A2
Makambo oyo ebongisami
Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya bokristo ebimaki na Anglais na 1950, mpe Biblia mobimba ebimaki na 1961. Banda wana, bamilio ya bato na minɔkɔ koleka 210 bazali kosepela na Biblia yango oyo ebongoli makomi ya libosoliboso ya Biblia na bosikisiki mpe na ndenge ya pɛtɛɛ.
Kasi na bambula 50 oyo euti koleka, minɔkɔ ebongwani mingi. Komite ya Biblia Libongoli ya mokili ya sika emonaki ete esengeli kotalela bambongwana yango mpo na kosimba motema ya motángi ya lelo oyo. Yango wana elobeli mpe maloba mosusu ebongisami, na mikano oyo:
Kosalela elobeli ya lelo, oyo bato bayebi. Na ndakisa, liloba “nkɛlɛ” esalelamaki mpo na kolobela nkanda makasi, nzokande bato mosusu basalelaka yango mpo na kolobela zeyi. Na yango, tosaleli mingi maloba “nkanda makasi” mpe “nkanda ya kongala” na esika ya “nkɛlɛ.” (Ebandeli 27:44; Ezekiele 5:15) Na esika ya maloba “ntango oyo etyami ndelo te,” tosaleli maloba lokola “libela na libela,” “mpo na libela,” “seko na seko,” to “kalakala,” mpo na kobimisa likanisi oyo esengeli na kotalela lisolo na lisolo.—Ebandeli 3:22; Kobima 31:16; Nzembo 136:14; Mika 5:2.
Liloba “momboto” na Ebre mpe Grɛki ya kala ekoki kosalelama mpo na kolobela kolona mboto, bakitani ya moto, to mpe mai ya mibali. Lokola liloba yango ezali kosalelama lisusu mingi te mpo na kolobela bato, tosaleli maloba mosusu oyo ezali kobimisa likanisi oyo esengeli na kotalela lisolo. (Ebandeli 1:11; 22:17; 48:4; Matai 22:24; Yoane 8:37) Tosaleli liloba “bana” to “libota” na bavɛrsɛ mingi oyo eyokani na elaka ya momboto oyo epesamaki na Edene, oyo ezali na Ebandeli 3:15.
Liloba “kokimela” oyo esalelamaki na libongoli ya liboso, bato mingi bakokoka kotánga yango malamu te mpo ebimisa mpenza ndimbola ya liloba yango, mpe ezalaki kopesa likanisi mosusu. Na yango, tosaleli maloba lokola “kolelalela” to “kolela na mawa” na esika na yango.—Nzembo 6:6; 12:5; Baroma 8:22.
Maloba ya Biblia ekómi polele. Maloba mosusu oyo esalemaki liboso, ezalaki kosɛnga kolimbola yango mpo moto akanga ntina na yango malamu. Na ndakisa, maloba “alalaki esika moko na bankɔkɔ na ye” esalelamaki mpo na kolobela kokufa, kasi na bantango mosusu likanisi yango ezalaki kobima polele te. Na yango, tosaleli liloba “kokufa,” mpe elobeli wana ya liboso etyami na maloba na nse ya lokasa.—Ebandeli 47:30; 2 Samwele 7:12.
Na mabongoli oyo ebimaki liboso, liloba ya Ebre nèphèsh mpe ya Grɛki psukhê ebongolamaki na bisika nyonso na “molimo.” Lokola bato bapesaka liloba “molimo” ndimbola ndenge na ndenge ya libunga, lolenge wana ya kobongola esalisaki motángi amona ndenge bato oyo bakomaki Biblia na litambwisi ya elimo ya Nzambe basalelaki maloba yango na minɔkɔ oyo Biblia ekomamaki. Na kotalela lisolo, maloba yango ekoki komonisa (1) moto, (2) bomoi ya moto, (3) bikelamu ya bomoi, (4) mposa oyo moto azali na yango to, na bisika mosusu, (5) bato oyo bakufi. Nzokande, lokola na Lingala bato mingi te basalelaka liloba “molimo” ndenge wana, ekateli ezwamaki ete maloba wana ya kala ekobongolama na kolanda ndimbola oyo ezali kopesa, mpe ekozala na maloba na nse ya lokasa oyo elobi “To, ‘molimo.’” (Talá, na ndakisa, Ebandeli 1:20; 2:7; Balevi 19:28; Nzembo 3:2; Masese 16:26; Matai 6:25.) Kasi, na bapoɛmi to na masolo oyo eyebani malamu, liloba “molimo” etikali na bavɛrsɛ, mpe maloba na nse ya lokasa etindi na Ndimbola ya maloba to emonisi ndenge mosusu ya kobongola.—Kolimbola Mibeko 6:5; Nzembo 131:2; Masese 2:10; Matai 22:37
Ndenge moko mpe, liloba “ngɛi” etikali na vɛrsɛ esika oyo emonisi eteni ya nzoto. Kasi, ntango esalelami na ndenge ya elilingi na bavɛrsɛ lokola, Nzembo 7:9 ná 26:2 mpe Emoniseli 2:23, ebongolami na “mayoki oyo ebombaná mpenza na kati” to “makanisi oyo ebombaná mpenza” na vɛrsɛ, mpe likanisi ya liloba na liloba ekei na maloba na nse ya lokasa.
Kaka ndenge ezali na Ebre mpe na Grɛki, liloba ya Lingala “motema” esalelami mpo na kolobela motema ya solo mpe motema ya elilingi, na yango etikali bisika mingi. Kasi, na mwa bisika oyo ndimbola yango emonisami polele te, bavɛrsɛ yango ebongolami na ndenge ya polele koleka. Na ndakisa, na mokanda ya Masese, maloba “azali na motema te” ekómi sikoyo “azangi bososoli,” mpe likanisi ya liloba na liloba etyami na maloba na nse ya lokasa. (Masese 6:32; 7:7) Tosali mpe bongo na maloba mosusu lokola, “mafuta,” “mosuni,” mpe “liseke,” na kotalela lisolo. (Ebandeli 45:18; Mosakoli 5:6; Yobo 16:15) Maloba yango mosusu etyami na “Ndimbola ya maloba ya Biblia.”
Kotánga ekómi pɛtɛɛ. Na Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebimaki liboso, maloba mosusu ebakisamaki na baverbe mpo na komonisa soki verbe ya Ebre elobeli likambo ntango ebandaki kosalema to ntango esilaki kosalema. Na ndakisa, mpo na komonisa ete likambo ezalaki kokoba kosalema, liloba “kobanda” ebakisamaki liboso ya baverbe mpe liloba “lisusu” nsima ya baverbe, mpe bongo na bongo. Mpo na komonisa ete verbe ya Ebre emonisaki ete likambo esilaki kosalema, mbala mingi maloba “ya solo,” “esengeli,” “mpenza,” mpe bongo na bongo ezalaki kobakisama. Na yango, maloba wana esalelamaki na bisika mingi mpenza. Na libongoli oyo ebongisami, maloba oyo ebakisamaka na baverbe etikali na bisika mosusu, na ndakisa “kokoba,” “azalaki” mpe “azalaki na momeseno ya” soki esengeli, mpo na komonisa ete likambo yango ekobaki. (Ebandeli 3:9; 34:1; Masese 2:4) Kasi, mpo kotánga ekóma pɛtɛɛ, maloba oyo babakisaka na baverbe elongwe na bisika oyo likanisi ya makomi ya ebandeli ekobeba te.
Komonisa polele soki bazali kolobela mobali to mwasi. Bankombo na monɔkɔ ya Ebre mpe ya Grɛki emonisaka soki ezali mobali to mwasi; mpe na bantango mosusu Grɛki emonisaka te soki ezali mobali to mwasi. Nzokande, koluka komonisa soki ezali mobali to mwasi ndenge emonisami na minɔkɔ ya libosoliboso, na bantango mosusu ebimisaka likanisi polele te. Na Ebre mpe na Grɛki, maloba ya boike emonisamaka mbala mingi lokola mobali, ezala ntango elobeli kaka mibali, to ntango elobeli mibali mpe basi. Na ndakisa, atako maloba “bana ya Yisraele” ekoki komonisa bana mibali 12 ya Yakobo, mbala mingi emonisaka ekólo mobimba ya Yisraele, ya mibali mpe basi. (Ebandeli 46:5; Kobima 35:29) Na yango na libongoli oyo ebongisami, maloba yango ebongolami na bisika mingi “Bayisraele” mpo na komonisa ete ezali kolobela ekólo mobimba. Ndenge moko mpe, maloba “mwana mobali oyo tata akufá” ekómi “mwana oyo tata akufá” to “mwana etike” mpo na komonisa ete ezali kolobela mwana mobali to mwana mwasi.
Mbongwana nyonso oyo ekɔti na makomi ya Biblia esalemi na likebi mpenza, nsima ya kobondela, mpe na limemya mozindo mpo na mosala malamu ya komite ya libosoliboso ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika.
Makambo mosusu oyo ebongisami:
Biblia oyo ezali na maloba na nse ya lokasa ebeleebele te. Maloba na nse ya lokasa etyami na lolenge oyo:
“To” Lolenge mosusu ya kobongola makomi ya Ebre, ya Aramɛyɛ, to ya Grɛki oyo ekopesa kaka likanisi moko.—Ebandeli 1:2, maloba na nse ya lokasa na “nguya”; Yosua 1:8, “na mongongo ya nse.”
“To mbala mosusu” Lolenge mosusu oyo endimamá ya kobongola makomi, kasi oyo ezali kopesa likanisi ekeseni.—Ebandeli 21:6, “akosɛka elongo na ngai”; Zekaria 14:21, “Mokanana.”
“Lil.” Libongoli ya liloba na liloba ya makomi ya Ebre, Aramɛyɛ, to Grɛki, to mpe ndimbola ya libosoliboso ya lolenge moko ya koloba na minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia.—Ebandeli 30:22, “zemi”; Kobima 32:9, “motó makasi.”
Ndimbola mpe makambo mosusu Ndimbola ya bankombo (Ebandeli 3:17, “Adama”; Kobima 15:23, “Mara”); makambo etali bakilo mpe bimekeli (Ebandeli 6:15, “mapeko”); makambo mosusu ya koyekola na Apɛndisi mpe Ndimbola ya maloba.—Ebandeli 37:35, “Nkunda”; Matai 5:22, “Gehena.”
Eteni “Maloba ya ebandeli na Liloba ya Nzambe,” oyo ezali liboso makomi ya Biblia ebanda, elobeli mateya ya moboko oyo ezali na Biblia. Nsima ya makomi ya Biblia, okokuta mbala moko “Etanda ya mikanda ya Biblia,” “Index ya maloba ya Biblia,” mpe “Ndimbola ya maloba ya Biblia.” Ndimbola ya maloba esalisaka motángi ayeba ndenge maloba mosusu esalelami na Biblia. Apɛndisi A elobeli makambo oyo: “Malako mpo na kobongola Biblia,” “Makambo oyo ebongisami,” “Ndenge Biblia ekómelá biso,” “Nkombo ya Nzambe na Makomami ya Ebre,” “Nkombo ya Nzambe na Makomami ya Grɛki ya bokristo,” Etanda: “Basakoli ná bakonzi ya Yuda mpe ya Yisraele,” mpe “Makambo minene ya bomoi ya Yesu awa na mabele.” Apɛndisi B ezali na bakarte, bitanda mpe makambo mosusu ya ntina oyo ekoki kosalisa bato oyo balingaka koyekola Biblia na mozindo.
Na kati ya makomi ya Biblia, mokanda mokomoko ezali na eteni oyo elobeli makambo oyo ezali na kati ya mikapo na yango ná bavɛrsɛ oyo eyokani na yango, mpo na kosalisa motángi ayeba na mokuse makambo oyo ezali na mokanda yango. Molɔngɔ ya katikati ya lokasa nyonso ezali na mitindami ya ntina mingi oyo euti na Biblia oyo touti kozala na yango.