-
Matai 26:69-75Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
69 Nzokande Petro afandaki libándá, na kati ya lopango yango. Mosaleli moko ya mwasi apusanaki pene na ye, mpe alobaki: “Yo mpe ozalaki na Yesu moto ya Galile!”+ 70 Kasi awanganaki yango liboso na bango nyonso, alobi: “Makambo oyo ozali koloba nayebi yango te.” 71 Ntango akendaki na porte ya lopango, mosaleli mosusu ya mwasi amonaki ye mpe alobaki na baoyo bazalaki wana: “Moto oyo azalaki ná Yesu moto ya Nazarete.”+ 72 Awanganaki yango lisusu mpe alapaki ndai ete: “Nayebi moto yango te!” 73 Nsima ya mwa ntango moke, baoyo batɛlɛmaki wana bayaki mpe balobaki na Petro: “Ya solo yo mpe ozali moko na bango, kutu elobeli* na yo ezali kofunda yo.” 74 Bongo abandaki komilakela mabe mpe kolapa ndai ete: “Nayebi moto yango te!” Mpe na mbala moko nsoso elelaki. 75 Mpe Petro akanisaki makambo oyo Yesu alobaki, ete: “Liboso nsoso elela, okowangana ngai mbala misato.”+ Bongo abimaki na libándá mpe alelaki na mawa makasi mpenza.
-
-
Luka 22:55-62Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
55 Ntango bapelisaki mɔtɔ na katikati ya lopango mpe bafandaki elongo, Petro afandaki na kati na bango.+ 56 Kasi mosaleli moko ya mwasi amonaki ye afandi pene na mɔtɔ oyo ezalaki kongɛngisa. Atalaki ye malamumalamu mpe alobaki: “Moto oyo mpe azalaki elongo na ye.” 57 Kasi awanganaki yango, alobi: “Mwasi, nayebi ye te.” 58 Mwa moke na nsima moto mosusu amonaki ye mpe alobaki: “Yo mpe ozali moko na bango.” Kasi Petro azongisaki: “Te, ngai te.”+ 59 Mpe nsima ya ngonga soki moko, moto mosusu abandaki kotingama makasi ete: “Ya solo moto oyo mpe azalaki elongo na ye. Kutu, azali moto ya Galile!” 60 Kasi Petro alobaki: “Nayebi te makambo oyo ozali koloba.” Mpe na ntango yango kaka, wana azalaki naino koloba, nsoso elelaki. 61 Bongo Nkolo abalukaki mpe atalaki Petro, mpe Petro akanisaki lisusu maloba oyo Nkolo alobaki na ye ete: “Liboso nsoso elela lelo, okowangana ngai mbala misato.”+ 62 Bongo abimaki libándá mpe alelaki na mawa makasi.
-
-
Yoane 18:25, 26Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
25 Nzokande Simo Petro azalaki wana mpe azalaki koyɔta mɔtɔ. Bongo balobaki na ye: “Yo mpe ozali te moko ya bayekoli na ye?” Awanganaki mpe alobaki: “Te, ngai te.”+ 26 Moko ya baombo ya nganga-nzambe monene, oyo azalaki ndeko ya moto oyo Petro akataki litoi,+ alobaki: “Yo te nde namonaki na elanga elongo na ye?”
-