Habakuku
3 Libondeli ya mosakoli Habakuku na nzembo ya mawa: 2 Ee Yehova, nayoki nsango na yo.+ Ee Yehova, nakómi kobanga misala na yo.+
Ee zongisá yango na bomoi na ntango oyo obongisi!* Salá ete yango eyebana na ntango oyo obongisi. Na ntango ya yikiyiki, obosana te koyokela biso mawa.+
3 Nzambe ye moko azalaki kouta na Temane, ɛɛ Mosantu moko azalaki kouta na Ngomba Parane.+ Sela.+
Lokumu na ye etondaki na likoló;+ mpe mabele etondaki na lisanzoli na ye.+
4 Kongɛnga na ye ekómaki mpenza lokola pole.+ Azalaki na bingɛngiseli mibale oyo ezalaki kobima na lobɔkɔ na ye, mpe esika ya kobomba bokasi na ye ezalaki wana.+
5 Maladi mabe ezalaki kotambola liboso na ye,+ mpe fiɛvrɛ makasi ezalaki kobima na makolo na ye.+
6 Atɛlɛmaki nyɛɛ, mpo aningisa mabele.+ Amonaki, mpe na nsima asalaki ete bikólo epumbwapumbwa.+
Mpe bangomba ya seko na seko epasukaki;+ bangomba mike oyo ezali koumela seko egumbamaki.+ Ye atambolaka ndenge wana banda kala.
7 Namonaki mpasi ya bahema ya Kushane. Bilamba ya hema ya mokili ya Midiane+ ebandaki koningana.+
8 Ee Yehova, nkanda na yo engaleli nde bibale, engaleli nde bibale,+ to nkɛlɛ na yo engaleli nde mbu?+ Mpo omati na bampunda na yo;+ makalo na yo ezalaki lobiko.+
9 Litimbo na yo etikali polele.+ Bandai oyo mabota balapi ezali likambo oyo elobami.+ Sela. Obandaki kopasola mabele na bibale.+
10 Bangomba emonaki yo; eyokaki mpasi makasi.+ Mbula ya mopɛpɛ makasi mpe ya nkake elekaki. Mai mozindo eyokisaki lokito na yango.+ Etombolaki mabɔkɔ na yango likoló.
11 Sanza—moi—etɛlɛmaki nyɛɛ,+ na bisika na yango ya kofanda oyo etombwaná.+ Makula na yo ezalaki se kokende lokola pole.+ Mokalikali ya likɔnga na yo ezalaki kongɛngisa.+
12 Ozalaki kotambola na mabele na makaneli. Ozalaki kotutatuta bikólo na nkanda ndenge batutaka mbuma.+
13 Mpe obimaki mpo na lobiko ya bato na yo,+ kobikisa moto na yo oyo atyami mafuta. Obukaki oyo azali motó ya ndako ya moto mabe bitenibiteni.+ Miboko etikalaki polele mpenza.*+ Sela.
14 Na mangenda na ye moko otɔbɔlaki+ motó ya babundi na ye ntango bayaki lokola mopɛpɛ makasi mpo na kopanza ngai.+ Esengo monene na bango ezalaki lokola ya bato oyo bakani kolya moto ya mpasi na esika ya kobombana.+
15 Olekaki na mbu na bampunda na yo, na esika mai etondanaki mingi.+
16 Nayokaki, mpe libumu na ngai ebandaki koningana; ntango lokito eyokanaki, mbɛbu na ngai elɛngaki; mikuwa na ngai ebandaki kopɔla;+ mpe nabulunganaki na ndenge nazalaki, mpo nazela na kimya mokolo ya mpasi,+ ntango oyo akobimela bato,+ mpo na kobunda na bango.
17 Ata soki nzete ya figi ebimisi fololo te,+ mpe mbuma ezali te na banzete ya vinyo; ata soki mosala ya nzete ya olive eleki se mpamba, mpe mikala ya bilanga ebimisi bilei te;+ ata soki etonga esili mpenza na lopango, mpe bibwɛlɛ ezali te na bilanga ya lopango;+
18 Ata bongo, ngai nakosepela makasi na Yehova ye moko,+ nakozala na esengo na Nzambe ya lobiko na ngai.+