-
Matai 9:20-22Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
20 Mpe talá! mwasi moko oyo azalaki konyokwama na maladi ya kotanga makila+ esali mbula 12, ayaki nsimansima ya Yesu mpe asimbaki nsɔngɛ ya elamba na ye ya likoló,+ 21 mpo azalaki koloba na motema na ye: “Soki kaka nasimbi elamba na ye ya likoló, nakobika.” 22 Yesu abalukaki, amonaki ye, mpe alobaki na ye: “Zalá na mpiko, mwana na ngai; kondima na yo ebikisi yo.”+ Mpe banda na ngonga wana, mwasi yango abikaki.+
-
-
Marko 5:25-29Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
25 Nzokande, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki na maladi ya kotanga makila+ esali mbula 12.+ 26 Amonaki mpasi mingi na mabɔkɔ ya minganga ndenge na ndenge mpe asilisaki mbongo na ye nyonso, kasi ayokaki kaka malamu te. Kutu, maladi na ye ekómaki lisusu makasi. 27 Ntango ayokaki nsango ya Yesu, ayaki nsimansima na ye na kati ya ebele ya bato mpe asimbaki elamba* na ye,+ 28 mpo azalaki koloba: “Soki nasimbi kaka bilamba* na ye, nakobika.”+ 29 Mpe na mbala moko makila na ye etikaki kotanga, mpe ayokaki na nzoto na ye ete abiki na maladi wana ya mpasi.
-