Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Samwele 7:13
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Ye nde akotonga ndako mpo na nkombo na ngai,+ mpe nakokómisa kiti ya bokonzi na ye makasi mpo na libela.+

  • Yisaya 9:7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Bonene ya boyangeli* na ye mpe kimya,

      Kiti ya bokonzi ya Davidi+ mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te.+

      Ekopikama makasi+ mpe ekosimbama

      Na bosembo+ mpe na boyengebene,+

      Banda sikoyo mpe libela na libela.

      Molende ya Yehova ya mampinga nde ekosala yango.

  • Danyele 7:13, 14
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 “Nazalaki kaka kotala na bimonaneli ya butu, mpe namonaki moto moko lokola mwana ya moto+ azalaki koya na mapata ya likoló; mpe balekisaki ye epai ya Mokóló na Mikolo,+ mpe bamemaki ye tii liboso na Ye. 14 Mpe bapesaki ye boyangeli,+ lokumu+ ná bokonzi, mpo bato ya bikólo, ya bamboka, mpe ya minɔkɔ nyonso básalela ye.+ Boyangeli na ye ezali boyangeli ya seko, oyo ekoleka te, mpe bokonzi na ye ekobebisama te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto