20 Mpe talá! mwasi moko oyo azalaki konyokwama na maladi ya kotanga makila+ esali mbula 12, ayaki nsimansima ya Yesu mpe asimbaki nsɔngɛ ya elamba na ye ya likoló,+
22 Yesu abalukaki, amonaki ye, mpe alobaki na ye: “Zalá na mpiko, mwana na ngai; kondima na yo ebikisi yo.”+ Mpe banda na ngonga wana, mwasi yango abikaki.+