngolama mpo na kosala makambo mabe. (Yilimia 17:9) Tosengeli kobatela ‘na kati ya’ mitema na biso makambo oyo Liloba ya Nzambe ezali koloba na biso mbala na mbala. Na kati ya makambo yango tozali mpe na litambwisi oyo Biblia epesi biso na mokanda ya Masese mokapo 4.
Talelá motema na yo malamu
Tozali kobatela motema na biso ya elilingi malamu? Ndenge nini tokoki koyeba bomoto na biso ya kati? Yesu Klisto alobaki ete: “Moto abimisaka na monoko makambo oyo etondi na motema na ye.” (Matayo 12:34, Boyokani ya Sika) Alobaki lisusu ete: “Zambi uta na motema ekobima makanisi mabe, libomi koboma moto, ekobo, pite, boyibi, litatoli ya lokuta, kotuka.” (Matai 15:19, 20) Ya solo, maloba mpe misala na biso emonisaka mpenza ndenge oyo motema na biso ezali.
Na yango, Salomo apesi biso toli ete: “Longolá epai na yo monɔkɔ ya mobulu mpe bibɛbu ya yauli, boyá yango liboso na yo. Tiká ete miso na yo matala bobele liboso mpe ntɔkɔ na yo isembolama alima. Kebá mpo na nzela ya makolo na yo, tiká ete bilekelo nyonso na yo bikokisama. Pɛngwá na epai na mobali te to na epai na mwasi te; longolá makolo na yo na mabe.”—Biso nde totɛngisi makomi; Masese 4:24-27.
Na kotalela toli ya Salomo, tosengeli kotalela malamu maloba mpe misala na biso. Mpo na kobatela motema na biso mpe kosepelisa Nzambe, tosengeli koboya maloba ya mabe mpe bibɛbu ya yauli. (Masese 3:32) Yango wana, tosengeli kokanisa malamumalamu soki maloba mpe misala na biso emonisaka nini mpo na biso. Na nsima, tóluka lisalisi ya Yehova mpo tósembola bolɛmbu nyonso oyo tomoni.—Nzembo 139:23, 24.
Na koleka, tiká ete ‘miso na biso etala bobele liboso.’ Tótya miso na biso na mokano tozali na yango ya kosalela Tata na biso ya likoló na molimo na biso mobimba. (Bakolose 3:23) Lokola ozali kolanda nzela yango ya sembo, tiká ete Yehova asunga yo olonga na “banzela na yo nyonso,” mpe apambola yo na ndenge ozali kolanda toli ya ‘kobatela motema na yo.’
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi ye nkombo mosusu.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 22]
Oboyaka kotala masano ya mobulu?
[Elilingi na lokasa 21]
Luká toli epai ya bato oyo bayebi makambo mingi
[Elilingi na lokasa 23]
Discipline ekosalisa yo opota malamu
[Elilingi na lokasa 24]
Yekoláká Biblia ntango nyonso.