Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 7:6-8
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpo yo ozali ekólo moko mosantu na miso ya Yehova Nzambe na yo, mpe Yehova Nzambe na yo aponi yo mpo okóma ekólo na ye, eloko na ye moko,* kati na bato ya bikólo nyonso oyo ezali na mabele.+

      7 “Ezali te mpo ozalaki ekólo ya bato mingi koleka bikólo nyonso nde Yehova amoniselaki yo bolingo mingi na ndenge aponaki yo,+ kutu ozalaki nde ekólo ya bato moke koleka bikólo nyonso.+ 8 Kasi ezali mpo Yehova alingaka yo, mpe mpo azali kobatela maloba ya ndai oyo alapelaki bankɔkɔ na yo,+ yango wana Yehova abimisaki bino na nguya ya lobɔkɔ na ye, mpo asikola yo na mokili ya boombo,+ alongola yo na nse ya nguya* ya Farao mokonzi ya Ezipito.

  • 2 Bakonzi 13:23
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Kasi, Yehova amoniselaki bango boboto mpe ayokelaki bango mawa+ mpe atyelaki bango likebi mpo na kondimana oyo asalaki ná Abrahama,+ Yisaka,+ mpe Yakobo.+ Alingaki te kobebisa bango, mpe abwakaki bango te mosika na elongi na ye tii sikoyo.

  • Nzembo 106:44, 45
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 44 Kasi azalaki komona mpasi na bango+

      Mpe ayokaki koganga na bango mpo na kosɛnga lisalisi.+

      45 Mpo na bango, azalaki kokanisa kondimana na ye,

      Mpe bolingo ya sembo na ye monene ezalaki kotinda ye ayoka mawa.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto