Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Marko 7:25-30
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Na mbala moko, mwasi moko oyo mwana na ye ya moke ya mwasi azalaki na elimo ya mbindo ayokaki nsango na ye; ayaki mpe afukamaki na makolo na ye.+ 26 Mwasi yango azalaki Mogrɛki, mwana-mboka* ya Fenisia ya Siri; mpe azalaki kosɛnga ye ete abimisa demo yango na mwana na ye ya mwasi. 27 Kasi alobaki na mwasi yango: “Tiká bana bátonda naino, mpo ezali malamu te kozwa mampa ya bana mpe kobwakela yango bambwa ya mike.”*+ 28 Kasi azongiselaki ye: “Ya solo, Nkolo. Nzokande bambwa ya mike na nse ya mesa, elyaka biteni oyo bana bakweisaka.” 29 Bongo alobaki na ye: “Lokola olobi bongo, kende; demo wana abimi na nzoto ya mwana na yo ya mwasi.”+ 30 Bongo akendaki epai na ye mpe akutaki mwana yango ya moke alali na mbeto. Demo yango abimaki kati na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto