Bagalatia
3 Ee Bagalatia bazoba, nani yango amemi bino na nzela ya mabe,+ bino bato oyo, na miso na bino, Yesu Kristo alobelamaki polelepolele ete abakami na nzete?+ 2 Nalingi nayeba kaka likambo moko oyo epai na bino: Bozwaki elimo+ nde mpo na misala ya mibeko+ to mpo bondimaki makambo oyo boyokaki?+ 3 Bozali nde bazoba boye? Bobandi naino kotyela makambo ya elimo motema,+ bongo sikoyo bosuki na kotya motema na makambo ya nzoto?+ 4 Bomonaki ebele ya bampasi kaka mpamba?+ Soki ezalaka mpenza kaka mpamba. 5 Bongo moto oyo azali kopesa bino elimo+ mpe azali kosala misala ya nguya+ na kati na bino, azali kosala yango nde mpo na misala ya mibeko to mpo bondimaki makambo oyo boyokaki? 6 Kaka ndenge Abrahama “andimelaki Yehova, mpe batángaki ye moyengebene.”+
7 Ya solo mpenza boyebi ete baoyo bazali kokangama na kondima+ nde bazali bana ya Abrahama.+ 8 Nzokande Likomami, lokola emonaki liboso ete Nzambe akotánga bato ya bikólo mosusu bayengebene mpo na kondima, esakolaki nsango malamu liboso epai ya Abrahama ete: “Na nzela na yo bikólo nyonso ekopambwama.”+ 9 Yango wana, baoyo bazali kokangama na kondima bazali kopambolama+ esika moko na Abrahama+ moto ya sembo.
10 Mpo baoyo nyonso batyaka motema na misala ya mibeko balakelami mabe; mpo ekomamá ete: “Moto nyonso oyo azali kokoba kosala makambo nyonso oyo ekomami na rulo ya Mibeko te alakelama mabe.”+ 11 Lisusu, tomoni polele mpenza ete Nzambe atángaka moto moko te moyengebene mpo na mibeko,+ mpo “moyengebene akozala na bomoi mpo na kondima.”+ 12 Nzokande Mibeko esɛngaka kozala na kondima te, kasi “moto oyo azali kotosa yango akozala na bomoi na nzela na yango.”+ 13 Kristo asikolaki+ biso mpe alongolaki+ biso na elakeli mabe ya Mibeko na ndenge akómaki elakeli mabe+ na esika na biso, mpo ekomamá ete: “Moto nyonso oyo akakisami na nzete alakelami mabe.”+ 14 Ntina na yango ezali ete lipamboli ya Abrahama eya na nzela ya Yesu Kristo mpo na bikólo,+ mpo, na nzela ya kondima na biso,+ tózwa elimo oyo elakamaki.+
15 Bandeko, nazwa ndakisa ya likambo moko oyo esalemaka mokolo na mokolo mpo naloba na bino: Kondimana oyo endimami, atako ezali ya moto, moto moko te abwakaka yango pembeni to abakisaka makambo mosusu likoló na yango.+ 16 Nzokande bilaka yango, bayebisaki yango Abrahama+ mpe momboto na ye.+ Elobi te ete: “Mpe epai ya mboto,” lokola nde ezalaki mingi, kasi nde epai ya moko kaka+ ete: “Mpe epai ya momboto na yo,”+ oyo ezali Kristo.+ 17 Lisusu, nazali koloba boye: Kondimana oyo Nzambe andimaki+ kala, Mibeko oyo eyaki mbula nkama minei na ntuku misato (430)+ na nsima ezali kolongola yango te mpe koboma elaka wana te.+ 18 Mpo soki libula ezali kozwama mpo na mibeko, ezali lisusu mpo na elaka te;+ nzokande Nzambe apesi yango Abrahama na boboto na nzela ya elaka.+
19 Bongo ntina ya Mibeko ezali nini? Yango ebakisamaki mpo na komonisa polele makambo ya kobuka mibeko,+ tii ntango momboto oyo bapesaki ye elaka akoya;+ mpe epesamaki na nzela ya baanzelu+ na lobɔkɔ ya moyokanisi.+ 20 Nzokande moyokanisi azalaka te na esika oyo moto azali kaka moko, kasi Nzambe azali kaka ye moko.+ 21 Bongo Mibeko ezali nde kotɛmɛla bilaka ya Nzambe?+ Te, ata moke te! Mpo soki bápesaka mobeko moko boye oyo ekoki kopesa bomoi,+ mbɛlɛ moto atángami moyengebene mpenza mpo na mibeko.+ 22 Kasi Likomami+ ekangaki biloko nyonso na bolɔkɔ ya lisumu,+ mpo elaka oyo euti na kondimela Yesu Kristo epesama na baoyo bandimaki.+
23 Nzokande, liboso kondima eya,+ mibeko ezalaki kokɛngɛla biso,+ ekangaki biso na bolɔkɔ, tozalaki kozela kondima oyo esengelaki komonisama.+ 24 Yango wana, Mibeko ekómaki molakisi na biso oyo azalaki kokamba biso epai ya Kristo,+ mpo tótángama bayengebene+ mpo na kondima. 25 Kasi sikoyo lokola kondima eyei,+ tozali lisusu kokambama na molakisi te.+
26 Ya solo, bozali bino nyonso bana+ ya Nzambe na nzela ya kondima oyo bondimelaka Kristo Yesu. 27 Mpo bino nyonso oyo bobatisamaki na kati ya Kristo+ bolati Kristo.+ 28 Moyuda azali te, Mogrɛki mpe te,+ moombo azali te, moto ya bonsomi mpe te,+ mobali azali te, mwasi mpe te;+ mpo bozali bino nyonso moto kaka moko na bomoko na Kristo Yesu.+ 29 Lisusu, soki bozali bato ya Kristo, bozali mpenza momboto ya Abrahama,+ bazwi-ya-libula ya elaka.+