Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Matai 20:29-34
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Ntango bazalaki kobima na Yeriko, ebele ya bato balandaki Yesu. 30 Mpe talá! bato mibale oyo bakufá miso bafandaki pembeni ya nzela, bayokaki ete Yesu azali koleka wana, mpe bagangaki: “Nkolo, Mwana ya Davidi, yokelá biso mawa!”+ 31 Kasi ebele ya bato bagangelaki bango ete bátika makɛlɛlɛ. Kasi bango bagangaki lisusu makasi koleka ete: “Nkolo, Mwana ya Davidi, yokelá biso mawa!” 32 Bongo Yesu atɛlɛmaki, abengaki bango mpe alobaki na bango: “Bolingi nasala nini mpo na bino?” 33 Balobaki na ye: “Nkolo, tolingi miso na biso efungwama.” 34 Yesu ayokaki mawa, asimbaki miso na bango,+ mpe na mbala moko bakómaki komona lisusu. Mpe balandaki ye.

  • Luka 18:35-43
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Sikoyo, ntango Yesu azalaki kopusana pene na Yeriko, moto moko oyo akufá miso afandaki pembeni ya nzela, azali kosɛngasɛnga.+ 36 Lokola ayokaki ebele ya bato bazali koleka, abandaki kotunatuna soki ezali nini. 37 Bayebisaki ye: “Yesu moto ya Nazarete nde azali koleka!” 38 Na yango agangaki: “Yesu, Mwana ya Davidi, yokelá ngai mawa!” 39 Mpe bato oyo bazalaki kotambola liboso babandaki kogangela ye ete akanga monɔkɔ, kasi azalaki kaka koganga lisusu makasi koleka ete: “Mwana ya Davidi, yokelá ngai mawa!” 40 Bongo Yesu atɛlɛmaki mpe atindaki bámemela ye moto yango. Ntango akómaki penepene, Yesu atunaki ye: 41 “Olingi nasala nini mpo na yo?” Ye alobaki: “Nkolo, namona lisusu.” 42 Bongo Yesu alobaki na ye: “Kómá komona lisusu; kondima na yo ebikisi yo.”+ 43 Na ntango wana kaka akómaki komona lisusu, mpe abandaki kolanda ye,+ azali kopesa Nzambe nkembo. Lisusu, ntango bato nyonso bamonaki bongo, basanzolaki Nzambe.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto