Makambo mazali koleka na mokili
Esambiselo monene elóngisi mwasi moko Motatoli ya Yehova
Esili koleka mbula minei, na engumba Floride, na Etats-Unis, mwasi moko Motatoli ya Yehova abungisaki makila mingi na ntango azalaki kobota mwana na lipasó oyo babengaka césarienne. Minganga oyo bazalaki kosalisa ye bamonaki ete mpo akoka kobika, asengelaki kozongisama makila. Mwasi yango aboyaki kondima ete bázongisa ye makila, na kotalela mateya mpe bindimeli na ye ya losambo. Bazuzi bayanganisamaki nokinoki, esambiselo ya esika wana ezwaki ekateli ete bázongisa ye makila kozanga kotalela likanisi na ye, mpamba te minganga oyo bazalaki kosalisa ye bamonaki ete esengelaki bongo. Moko na bantina oyo bapesaki ezalaki oyo ete soki mama akufi, mwana akozwa lisungi mpe libateli na ye te. Ekateli wana endimamaki. Na nsuka, likambo yango ekómaki na Esambiselo eleki monene ya Floride. Esambiselo yango elóngisaki mwasi Motatoli wana, elongolaki bikateli oyo bizwamaki na bisambiselo mibale ya liboso, atako elónga yango ezwamaki na nsima wana basilaki kozongisa ye makila, likambo oyo ye aboyaki mpenza. Esambiselo eleki monene ya Floride elobaki ete kozala moboti “ezali kopekisa te ete moto amitambwisa engebene bindimeli na ye.” Na bongo, esambiselo yango endimaki lotómo ya mobɛli ya kozwa ekateli mpo na oyo etali nzoto na ye mpe bonsomi ya kopona losambo oyo moto ye moko alingi.
Lokótá oyo ekómi kolobama mingi
Lelo oyo, bamilió koleka 330 ya bato kati na mokili bazali koloba lokótá Espagnol. Na mobu 2000, motuya ya bato balobaka Espagnol bobele na Etats-Unis ekokóma bamilió 35. Na ntango wana Espagnol ekoleka Lingelesi mpe ekokóma lokótá oyo ekozala kolobama mingi koleka na mikili ya Wɛ́sti to Mpótó. Ezali wana makanisi mapesami na zulunalo Cambio 16 América. Na Institut Cervantes, ebongiseli ya kotombola lokótá Espagnol, eyebisaki ete bokóli emonani na motuya ya bato 70 kati na monkámá ya bato oyo bazali koyekola Espagnol na Etats-Unis katikati na 1986 mpe 1990, mpe bokóli ya bato 80 kati na monkámá na Japon. Mpo na nini bato bazali kosepela mingi na lokótá wana? Mokambi ya Institut Cervantes alobi ete bato bazali komona ete Espagnol ezali kokóma sé na ntina mingi na mikili ya Wɛ́sti. Espagnol ezali mpe na litomba mosusu: Ezali kolobama na mikili mingi mikeseni.
Baoyo balingaka pilipili
Motuya ya bato oyo balingaka pilipili mozali sé kobakisama. Mingi oyo balingaka yango te bakanisi ete pilipili ezali bobele kobebisa elɛngi ya bilei. Kasi baoyo balingaka pilipili balobi ete ezali bongo soko moke te. Engebene mwa búku Reader’s Digest, mokanda moko ya sika oyo ezali kolobela makambo matali pilipili emonisi ete pilipili ezali na bikelakela kati na yango, bikelakela yango bilumbaka nsolo te mpe ezalaka na bopusi likoló na ba cellules oyo eyokisaka elɛngi na monɔkɔ mpe ebakisaka mpímbó na bilei. Basusu balobi mpe ete pilipili ezali malamu mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto. Pilipili ya mobesu ezalaka na vitamini C mingi koleka lilala. Pilipili oyo eleki makasi mpenza oyo eyebani ezali bongo habanero ya mboka Yucatán, na Mexique. Elobamaka ete soki olei habanero, okomiyoka lokola ete motó ekabwani na eteni mosusu ya nzoto. Kasi basusu balingaka kozangisa yango te.
Bana mike bazali kosangisa nzoto
Bolukiluki moko euti kosalema katikati na banakelasi ya eteyelo ya ebandeli na engumba Connecticut, na Etats-Unis, emonisi ete bana ya kelasi ya motoba, 28 kati na monkámá basangisaka nzoto. Motuya ezalaki kino na bana 49 kati na monkámá epai na bana ya kelasi ya minei, mpe koleka 60 katikati na monkama na kelasi ya mibale. Bato mosusu ya mayele bamoni ete motuya monene ya bana oyo bazali lisusu na mbula moke koleka bazali kosangisa nzoto. Mpo na kosala ete bilenge ya pene na mbula 13 kino 19 bákumba zemi te mpe mpo na kopalanganisa SIDA te, zulunalo USA Weekend ekomi ete minisitɛ́lɛ ya makambo matali kolɔngɔ́nɔ́ na Etats-Unis alobaki ete “biteyelo bisengelaki kokabola ba condoms na bayekoli.” Biteyelo 50 na bitúká ya Etats-Unis balandaki etinda yango. Eteyelo moko na etúká ya New Haven, na engumba Connecticut, ezali kokabola ba condoms kino epai na bana ya mbula zomi. Batɛmɛli ya ebongiseli wana balobi ete kokabolama ya ba condoms epai na bana mike ezali kolendisa bango na kosangisa nzoto.
Boombo ya masanga epai na bana mike
Tozali kotánga kati na zulunalo Asahi Evening News ete bolukiluki moko oyo esalemi epai na banakelasi 14 000 ya eteyelo ya katikati na Japon emonisi ete bana 17,3 kati na monkámá bazali baombo ya masanga. Ezali mpenza epai na bana mibali nde motuya moleki makasi: mpo na momeseno na bango ya komela masanga, 24,8 kati na monkámá bazalaki na mikakatano mpo na oyo etali bizalela ya bomoto, ya nzoto mpe ya kofanda na bato. Ndambo monene ya bilenge wana balobaki ete bamelaka masanga mpo na elɛngi na yango na lolemo. Moko kati na minei alobaki ete amelaka mpo na kosilisa mawa to mpo amiyoki ete azali bobele ye moko. Monganga Kenji Suzuki, ye oyo akambaki bolukiluki yango, alobi ete: “Ntango ekoki mpo ete baoyo batalelaka makambo ya banakelasi bátalela likambo yango malamu.” Abakisaki ete: “Bilenge basengeli koteyama malamu na eteyelo mpe na libota.” Na Japon, mibeko mizali kopekisa na bilenge oyo bazali na nsé ya mibu 20 ete bámelaka masanga te.
Esika ya kobongisa basáli na mabe
Noely Manfredini D’Almeida, mwasi wa mibeko, ye mobotami ya Brésil alobaki ete baoyo bakanisaka ete bakangami mingi bazali “babándí oyo baleki mabe mingi,” bamikosaka. Alobi ete na Brésil, “ye oyo azali komonisa lolenge ya bakangami banso azali mobólá mpe azali elenge mpenza, oyo amikɔtisaki na makambo ya mobulu kozanga kozwa libaku ya kobanda bomoi na ye.” Bilenge babándí wana batyamaka na bolɔ́kɔ mpo bákende kofanda esika moko na basáli na mabe oyo bakóma mitema makasi. Engebene zulunalo Veja, bolɔ́kɔ wana ezali nde mpenza “bamasini mpo na kosala babúki na mibeko. Kuna, babándí ya mike bakomaka basáli minene ya mabe.”
Mbuma mabe ya bolóngi
Colombie esalaki milulu mpo na kosepela lolenge ekipi na bango ya ndembo ekokenda kosangana na momekano ya mokili mobimba ya ndembo na 1994. Bobele nsima ya lisano oyo, lokola bato ya Colombie balongaki bato ya Argentine na mikelé 5 na 0, bato bakitaki na balabála mpo na kosepela. Nzokande, nokinoki esengo ebongwanaki mawa: engebene liyebisi moko, bato koleka ntuku nsambo bakufaki. Lisusu, likámá na nzela, bitumba mpe molángwa ezokisaki bato soko nkámá libwa. Nzokande, mokonzi moko alobaki ete: soki mituya oyo mizali minene, “mindimami mpo na makambo motindo wana.”
Bazali kotya likebi na kolɔngɔ́nɔ́ na bango ya nzoto te
Zulunalo Süddeutsche Zeitung elobi: “Koleka moto 1 kati na bato 3 na Allemagne oyo bazali na monene na nzoto batyaka likebi na kolɔngɔ́nɔ́ na bango ya nzoto te.” Ezali yango nde Claudia Pohle, ya Eteyelo monene ya Ruhr, na Bochum amonaki na kotunáká kati na bango bato nkámá misato na ntúku minei na misato nini bango basalaka mpo na bolamu ya nzoto na bango, mpe mpo na bolingo na bango epai na bato. Koleka 36 % ya bato oyo batunamaki bazali kotalela soko moke te kolɔngɔ́nɔ́ na bango ya nzoto, mpe na nsé ya 20 % babandaki kotya likebi makasi nzokande oyo ezangi koumela mpo na lolenge ya sika ya makambo matali kokémbisa nzoto. Bobele 20 % bazalaki komibanzabanza na oyo basengelaki kosala mpe bazalaki kozwa ekateli.
Monene ya mabe
“Bato ya nzoto minene baleki mingi na Etats-Unis,” elobi yango monganga Robert Kushner, mokambi ya Centre de nutrition et d’amaigrissement na Eteyelo monene ya Chicago. Zulunalo Toronto Star emonisi ete: “Motuya ya bato ya nzoto monene kati na baameriké ya mibu koleka zomi na nsambo eleki 24 % na 1985 kino 28 % na 1990.” Mpo na nini bongo? Bolukiluki ya sika emonisi ete kolya mingi koleka, kozanga kokémbisa nzoto mpe mimeseno mya baboti ezali makambo oyo masengeli kotalelama. Charlotte schoenborn ya Centre Américain des Statistiques de santé alobi: “Bato bazali kokóma minene koleka mpe yango ezali kotungisa.” Kozala na nzoto monene ya mabe ekoki koyeisa bamaladi lokola hypertension, diabète mpe mitungisi misusu ya nzoto. Ezali pɛtɛɛ te mpo na kopesamela nzela. Minganga bazali kopesa makanisi mpo na mbongwana ya lolenge ya bomoi. “Lya moke mpe kémbisá nzoto mingi.” Zulunalo Toronto Star ebakisi: “Kokémbisa nzoto ezali mwango bobele moko mpo na kozongela te kilo oyo ekitaki.”
Bana bazali konyokwama
Zulunalo O Estado de S. Paulo ya ekólo Brésil ekomi: “kobebisa bana ezali sé komata.” Longolá koluka kosangisa nzoto na makasi, motuya ya bilenge mibali mpe bilenge basi oyo bakutani na makambo wana ezali pene ndenge moko. Nzokande, ezali bongo te mpo na makambo matali kosangisa nzoto na makasi: motuya ezali ya 23 % epai ya bilenge mibali mpe 77 % mpo na bilenge basi. Bana mike bazali kozanga te kokutana na mobulu oyo ebimaka na ndako. Engebene Miriam Mesquita, Molakisi na Eteyelo monene ya São Paulo, “koleka 30 % ya kobomama ya bana oyo bazali na nsé ya mibu zomi euti na mosangani moko ya libota. Pene na 29 % ya bana babomami na tata, nɔ́kɔ́, ndeko mobali to bokiló-mobali, mpe babebisami liboso ya kokufa. Zulunalo O Estado de S. Paulo emonisi lisusu ete: na Brésil, 90 % ya kobebisama na ndako mpo na bana eyebisami te.
Koboma bato oyo ebongisami
Gianni De Gennaro, mokambi ya cellule antimafia ya guvɛrnɛmá ya ekólo Italie alobi: “koboma bato oyo ebongisami epanzani kino bopusi na yango ekómi na mokili mobimba.” Kopalangana ya bituluku ya babomi bato lokola mafia italienne, triades chinoises, bandes de motards na Amerika ya Nɔ́rdi mpe koboma bato oyo ebongisami na mikili ya kala ya communisme ezali likambo oyo lizali kotungisa bato. Boluki matomba na nzela elongobani te ezali kotinda basáli na mabe wana ete básalela bizokiseli mpe makoki mosusu, yango ezali kotungisa masangá ya bato oyo bapesameli mokumba ya kotosisa mibeko.