Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Matai 9:14, 15
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Bongo bayekoli ya Yoane bayaki epai ya Yesu mpe batunaki ye: “Mpo na nini biso ná Bafarisai tokilaka bilei kasi bayekoli na yo bakilaka bilei te?”+ 15 Na yango Yesu alobaki na bango: “Baninga ya mobali ya libala bazali na ntina moko te ya kozala na mawa ntango mobali ya libala+ azali elongo na bango, boye te? Kasi mokolo ezali, mobali ya libala akolongolama epai na bango,+ mpe bakokila bilei na ntango yango.

  • Luka 5:33-35
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Bango balobaki na ye: “Bayekoli ya Yoane bakilaka bilei mbala na mbala mpe basalaka mabondeli,* ndenge moko na bayekoli ya Bafarisai, kasi baoyo ya yo balyaka mpe bamɛlaka.”+ 34 Yesu alobaki na bango: “Bokoki te kokilisa baninga ya mobali ya libala bilei ntango mobali ya libala azali elongo na bango, boye te? 35 Kasi mokolo ezali, mobali ya libala+ akolongolama epai na bango; bongo bakokila mpenza bilei na mikolo wana.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto