Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 45:6
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Nzambe azali kiti na yo ya bokonzi libela na libela;+

      Lingenda ya bokonzi na yo ezali lingenda ya bosembo.+

  • Yisaya 9:6, 7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Mpo baboteli biso mwana,+

      Bapesi biso mwana mobali;

      Mpe boyangeli* ekozala na lipeka na ye.+

      Bakopesa ye nkombo Mopesi-Toli Monene,+ Nzambe ya Nguya,+ Tata ya Seko, Nkumu ya Kimya.

       7 Bonene ya boyangeli* na ye mpe kimya,

      Kiti ya bokonzi ya Davidi+ mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te.+

      Ekopikama makasi+ mpe ekosimbama

      Na bosembo+ mpe na boyengebene,+

      Banda sikoyo mpe libela na libela.

      Molende ya Yehova ya mampinga nde ekosala yango.

  • Danyele 2:44
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 44 “Na mikolo ya bakonzi yango, Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko+ oyo ekobebisama te.+ Mpe bokonzi yango ekopesama na bato ya ekólo mosusu te.+ Ekobukabuka makonzi yango nyonso mpe ekosukisa yango,*+ mpe yango moko ekotikala mpo na libela.+

  • Luka 1:32, 33
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 32 Ye akozala moto monene+ mpe akobengama Mwana ya Oyo-Aleki-Likoló,+ mpe Yehova* Nzambe akopesa ye kiti ya bokonzi ya Davidi nkɔkɔ* na ye,+ 33 mpe akoyangela bakitani ya Yakobo lokola Mokonzi libela na libela, mpe Bokonzi na ye ekozala na nsuka te.”+

  • Emoniseli 11:15
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Anzelu ya nsambo abɛtaki kelelo na ye.+ Mpe mingongo ya makasi ebimaki na likoló, elobi: “bokonzi ya mokili ekómi Bokonzi ya Nkolo na biso+ mpe ya Kristo na ye,+ mpe akoyangela libela na libela.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto