Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Matai 9:27
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Yesu alongwaki kuna. Wana azalaki koleka na nzela, bato mibale oyo bakufá miso+ balandaki ye, mpe bazalaki koganga boye: “Mwana ya Davidi, yokelá biso mawa.”

  • Marko 10:46-52
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 46 Bongo bakómaki na Yeriko. Kasi ntango Yesu ná bayekoli na ye mpe ebele mpenza ya bato bazalaki kobima na Yeriko, Bartime (mwana ya Time), mosɛngi-biloko moko oyo akufá miso, afandaki pembeni ya nzela.+ 47 Ntango ayokaki ete Yesu moto ya Nazarete nde azalaki koleka, abandaki koganga mpe koloba: “Mwana ya Davidi,+ Yesu, yokelá ngai mawa!”+ 48 Na yango, bato mingi babandaki kogangela ye ete akanga monɔkɔ, kasi azalaki kaka koganga lisusu makasi koleka ete: “Mwana ya Davidi, yokelá ngai mawa!” 49 Bongo Yesu atɛlɛmaki mpe alobaki: “Bóbengela ngai ye.” Bongo babengaki moto yango oyo akufá miso, balobi na ye: “Zalá na mpiko, tɛlɛmá, azali kobenga yo.” 50 Abwakaki elamba na ye ya likoló, apumbwaki mpe akendaki epai ya Yesu. 51 Yesu atunaki ye: “Olingi nasala nini mpo na yo?” Moto yango oyo akufá miso alobaki na ye: “Rabuni,* namona lisusu.” 52 Mpe Yesu alobaki na ye: “Kende, kondima na yo ebikisi yo.”+ Na mbala moko akómaki komona lisusu, mpe abandaki kolanda ye na nzela.+

  • Luka 18:35-43
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Sikoyo, ntango Yesu azalaki kopusana pene na Yeriko, moto moko oyo akufá miso afandaki pembeni ya nzela, azali kosɛngasɛnga.+ 36 Lokola ayokaki ebele ya bato bazali koleka, abandaki kotunatuna soki ezali nini. 37 Bayebisaki ye: “Yesu moto ya Nazarete nde azali koleka!” 38 Na yango agangaki: “Yesu, Mwana ya Davidi, yokelá ngai mawa!” 39 Mpe bato oyo bazalaki kotambola liboso babandaki kogangela ye ete akanga monɔkɔ, kasi azalaki kaka koganga lisusu makasi koleka ete: “Mwana ya Davidi, yokelá ngai mawa!” 40 Bongo Yesu atɛlɛmaki mpe atindaki bámemela ye moto yango. Ntango akómaki penepene, Yesu atunaki ye: 41 “Olingi nasala nini mpo na yo?” Ye alobaki: “Nkolo, namona lisusu.” 42 Bongo Yesu alobaki na ye: “Kómá komona lisusu; kondima na yo ebikisi yo.”+ 43 Na ntango wana kaka akómaki komona lisusu, mpe abandaki kolanda ye,+ azali kopesa Nzambe nkembo. Lisusu, ntango bato nyonso bamonaki bongo, basanzolaki Nzambe.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto