-
Marko 2:18-20Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
18 Nzokande, bayekoli ya Yoane mpe Bafarisai bazalaki na momeseno ya kokila bilei. Bongo bayaki mpe batunaki ye boye: “Mpo na nini bayekoli ya Yoane mpe bayekoli ya Bafarisai bakilaka bilei, kasi bayekoli na yo bakilaka bilei te?”+ 19 Bongo Yesu alobaki na bango: “Ntango mobali ya libala+ azali elongo na bango, baninga ya mobali ya libala bazali na ntina moko te ya kokila bilei, boye te? Ntango nyonso oyo bazali elongo na mobali ya libala, bakoki kokila bilei te. 20 Kasi mokolo ezali, mobali ya libala akolongolama epai na bango,+ mpe bakokila bilei na mokolo wana.
-
-
Luka 5:33-35Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
33 Bango balobaki na ye: “Bayekoli ya Yoane bakilaka bilei mbala na mbala mpe basalaka mabondeli,* ndenge moko na bayekoli ya Bafarisai, kasi baoyo ya yo balyaka mpe bamɛlaka.”+ 34 Yesu alobaki na bango: “Bokoki te kokilisa baninga ya mobali ya libala bilei ntango mobali ya libala azali elongo na bango, boye te? 35 Kasi mokolo ezali, mobali ya libala+ akolongolama epai na bango; bongo bakokila mpenza bilei na mikolo wana.”+
-