Mposa ya koluka bankisi ya sika
Euti na mokomani na biso na Grande-Bretagne
Eloko nini ndembo, kaukau, ntokia mpe nzeté isusu oyo ikosilisaka to ikolɛmbisaka makɔnɔ izali na yango? Ekoki kozwama longwa na milóna. Longola sukali mpe oxygène, oyo euti na photosynthèse, milóna misalaka biloko mosusu ya kokamwa uta na biteni mosusu ya ntina. Ezali nde biloko wana oyo epesaka molóna moko na moko lolenge na yango oyo ekeseni na mosusu.
MWA koswa moke ya molóna babengi ortie, elɛngi ya pómo to nsolo kitoko ya fololo rose, yango nyonso eutaka na lisangá ya biloko bibimisami na milóna yango moko. Boye, oyo ekokaki komonana lokola eloko bobele moko ezali mingimingi bosangani ya biteni mingi mpenza.
Baizini oyo euti na bozalisi
Tótalela nsolo kitoko ya kaukau. Osilaki koyeba ete bato ya siansi na mikolo na biso basili kotangola biloko 84 oyo bikoki kobima mpe bisanganaka mpo na kobimisa nsolo wana ya kitoko? Biloko bisangani na mbóto ya kaukau bizali mingi mpenza, mpe na bambula oyo euti koleka, bato bazali komipesa mingi na bolukiluki mpo na koyeba yango. Nzokande, wana ezali bobele eloko moko euti na bozalisi!
Cholestérol ezali eloko moko ya mafuta, oyo eyebani mingi mpo na lotómo na yango na mpasi ya motema epai ya moto. Nzokande, kati na milóna misusu, ezali eutelo ya bosalemi ya biloko ebele bibengami produits chimiques, stéroïdes, kati na yango tokoki kozwa vitamini D, hormones (ndakisa: cortisone) mpe bankisi lokola bêtaméthasone, oyo ekitisaka kovimba na esika moko ya nzoto mpe kosilisa mingai kati na nzoto. Diosgénine, stéroïde oyo esalelami mpo na kosala ba contraceptifs oraux (bankisi ya komela mpo na kopekisa kobota), esalemi na lolenge mosusu ya mbomá ya zámba. Nzokande, cortisone euti na hécogénine, stéroïde ebimisami na sisal nsima ya kolongola nsinga na yango ya kati. Bankisi mingi oyo ezali kosalelama lelo etangolamaki mpo na mbala ya liboso na nsinga ya milóna.
Milóna mpe moto
Soki bankisi oyo esalemi ezali na lisoló ya minganga ya ntango na biso, kasi esili koleka bankóto ya bambula, moto azali komibikisa na makɔnɔ mingi na nzela ya milóna. Babúku oyo emonisaka makambo malekaka mbala na mbala na mokili Assyrie ezali kolobela kosalelama ya Anémone oyo eyebani lokola analgésique, mpe papyrus ya minganga ya Baezipito ezali komonisa kosalelama oyo eyebani mingi ya milóna ya nkisi na ntango ya Bafalo.
Organisation mondiale de la santé emonisi bosaleli ya milóna soki 20 000 ya nkisi kati na mokili. Na Grande-Bretagne, batone 6 000 kino 7 000 ya matiti ya nkisi ebandaki kosalisa mbula na mbula na bosali ya bankisi soko 5 500, mpe na Etats-Unis koleka katikati ya bitinda ya minganga etalelaki nkisi oyo iuti na nzeté.
Bosaleli ya nkisi ya sika
Lokola bazali na likoki ya kozwa 250 000 ya lolenge ya nzeté oyo iyebani, oyo ezali moko na moko na bosangani ya biloko na yango ya kati, balukiluki bazali koluka bilembo oyo ekoki komonisa bango matambe ya kobimisa bankisi mosusu. Moko ya myango mpo na yango ezali kotalela lolenge nini bato bazali kosalela milóna oyo ebimaka zingazinga na bango mpo na komisalisa na bamaladi.
Bazwaki cocaïne nsima ya komona ete kolya nkasa ya coca elɛmbisaka nzala mpe esilisaka kolɛmba. Na kotangoláká mpe kobongoláká lolenge ya cocaïne, bato na siansi babimisi nkisi moko oyo ezali kosalelama lokola “anesthésie locale.” Ntango monganga na yo oyo atali makambo ya mino atubi yo ntonga moko mpo ete oyoka mpasi te na eteni moko ya mbángá, ezali mpenza ete ozali kozwa matomba na misala na yango.
Ebele ya makambo mosusu ya kosalelama ya milóna elali na mikanda ya zebi ya bitwɛlɛ. Bato na ntɔ́ki oyo balekisi mibu 4 mpo na koyekola bamilió 2,5 ya spécimens kati na herbier Gray mpe arboretum Arnold ya Eteyelo monene ya Harvard babimisaki lolenge koleka 5 000 kino ntango wana ezalaki kotyelama likebi te mpe ezali na likoki ya kozala na litomba na makambo matali bankisi.
Nzela mosusu ezali ya kokokanisa biloko ya kati ya milóna. Soki lolenge moko ya milóna ezali na biloko kati na yango ya ntina mingi, ntango mosusu ezali mpe ndenge moko mpo na oyo ekokani na yango. Ntango bolukiluki likoló na nzeté moko ya nɔ́rdi ya Australie, castanospermum esalisaki mpo na kotangola castanospermine, ngɛngɛ moko na mosala ya antivirale, bato bayekolaka nzeté, na kolukáká nzeté ya lolenge yango bapesaki likanisi ya kotalela Alexa ya Amerika ya Súdi.
Bolukiluki mpo na kosilisa kanser
Ekwelaka mbala mosusu ete bilembo oyo bitindaka basavá na banzela ya mabe ebimisaka matomba oyo bamizelaki na yango te. Na ndakisa, ekanisamaki ntango mosusu ete kobimisama ya pervenche ya Madagascar ezalaki na makasi mpo na antidiabétiques (nkisi oyo ebikisaka maladi ya sukali). Balukiluki ya Canada babandaki komeka yango mpo na kondimisama, na kokamwa mingi ete ezalaki kolɛmbisa système immunitaire na kokitisáká bobimi ya globules blancs. Bozwi yango epesaki minganga likanisi ya koyekola bopusi na yango likoló na mpasi babengi leucémie, kanser ya globules blancs.
Na nsuka, batangoli biloko soko 90 kati na yango mibale, vincristine mpe vinblastine oyo ezali makasi mpo na nkisi. Ezali moke mingi kati na milóna, na boye ete esengeli pene na tone moko ya nzeté mpo na kozwa bagrami mibale ya vincristine. Biloko yango mpe oyo euti na yango esalisaka lelo oyo mpo na kobikisa leucémie ya bana na chimiothérapie na mokili mobimba.
Na nsuka ya mibu 50, na Etats-Unis, National Cancer Institute ebimisaki manáka ya mibu 25 . . . antitumorale likoló ya ba cellules ya motema na milóna. Likoló ya 114 000 ebimisami 40 000 ya ndenge ya nzeté oyo etalelami, pene na 4 500 epesi bopusi ya malamu mpo na kokóba bolukiluki. Nzokande, William Evans, mopesi makanisi na pharmacognosie alobi ete: “Ezali mpenza mpasi mpo na kobimisa nkisi ya kanser ekeseni moko na mosusu” na nzela ya misala oyo atako mizali ya ntina. Ya solo, kanser ekeseni moko na mosusu, mpe botali yango esalamaki bobele likoló na mwa ndambo ya bikumu ya ba cellules ya motema oyo ekolaka mingi.
Bankisi ya sika mpe milóna miye miyebani mingi uta kala
Milóna miye miyebani mingi uta kala mizali kokóba kotinda na kokanisa. Na ndakisa, tangawisi (gingembre) ezali lelo kosalelama lokola antiémétique, oyo ezali mpenza makasi mpo na mpasi ya kizunguzungu na ntango ya mibembo. Likambo ya kokamwa lisusu, ekoki komonana malamu mpo na kobikisa bato oyo bazali na mpasi ya bilharziose, mpasi moko ya mikili epai kuna moi engalaka makasi. Epai ya bayekoli ya Nigéria oyo bazwami na yango, komela kinini tangawisi elongolaka makila kati na masuba mpe ekitisaka motángo ya mwá maki ya nyama ebengami bilharzies.
Bolukiluki ya bankisi ya sika na nzela ya boyekoli ya milóna ezali bobele na ebandeli. Ata banzeté oyo eyebani malamu ezali kobomba basɛkɛlɛ́ mosusu mingi. Na ndakisa, réglisse ezali sikawa kolukama mingi, mpamba te biloko na yango mosusu ya kati ezali komonana ete ezali anti-inflammatoires ya makasi, mpe biloko oyo biuti na yango bikoki kobikisa bato mosusu oyo bazali na mpasi ya mikuwa oyo ebengami arthrite. Batyaka mpe likebi na pois mpo na bopusi na yango antifongique mpe bankisi oyo ebomaka mikrobe
Na bipai mosusu na mokili, bazali kosilisa nyɛɛ banzeté mingi oyo eyebani naino te. Ezali malamu koloba ete ngonga ya kobungisa ezali te soki balingi kobimisa bankisi ya sika. Kotalelama ya malamu mpe kobatelama ya milóna ezali likambo ya ntina mpenza, bakisá mpe ndenge oyo eyebani malamu. Likambo mosusu liyebani te yango oyo: litomba nini ezali na biloko ya nzeté wana mpo na nzeté yango moko? Mpo na nini, na ndakisa, poupier ebimisaka bosangani ya noradrénaline, hormone ya ntina mpo na nzoto ya moto?
Na ntembe te, boyebi na biso likoló na milóna ezali naino moke mingi. Kasi oyo toyebi likoló na yango ezali komonisa mokano ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba mpe ya Mozalisi monene.
[Elilingi na lokasa 24]
Tangawisi ezali makasi mpo na mpasi ya kizunguzungu na ntango ya mibembo