Ndenge ekomamá na Marko
7 Nzokande Bafarisai ná bakomeli mosusu oyo bautaki na Yerusaleme bayanganaki zingazinga na ye.+ 2 Mpe bamonaki bayekoli na ye mosusu bazali kolya bilei mabɔkɔ mbindo, elingi koloba, oyo basukoli te.* 3 (Mpo Bafarisai ná Bayuda nyonso balyaka te soki basukoli mabɔkɔ te tii na molɔku;* balandaka bonkɔkɔ ya bato ya ntango ya kala, 4 mpe ntango bauti na zando, balyaka te soki basukoli te. Bazwá mpe mimeseno mosusu mingi ya bonkɔkɔ oyo bakangamá na yango, na ndakisa: batisimo ya bakɔpɔ, ya bilokó, mpe ya bambɛki ya kwivre.)+ 5 Bongo Bafarisai ná bakomeli yango batunaki ye: “Mpo na nini bayekoli na yo batosaka te bonkɔkɔ ya bato ya ntango ya kala, kasi bazali kolya mabɔkɔ mbindo?”+ 6 Alobaki na bango: “Bakosi, Yisaya alobaki solo ntango asakolaki mpo na bino, se ndenge ekomamá, ete: ‘Bato oyo bakumisaka ngai kaka na mbɛbu, kasi mitema na bango ezali mosika na ngai.+ 7 Bazali kokoba kosambela ngai kaka mpamba, mpo mateya oyo bazali koteya ezali nde mibeko ya bato.’+ 8 Botiki mobeko ya Nzambe, mpe bokangami makasi na bonkɔkɔ ya bato.”+
9 Alobaki na bango lisusu boye: “Na mayele nyonso, bozali kotya mobeko ya Nzambe pembeni mpo na kobatela bonkɔkɔ na bino.+ 10 Na ndakisa, Moize alobaki: ‘Kumisá tata na yo mpe mama na yo,’+ mpe, ‘Moto oyo afingi* tata na ye to mama na ye asengeli kobomama.’+ 11 Kasi bino bolobi: ‘Moto akoki koloba na tata na ye to na mama na ye: “Eloko nyonso nazali na yango oyo ekokaki kosalisa bino ezali korbani, (elingi koloba, likabo oyo epesami na Nzambe).”’ 12 Na yango bozali kotika ye asala lisusu ata eloko moko te mpo na tata na ye to mama na ye.+ 13 Na ndenge yango, bokómisi liloba ya Nzambe eloko mpamba mpo na bonkɔkɔ na bino oyo bolakisaka basusu.+ Mpe bosalaka makambo mingi ya ndenge wana.”+ 14 Bongo abengaki lisusu ebele ya bato, mpe alobaki na bango: “Bóyoka ngai, bino nyonso, mpe bókanga ntina ya maloba na ngai.+ 15 Eloko oyo euti libándá mpe ekɔti na kati ya moto ekoki kokómisa ye mbindo te. Makambo oyo ebimaka na kati ya moto nde ekómisaka ye mbindo.”+ 16 *——
17 Nzokande ntango akɔtaki na ndako moko mosika na ebele ya bato, bayekoli na ye babandaki kotuna ye mituna mpo na ndakisa yango.+ 18 Bongo alobaki na bango: “Bino mpe bozangi mayele lokola bango? Boyebi te ete eloko moko te oyo euti libándá mpe ekɔti na kati ya moto ekoki kokómisa ye mbindo, 19 mpo ezali kokɔta, na motema na ye te, kasi nde na libumu na ye, mpe ebimaka libándá, na kabinɛ?” Na bongo, amonisaki ete biloko nyonso ya kolya ezali pɛto. 20 Alobaki lisusu boye: “Oyo ebimaka na moto nde ekómisaka ye mbindo.+ 21 Mpo na kati ya moto, na motema na ye,+ nde makanisi ya mabe ebimaka: misala ya pite,* koyiba, koboma bato, 22 misala ya ekobo, lokoso, misala ya motema mabe, kokosa, etamboli ya nsɔni na nko,* liso ya likunya, kofinga, lofundo, mpe bozoba. 23 Makambo nyonso wana ya mabe eutaka na kati mpe ekómisaka moto mbindo.”
24 Alongwaki kuna mpe akendaki na etúká ya Tire mpe ya Sidone.+ Kuna akɔtaki na ndako moko mpe alingaki te ete moto ata moko ayeba yango, kasi akokaki kobombama te. 25 Na mbala moko, mwasi moko oyo mwana na ye ya moke ya mwasi azalaki na elimo ya mbindo ayokaki nsango na ye; ayaki mpe afukamaki na makolo na ye.+ 26 Mwasi yango azalaki Mogrɛki, mwana-mboka* ya Fenisia ya Siri; mpe azalaki kosɛnga ye ete abimisa demo yango na mwana na ye ya mwasi. 27 Kasi alobaki na mwasi yango: “Tiká bana bátonda naino, mpo ezali malamu te kozwa mampa ya bana mpe kobwakela yango bambwa ya mike.”*+ 28 Kasi azongiselaki ye: “Ya solo, Nkolo. Nzokande bambwa ya mike na nse ya mesa, elyaka biteni oyo bana bakweisaka.” 29 Bongo alobaki na ye: “Lokola olobi bongo, kende; demo wana abimi na nzoto ya mwana na yo ya mwasi.”+ 30 Bongo akendaki epai na ye mpe akutaki mwana yango ya moke alali na mbeto. Demo yango abimaki kati na ye.+
31 Ntango Yesu alongwaki na etúká ya Tire, alekaki na Sidone mpo na kokende na mbu ya Galile, akatisaki na katikati ya etúká ya Dekapolisi.*+ 32 Kuna, bamemelaki Yesu mobali moko oyo akufá matoi mpe azalaki na mokakatano ya koloba,+ mpe babondelaki ye ete atya lobɔkɔ likoló na ye. 33 Abendaki ye pembeni, alongolaki ye na kati ya ebele ya bato. Na nsima atyaki misapi na ye na matoi ya mobali yango mpe, nsima ya kobwaka nsoi, asimbaki lolemo na ye.+ 34 Mpe wana atalaki likoló, apemaki makasi mpe alobaki na ye: “Efata,” elingi koloba: “Fungwamá.” 35 Bongo matoi ya mobali yango efungwamaki,+ mokakatano na ye ya koloba esilaki mpe akómaki koloba malamu. 36 Na yango, apesaki bango mitindo ete báyebisa moto te;+ kasi soki apekisi bango, wana nde bazalaki kopanza nsango yango lisusu koleka.+ 37 Ya solo, bakamwaki mingi mpenza+ mpe balobaki: “Makambo nyonso oyo azali kosala ezali malamu. Azali kosala ete bato oyo bakufá matoi báyoka mpe bababa báloba.”+