-
2 Bakonzi 5:15Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
15 Nsima na yango, Naamane azongaki epai ya moto ya Nzambe ya solo,+ elongo na bato nyonso oyo bazalaki na ye.* Naamane atɛlɛmaki liboso na ye mpe alobaki: “Sikoyo nandimi ete na mabele mobimba, Nzambe azali na esika mosusu te, kaka na Yisraele.+ Sikoyo nabondeli yo, ndimá likabo* oyo ngai mosaleli na yo namemeli yo.”
-
-
2 Ntango 6:32, 33Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
32 “Mpe soki mopaya, oyo azali te moto ya ekólo na yo Yisraele, auti na mboka moko mosika mpo na nkombo na yo monene,+ ya lobɔkɔ na yo ya nguya mpe ya lobɔkɔ na yo oyo esembolami, mpe soki ayei mpe abondeli yo, wana atali na ngámbo ya ndako oyo,+ 33 tiká ete oyoka kuna na likoló, esika ofandaka, mpe osala nyonso oyo mopaya yango akosɛnga yo; na bongo bato ya bikólo nyonso ya mabele bakoyeba nkombo na yo+ mpe bakobanga yo ndenge bato na yo Yisraele babangaka yo, mpe bakoyeba ete ndako oyo natongi ebengami na nkombo na yo.
-
-
Yisaya 56:6, 7Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
6 Mpo na bapaya oyo bayei epai ya Yehova mpo na kosalela ye,
Kolinga nkombo ya Yehova+
Mpe kozala basaleli na ye,
Baoyo nyonso bazali kotosa sabata mpe bakómisi yango eloko mpamba te
Mpe baoyo bakangami makasi na kondimana na ngai,
7 Nakomema mpe bango na ngomba na ngai mosantu+
Mpe nakosepelisa bango na ndako na ngai ya mabondeli.
Makabo na bango ya kotumba mobimba ná bambeka na bango ekondimama likoló ya etumbelo na ngai.
Mpo ndako na ngai ekobengama ndako ya mabondeli mpo na bato ya bikólo nyonso.”+
-